Tokoki koyikela komekama nyonso mpiko!
EZALI na komekama moko oyo ezali kotungisa yo? Ozali komiyoka ete olɛmbi mpe okoka te koyikela yango mpiko? Mbala mosusu ozali kokanisa ete likambo yango ekómeli kaka yo mpe ete ndenge ya kosilisa yango ezali te? Soki ezali bongo, kolɛmba te! Ata soki tokutani na komekama ya motindo nini, Biblia eyebisi biso ete Nzambe akoki kopesa biso makasi ya kolonga yango.
Biblia elobi ete basaleli ya Nzambe bakokutana “na komekama ya ndenge na ndenge.” (Yakobo 1:2) Tótya likebi na maloba “ndenge na ndenge” (na Grɛki poïkilos). Na ntango ya kala, liloba yango ya Grɛki ezalaki kolimbola “mingi mpe ya ndenge na ndenge” to “ya langilangi” mpe ezali komonisa “mitindo ndenge na ndenge ya mikakatano.” Na yango, na elobeli ya elilingi “komekama ya ndenge na ndenge” ezali lokola komekama oyo ezali na langi ndenge na ndenge. Atako bongo, Yehova azali kosalisa biso tóyikela mokomoko na yango mpiko. Nini ekoki kondimisa biso yango?
“Boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge”
Ntoma Petelo akomaki ete baklisto “bakoyokisama mpasi na komekama ndenge na ndenge.” (1 Petelo 1:6) Na nsima, alobaki ete boboto monene ya Nzambe emonisami na “mitindo ndenge na ndenge.” (1 Petelo 4:10) Maloba “na mitindo ndenge na ndenge” ebongolami na lolenge moko ya liloba yango ya Grɛki. Molimboli moko ya maloba ya Biblia akomaki boye: “Likanisi wana ezali mozindo. . . . Kolobela ngɔlu [to boboto monene] ya Nzambe lokola poïkilos elimboli ete ezali na motindo moko te ya makambo ya bato oyo ngɔlu ya Nzambe ekoki te kolonga yango.” Abakisi lisusu ete: “Ezali te na komekama, to mokakatano, to mpe likambo ya mbalakaka, oyo ngɔlu ya Nzambe ekoki kolonga yango te. Liloba poïkilos ezali kozongisa na makanisi na biso ngɔlu ya Nzambe oyo Biblia elobi ete ezali lokola na langi ndenge na ndenge, oyo ekoki mpenza kosalisa biso tóyikela makambo nyonso mpiko.”
Boboto monene ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólonga komekama
Petelo alobaki ete lolenge moko oyo Nzambe azali komonisa boboto monene na ye ezali na nzela ya bato ya ndenge na ndenge oyo bazali na lisangá ya boklisto. (1 Petelo 4:11) Mosaleli mokomoko ya Nzambe azali na makabo ya elimo, to makoki, oyo akoki kosalela mpo na kolendisa baoyo bazali kokutana na komekama. (Baloma 12:6-8) Na ndakisa, bandeko mosusu na kati ya lisangá bazali bateyi malamu. Maloba na bango ya bwanya elendisaka mpe etindaka basusu na koyika mpiko. (Nehemia 8:1-4, 8, 12) Bamosusu bakendaka mbala na mbala kotala baoyo bazali na mposa ya lisalisi mpo na kolendisa bango. Ntango bakendaka kotala bandeko ndenge wana, bazwaka mpenza mabaku ya kolendisa bango, ‘mitema na bango ebɔndisamaka’ mpenza. (Bakolose 2:2) Ntango bakɛngɛli bakendaka kolendisa kondima ya basusu na ndenge yango, bapesaka bango likabo ya elimo. (Yoane 21:16) Ezali mpe na bandeko mosusu oyo bayebani ete bayebaka kopesa esengo, bazalaka na motema mawa mpe na bolingo mingi epai ya bandeko oyo bakómi mawamawa mpo na mikakatano. (Misala 4:36; Baloma 12:10; Bakolose 3:10) Lolenge oyo bandeko mibali mpe basi wana ya bolingo bamityaka na esika ya basusu mpe basalisaka bango, ezali lolenge moko oyo Nzambe asalelaka mingi mpo na komonisa boboto monene na ye.—Masese 12:25; 17:17.
“Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
Libosoliboso, Yehova ye moko nde abɔndisaka. Azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe nguya oyo elimo santu epesaka ezali lolenge ya ntina mingi oyo Yehova asalelaka mpo na koyanola na mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga lisalisi. (Yisaya 30:18, 21; Luka 11:13; Yoane 14:16) Elaka oyo ntoma Paulo apesaki ekoki kolendisa biso. Alobaki boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama, akobongisela mpe bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Bakolinti 10:13.
Ya solo, ata soki komekama oyo tozali kokutana na yango ezali “langi” to motindo ndenge nini, ekozala mpe na “langi” to lolenge moko ya boboto monene ya Nzambe oyo ekosalisa biso tóyikela yango mpiko. (Yakobo 1:17) Lisalisi oyo Yehova apesaka basaleli na ye na ntango oyo ebongi, ata soki bazali kokutana na komekama to mikakatano ya ndenge nini, ezali komonisa “bwanya ya Nzambe oyo ezali na mitindo ndenge na ndenge.” (Baefese 3:10) Ondimi yango?
[Bililingi na lokasa 31]
Yehova asalisaka biso tóyikela komekama na biso mpiko