Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/4 nk. 13-19
  • Baboti, bóbatela libula na bino ya motuya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti, bóbatela libula na bino ya motuya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo baboti basengeli na lisalisi ya Nzambe lelo oyo
  • Mateya oyo epesaka bwanya
  • Esengeli kozala na bolingo
  • Matomba
  • Mateya ya ntina mpo na mikolo na biso
  • Mosala oyo ebotaka mbuma malamu
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kobatela bana na yo
    Lamuká!—2007
  • Makambo oyo baboti basengeli kosalela bana
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Bana bazali libula ya motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/4 nk. 13-19

Baboti, bóbatela libula na bino ya motuya

“[Bwanya] ekobatelaka . . . Ekobikisa bomoi ya ye oyo azwi yango.”​—MOSAKOLI 7:12.

1. Mpo na nini baboti basengeli kotalela bana na bango lokola likabo?

BABOTI babotaka bana oyo bazali na nzoto mpe na bomoto ekokani na oyo ya bango moko. Biblia ebengaka bana yango “libula ya [Yehova].” (Nzembo 127:3, NW) Lokola Yehova azali Mopesi ya bomoi ya solosolo, apesi baboti eloko oyo ezali mpenzampenza nde ya ye. (Nzembo 36:9) Bino baboti, ndenge nini botalelaka likabo kitoko wana oyo Nzambe apesi bino?

2. Manoa asalaki nini ntango ayokaki ete mwasi na ye akobota mwana?

2 Ntembe ezali te ete baboti basengeli koyamba likabo yango na komikitisa mpe na botɔndi. Yango nde Manoa, moto moko ya Yisalaele, asalaki eleki lelo mbula 3 000, ntango anzelu moko ayebisaki mwasi na ye ete akobota mwana. Ntango Manoa ayokaki nsango malamu wana, abondelaki boye: “Ee [Yehova], nabondeli yo tiká moto ya Nzambe oyo etindaki yo akóma na biso lisusu, mpe alakisa biso yango ebongi na biso kosala na mwana mobali oyo akobotama.” (Basambisi 13:8) Liteya nini bino baboti bokoki kozwa na ndakisa ya Manoa?

Ntina oyo baboti basengeli na lisalisi ya Nzambe lelo oyo

3. Mpo na nini lisalisi ya Nzambe mpo na kobɔkɔla bana ezali na ntina mingimingi lelo oyo?

3 Lelo oyo, baboti bazali na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na kobɔkɔla bana na bango koleka ndenge ezalaki liboso. Mpo na nini? Mpamba te Satana Zabolo ná bademo na ye babwakamá awa na mabelé. Biblia elobi boye: “Mawa na mabelé . . . mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.” (Emoniseli 12:7-9, 12) Biblia emonisi ete Satana azali “lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Petelo 5:8) Mbala mingi bankɔsi bakangaka banyama oyo ezali makasi mingi te, mingimingi oyo ya mike. Yango wana, baklisto basengeli kozala na bwanya ya koluka litambwisi ya Yehova mpo na kobatela bana na bango. Baboti, milende nini bozali kosala na likambo yango?

4. (a) Soki baboti bayoki nkɔsi ezali konguluma na kartye na bango, yango ekotinda bango básala nini? (b) Bana basengeli na nini mpo na komibatela?

4 Soki oyebi ete nkɔsi moko azali kotambola na kartye na bino, na ntembe te likambo ya liboso okosala ekozala ya kobatela bana na yo. Satana azali lokola nkɔsi. Alukaka kobebisa basaleli ya Nzambe mpo Nzambe asepela na bango lisusu te. (Yobo 2:1-7; 1 Yoane 5:19) Kozwa bana ezali likambo moke mpenza mpo na ye. Mpo na kokima mitambo ya Zabolo, bana basengeli koyeba Yehova mpe kotosa ye. Boyebi ya Biblia ezali na ntina mingi. Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Lisusu, bana basengeli kozala na bwanya, elingi koloba likoki ya kokanga ntina ya makambo oyo bazali koyekola mpe kosalela yango. Lokola “[bwanya] ekobikisa bomoi ya ye oyo azali na yango,” bino baboti bosengeli kokɔtisa solo na mitema ya bana na bino. (Mosakoli 7:12) Ndenge nini bokoki kosala yango?

5. (a) Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bwanya? (b) Ndenge nini mokanda ya Masese emonisi motuya ya bwanya?

5 Bokoki kotángela bana na bino Liloba ya Nzambe, mpe bosengeli kosalaka yango. Kasi kosalisa bango bálinga Yehova mpe bátosa ye esɛngaka kaka te kotángela bango Biblia; esɛngaka mpe bákanga ntina ya makambo oyo bozali kotángela bango. Tózwa ndakisa: Baboti bakoki koloba na mwana ete liboso akatisa balabala, esengeli atala ngámbo na ngámbo. Kasi, bana mingi balandaka toli yango te. Mpo na nini? Ekoki kozala ete baboti basalaki eloko te mpo na kolongola mwana ‘bozoba’ oyo ekoki komɛma ye na likama, elingi koloba balimbwelaki ye te ete soki asali bongo te motuka ekoki kotuta ye. Mpo na koteya bana bwanya, esɛngaka ntango mpe motema molai. Bwanya ezali mpenza na motuya! Biblia elobi boye: “Nzela na ye ezali nzela ya esengo mpe bilekelo na ye nyonso ezali kimya. Ye azali lokola nzete ya bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.”​—Masese 3:13-18; 22:15.

Mateya oyo epesaka bwanya

6. (a) Mpo na nini mbala mingi bana basalaka bozoba? (b) Etumba nini ezali na mitema ya bana?

6 Mbala mingi, soki bana basali makambo ya mabe, ezalaka te mpo bateyaki bango te oyo ezali malamu, kasi mpo mateya yango esimbaki mitema na bango te, elingi koloba esimbaki bomoto na bango ya kati te. Zabolo azali kosala nyonso mpo na kobebisa mitema ya bilenge. Alingaka bálanda makambo mabe ya mokili na ye. Alukaka mpe kosalela ezaleli ya masumu oyo tobotamaka na yango mpo na kotinda bango básala makambo ya mabe. (Genese 8:21; Nzembo 51:5) Baboti basengeli koyeba ete etumba monene ezali na mitema ya bana na bango.

7. Mpo na nini esengeli te kosuka kaka na koyebisa mwana ete likambo boye to boye ezali mabe?

7 Mbala mingi soki baboti bayebisi mwana oyo ezali malamu to oyo ezali mabe, bakanisaka ete bateyi ye ezaleli moko ya malamu. Bakoki koyebisa mwana ete kokosa, koyiba, to kosangisa nzoto na moto oyo abali ye te ezali mabe. Nzokande, soki mwana ayebi ntina oyo baboti bazali koloba ete likambo boye to boye ezali mabe, ekozala mpasi te andima yango. Yango ezali mibeko ya Yehova. Baboti basengeli kolakisa mwana ayeba ete kotosa bakomandema ya Nzambe ezali nzela ya bwanya.​—Masese 6:16-19; Baebele 13:4.

8. Mateya ya ndenge nini ekoki kopesa bwanya?

8 Makambo ndenge na ndenge oyo ezali na molɔ́ngɔ́, bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi, kobongwana ya bileko, makambo nyonso wana ekoki kosalisa mwana ayeba ete ezali na Mozalisi moko, oyo atondi na bwanya, oyo akelá yango. (Baloma 1:20; Baebele 3:4) Lisusu, baboti basengeli koteya mwana ete Nzambe alingaka ye mpe ete na nzela ya mbeka ya mwana na Ye, akopesa ye bomoi ya seko mpe ete ye akoki kosepelisa Nzambe soki atosi makambo oyo azali koloba. Na ndenge yango, mwana akosepela kosalela Yehova atako Zabolo azali koluka kopekisa ye.​—Masese 22:6; 27:11; Yoane 3:16.

9. (a) Mateya oyo ekoki kobatela bomoi ya mwana esɛngaka nini? (b) Likambo nini basɛngi batata, mpe yango elingi koloba nini?

9 Mateya oyo ekoki kobatela mwana mpe kotinda ye asala oyo ezali malamu esɛngaka ntango, likebi, mpe programɛ. Esɛngaka baboti bándima litambwisi ya Nzambe. Biblia elobi boye: “Bino, batata, . . . bókoba kobɔkɔla [bana na bino] na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Yango elingi koloba nini? Na Grɛki, liloba oyo ebongolami na “makebisi” epesaka likanisi ya “kotya makanisi.” Na yango, bazali kolendisa batata bátya makanisi ya Yehova epai ya bana na bango. Yango ekobatela mpenza bana! Soki bana bazali na makanisi ya Nzambe, elingi koloba baboti bateyi bango lolenge na ye ya kokanisa, yango ekobatela bana na bango na makambo ya mabe.

Esengeli kozala na bolingo

10. Mpo na koteya mwana na yo malamu, makambo nini ya ntina osengeli koyeba?

10 Bolingo nde esengeli kotinda yo osala milende mpo na kobɔkɔla mwana na yo malamu. Kosolola na mwana ezali na ntina mingi. Luká koyeba makambo oyo mwana azali kokutana na yango na bomoi na ye mpe makanisi na ye. Luká ntango moko ya malamu mpe salelá mayele mpo olendisa ye aloba makambo oyo azali na yango na motema. Ntango mosusu makambo oyo akoloba ekoki kosala yo motema mpasi. Kasi, kosilika mbala moko te. Nzokande, yoká ye na likebi.

11. Ndenge nini moboti akoki kokɔtisa makanisi ya Nzambe epai ya mwana?

11 Mbala mosusu osilá kotángela mwana na yo mibeko ya Nzambe oyo epekisi pite, ntango mosusu mpe osalá yango mbala ebele. (1 Bakolinti 6:18; Baefese 5:5) Yango ekoki kosalisa mwana ayeba makambo oyo Yehova asepelaka na yango ná oyo asepelaka na yango te. Nzokande, kokɔtisa makanisi ya Yehova na motema ya mwana esɛngaka makambo mingi. Esengeli kosalisa bana báyeba ntina ya mibeko ya Yehova. Basengeli komona mpenza ete mibeko ya Yehova ezali sembo mpe na litomba mpe kotosa yango ezali likambo ya malamu oyo basengeli kosala. Tokoki koloba ete baboti bakɔtisi makanisi ya Yehova na mitó ya bana na bango kaka soki bazali kosalela Biblia mpe kokanisa na bango mpo bándima likanisi ya Nzambe.

12. Ndenge nini moboti akoki kosalisa mwana na ye akóma kotalela likambo ya kosangisa nzoto na ndenge ebongi?

12 Soki bozali kolobela likambo etali kosangisa nzoto, okoki kotuna ye boye: “Okanisi ete kotosa mobeko ya Yehova oyo epekisi kosangisa nzoto liboso ya kobala ekoki kozangisa moto esengo?” Sɛngá ye alimbola eyano na ye. Nsima ya kolimbwela mwana ebongiseli kitoko oyo Nzambe asalá mpo na kobota, okoki kotuna ye boye: “Okanisi ete Nzambe ya bolingo akoki kotya mibeko oyo ekopekisa biso tósepela na bomoi? To okanisi ete mibeko na ye ezali mpo na kopesa biso esengo mpe mpo na kobatela biso?” (Nzembo 119:1, 2; Yisaya 48:17) Luká koyeba makanisi ya mwana na yo na likambo yango. Na nsima, okoki kopesa bandakisa oyo emonisi ndenge pite ememelaki bato mosusu mpasi mpe mitungisi. (2 Samwele 13:1-33) Soki okanisi elongo na mwana na yo mpe osalisi ye asimba likanisi ya Nzambe mpe andima yango, osali mingi mpo na kokɔtisa makanisi ya Nzambe na motema na ye. Kasi, ezali na likambo mosusu oyo okoki kosala.

13. Likambo nini mwana asengeli koyeba mpo akóma komemya Yehova?

13 Osengeli kosuka te kaka na koyebisa mwana makama oyo ekoki kokómela ye soki aboyi kotosa Yehova, kasi esengeli mpe koyebisa ye ete etamboli na biso ekoki kopesa Yehova mawa to kosepelisa ye. Monisá mwana na yo na nzela ya Biblia ete tokoki koyokisa Yehova mawa soki tosali te mokano na ye. (Nzembo 78:41) Okoki kotuna ye boye: “Mpo na nini osengeli te koyokisa Yehova mawa?” mpe limbolá boye: “Satana oyo azali monguna ya Nzambe alobaki ete biso tosalelaka Yehova mpo na matomba na biso moko kasi te mpo tolingaka ye.” Na nsima, monisá ye ete Yobo asepelisaki motema ya Nzambe ntango atikalaki sembo, mpe na ndenge yango amonisaki ete Satana azali mokosi. (Yobo 1:9-11; 27:5) Mwana na yo asengeli koyeba ete etamboli na ye ekoki kosepelisa Yehova to koyokisa ye mawa. (Masese 27:11) Okoki koteya bana na yo mateya wana mpe mateya mosusu na lisalisi ya buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.a

Matomba

14, 15. (a) Mateya nini ya buku Moteyi esalisaki bana? (b) Matomba nini ozwi na kosalela buku yango? (Talá mpe etanda na nkasa 18-19.)

14 Na ekólo Croatie, moto moko oyo atángelaki nkɔkɔ na ye ya mbula nsambo buku Moteyi akomaki ete mwana yango alobaki na ye boye: “Mama ayebisaki ngai nasala likambo moko, kasi naboyaki. Ntango nakanisaki mokapo oyo elobi ete ‘Botosi ebatelaka,’ nazongaki mpe nayebisaki ye ete nandimi kosala likambo yango.” Mpo na mokapo oyo elobi “Ntina oyo tosengeli kokosa te,” mobali moko ná mwasi na ye na etúká ya Floride, na États-Unis balobaki boye: “Lisolo yango ezali na mituna oyo etindaka bana báfungola mitema na bango mpe bándima mabunga na bango oyo ezalaka mpasi bándima yango.”

15 Buku Moteyi ezali na bililingi koleka 230, mpe elilingi mokomoko ezali na mwa maloba mpo na kolimbola yango. Mama moko oyo asepelaki mingi na buku yango alobaki boye: “Mbala mingi, soki mwana na ngai atali elilingi moko ya buku yango, alingaka koleka na lokasa mosusu te. Bililingi yango ezali kaka kitoko te, kasi eteyaka mpe; etindaka mpe bana bátuna mituna. Na elilingi moko oyo ezali kolakisa mwana azali kotala televizyo na molili, mwana na ngai atunaki boye ‘Mama, mwana wana azali kosala nini?’ Atunaki motuna yango na mongongo oyo emonisaki ete ayebaki ete makambo oyo mwana yango azali kotala ezali malamu te.” Maloba oyo ezali na nse ya elilingi yango elobi boye: “Nani akoki komona makambo nyonso oyo tozali kosala?”

Mateya ya ntina mpo na mikolo na biso

16. Makambo nini ya ntina baboti basengeli koyebisa bana na bango lelo oyo, mpe mpo na nini?

16 Bana basengeli koyeba lolenge ya malamu to ya mabe ya kosalela binama na bango ya kobotela. Kasi, kolobela makambo yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mokomi moko ya zulunalo alobaki ete akolaki na ntango oyo, soki moto atángi binama ya kobotela, bazalaki kotalela ye lokola moto azangi bonkonde. Mpo na oyo etali koteya bana na ye, akomaki boye: “Nazalaka na mokakatano mpo na kolobela bana na ngai makambo yango.” Soki baboti bazali koyoka nsɔni mpe bazali kokima kolobela makambo wana na bana na bango, ezalaka likama mpenza mpo na bana. Bato oyo babebisaka bana mike balongaka kosala yango mpo bana bayebi makambo te. Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene elobeli likambo yango na bonkonde mpe na limemya. Koyebisa bana makambo etali nzoto ya mwasi to ya mobali ekobebisa bango te; nzokande kozanga koyebisa bango nde ekoki kobebisa bango.

17. Ndenge nini buku Moteyi esalisaka baboti báteya bana na bango makambo etali nzoto ya mwasi to ya mobali?

17 Na mokapo 10, epai balobeli baanzelu mabe oyo bayaki awa na mabelé mpe babotaki bana, bazali kotuna mwana boye: “Oyebaka soki kosangisa nzoto ezali nini?” Buku yango epesi eyano ya pɛtɛɛ mpe na maloba ya bonkonde. Mokapo ya 32 ezali kolimbola ndenge oyo baboti bakoki kobatela bana mpo bato mabe oyo balukaka kosangisa nzoto na bana mike bábebisa bango te. Bato mingi bakomelaki bakomi ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na koyebisa ete mateya yango ezali na ntina mingi. Mama moko akomaki boye: “Na pɔsɔ eleki ntango tokendaki epai ya monganga oyo asalisaka mwana na ngai Javan, monganga atunaki soki toyebisaki ye lolenge malamu ya kosalela binama ya kobotela. Akamwaki mpenza koyoka ete tosololaki na ye likambo yango na lisalisi ya buku na biso ya sika.”

18. Ndenge nini buku Moteyi ezali kolobela likambo etali kokumisa bendɛlɛ?

18 Mokapo mosusu elobeli lisolo ya Biblia ya bilenge Baebele misato Sadalaka, Mesaka ná Abede-nego, oyo baboyaki kofukama liboso ya ekeko moko na Babilone. (Danyele 3:1-30) Bato mosusu bamonaka te ete kopesa bendɛlɛ losako ekokani na kosambela ekeko, ndenge buku Moteyi emonisi yango. Kasi, yoká ndenge mokomi moko, Edward Gaffney, alobaki ntango zulunalo moko (U.S. Catholic) etunaki ye mituna. Alobaki ete mokolo ya liboso oyo mwana na ye akendaki na eteyelo, ayebisaki ye ete balakisaki bango ‘libondeli ya sika.’ Asɛngaki ye asala libondeli yango liboso na ye. Gaffney alobaki boye: “Atyaki lobɔkɔ na ntolo mpe na lolendo nyonso abandaki koloba: ‘Nazali kopesa bendɛlɛ losako . . .’” Mpe abakisaki: “Na mbala moko, nasosolaki ete Batatoli ya Yehova balobaka solo. Ezali na lolenge moko ya losambo ya ekólo oyo bazali kokɔtisa bana mike na motó na biteyelo, elingi koloba bazali kolona na mitema na bango bolingo makasi ya ekólo.”

Mosala oyo ebotaka mbuma malamu

19. Koteya bana emɛmaka matomba nini?

19 Ya solo, koteya bana ezali mosala ya mpunda te. Mama moko alelaki ntango azwaki mokanda oyo eutaki epai ya mwana na ye oyo afandaka na engumba Kansas, na États-Unis. Akomaki boye: “Nasepelaka mingi na ndenge oyo bobɔkɔlaki ngai na ndenge moko ya malamu. Yo ná Papa bobongi mpenza kozwa longonya.” (Masese 31:28) Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene ekoki kosalisa baboti mingi báteya bana na bango malamu mpo na kobatela likabo yango ya motuya.

20. Likambo nini baboti basengeli kobosanaka te, mpe yango esengeli kotinda bango na kosala nini?

20 Baboti basengeli kolekisa ntango na bana na bango, kotyela bango likebi, mpe kosala milende mpo na kobɔkɔla bango. Bazali bilenge kaka mpo na mwa bambula. Bosengeli kosombaka ntango mpo na kozala na bango mpe kosalisa bango. Bokomona ete bolekisaki ntango mpamba te. Bakolinga bino. Bóbosana te ete bana bazali likabo oyo Nzambe apesi bino. Bazali libula moko ya motuya mpenza! (Nzembo 127:3-5) Yango wana, bóbatela bango lokola eloko ya motuya mingi, mpo bokozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe na ndenge oyo bozali kobɔkɔla bango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova. Talá mokapo 40, “Ndenge ya kosepelisa Nzambe.”

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini baboti basengeli kobatela bana na bango mingi koleka lelo oyo?

• Mateya ya ndenge nini epesaka bwanya?

• Wapi makambo ya ntina oyo bosengeli kosololaka na bana na bino?

• Ndenge nini buku Moteyi esalisi baboti mpo na koteya bana na bango?

[Etanda/Bililingi na nkasa 18,19]

Buku mpo na bato nyonso

Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene ebongisami mpo na kosalisa baboti to mikóló mosusu batángelaka bana mateya ya Yesu klisto mpe balimbolelaka bango yango. Nzokande, mikóló oyo batángaki mokanda yango bapesaki botɔndi mpenza mpo na makambo oyo bayekolaki.

Mobali moko oyo afandaka na Texas, na États-Unis, alobaki ete: “Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene ezali koloba makambo na ndenge ya pɛtɛɛ, ezali kolendisa bato ya mbula nyonso, ata lokola ngai oyo nazali na mbula 76. Maloba oyo ya matɔndi euti epai na ngai, moto oyo asaleli Yehova banda bolenge.”

Motángi moko ya Londres, na Angleterre, alobi boye: “Bililingi kitoko oyo ezali na kati ya buku yango esimbaka mitema ya baboti mpe ya bana lokola. Lolenge oyo bakomi buku yango mpe mituna na yango ezali kitoko mingi, mpe makambo oyo ezali na kati ezali kosimba mpenza mitema, na ndakisa mokapo 32 oyo elobi, ‘Ndenge babatelaki Yesu.’” Asukisaki na maloba oyo: “Atako bakomaki buku yango mpenzampenza nde mpo na bana ya Batatoli ya Yehova, nakanisi ete balakisi ná bato mosusu bakosepela mpe kozwa buku yango. Nazali mpenza na mposa ya kosalela buku yango na basanza mpe bambula oyo ezali koya.”

Mwasi moko oyo afandaka na Massachusetts, na États-Unis, alobelaki ebele ya “bililingi oyo ebongisamá malamu.” Akomaki boye: “Namoni ete ata soki buku yango ekomamaki mpo na bana, makambo oyo balobeli na kati na yango ekoki mpe kosalisa mikóló bákanisa na ntina na boyokani na bango na Yehova.”

Mwasi moko oyo afandaka na engumba Maine, na États-Unis, alobaki boye: “Oyo buku kitoko! Buku yango ezali kaka mpo na bana te, kasi mpo na biso nyonso oyo tozali bana ya Nzambe. Esimbi mpenza motema mpe makanisi na ngai, mpe ememeli ngai kimya. Nakómi mpenza komona Yehova lokola Tata na ngai. Alongoli bampasi nyonso oyo namonaki na boumeli ya bambula mpe alakisi ngai mokano na ye polele.” Asukisi boye: ‘Nasɛngi na moto nyonso atánga buku yango.’

Mwasi moko oyo afandaka na engumba ya Kyoto na Japon, alobaki ete ntango azalaki kotángela bankɔkɔ na ye buku yango, bazalaki kotuna ye mituna lokola: “‘Mwana mobali oyo azali kosala nini? Mpo na nini bazali kogangela mwana mwasi oyo? Mama oyo azali kosala nini? Bongo nkɔsi oyo?’ Buku yango eteyaka makambo oyo esepelisaka biso, yango wana nalingi yango mingi koleka buku mosusu nyonso oyo ezali na bibliotɛkɛ.”

Tata moko na engumba ya Calgary, na Canada, alobi ete ntango kaka azwaki buku yango, abandaki mbala moko kotángela mwana na ye ya mwasi ya mbula motoba ná oyo ya mobali ya mbula libwa. Alobi ete: “Bana basepelaki mbala moko na buku yango. Bazalaki kolanda na likebi mpenza mpe kopesa biyano oyo euti na motema. Bazalaki komipesa mpenza na boyekoli, mpe yango esalisaki bango babimisaka makanisi na bango. Bakómaki kosepela mingi mpe mwana na ngai ya mwasi alobaki ete alingi ayekolaka buku yango butu nyonso.”

Tata yango alobi boye: Mokolo moko, nsima ya boyekoli, “nasololaki na mwana na ngai ya mobali na boumeli ya ebele ya bangonga na ntina na Yehova mpe mikano na ye. Atunaki ngai mituna mingi na makambo oyo ayekolaki. Natangisaki mpisoli ntango alobaki na ngai, tata, lala malamu mpe atunaki ngai, ‘tokosolola lisusu boye mokolo mosusu? Nazali na mituna mingi mpe nalingi koyeba makambo nyonso na ntina na Yehova.’”

[Elilingi na lokasa 15]

Baboti, liteya nini bokoki kozwa na ndakisa ya Manoa?

[Elilingi na lokasa 16]

Bilenge, liteya nini bokoki kozwa na ndakisa ya Baebele misato?

[Bililingi na lokasa 17]

Bililingi mpe maloba mpo na kolimbola bililingi oyo ezali na buku “Moteyi” esalisaka mpenza mpo na koteya bana

Likambo nini ya lokuta Anania azali koyebisa Petelo?

Nani akoki komona makambo nyonso oyo tozali kosala?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto