Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/1 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Samasona alongi na makasi ya Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tyelá Yehova motema, ndenge Samsone asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Yehova akómisaki Samsone makasi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Aleki bato nyonso na makasi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/1 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Mpo na nini Samasona atikalaki kaka Monasili atako asimbaki bibembe ya bato oyo abomaki?

Na ntango ya kala na Yisalaele, moto akokaki kolapa ndai na bolingo na ye moko mpe kokóma Monasili na boumeli ya ntango moko boye.a Moko ya mibeko oyo moto oyo alapi ndai yango asengelaki kolanda yango oyo: “Mikolo nyonso amikaboli epai ya [Yehova] akobɛlɛma na ebembe te. Soki mpo na tata na ye to mama na ye to mpo na ndeko mobali na ye to ndeko mwasi, soki bango bakufi akomiyeisa mbindo te.” Bongo soki “moto akufi pwasa na pembeni na ye”? Ata yango mpe ekokómisa ye mbindo mpe ekobebisa ndai na ye ya Monasili. Yango wana, mobeko elobaki ete: “Mikolo ya liboso mikotángama te.” Moto yango asengelaki kolanda molulu ya komipɛtola mpe kobandela lisusu ndai na ye ya Monasili.​—Mituya 6:6-12.

Nzokande Samasona azalaki Monasili ya lolenge mosusu. Liboso abotama, anzelu ya Yehova ayebisaki mama na ye ete: “Talá! okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. [Zilɛti] ekokóma na motó na ye te, mpo ete mwana oyo akozala Monasili ya Nzambe longwa na kobotama. Ye mpe akobanda kobikisa Bayisalaele na lobɔkɔ ya Bafilisitia.” (Basambisi 13:5) Na yango, Samasona alapaki ndai ya Monasili te. Nzambe nde aponaki ye azala Monasili, mpe yango ezalaki mpo na bomoi na ye mobimba. Yango wana, mobeko ya kosimba ebembe te ekokaki kotalela ye te. Lokola Samasona azalaki Monasili banda kobotama na ye, akokaki te kokata mpe kobandela lisusu ndai na ye, ata soki asimbi ebembe kozanga ete akana yango. Yango emonisi polele ete masɛngami ya kozala Monasili uta kobotama ekeseni na masɛngami ya moto oyo alapi ndai ya Monasili.

Tótalela mitinda ya Yehova epai ya bato misato oyo Biblia elobeli, oyo bazalaki Banasili uta kobotama na bango: Samasona, Samwele mpe Yoane Mobatisi. Ndenge tolobaki liboso, bayebisaki Samasona ete asengeli kokata nsuki na ye te. Hana alapaki ndai na ntina na Samwele, mwana oyo asengelaki kobota ete: “Ngai nakopesa ye epai na [Yehova] mikolo ya bomoi na ye nyonso mpe [zilɛti] ekokata nsuki na ye te.” (1 Samwele 1:11) Mpo na Yoane Mobatisi, anzelu ya Yehova alobaki boye: “Asengeli komɛla vinyo te mpe masanga ya makasi ata moke te.” (Luka 1:15) Lisusu, “Yoane azalaki na bilamba na ye ya nsuki ya kamela mpe kamba ya mposo ya nyama na loketo na ye; bilei na ye mpe ezalaki mayoyo mpe mafuta ya nzoi na zamba.” (Matai 3:4) Moko te kati na bato oyo misato azwaki etinda ya kopusana te pene na molimo oyo ekufi.

Atako Samasona azalaki Monasili, azalaki mpe moko ya basambisi oyo Yehova Nzambe abimisaki mpo na kobikisa Yisalaele na mabɔkɔ ya bapunzi na bango. (Basambisi 2:16) Ntango azalaki kokokisa mokumba yango azalaki kosimba bibembe. Na libaku moko abomaki Bafilisitia 30 mpe alongolaki bilamba na bango. Na nsima, abɛtaki banguna “loketo mpe ebelo na kufa monene.” Azwaki mpe mokuwa ya mbanga ya mpunda mpe abomaki na yango bato nkóto moko. (Basambisi 14:19; 15:8, 15) Samasona asalaki nyonso wana mpamba te Yehova atindaki ye mpe azalaki kosalisa ye. Kutu Biblia etángi ye lokola moto ya kondima makasi.​—Baebele 11:32; 12:1.

Maloba Samasona apasolaki nkɔsi ‘lokola moto apasolaka mwana ya ntaba na mibale’ emonisi nde ete bato bazalaki na momeseno ya kopasola bana ya ntaba na mibale na ntango wana?

Ezali ata na elembeteli moko te oyo emonisi ete na eleko oyo Basambisi bazalaki na Yisalaele, bato bazalaki kopasola bana ya ntaba na mibale. Basambisi 14:6 (Liloba lya Nzambe) elobi ete: “Elimo ya [Yehova] ekitelaki Samson mpe, ata azalaki na eloko yoko o maboko te, apasoli ntambwe na biteni bibale lokola bakoseseke mwana ntaba.” Na ntembe te, basalelaki nde maloba ya elilingi.

Maloba “apasolaki nkɔsi na biteni bibale” ekoki kozala na ndimbola mibale. Ekoki kozala ete Samasona apasolaki mbanga ya nkɔsi to akataki nkɔsi yango bitenibiteni. Soki apasolaki mbanga ya nkɔsi, ekoki mpe kozala likambo ya mpasi te mpo moto asala yango mpo na mwana ya ntaba. Boye, maloba yango ezali komonisa ete mpo na Samasona, koboma nkɔsi na mabɔkɔ mpamba ezalaki lokola azali koboma kaka mwana ya ntaba. Bongo soki Samasona akataki nkɔsi yango bitenibiteni? Wana, tokotalela yango ete ezali maloba ya elilingi. Maloba yango elimboli kaka ete elimo ya Yehova epesaki Samasona makasi ya kosala likambo oyo moto akoki kosala te na nguya na ye moko. Ezala bongo to te, maloba ya Basambisi 14:6 ezali komonisa ete na lisalisi ya Yehova, nkɔsi ya makasi ekómaki eloko mpamba na miso ya Samasona, kaka ndenge mwana ya ntaba akoki komonana epai ya moto, ata soki moto yango azali na makasi ya kokamwa te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Moto oyo alapi ndai ye moko nde asengelaki kopona ntango boni akozala Monasili. Nzokande, masolo ya bonkɔkɔ ya Bayuda elobi ete eleko yango ekokaki kozala na nse ya mikolo 30 te. Ndai yango ekokaki kozala na valɛrɛ te soki ezali na nse ya mikolo ntuku misato.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto