‘Bazali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu’
“Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo . . . akoyeisa nsango malamu ya [eloko moko oyo eleki malamu, NW].”—YISAYA 52:7.
1, 2. (a) Makambo nini ya nsɔmɔ ezali kosalema mokolo na mokolo? (b) Bato mingi bamiyokaka ndenge nini mpo na bansango ya mabe oyo bazali koyoka ntango nyonso?
LELO, na mokili mobimba bansango ya mabe etondi nde kotonda. Soki ofungoli radio, okoyoka nsango ya bamaladi mabe oyo ezali koboma ebele ya bato. Na televizyo, tomonaka bililingi ya nsɔmɔ ya bana mike oyo bazali mpenza konyokwama na nzala mpe bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi. Soki otángi bazulunalo, okomona bansango ya babɔmbi oyo ebebisi bandako, mpe ebomi ebele ya bato oyo basali eloko te.
2 Ya solo, makambo ya nsɔmɔ mpenza ezali kosalema mokolo na mokolo. Makambo ya mokili oyo ezali mpenza kobongwana mpe kokóma lisusu mabe koleka. (1 Bakolinti 7: 31) Zulunalo moko na Mpoto elobaki ete emonanaka ntango mosusu lokola nde mokili mobimba elingi “kobebisama nyɛɛ.” Yango wana, tokoki kokamwa te ete ebele ya bato bazali kotungisama na makanisi! Na États-Unis, batunaki bato bápesa makanisi na bango mpo na bansango oyo elekaka na batelevizyo; moko na bango apesaki makanisi na ye, oyo na ntembe te emonisi ndenge bamilio ya bato bakanisaka; alobaki boye: ‘Soki nalandi bansango na televizyo, nayokaka mawa makasi mpenza. Okoyoka kaka basango ya mabe. Natikalaka kaka monɔkɔ polele.’
Nsango oyo moto nyonso asengeli koyoka
3. (a) Wapi nsango malamu oyo Biblia ezali kosakola? (b) Mpo na nini opesaka motuya mingi na nsango malamu ya Bokonzi?
3 Na mokili oyo etondi na makambo ya mabe, nsango ya malamu ekoki mpe kozala? Ɛɛ, ekoki kozala! Tobɔndisami mpenza na koyeba ete Biblia ezali kosakola nsango malamu. Nsango yango ezali koyebisa ete Bokonzi ya Nzambe ekosukisa maladi, nzala, mobulu, bitumba mpe makambo nyonso ya mabe. Omoni te ete yango nde nsango oyo moto nyonso azali na mposa ya koyoka? Biso Batatoli ya Yehova tozali kokanisa mpenza bongo. Yango wana, toyebani na bisika nyonso mpo na molende na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato ya bikólo nyonso.—Matai 24:14.
4. Wapi makambo etali mosala na biso ya kosakola oyo tokotalela na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi?
4 Kasi, tokoki mpenza kosala nini mpo tókoba kosakola nsango malamu yango na molende, ata na bisika oyo bato basepelaka mpenza na yango te? (Luka 8:15) Na ntembe te, makambo misato ya ntina oyo etali mosala na biso ya kosakola, oyo tokozongela na mokuse awa, ekosalisa biso tókoba kosala mosala yango na molende. Tokoki kotalela (1) Eloko oyo etindaka biso tósakola, to ntina oyo tosakolaka; (2) Nsango na biso, to makambo oyo tosakolaka; mpe (3) Mayele oyo tosalelaka mpo na kosakola, to lolenge oyo tosakolaka. Soki tozali ntango nyonso kosakola nsango na biso na makanisi ya malamu, na maloba ya polele mpe mpe na lolenge ya malamu mpenza, tokopesa ebele ya bato na mokili mobimba libaku ya koyoka nsango oyo eleki malamu, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.a
Ntina oyo tosakolaka nsango malamu
5. (a) Wapi likambo ya libosoliboso oyo etindaka biso tósakola nsango malamu? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete kotosa etinda ya Biblia ya kosakola nsango malamu emonisaka ete tolingaka Nzambe?
5 Tótalela sikoyo likambo ya liboso, elingi koloba eloko oyo etindaka biso tósakola. Ntina nini tosakolaka nsango malamu? Ezali kaka mpo na ntina oyo Yesu azalaki kosala yango. Yesu alobaki boye: “Ngai nalingaka Tata.” (Yoane 14:31; Nzembo 40:8) Tosakolaka nsango malamu libosoliboso mpo tolingaka Nzambe. (Matai 22:37, 38) Biblia emonisi boyokani oyo ezali kati na kolinga Nzambe mpe mosala ya kosakola na maloba oyo: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka [mibeko] na ye.” (1 Yoane 5:3; Yoane 14:21) Etinda ya ‘kokende kokómisa bato bayekoli’ ezali mpe na kati ya mibeko ya Nzambe? (Matai 28:19) Ɛɛ. Ya solo, Yesu nde apesaki etinda wana, kasi ezalaki libosoliboso nde etinda ya Yehova. Na ndenge nini? Yesu alobaki boye: “Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoane 8:28; Matai 17:5) Na yango, soki tozali kotosa etinda ya kosakola nsango malamu, tokomonisa Yehova ete tolingaka ye.
6. Na ndenge nini bolingo na biso mpo na Nzambe etindaka biso tósakola nsango malamu?
6 Lisusu, bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tósakola nsango malamu mpo tolingi kosukisa lokuta oyo Satana azali kobukela ye. (2 Bakolinti 4:4) Satana abimisá ntembe na ntina na lotomo ya Nzambe ya koyangela. (Genese 3:1-5) Biso Batatoli ya Yehova tozali na mposa ya komonisa polele lokuta ya Satana mpe ya kosantisa nkombo ya Nzambe liboso ya bato. (Yisaya 43:10-12) Lisusu, tosakolaka nsango malamu mpo toyebi malamu bizaleli mpe banzela ya Yehova. Tomonaka ye mpenza moninga na biso mpe tozali na mposa makasi ya koyebisa basusu makambo ya Nzambe na biso. Kutu, bolamu ya Yehova mpe banzela na ye ya sembo ezali komemela biso esengo monene, yango wana tokoki te kotika koyebisa bato makambo na ye. (Nzembo 145:7-12) Tosepelaka mpenza kokumisa boyengebene na ye mpe kosakola “bizaleli malamu” na ye epai ya bato oyo bandimi koyoka biso.—1 Petelo 2:9; Yisaya 43:21.
7. Longola bolingo mpo na Nzambe, wapi likambo mosusu ya ntina oyo etindaka biso tósakola nsango malamu?
7 Ezali mpe na likambo mosusu ya ntina oyo ezali kotinda biso tókoba kosakola: Mposa ya kobɔndisa bato oyo bazali kotungisama na bansango ya mabe oyo etondi na mokili mpe baoyo bazali konyokwama mpo na bantina ndenge na ndenge. Na likambo yango, tosalaka nyonso mpo na komekola Yesu. Tótala na ndakisa lisolo oyo ezali na Malako mokapo 6.
8. Lisolo ya Malako mokapo 6 emonisi nini na ndenge oyo Yesu azalaki koyoka mpo na bato?
8 Bantoma bauti na mosala ya kosakola mpe bazali koyebisa Yesu makambo nyonso oyo basalaki mpe oyo bateyaki. Yesu amoni ete bantoma balɛmbi mpe alobi na bango bálanda ye mpo bákende ‘kopema mwa moke.’ Bakɔti na masuwa mpe bakei na esika moko oyo bato bazali te. Bato balandi bango na makolo pembenipembeni ya mai, mpe mosika te bakómi na esika oyo bango bazali. Yesu asali nini? Biblia elobi boye: “Amonaki ebele mpenza ya bato, kasi mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate bazangi mobateli. Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.” (Malako 6:31-34) Atako Yesu alɛmbi, akobi kosakwela bato nsango malamu mpo ayokeli bango mawa. Emonani ete Yesu amitye mpenza na esika ya bato wana.
9. Liteya nini tozwi na Malako mokapo 6 mpo na ntina oyo tosakolaka?
9 Tozwi liteya nini na lisolo yango? Biso baklisto tomonaka ete tozali na mokumba ya kosakola nsango malamu mpe ya kokómisa bato bayekoli. Tondimaka komema mokumba ya kosakwela bato nsango malamu mpo toyebi ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika.” (1 Timote 2:4) Nzokande, totalelaka mosala na biso ya kosakola kaka lokola nyongo te, kasi tosalaka yango mpe mpo tozali na mawa ya bato. Soki tozali mpenza koyokela bato mawa ndenge Yesu azalaki koyokela bango, motema na biso ekotinda biso tósala nyonso mpo na kokóba kosakwela bango nsango malamu. (Matai 22:39) Soki tozali komipesa na mosala ya kosakola mpo na bantina wana ya malamu, tokokoba kosakola nsango malamu kozanga kotika.
Nsango na biso: nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe
10, 11. (a) Ndenge nini Yisaya alobelaki nsango oyo tosakolaka? (b) Ndenge nini Yesu ayeisaki nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu, mpe ndenge nini basaleli ya Nzambe na ntango na biso bazali kolanda ndakisa ya Yesu?
10 Ezali boni mpo na nsango na biso, oyo ezali likambo ya mibale etali mosala na biso ya kosakola? Makambo nini tosakolaka? Mosakoli Yisaya alobelaki nsango oyo tosakolaka na maloba kitoko oyo: “Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu ya [eloko moko oyo eleki malamu], ye oyo akosakola kobikisama, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo [akómi] mokonzi.”—Yisaya 52:7.
11 Likanisi ya ntina na vɛrsɛ yango, “Nzambe na yo akómi mokonzi,” emonisi mpenza nsango oyo tosengeli kosakola: nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Malako 13:10) Simbá mpe ete makambo nyonso oyo vɛrsɛ yango elobi na ntina na nsango oyo tosakolaka ezali kaka ya malamu. Yisaya asaleli maloba lokola “kobikisama,” “nsango malamu,” “kimya,” mpe ‘eloko oyo eleki malamu.’ Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), ebele ya bikeke na nsima ya Yisaya, Yesu akokisaki esakweli yango mpe apesaki ndakisa malamu mpenza ya kosakola na molende nsango ya eloko moko oyo eleki malamu, Bokonzi ya Nzambe oyo esengelaki koya. (Luka 4:43) Na ntango na biso, mingimingi kobanda na 1919, Batatoli ya Yehova bazali kolanda ndakisa ya Yesu mpe bazali kosakola na molende mpenza nsango ya Bokonzi ya Nzambe oyo etyamá na likoló mpe makambo ya malamu oyo Bokonzi yango ekomemela bato.
12. Bato oyo bandimaka nsango malamu ya Bokonzi bazwaka matomba nini?
12 Matomba nini bato oyo bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi bazali kozwa? Lelo oyo, ndenge kaka ezalaki na ntango ya Yesu, nsango malamu ezali kopesa bato elikya mpe ezali kobɔndisa bango. (Baloma 12:12; 15:4) Ezali kopesa bato ya mitema sembo elikya, mpo ezali kosalisa bango báyeba ete eleko moko ya malamu mpenza ezali koya. (Matai 6:9, 10; 2 Petelo 3:13) Elikya yango ezali mpenza kosalisa bato oyo babangaka Nzambe bázala na kobanga te mpo na mikolo ezali koya. Mokomi ya Nzembo alobaki ete bato ya ndenge wana ‘bakobanga nsango mabe te.’—Nzembo 112:1, 7.
Nsango oyo ‘ekobongisa batutami na motema’
13. Ndenge nini mosakoli Yisaya amonisaki mapamboli oyo bato oyo bandimaka nsango malamu bazwaka?
13 Lisusu, nsango malamu oyo tozali kosakola ebɔndisaka bato oyo bayokaka yango mpe ememelaka bango mapamboli. Ndenge nini? Mosakoli Yisaya amonisaki mapamboli yango mosusu ntango asakolaki ete: ‘Elimo ya Nkolo Mokonzi Yehova ezali likoló na ngai, mpo ete Yehova apakoli ngai mpo na koyeisa nsango malamu epai ya bato ya komikitisa, atindi ngai kobongisa batutami na motema; kosakola bonsomi epai ya bakangami mpe kofungwama ya miso epai ya bato ya bolɔkɔ; kosakola mbula ya boboto ya Yehova mpe mokolo oyo Nzambe na biso akozongisa mabe; kobɔndisa bato nyonso oyo bazali kolela.’—Yisaya 61:1, 2, NW, Luka 4:16-21.
14. (a) Maloba “kobongisa batutani na motema” ezali komonisa nini mpo na nsango ya Bokonzi? (b) Ndenge nini tomonisaka bolingo ya Yehova epai ya baoyo bazali na mawa na mitema?
14 Ndenge esakweli yango emonisi, ntango Yesu azalaki kosakola nsango malamu, azalaki “kobongisa batutami na motema.” Oyo nde elilingi kitoko! Ndenge buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi yango, liloba ya Liebele oyo babongoli na “kobongisa” “elimbolaka mingimingi ‘kokanga’ mpota na bande, kotya yango nkisi mpo na kosalisa moto oyo azoki.” Lifulume ya bolingo akangaka mpota na bande mpo na kobatela yango. Ndenge moko mpe, ntango basakoli ya bolingo bazali kosakola nsango ya Bokonzi, basalisaka bato oyo bandimi nsango na bango, oyo bazali konyokwama na lolenge boye to boye. Ntango bazali kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga, bamonisaka bolingo ya Yehova. (Ezekiele 34:15, 16) Mokomi ya nzembo alobaki mpo na Yehova boye: “Azali kobɔndisa baoyo [bazali] na mawa na mitema; azali kokanga mpota na bango.”—Nzembo 147:3.
Ndenge oyo nsango ya Bokonzi ezali kosalisa bato
15, 16. Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ndenge nsango ya Bokonzi ezali kosalisa mpe kolendisa bato oyo bazali na bosɛnga?
15 Ezali na ebele ya masolo oyo ezali komonisa ndenge nsango ya Bokonzi ezali kosalisa mpe kolendisa bato oyo bazali na mawa na mitema. Tózwa ndakisa ya Oreanna, mwasi moko mobange na Amerika ya Sudi, oyo azalaki lisusu na mposa ya bomoi te. Motatoli ya Yehova moko abandaki kokende kotala Oreanna mpe kotángela ye Biblia ná mokanda moko oyo elimbolaka Biblia, Mokanda mpo na masolo ya Biblia.b Na ebandeli, mwasi yango azalaki koyoka Motatoli yango kaka alali na mbeto, miso ya kokangama, mpe mbala na mbala azalaki kobimisa mpema makasi. Kasi mosika te, akómaki kosala makasi ya kofanda na mbeto ntango Motatoli azali kotánga. Nsima ya mwa mikolo, akómaki kozela ndeko oyo azalaki koteya ye Biblia na kiti na salon mpo báyekola. Na nsima, mwasi yango abandaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Makambo oyo azalaki koyekola na makita yango elendisaki ye mpe akómaki kokabolela bato nyonso oyo bazalaki koleka na pembeni ya ndako na ye mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nsukansuka, Oreanna azwaki batisimo na mbula 93 mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Nsango ya Bokonzi ezongiselaki ye mposa ya bomoi.—Masese 15:30; 16:24.
16 Nsango ya Bokonzi esalisaka ata bato oyo bazali na maladi mpe bayebi ete bakobika lisusu te. Tózwa ndakisa ya Maria, mwasi moko na Mpoto. Maria abɛlaki makasi mpe elikya ezalaki lisusu te ete akobika. Likambo yango ezalaki kotungisa ye makasi. Nzokande, ntango akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe ayekolaki mikano ya Nzambe, bomoi na ye ekómaki lisusu na ntina mpenza. Azwaki batisimo mpe akómaki komipesa mpenza na mosala ya kosakola. Na boumeli ya mbula mibale ya nsuka ya bomoi na ye, elikya mpe esengo ezalaki mpenza komonana na elongi na ye. Maria akufaki na elikya makasi ya lisekwa.—Baloma 8:38, 39.
17. (a) Ndenge nini nsango ya Bokonzi ezali kosalisa bato oyo bazali kondima yango? (b) Makambo nini omoná na bomoi na yo oyo ezali kondimisa yo ete Yehova azali “kotɛlɛmisa baoyo nyonso bagumbami.”
17 Masolo wana ezali komonisa ndenge nsango ya Bokonzi ekoki kosalisa bato oyo balingi mpenza koyeba solo ya Biblia. Bato oyo bakufeli moto balendisamaka mpenza ntango bayebi ete elikya ya lisekwa ezali. (1 Batesaloniki 4:13) Bato oyo bazali kotungisama na bobola mpe bazali komona mpasi mpo na koleisa mabota na bango bakómaka komona ete bazali bato mpamba te mpe bazwaka lisusu makasi ntango bayebaka ete Yehova akobosana bango ata moke te soki bazali kaka sembo epai na ye. (Nzembo 37:28) Na lisalisi ya Yehova, bato mingi oyo bazali kotungisama na makanisi mpo na maladi bazwaka lisusu mokemoke makasi, mpe mbala mosusu balongaka ata bamaladi na bango. (Nzembo 40:1, 2) Tomoni ete, na nzela ya nguya ya Liloba na ye, Yehova azali ata sikoyo “kotɛlɛmisa baoyo nyonso bagumbami.” (Nzembo 145:14, NW) Ya solo, ntango tozali komona ndenge nsango malamu ya Bokonzi ezali mbala na mbala kobɔndisa bato oyo batutami na mitema na teritware na biso to na lisangá na biso, yango esalisaka biso tóyeba ete tozali mpenza na nsango oyo eleki malamu na mokili lelo oyo!—Nzembo 51:17.
“Lilɔmbɔ na ngai epai ya Nzambe mpo na bango”
18. Paulo ayokaki ndenge nini ntango Bayuda baboyaki kondima nsango malamu, mpe mpo na nini?
18 Atako tozali na nsango oyo eleki malamu na mokili oyo, bato mingi bazali koyamba yango te. Yango ekoki kosala biso nini? Ndenge kaka esalaki ntoma Paulo. Asakolaki mbala na mbala epai ya Bayuda, kasi mingi kati na bango baboyaki koyamba nsango ya lobiko. Likambo yango esalaki Paulo mpasi mingi. Alobaki boye: “Nazali na mawa monene mpe na mpasi oyo ezali kosila te na kati ya motema na ngai.” (Baloma 9:2) Paulo azalaki na mawa mpo na Bayuda oyo azalaki kosakwela nsango malamu. Esalaki ye mpasi ndenge baboyaki kondima nsango malamu.
19. (a) Mpo na nini tosengeli kokamwa te soki tozali mbala mosusu kolɛmba nzoto? (b) Nini esalisaki Paulo akoba kosakola nsango malamu?
19 Biso mpe tosakolaka nsango malamu mpo tozali na mawa ya bato. Yango wana, tokoki kokamwa te soki ntango mosusu tozali kolɛmba nzoto mpo bato baboyi kondima nsango ya Bokonzi. Mpasi oyo toyokaka mpo na bato oyo tozali kosakwela nsango malamu emonisaka ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo na bango. Kasi, tosengeli te kobosana ndakisa ya ntoma Paulo. Nini esalisaki ye akoba kosakola nsango malamu? Atako ayokaki mawa mpe mpasi ndenge Bayuda baboyaki kondima nsango malamu, alɛmbaki te kosakola epai ya Bayuda mpe akanisaki te ete elikya ezali lisusu te mpo na Bayuda nyonso. Azalaki na elikya ete Bayuda mosusu oyo bakokaki kondima Klisto bazalaki naino. Kutu, mpo na komonisa ndenge azalaki koyoka na motema na ye mpo na Bayuda, Paulo akomaki boye: “Bosepeli ya motema na ngai mpe lilɔmbɔ na ngai epai ya Nzambe mpo na bango ezali mpenza mpo na lobiko na bango.”—Baloma 10:1.
20, 21. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo na mosala na biso ya kosakola? (b) Na lisolo oyo elandi, tokolobela likambo nini oyo etali mosala na biso ya kosakola?
20 Talá makambo mibale ya ntina oyo Paulo amonisaki na maloba na ye. Mposa na ye ezalaki ete Bayuda mosusu bábika mpe abondelaki mpo na likambo yango. Lelo oyo, biso mpe tozali kolanda ndakisa ya Paulo. Tozali kokoba koluka na mposa makasi bato oyo bakoki kondima nsango malamu. Tozali kokoba kobondela Yehova mpo asalisa biso tókutana na bato ya ndenge wana mpo tósalisa bango bálanda nzela oyo ekomema bango na lobiko.—Masese 11:30; Ezekiele 33:11; Yoane 6:44.
21 Nzokande, mpo bato ebele báyoka nsango ya Bokonzi, tosengeli kaka te kotalela ntina oyo tozali kosakola mpe nsango nini tozali kosakola, kasi tosengeli mpe kotalela ndenge nini tosengeli kosakola nsango yango. Yango nde tokotalela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, tokolobela makambo mibale ya liboso. Na lisolo ya mibale, tokolobela likambo ya misato.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Oyekoli makambo nini?
• Mpo na nini tosakolaka nsango malamu?
• Nsango nini mpenza tosakolaka?
• Bato oyo bazali kondima nsango ya Bokonzi bazali kozwa matomba nini?
• Nini ekosalisa biso tókoba kosakola nsango malamu?
[Bililingi na lokasa 18]
Nsango ya Bokonzi ezali kolendisa batutami na motema
[Bililingi na lokasa 20]
Libondeli esalisaka biso tóyika mpiko na mosala na biso ya kosakola