“Liwa emɛlami libela na libela”
KANISÁ ete, na esika ya motó ya likambo oyo eyebisaki liwa ya mwana oyo amibomaki, ozali nde kotánga lisolo oyo ezali na motó ya likambo oyo ezali awa na likoló. Ya solo, ata zulunalo moko te esilá kobimisa lisolo oyo ezali na motó ya likambo yango. Kasi, maloba wana ezali na kati ya buku moko oyo eumeli mingi mpenza; buku yango ezali Biblia.
Biblia elimboli polele soki liwa ezali nini. Eyebisi mpe mpo na nini tokufaka, tokendaka wapi soki tokufi, mpe epesi elikya mpo na bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Elobi mpe ete ekozala na ntango moko oyo bato bakoloba ete: “Liwa emɛlami libela na libela.”—1 Bakolinti 15:54.
Biblia esaleli maloba ya pɛtɛɛ mpo na kolimbola liwa. Na ndakisa, na bisika mingi ekokanisi liwa na “mpɔngi,” mpe elobi ete bato oyo bakufá “bazali kolala.” (Nzembo 13:3; 1 Batesaloniki 4:13; Yoane 11:11-14) Elobi lisusu ete liwa ezali “monguna.” (1 Bakolinti 15:26) Likambo eleki ntina, Biblia ezali kosalisa biso tóyeba mpo na nini ekokanisi liwa na mpɔngi, mpo na nini bato bakufaka, mpe ndenge oyo monguna yango akolongolama.
Mpo na nini tokufaka?
Mokanda ya liboso ya Biblia elobeli ndenge oyo Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso, mpe atyaki ye na paladiso. (Genese 2:7, 15) Ntango Nzambe akelaki Adama, apesaki ye mosala, mpe apekisaki ye likambo moko. Mpo na nzete moko oyo ezalaki na kati ya elanga ya Edene, Nzambe alobaki boye: “Osengeli kolya mbuma na yango te, mpo mokolo okolya mbuma na yango okokufa solo.”a (Genese 2:17, NW) Na bongo, Adama ayebaki ete akokaki mpe kokufa. Soki abuki mobeko ya Nzambe, liwa ekoyela ye.
Likambo ya mawa, Adama ná mwasi na ye Eva batosaki te. Baboyaki kolanda mobeko ya Mozalisi na bango, mpe yango ememelaki bango mpasi. Ntango Nzambe ayebisaki bango mpasi oyo lisumu na bango ekomema, alobaki na bango boye: “Ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) Bakómaki bato ya kozanga kokoka. Lokola bakómaki na nzoto ya kozanga kokoka to ya masumu, nsukansuka bakufaki.
Adama ná Eva batikelá bana na bango—bato nyonso ya mokili—lisumu yango. Tokoki koloba ete yango ezali lokola maladi moko oyo ezali na makila. Kaka Adama te nde abungisaki libaku ya kozala na bomoi mpo na libela, kasi atikelaki mpe bana na ye nyonso ezaleli ya kozanga kokoka. Bato nyonso ya mokili bakómaki baombo ya lisumu. Biblia elobi boye: “Yango wana, kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”—Baloma 5:12.
“Lisumu ekɔtaki na mokili”
Lisumu oyo tozwá ezali te eloko oyo emonanaka na miso. “Lisumu” ezali ezaleli ya kozanga kokoka na makanisi mpe na elimo oyo bankɔkɔ na biso ya liboso batikelá biso, mpe yango ememelaka biso mikakatano na nzoto. Kasi, Biblia emonisi ete Nzambe azwaki ebongiseli moko. Ntoma Paulo alobi boye: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Na mokanda na ye ya liboso oyo akomelaki Bakolinti, Paulo alobaki likambo moko oyo ezali na ndimbola monene: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Klisto.”—1 Bakolinti 15:22.
Tomoni ete Yesu Klisto azali na mokumba moko ya ntina mingi mpo na kolongola lisumu mpe liwa. Alobaki ete ayaki na mabelé mpo na “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Tokoki kokokanisa likambo yango na moto moko oyo bakangi ye mpe bazali kosɛnga motuya moko boye ya mbongo mpo bátika ye. Mpo na biso, lisiko oyo ekoki kobikisa biso na lisumu mpe na liwa ezali bomoi ya kokoka ya Yesu.b—Misala 10:39-43.
Mpo na kopesa lisiko, Nzambe atindaki Yesu awa na mabelé mpo akaba bomoi na ye lokola mbeka. “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye . . . azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Liboso Klisto akaba bomoi na ye lokola mbeka, ‘apesaki litatoli na ntina etali solo.’ (Yoane 18:37) Ntango azalaki kosakola, asalelaki mpe mabaku mosusu mpo na kolimbola soki liwa ezali mpenza nini.
“Mwana mwasi oyo ya moke . . . alali nde mpɔngi”
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé ayebaki malamu soki liwa ezali nini. Azalaki koyoka mawa ntango bato bazalaki kokufa, mpe ayebaki malamu ete mosika te ye moko mpe akokufa. (Matai 17:22, 23) Ekoki mpenza kozala ete moninga na ye Lazalo akufaki mwa basanza liboso Yesu abomama. Lisolo yango ezali kosalisa biso tóyeba ndenge Yesu azalaki kotalela liwa.
Ntango kaka Yesu azwaki nsango ya liwa ya Lazalo, alobaki boye: “Lazalo moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” Bayekoli balobaki ete soki Lazalo azali kaka kopema, akoyoka malamu. Yango wana, Yesu ayebisaki bango polele ete: “Lazalo akufi.” (Yoane 11:11-14) Tomoni ete Yesu azalaki kotalela liwa lokola mpɔngi. Atako ekoki kozala mpasi tóyeba soki liwa ezali nini, kasi toyebi eloko babengi mpɔngi. Ntango tolalaka mpɔngi makasi, toyebaka te ete ntango ezali koleka mpe makambo oyo ezali kosalema. Biblia emonisi mpenza ete liwa ezali bongo. Mosakoli 9:5 elobi ete: “Bakufi bayebi likambo te.”
Yesu akokanisaki mpe liwa na mpɔngi mpamba te, na nguya ya Nzambe, bato bakoki kolamusama na liwa. Mokolo moko, Yesu akendaki na libota moko oyo bazalaki na mawa mpo mwana na bango ya mwasi ya moke akufaki. Yesu alobaki boye: “Mwana mwasi oyo ya moke akufi te, kasi alali nde mpɔngi.” Na nsima, apusanaki pembeni ya mwana, asimbaki ye na lobɔkɔ mpe mwana yango “atɛlɛmaki.” Na maloba mosusu, mwana yango alamukaki na liwa.—Matai 9:24, 25.
Yesu alamusaki mpe moninga na ye Lazalo na liwa. Kasi, liboso ya kosala likamwisi yango, abɔndisaki Malata, ndeko ya Lazalo na maloba oyo: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Mpe ye alobaki na elikya nyonso ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Yoane 11:23, 24) Malata azalaki na elikya ete basaleli nyonso ya Nzambe oyo bakufá, bakosekwa.
Kosekwa elakisi mpenza nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lisekwa” (anastasis) elimboli “kotɛlɛma.” Ezali kopesa likanisi ya kolamuka. Bato mosusu bakoki kokakatana mpo na kondima yango; kasi, nsima ya koloba ete bato oyo bakufá bakoyoka mongongo na ye, Yesu abakisaki ete: “Bókamwa te mpo na yango.” (Yoane 5:28) Ndenge Yesu asekwisaki bato ntango azalaki awa na mabelé, endimisi biso bilaka ya Biblia oyo emonisi ete bakufi oyo Nzambe abombá na makanisi na ye bakolamuka na “mpɔngi” molai oyo balali. Emoniseli 20:13 elobi boye: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Hadesi [lilita] ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango.”
Bato yango bakosekwa mpo bánuna mpe bákufa lisusu, ndenge yango ekómelaki Lazalo? Mokano ya Nzambe ezali bongo te. Biblia epesi biso elikya ete ekozala na ntango moko oyo “liwa ekozala lisusu te”; yango wana bato bakobanda lisusu konuna te mpe kokufa te.—Emoniseli 21:4.
Liwa ezali mpe monguna. Bato bazali na banguna mingi, na ndakisa maladi, bobange, oyo ememaka mpe bampasi mingi. Nzambe alaki ete akolongola yango nyonso, na nsuka akolongola monguna monene ya bato. “Liwa, oyo ezali monguna ya nsuka, akobebisama nyɛɛ.”—1 Bakolinti 15:26.
Ntango elaka yango ekokokisama, bato bakozala na bomoi ya kokoka, oyo ezangi lisumu mpe liwa. Kasi, liboso ete yango esalema, tokoki kobɔndisama na koyeba ete bandeko na biso oyo bakufá bazali kopema, mpe soki Nzambe abombá bango na makanisi na ye, bakosekwa na ntango oyo ye abongisi.
Koyeba soki liwa ezali nini ekoki kobongisa bomoi ya moto
Koyeba soki liwa ezali nini mpe elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá ekoki kosala ete tótalela bomoi ndenge mosusu. Ian, oyo tolobelaki na lisolo eleki, azalaki na mbula koleka 20 ntango ayekolaki oyo Biblia ezali koloba mpo na liwa. Alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete tata na ngai azali esika moko boye. Yango wana, ntango nayekolaki ete azalaki kaka kolala mpɔngi, nalɛmbaki nzoto.” Kasi, ntango Ian atángaki elaka ya Nzambe ya kosekwisa bakufi, asepelaki makasi na koyeba ete akokaki lisusu komona tata na ye. Alobi boye: “Ezalaki mbala ya liboso na bomoi na ngai nayoka kimya ya motema ndenge wana.” Lokola ayebaki malamu soki liwa ezali nini, yango epesaki ye kimya ya makanisi oyo ekitisaki motema na ye.
Clive ná Brenda bakufelaki mwana na bango ya mobali Steven, oyo azalaki na mbula 21, na aksida oyo tolobelaki na lisolo eleki. Atako bayebaki oyo Biblia ezali koloba mpo na liwa, bayokaki mawa makasi mpo na liwa ya mwana na bango. Ya solo, liwa ezali monguna, mpe epesaka mpasi. Lokola bayebaki na lisalisi ya Biblia soki bato bakendaka wapi nsima ya liwa, boyebi yango ezalaki kokitisa bango mpasi mokemoke. Brenda alobi boye: “Boyebi oyo tozali na yango mpo na liwa esalisaki biso tózongela bomoi na biso ndenge ezalaki liboso. Ya solo, mokolo elekaka te kozanga ete tókanisa ntango oyo Steven akolamuka na mpɔngi makasi oyo alali.”
“Liwa, wapi etubeli na yo?”
Ya solo, koyeba soki bato oyo bakufá bazali wapi ekoki kosalisa biso tótalela bomoi na ndenge ya malamu. Tosengeli te kotalela liwa lokola likambo moko oyo ekoki kolimbolama te. Tokoki kozala na bomoi kozanga ete tóyokaka nsɔmɔ ya monguna yango. Koyeba mpe ete liwa esukisaka bomoi na biso mpo na libela te, ezali kosalisa biso tómipesa te na bomoi ya bisengo, mpo tozali kokanisa te ete “bomoi ezali mokuse mpenza.” Koyeba ete mpo na Nzambe, bandeko na biso oyo bakufá bazali kolala mpɔngi mpe bazali kozela lisekwa, ekoki kopesa biso makasi mpe kolendisa biso tókoba bomoi na biso.
Ya solo, tokoki kozela na elikya nyonso mokolo oyo Yehova Nzambe, Mopesi ya bomoi, akolimwisa liwa mpo na libela. Ekozala mpenza esengo mokolo oyo tokotuna boye: “Liwa wapi bolongi na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?”—1 Bakolinti 15:55.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yango ezali mbala ya liboso oyo Biblia elobeli liwa.
b Lisiko oyo esengelaki kofutama ezalaki bomoi ya kokoka mpamba te ezali yango nde Adama abungisaki. Lokola bato nyonso bakómaki bato ya masumu, bomoi ya moto ata moko te ekokaki kopesama lokola lisiko. Yango wana, Nzambe atindaki Mwana na ye awa na mabelé. (Nzembo 49:7-9) Mpo na koyeba likambo yango malamu, talá mokapo 7 ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
Kozanga botosi ya Adama ná Eva ememaki liwa
[Elilingi na lokasa 26]
Yesu asimbaki lobɔkɔ ya mwana oyo akufaki mpe mwana yango atɛlɛmaki
[Elilingi na lokasa 27]
Bato mingi bazali kozela ntango oyo baninga mpe bandeko na bango bakolamuka na liwa, lokola Lazalo