Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/4 lok. 29
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Ozali komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Makambo etali Afrika
    Lamuká!—2015
  • Bato bazali koluka likabo eleki malamu ya kopesa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Tokoki kolonga kanyaka na mopanga ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/4 lok. 29

Mituna ya batángi

Soki moklisto apesi mosali moko ya Leta likabo mpo na mosala malamu oyo asali, yango ezali nde kanyaka?

Ezala bazali esika nini, baklisto balukaka kosalela bwanya na makambo oyo esalemaka na mboka na bango, bayebaka ete makambo oyo endimami na bato nyonso mpe na mibeko ya mboka moko ekoki kondimama te na bato mpe na mibeko ya mboka mosusu. (Masese 2:6-9) Kasi, moklisto asengeli koyebaka ete moto oyo alingi “kofanda na hema ya Yehova,” asengeli te kofutaka kanyaka.​—Nzembo 15:1, 5; Masese 17:23, NW.

Kanyaka ezali nini? Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete “kanyaka elimboli kopesa eloko moko ya valɛrɛ epai ya . . . mokonzi moko, mpo alongisa yo na likambo to asalela yo likambo moko oyo mobeko epekisi.” Na yango, ezala esika nini moto azali, kofuta kanyaka ezali kopesa mbongo to likabo moko epai ya zuzi to mokonzi ya bapolisi mpo alongisa biso na likambo ya mabe oyo tosalaki to mpe kokanga mokonzi ya bapolisi miso na libunga oyo tosalaki. Soki na ndakisa moto apesi likabo moko mpo básalela ye malamu, na ndakisa bátya nkombo na ye na esika ya liboso na liste moko to mpo bálekisa ye liboso, yango mpe ezali kanyaka. Kosala bongo ezali mpe kozanga bolingo.​—Matai 7:12; 22:39.

Kasi, kopesa mokonzi moko likabo mpo asalela biso mosala moko oyo ebuki mobeko te to mpo bányokola biso te, yango ezali mpe kanyaka? Na ndakisa, na bamboka mosusu, bakonzi bakoki koboya kokomisa bana na kelasi, koboya kondima moto na lopitalo, to koboya kopesa moto mikanda asala mobembo tii ntango bakofuta bango kanyaka. To mpe bakoki koumela kopesa moto mikanda mpo abanda kosala mosala moko.

Kopesa makabo mpe ndenge oyo bato bátalelaka yango ezali ndenge moko te na bamboka nyonso. Na bamboka oyo bato balingaka kaka opesa bango mbongo liboso basalela yo mosala, baklisto mosusu bamonaka ete lokola mobeko epekisi yango te, kosala bongo ezali kobuka mitinda ya Biblia te. Na mikili mosusu, bato bakoki kutu komona ete kofuta mbongo ya ndenge wana ezali lokola likabo oyo bapesaka mpo na kobakisela bango mwa mbongo likoló ya lifuta ya moke oyo bazwaka. Likambo ya ntina oyo tosengeli kobosana te ezali ete bokeseni ezali kati na kokabela moto eloko mpo na mosala oyo asaleli yo ná kofuta kanyaka mpo asalela yo likambo oyo mobeko epekisi.

Epai mosusu, ntango bazali kosɛnga likambo moko epai ya bakonzi, Batatoli ya Yehova mosusu baboyaka kofuta kanyaka epai ya bato ya mibeko, bakonzi ya mboka, to bato mosusu ata soki likambo yango esalemaka epai bazali. Lokola Batatoli bayebani epai bafandi lokola bato ya kolongobana mpe ya bosembo, mbala mosusu basalelaka bango makambo oyo basalelaka bato mosusu kaka soki bapesi likabo.​—Masese 10:9; Matai 5:16.

Na mokuse, mosaleli ya Yehova mokomoko nde asengeli kozwa ekateli ya kopesa likabo to te soki alingi básalela ye mosala moko to soki aboyi básala ye makambo oyo elongobani te. Likambo eleki ntina, asengeli kozwa ekateli oyo ekotungisa lisosoli na ye te, oyo ekofingisa nkombo ya Yehova te, mpe oyo ekobɛtisa bato mosusu libaku te.​—Matai 6:9; 1 Bakolinti 10:31-33; 2 Bakolinti 6:3; 1 Timote 1:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto