Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
MPO bato báyeba mateya ya solo mpe oyo esepelisaka Nzambe, ye moko Nzambe asengeli komonisa bango makanisi na ye. Asengeli mpe kosala ete bato nyonso bázala na likoki ya koyeba yango. Kasi, ndenge nini bato bakoki koyeba mateya, losambo, mpe etamboli oyo esepelisaka Nzambe? Nzambe alakisi bato makambo yango? Soki ɛɛ, asali yango na nzela nini?
Lokola bomoi ya moto eumelaka mingi te, Nzambe akoki nde kosalela moto moko mpo na koyebisa mokili mobimba makanisi na ye? Te. Kasi, akoki kosala yango na nzela ya buku moko. Na yango, tomoni te ete ebongi Nzambe akoma makanisi na ye na buku moko? Biblia ezali buku moko ya kala mpenza oyo elobi ete epemami na Nzambe. Moko na bato oyo bakomaki yango alobaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Timote 3:16) Tiká tótalela naino Biblia malamu mpo tóyeba soki ezali na mateya ya solo.
Eumeli ntango boni?
Biblia ezali moko ya babuku ya mangomba oyo eumeli mingi koleka. Mbula koleka soki 3 500 eleki banda mikanda na yango ya liboso ekomamaki. Basilisaki kokoma buku yango na mobu 98 T.B.a Atako Biblia ekomamaki na bato 40 mpe mbula 1 600 elekaki banda bakomá mokanda na yango ya liboso tii ntango bakomaki mokanda na yango ya nsuka, mikanda na yango nyonso ezali na boyokani. Ezali bongo mpamba te Nzambe nde azali Mobandisi na yango.
Ezali na buku mosusu te oyo, banda kala, babongolaka mpe bakabolaka yango mingi lokola Biblia. Mbula na mbula, bakabolaka Babiblia soki milio 60, ezala na mobimba to ndambo. Lelo oyo, Biblia mobimba to ndambo ebongolami na minɔkɔ koleka 2 300. Bato nyonso ya mokili longola kaka mwa ndambo moke bakoki kotánga Biblia mobimba to mikanda na yango mosusu na minɔkɔ ya mboka na bango. Buku yango eponi ekólo te, mondɛlɛ to moindo te.
Ebongisami ndenge nini?
Soki ozali na Biblia, okoki kofungola yango mpo omona ndenge ezali na kati.b Fungolá naino na lokasa oyo emonisi makambo ezali na kati. Na Babiblia mingi, lokasa yango ezalaka na ebandeli; kuna, okokuta nkombo ya mokanda mokomoko mpe lokasa epai mokanda yango ebandi. Okomona ete Biblia ezali liboke ya mikanda oyo mokomoko ezali na nkombo na yango. Mokanda ya liboso ezali Genese, mpe ya nsuka, Emoniseli. Mikanda yango ekabwani na biteni mibale. Eteni ya liboso oyo ezali na mikanda 39 ebengami Makomami ya Liebele, mpamba te bakomaki yango mingimingi na monɔkɔ ya Liebele. Eteni mosusu ezali na mikanda 27 oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki; ebengami mpe Makomami ya Grɛki. Bato mosusu babengaka biteni yango: Kondimana (to Boyokani) ya kala mpe Kondimana (to Boyokani) ya sika.
Mikanda ya Biblia ekabolami na mikapo mpe bavɛrsɛ mpo na kosalisa moto amona noki esika oyo asengeli kotánga. Soki na zulunalo oyo bapesi mokapo ya Biblia, nsima ya mokanda ya Biblia motángo ya liboso ezali mokapo ya mokanda yango, mpe motángo oyo elandi ezali vɛrsɛ. Na ndakisa, soki bakomi “2 Timote 3:16,” elingi koloba mokanda ya Mibale ya Timote, mokapo ya misato, vɛrsɛ ya 16. Meká naino koluka mokapo yango na Biblia.
Omoni te ete kotánga Biblia mokolo na mokolo nde lolenge eleki malamu ya koyeba makambo na yango? Bato mosusu bamonaki ete mpo ezala mpasi mingi te, malamu bábanda naino kotánga Makomami ya Grɛki oyo ebandi na mokanda ya Matai. Soki ozali kotánga mikapo misato to mitano mokolo na mokolo, okoki kosilisa kotánga Biblia mobimba na mbula moko. Kasi, nini ekoki kondimisa yo ete makambo oyo ezali na Biblia epemami na Nzambe?
Okoki kotyela Biblia motema?
Soki buku moko epemami na Nzambe mpo na bato nyonso esengeli mpenza kozala na toli oyo ebongi mpe oyo esilaka ngala te! Biblia ezali komonisa ete mobandisi na yango ayebi bato malamu, ata ya eleko nini, mpe mitinda na yango ekoki kosalelama ata lelo oyo. Tokoki komona likambo yango malamu na lisolo ya Yesu Klisto, Mobandisi ya lingomba ya boklisto. Lisolo yango ezali na Matai mokapo 5 tii 7. Babengaka yango Lisolo Likoló ya Ngomba mpe ezali komonisa biso ndenge ya kozala na esengo ya solosolo, ndenge ya kosilisa matata, ndenge ya kobondela, ndenge ya kotalela biloko ya mokili, mpe makambo mosusu. Na lisolo wana, mpe na mikanda mosusu, Biblia ezali komonisa biso polele makambo oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli koboya mpo na kosepelisa Nzambe mpe kozala na bomoi ya malamu.
Ntina mosusu oyo okoki kotyela Biblia motema ezali ete buku yango ya kala soki elobeli makambo ya siansi, elobaka mpenza solo. Na ndakisa, ntango bato bazalaki kokanisa ete mabelé ezali patatalu, Biblia elobelaki “sɛrklɛ ya mabelé.”c (Yisaya 40:22, NW) Lisusu, mbula koleka 3 000 liboso Isaac Newton, moto monene ya siansi, amona ete baplanɛti etambolaka kasi etɛlɛmá esika moko te mpe esimbami na eloko te, Biblia elobaki ete ‘mabelé ekakisami likoló ya eloko te.’ (Yobo 26:7, NW) Tótalela mpe maloba oyo emonisi ndenge oyo mai ebongwanaka; maloba oyo ekomamaki esili koleka mbula soki 3 000: “Bibale nyonso ekotyola kino mai-ya-monana; kasi mai-ya-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” (Mosakoli 1:7) Ya solo, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ azali mpe Mobandisi ya Biblia.
Likambo mosusu oyo ezali komonisa ete Biblia epemami na Nzambe ezali ete masolo na yango ezali makambo ya solo. Makambo oyo Biblia elobi ezali masapo te. Elobeli badati mpe bato ya sikisiki, mpe bisika oyo makambo yango esalemaki. Na ndakisa, Luka 3:1 elobeli “mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tibɛli Kaisala, ntango Ponsi Pilato azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea, mpe Elode azalaki moyangeli ya etúká ya Galilai.”
Bakomi mingi ya masolo ya kala bazalaki kolobela kaka makambo malamu ya bakonzi mpe bitumba oyo balongaki; nzokande, bakomi ya Biblia babombaki eloko moko te, bamonisaki polele ata mabunga oyo bango moko basalaki. Na ndakisa, Davidi, mokonzi ya Yisalaele, alobaki boye: “Nasali lisumu monene mpo ete nasali likambo oyo. . . . Nasali likambo ya zoba mingi.” Maloba wana ekomami polele na Biblia. (2 Samwele 24:10) Moize, moto mosusu oyo akomaki Biblia, akomaki likambo asalaki oyo emonisaki ete atyelaki Nzambe ya solo motema te.—Mituya 20:12.
Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo ezali komonisa ete Biblia epemami na Nzambe. Likambo yango ezali kokokisama ya bisakweli, elingi koloba makambo oyo elobamá liboso mpe esalemaki bambula mingi na nsima. Kati na yango ezali na bisakweli oyo etaleli Yesu Klisto. Na ndakisa, mbula koleka 700 liboso Yesu abotama, Makomami ya Liebele esakolaki polele ete Moto yango oyo alakamaki akobotama “na Beteleme ya Yudea.”—Matai 2:1-6; Mika 5:2.
Tótalela ndakisa mosusu. Na 2 Timote 3:1-5, Biblia elobi boye: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.” Omoni te ete vɛrsɛ yango elobi mpenza ndenge bato mingi bazali lelo oyo? Banda maloba yango ekomamá na mobu 65 T.B., eleki sikoyo mbula 1900!
Biblia eteyaka biso nini?
Ntango obandi kotánga Biblia, okomona mokemoke ete buku yango ezali na bwanya oyo eleki bwanya mosusu nyonso. Ezali kopesa biyano na mituna lokola oyo: Nzambe azali nani? Zabolo azali mpenza? Yesu Klisto azali nani? Mpo na nini tonyokwamaka? Tokendaka wapi soki tokufi? Soki otuni bato mituna yango, moto na moto akopesa yo biyano na kotalela bindimeli mpe mimeseno na ye. Nzokande, Biblia ezali koteya solo na makambo yango mpe na makambo mosusu. Longola yango, ezali na buku mosusu te oyo ezali na mateya malamu koleka Biblia na makambo lokola bizaleli ya malamu, ndenge ya kotalela bato mosusu mpe bakonzi ya Leta.d
Biblia emonisi nini mpo na mokano ya Nzambe mpo na mabelé mpe bato? Epesi elaka oyo: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; . . . Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:10, 11) “Nzambe ye moko akozala elongo na [bato]. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Biblia elaki mpe ete etikali moke bitumba, koboma bato, mobulu, mpe mabe esila. Maladi, bobange, mpe liwa ekozala lisusu te. Bato bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Yango ezali mpenza elikya ya malamu mingi! Yango ezali mpe komonisa ete Nzambe alingaka mpenza bato!
Osengeli kosala nini?
Biblia ezali likabo malamu mingi oyo Mozalisi apesi biso. Ndenge nini osengeli kotalela buku yango? Mobali moko oyo azalaki mondimi ya Lingomba ya Hindu azalaki na makanisi ete mpo mokanda oyo euti na Nzambe ezala mpo na bato nyonso, esengeli kozala mokanda moko oyo ekomamá kala mpenza. Ntango ayebaki ete mikanda mosusu ya Biblia eumeli koleka Veda, mikanda ya kalakala ya Lingomba ya Hindu, azwaki mokano ya kotánga Biblia mpe koyekola yango.e Profɛsɛrɛ moko ya iniversite na États-Unis amonaki mpe ntina ya kotánga mokanda oyo ekabolami mingi na mokili mobimba koleka mikanda mosusu.
Soki ozali kotánga Biblia mpe kosalela mateya na yango, okozwa matomba mingi. Biblia elobi boye: “Esengo ezali na moto oyo . . . mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene ya bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.”f (Nzembo 1:1-3) Soki ozali koyekola Biblia mpe komanyola yango, okozala na esengo mpamba te mposa na yo ya elimo ekokokisama. (Matai 5:3) Biblia ekosalisa yo oyeba ndenge oyo okoki kozala na bomoi oyo ezali na ntina mpe ndenge ya kolonga mikakatano. Ya solo, ‘libonza monene ekomonana wana okotosa [mibeko ya Nzambe oyo ezali na Biblia].’ (Nzembo 19:11) Lisusu, soki otyeli bilaka ya Nzambe motema, okozwa bolamu mingi sikoyo mpe okozala na elikya ya bomoi ya malamu koleka na mikolo ezali koya.
Biblia elendisi biso boye: “Lokola bana babotami sika, bózalaka na mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali ya liloba.” (1 Petelo 2:2) Mwana oyo abotami sika amɛlaka mabɛlɛ mpo azala na bomoi mpe atungisaka mama na ye mpo amɛlisa ye. Ndenge moko mpe, biso tozali mpenza na mposa ya boyebi ya Nzambe na bomoi na biso. Yango wana, ‘tózalaka na mposa makasi’ ya Liloba na ye. Biblia ezali buku ya mateya ya solo oyo euti na Nzambe. Tolendisi yo omityela mokano ya koyekola yango mbala na mbala. Batatoli ya Yehova na mboka to na kartye na bino bakozala na esengo ya kosalisa yo oyeba Biblia malamu. Tozali mpenza kolendisa yo oluka bango. Okoki mpe kokoma mokanda mpe kotinda yango epai ya babimisi ya zulunalo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a T.B. elimboli “ntango na biso”; L.T.B. elimboli “liboso ya ntango na biso.”
b Soki ozali na Biblia te, Batatoli ya Yehova bakosepela kopesa yo yango.
c Na Liebele, monɔkɔ oyo bakomaki Biblia, “sɛrklɛ” oyo balobeli na Yisaya 40:22, ekoki mpe kobongolama na “libungutulu.” Babiblia mosusu ebongoli yango na “zolongano ya mabelé.”—Moffatt.
d Makambo yango elobelami na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
e Balobaka ete banzembo ya libosoliboso ya Veda esalemaki eleki mbula soki 3 000 mpe bazalaki kolakisa yango kaka na maloba. Na buku na ye (A History of India), Saratkumar alobi boye: “Ezali kaka na ekeke ya 14 T.B. nde Veda ekomamaki.”
f Biblia elobi na biso ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Na Babiblia mingi, tokoki kokuta nkombo yango na Nzembo 83:18.
[Elilingi na lokasa 7]
‘Zaláká na mposa makasi’ ya Liloba ya Nzambe. Yekoláká Biblia ntango nyonso
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]
Fɔtɔ ya NASA