Ezali solo ete siansi ná Biblia eyokanaka te?
KOZANGA boyokani oyo emonanaki kati na Galilée ná Lingomba ya Katolike ebandaki bankama ya bambula liboso kutu Copernic ná Galilée bábotama. Likanisi ete mabelé ezali na katikati ya baplanɛti nyonso ebandaki na Grèce ya kala mpe filozofe Aristote (oyo azalaki na bomoi na 384-322 liboso ya ntango na biso [L.T.B.]) ná Ptolémée, oyo azalaki nganga-minzoto (moto ya ekeke ya mibale ya ntango na biso [T.B.]) nde basalaki ete likanisi yango eyebana mingi.a
Aristote ye moko alandaki likanisi ya Pythagore (moto ya ekeke ya motoba L.T.B.), moto moko ya Grèce oyo azalaki koyekola mituya mpe filozofi. Lokola Aristote andimaki likanisi ya Pythagore ete sɛrklɛ ná libungutulu ezali bitando ya kokoka, alobaki ete molɔ́ngɔ́ mobimba esalemá na mabungutulu oyo ezingami moko likoló ya mosusu, ndenge basɛrklɛ ya litungulu ezalaka moko likoló ya mosusu. Mokomoko ya basɛrklɛ yango ezali mabangamabanga ya mpɛmbɛ lokola talatala, mpe mabelé ezali na katikati mpenza na yango nyonso. Mpo na ye, minzoto ebalukaka na kati ya basɛrklɛ, mpe nguya oyo eutaka na sɛrklɛ ya likoló mpenza, esika bilima bafandaka, nde ebalusaka yango. Aristote alobaki mpe ete moi ná biloko mosusu oyo emonanaka na likoló ezali ya kokoka mpenza, mpe ekoki kobongwana to kozala na mbeba moko te.
Likanisi wana ya Aristote eutaki nde na filozofi, kasi na siansi te. Mpo na ye, moto nyonso oyo akanisaka malamu akoki koloba te ete mabelé ebalukaka. Lokola azalaki kokanisa ete soki mabelé ebalukaka ekoki kobeba mpe kotika kobaluka mpo mokolo moko nguya oyo ebalusaka yango ekosila, aboyaki kondima ete mabelé esimbami na eloko moko te. Lokola likanisi ya Aristote eyokanaki na makanisi ya bato mosusu ya siansi ya ntango wana, tii nsima ya mbula 2 000, bato nyonso bazalaki kaka kondima yango. Ata na bambula ya 1500, Bodin, filozofe moko ya France, alobelaki likanisi wana oyo bato nyonso bazalaki kondima: “Moto moko te oyo akanisaka malamu to oyo ayebi malamu ndenge molɔ́ngɔ́ ezali, akoki kokanisa ete mabelé, oyo ezali kilo mpe makasi mpenza . . . , ebalukaka . . . ebalukaka yango moko mpe zingazinga ya moi; mpamba te soki mabelé ezalaki kobaluka, mbele tomonaka bandako, bingumba mpe bangomba ezali kobukana.”
Lingomba endimi likanisi ya Aristote
Likanisi mosusu oyo esalaki ete Galilée ná lingomba báyokana te ebimaki na ekeke ya 13; ezalaki likanisi ya Thomas d’Aquin (1225-1274) moto moko ya mayele ya lingomba ya Katolike. Thomas d’Aquin azalaki kokumisa Aristote mingi, mpe azalaki kobenga ye filozofe ya solosolo. Na boumeli ya mbula mitano mobimba, Thomas d’Aquin asalaki nyonso mpo na kosangisa mateya ya Aristote ná oyo ya lingomba. Na buku na ye Libunga ya Galilée (na Lingelesi), Wade Rowland alobi boye: na eleko ya Galilée, “mateya ya Thomas d’Aquin, oyo esangisaki mateya ya Aristote ná oyo ya lingomba, ezwaki mpenza esika monene na Lingomba ya Katolike.” Tóbosana mpe te ete na ntango wana, bato ya siansi bazalaki mpenza te. Bakelasi nyonso ezalaki na mabɔkɔ ya lingomba. Mbala mingi, kaka lingomba nde ezalaki kosimba ná mateya ya Nzambe ná oyo ya siansi.
Makambo nyonso wana efungolaki nzela na kozanga boyokani kati na Galilée ná lingomba. Kutu, liboso Galilée abanda kolobela baplanɛti, akomaki mokanda moko oyo elobelaki kobaluka ya biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́. Na mokanda yango, akweisaki makanisi mingi ya Aristote na likambo yango. Kutu, soki Galilée akómaki tii na kosamba liboso ya tribinale ya Lingomba ya Katolike na mobu 1633, ezalaki mpo na ndenge azalaki kondima mpe kolongisa likanisi ete moi nde ezali na katikati ya baplanɛti nyonso mpe ndenge alobaki ete likanisi yango eyokani na mateya ya Biblia.
Liboso ya tribinale yango, Galilée amonisaki ete andimaka mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Alobaki mpe ete Biblia ekomamaki mpo bato ya lolenge nyonso bátángaka yango; na bongo, soki Biblia elobi ete moi ebalukaka, biso tosengeli te kolimbola yango mpenza ndenge wana. Bamonaki makambo nyonso oyo alobaki mpamba. Lokola Galilée aboyaki kondima ete básalela makanisi ya filozofi ya Grɛki mpo na kolimbola Biblia, bakweisaki ye mpe bapesaki ye etumbu. Kaka na 1992 nde Lingomba ya Katolike endimaki libunga na yango na likambo ya Galilée.
Mateya mpo na biso
Mateya nini tokoki kozwa na makambo yango? Ya liboso, Galilée azalaki kotya ntembe te ete Biblia elobaka solo. Kasi, atyaki ntembe nde na mateya ya lingomba. Mokomi moko ya makambo ya mangomba alobaki boye: “Liteya oyo tokoki kozwa epai ya Galilée ezali ete, emonani ete Lingomba ekangamaki mpenza na solo ya Biblia te.” Lokola lingomba ekɔtisaki filozofi ya Grɛki na mateya na yango, elandaki nde makanisi ya bato na esika ya kokangama na mateya ya Biblia.
Nyonso wana ezali kotinda biso tókanisa toli ya Biblia oyo: “Bókeba: mbala mosusu ekoki kozala na moto moko oyo akomema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba engebene mimeseno ya bato, engebene makambo mikemike ya mokili kasi engebene Klisto te.”—Bakolose 2:8.
Ata lelo oyo, bato mingi na kati ya mangomba bazali kolanda mateya ya filozofi oyo eyokani te na Biblia. Na ndakisa, bandimaka liteya ya Darwin ya evolisyo na esika ya kondima lisolo ya bozalisi oyo Biblia elobeli na mokanda ya Genese. Na ndenge yango, mangomba ezali komona Darwin ndenge bazalaki komona Aristote na ntango ya kala, mpe evolisyo nde ekómi koteyama na esika ya bozalisi.b
Mateya ya solo ya siansi ezali na boyokani na mateya ya Biblia
Tosengeli te kotika ete makambo oyo tolobeli awa epekisa biso kondima mateya ya siansi. Ata Biblia yango moko ezali komonisa biso ete tokoki komona bizaleli ya kokamwa ya Nzambe soki kaka totali makambo mineneminene oyo asalá. (Yisaya 40:26; Baloma 1:20) Ya solo, Biblia ezali buku ya siansi te. Kasi, eyebisaka biso mitinda ya Nzambe, bizaleli na ye oyo ekoki komonana na biloko oyo akelá mpe mokano na ye mpo na bato. (Nzembo 19:7-11; 2 Timote 3:16) Nzokande, ntango Biblia elobelaka biloko oyo tomonaka, elobelaka yango na bosikisiki mpenza. Galilée alobaki boye: “Ezala Makomami mosantu to biloko oyo tomonaka, yango nyonso esalemaki na Liloba ya Nzambe . . . soki makambo mibale ekeseni, yango nyonso ekoki kozala solo te; solo ezalaka kaka moko.” Tótalela bandakisa oyo elandi.
Longola kobaluka ya minzoto mpe ya baplanɛti, toyebi mpe ete biloko nyonso na molɔ́ngɔ́, ata oyo ya mike mpenza, etambwisamaka na banguya to mibeko lokola oyo babengi pesanteur. Longola Biblia, moto ya liboso oyo alobelaki mibeko yango ezali Pythagore, oyo azalaki koloba ete tokoki kolimbola makambo nyonso ya molɔ́ngɔ́ na nzela ya mituya. Mbula nkoto mibale na nsima, Galilée, Kepler mpe Newton bamonisaki mpe ete biloko nyonso etambwisamaka na mibeko oyo etyamá na mayele.
Na Biblia, mbala ya liboso oyo balobeli mibeko oyo etambwisaka biloko nyonso ezali na mokanda ya Yobo. Soki na mobu 1600 L.T.B., Nzambe atunaki Yobo boye: “Oyebi nde mibeko ya [likoló]?” (Yobo 38:33) Mokanda ya Yilimia, oyo ekomamaki na ekeke ya nsambo L.T.B., elobi ete Yehova azali Mopesi ya “mibeko epai ya sanza mpe ya minzoto” mpe mobongisi ya “mibeko ya [likoló] mpe ya [mabelé].” (Yilimia 31:35; 33:25) Na ntina na mibeko yango, George Rawlinson, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobaki boye: “Ndenge kaka siansi ezali komonisa yango, Makomami mosantu mpe ezali komonisa ete biloko nyonso ya molɔ́ngɔ́ etambwisamaka na mibeko.”
Yobo akomaki maloba wana bankoto ya bambula liboso Pythagore alobela yango. Tóbosana te ete ntina ya Biblia ezali kaka ya kolobela molɔ́ngɔ́ te, kasi ezali nde libosoliboso komonisa biso ete Yehova azali Mozalisi ya biloko nyonso, oyo akoki kotya mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́.—Yobo 38:4, 12; 42:1, 2.
Ndakisa mosusu ezali oyo ya mai. Mai nyonso ya mabelé elandaka nzela moko molai, elingi koloba molunge ya moi ematisaka mai ya mbu na likoló, kuna ekómaka mapata, ekitaka lisusu awa na mabelé lokola mbula mpe nsukansuka ezongaka na mbu. Soki tolongoli Biblia, mbala ya liboso oyo balobelaki nzela yango oyo mai elandaka ezalaki na bambula ya 300 L.T.B. Nzokande, Biblia elobelaki likambo yango bankama ya bambula liboso. Na ndakisa, na ekeke ya 11 L.T.B., Salomo mokonzi ya Yisalaele akomaki boye: “Bibale nyonso ekotiyola kino mai-ya-monana; kasi mai-ya-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.”—Mosakoli 1:7.
Ndenge moko, soki na mobu 800 L.T.B., mosakoli Amosa, oyo azalaki mobɔkɔli ya mpate mpe mosali bilanga, akomaki ete Yehova azali “ye oyo abyangi mai-ya-monana mpe asopi yango likoló ya mabelé.” (Amosa 5:8) Na esika ya kosalela maloba ya makasimakasi ya bato ya siansi, Salomo ná Amosa balobelaki na bosikisiki mpenza nzela oyo mai elandaka, atako mwa bokeseni moke ezalaki na maloba na bango.
Biblia elobi mpe ete Nzambe “atɛlɛmisi mabelé likoló ya eloko moko te.” (Yobo 26:7, NW) Soki totali mwa boyebi moke oyo bato bazalaki na yango ntango maloba wana elobamaki, soki na mobu 1600 L.T.B., esengelaki kozala moto ya mayele mingi mpo na kondima ete eloko moko ya makasi ekoka kotɛlɛma kaka yango moko na mopɛpɛ kozanga ete ekwea. Ndenge tolobaki yango, Aristote aboyaki likanisi ete mabelé esimbami na eloko te, atako ayaki kobotama mbula koleka 1200 na nsima.
Ozali kokamwa te ete Biblia elobelaki makambo yango na bosikisiki mpenza atako na ntango wana bato bazalaki kokanisa ndenge mosusu? Mpo na moto oyo akanisi malamu, likambo yango emonisi mpe ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe. Na yango, tokozala bato ya mayele soki tozali te kolanda mateya to makanisi oyo eyokani na Liloba ya Nzambe te. Ndenge emonanaki na bileko nyonso, makanisi ya bato, ata baoyo batángá mingi, endimamaka kaka mpo na mwa ntango, kasi “liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela.”—1 Petelo 1:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ekeke ya misato L.T.B., Aristarque, moto moko ya etúká ya Samos na ekólo Grèce, abimisaki likanisi ete mabelé ezali na katikati mpenza ya molɔ́ngɔ́ mobimba; kasi bato baboyaki likanisi na ye mpe bandimaki nde oyo ya Aristote.
b Mpo na koyeba makambo mingi lisusu na ntina na evolisyo, talá na buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?, mokapo 15 na yango oyo elobi: “Pourquoi tant de gens croient-ils à l’évolution?,” ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
Likanisi ya Baprotesta
Babandisi ya Lingomba ya Protesta batɛmɛlaki mpe likanisi ete moi ezali na katikati ya baplanɛti nyonso. Kati na bango tokoki kotánga: Martin Luther (1483-1546), Philipp Melanchthon (1497-1560), mpe Jean Calvin (1509-1564). Luther alobaki mpo na Copernic boye: “Talá moto ya ligboma oyo alingi kobebisa mayele nyonso ya banganga-minzoto.”
Mpo na kokweisa makanisi ya Galilée babandisi yango ya lingomba bazalaki kolimbola bavɛrsɛ mosusu na ndenge na bango. Na ndakisa Yosua mokapo ya 10, oyo elobi ete moi ná sanza “etɛlɛmaki.”c Mpo na nini bato yango bazalaki kotɛmɛla likanisi ya Galilée makasi ndenge wana? Buku moko Libunga ya Galilée (na Lingelesi) elobi ete atako Baprotesta baboyaki mateya ya Lingomba ya Katolike, “batikaki te kolanda mateya” ya Aristote ná Thomas d’Aquin, oyo “Lingomba ya Katolike ná ya Protesta elandaka.”
[Maloba na nse ya lokasa]
c Bato ya siansi bamonaka mabe ndenge tolobaka “moi ebimi” mpe “moi elali.” Kasi, soki tolandi ndenge tolobaka mokolo na mokolo, tokoki kondima ete ezali mpenza bongo, mpamba te moto oyo azali kotala awa na mabelé amonaka mpenza ete moi ebimi to elali. Ndenge moko, Yosua azalaki kolobela te ndenge moi, mabelé, sanza mpe minzoto ebalukaka, kasi azalaki nde kolobela makambo oyo amonaki.
[Bililingi]
Luther
Calvin
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku Servetus and Calvin, 1877
[Elilingi na lokasa 4]
Aristote
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku A General History for Colleges and High Schools, 1900
[Elilingi na lokasa 5]
Thomas d’Aquin
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku Encyclopedia of Religious Knowledge, 1855
[Elilingi na lokasa 6]
Isaac Newton
[Elilingi na lokasa 7]
Mbula koleka 3 000 liboso, Biblia elobelaki nzela oyo mai elandaka