Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/9 nk. 10-12
  • Ponsi Pilato azalaki nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ponsi Pilato azalaki nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala mpe bokonzi ya Pilato
  • Apelisi nkanda ya Bayuda
  • “Solo ezali nini?”
  • Nini ekómelaki Pilato?
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Pilate ná Erode bazwi ye na likambo te
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Epai na Pilato mpe epai na Hérode
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bakabi Yesu mpe bakei koboma ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/9 nk. 10-12

Ponsi Pilato azalaki nani?

NA BUKU na ye (Pontius Pilate), Ann Wroe akomaki boye: “Tozalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na Pilato, moto moko ya kala oyo azalaki kotyola bato mpe azalaki moto ya ntembe. Mpo na bato mosusu azali mosantu, mpo na bamosusu azali ndakisa mpenza ya bomoto, ndakisa ya moto ya politiki oyo akoki kondima kotika moto moko akufa mpo na kobatela kimya.”

Ezala ete ondimaka moko na makanisi wana to te, toyebi ete Ponsi Pilato ayebaná mpo na likambo oyo asalaki Yesu Klisto. Pilato azalaki nani? Makambo nini toyebi mpo na ye? Soki toyebi malamu bokonzi oyo Pilato azalaki na yango, tokokanga malamumalamu ntina ya likambo moko ya monene koleka oyo esalemaki awa na mabelé.

Mosala mpe bokonzi ya Pilato

Na mobu 26 T.B., Tibɛli, amperɛrɛ ya Loma, atyaki Pilato guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Yudea. Bakonzi lokola ye bazalaki na molɔngɔ oyo bazalaki kobenga ordre équestre​—bazalaki na nse ya bakonzi oyo bazalaki na sénat. Ekoki kozala ete Pilato azalaki komanda ya basoda to molandi ya komanda; azalaki komata mpɛtɛ na ntango azalaki kokokisa mikumba ndenge na ndenge, mpe akómaki guvɛrnɛrɛ liboso akokisa mbula 30.

Molato ya soda oyo Pilato azalaki kolata ezalaki elamba moko esalemi na mposo ya nyama mpe ebateli-ntolo ya ebende. Ntango azali liboso ya bato, azalaki kolata zambala ya mpɛmbɛ mpe na nsuka na yango ezalaki na langi ya motane-moindo. Ekoki mpenza kozala ete azalaki nsuki mikuse mpe azalaki kolongola mandɛfu nyonso. Atako bato mosusu bakanisaka ete autaki na Espagne, nkombo na ye emonisi ete azalaki moto ya libota ya Pontii, elingi koloba Ba-Samnite oyo bazalaki bato ya bozwi mpe bazalaki kofanda na sudi ya Italie.

Mbala mingi bazalaki kotinda bakonzi lokola Pilato mpo na kozala baguvɛrnɛrɛ na bamboka ya Babarbare (bato bayekolá te). Mpo na Baloma, Yudea ezalaki etúká ya Babarbare. Longola likambo ya kopekisa mobulu, Pilato azalaki mpe kotambwisa misala ya kofutisa mpako. Batribinale ya Bayuda nde ezalaki kokata makambo mikemike; kasi, makambo oyo ezalaki kosɛnga kopesa etumbu ya liwa bazalaki komema yango epai ya guvɛrnɛrɛ, moto oyo azalaki na bokonzi ya nsuka ya kokata makambo.

Pilato azalaki kofanda na engumba ya Kaisalia ná mwasi na ye; azalaki na mwa ndambo ya bakomeli, baninga, mpe bamemi-nsango. Pilato azalaki mokonzi ya bituluku mitano ya basoda oyo babundaka na makolo; etuluku mokomoko ekokaki kozala na basoda 500 tii 1 000; azalaki mpe kokamba etuluku moko ya basoda 500 oyo babundaka likoló ya bampunda. Mbala mingi basoda na ye bazalaki kokakisa na nzete bato ya mobulu. Na ntango ya kimya, bazalaki naino kosambisa bato yango liboso ya koboma bango, kasi na ntango ya mobulu, bazalaki koboma bango mbala moko. Na ndakisa, Baloma bakakisaki baombo 6 000 mpo na kopekisa mobulu oyo Spartacus abimisaki. Soki mobulu ebimi na Yudea, guvɛrnɛrɛ akokaki kosɛnga lisungi epai ya guvɛrnɛrɛ ya Silia oyo azalaki mokonzi ya basoda mingi koleka. Kasi, na ntango oyo Pilato azalaki guvɛrnɛrɛ, mbala mingi guvɛrnɛrɛ ya Silia abandaki kozala te, mpe Pilato asengelaki kosilisa mobulu nokinoki.

Baguvɛrnɛrɛ bazalaki mbala na mbala kopesa lapolo epai ya amperɛrɛ. Basengelaki koyebisa ye likambo nyonso oyo ekoki kobebisa lokumu na ye to oyo ezali likama mpo na bokonzi ya Baloma; mpe amperɛrɛ azalaki kopesa mitindo oyo esengeli mpo na kosilisa yango. Guvɛrnɛrɛ nyonso azalaki koluka kotinda lapolo na ye na makambo nyonso liboso ete amperɛrɛ ayoka yango na monɔkɔ ya bato mosusu. Na ntembe te lokola Yudea ezalaki esika ya mobulu mingi, Pilato azalaki komitungisa mingi na likambo yango.

Longola Baevanzile, bato ya mayele na makambo ya kala lokola Flavius Josèphe ná Philon nde balobeli makambo ya Pilato. Lisusu, Tacite, moto ya Loma mpe moto ya mayele na makambo ya kala alobi ete Pilato atindaki báboma Klisto, oyo epai na ye baklisto bazwi nkombo na bango.

Apelisi nkanda ya Bayuda

Josèphe alobi ete lokola mibeko ya Bayuda epekisaki bikeko, baguvɛrnɛrɛ ya Loma bazalaki te komema na Yelusaleme badrapɔ oyo ezalaki na bililingi ya amperɛrɛ. Lokola Pilato atosaki likambo yango te, Bayuda bakendaki mbangu na Kaisalia mpo na komonisa ye ete basepeli te. Pilato asalaki eloko te na boumeli ya mikolo mitano. Kasi, na mokolo ya motoba, atindaki basoda na ye bázinga bato yango mpe babangisaki bango ete bakoboma bango soki bapanzani te. Ntango Pilato ayokaki ete Bayuda bandimi kokufa na esika bátika moto abuka Mibeko na bango, atindaki bálongola bikeko yango.

Pilato azalaki na likoki ya kotinda basoda mpo na kopekisa likambo moko. Josèphe alobeli likambo moko oyo esalemaki; amonisi ete Pilato abandaki kosalisa mosala ya kotonga batelase mpo na komema mai na Yelusaleme mpe azwaki mbongo na kɛsi ya makabo ya tempelo mpo na mosala yango. Pilato azwaki mbongo yango ye moko te, mpo ayebaki ete kozwa biloko ya tempelo ezalaki lisumu mpe yango elingaki kosilikisa Bayuda mpe balingaki kosɛnga Tibɛli azongisa ye na Loma. Na yango, emonani ete Pilato ayokanaki na bakonzi ya tempelo mpo na kosala likambo yango. Makabo oyo bato bazalaki kopesa lokola “korbani” ekokaki kosalelama mpo na misala ya engumba. Kasi, Bayuda mingi bayanganaki mpo na komonisa ete basepeli na likambo yango te.

Pilato atindaki basoda na kati ya bato mpe apesaki bango mitindo ete básalela mipanga te, kasi bábɛta batomboki na ngondo. Emonani ete alingaki kopekisa mobulu kozanga ete aboma bato mingi. Esalemaki mpe bongo, atako bato mosusu bakufaki. Ekoki kozala ete bato oyo bayebisaki Yesu ete Pilato asangisaki makila ya bato ya Galilai ná bambeka na bango balobelaki nde likambo wana.​—Luka 13:1.

“Solo ezali nini?”

Likambo oyo esali ete Pilato ayebana lokola moto mabe ezali ndenge atalelaki bifundeli ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakóló oyo bayebisaki ye ete Yesu azali koloba ete azali mokonzi. Ntango ayokaki ete Yesu azalaki nde kopesa litatoli mpo na solo, Pilato amonaki ete azali te na makanisi ya kosala likambo moko oyo ekoki kozala likama mpo na Loma. Atunaki ye boye: “Solo ezali nini?” Ekoki kozala akanisaki ete solo ezali likambo oyo ekoki kolimbolama te mpe ezalaki na ntina te atalela yango. Na nsuka alobaki nini? “Nazwi ye ata na mabe moko te.”​—Yoane 18:37, 38; Luka 23:4.

Yango elingaki kozala nsuka ya kosambisama ya Yesu, kasi Bayuda baboyaki; balobaki ete azali kokɔtisa mobulu na mboka. Pilato ayebaki ete zuwa nde ezalaki kotinda banganga-nzambe bakonzi báfunda Yesu. Ayebaki mpe ete soki atiki Yesu, mobulu ekobima; likambo oyo azalaki kokima. Mobulu eutaki kosalema liboso, mpamba te Balabasi mpe bato mosusu batombokaki mpe babomaki bato, yango wana batyaki bango na bolɔkɔ. (Malako 15:7, 10; Luka 23:2) Lisusu, matata ya kala oyo Pilato azalaki na yango na Bayuda ebebisaki lokumu na ye epai ya Tibɛli, oyo azalaki kolimbisa te baguvɛrnɛrɛ ya mabe. Nzokande, soki akokisi mposa ya Bayuda, ekomonisa ete abangi bango. Yango wana, Pilato ayebaki te asala nini.

Ntango ayokaki ete Yesu azali moto ya Galilai, Pilato atindaki ye epai ya Elode Antipasi, oyo azalaki mokonzi ya etúká wana. Ntango Pilato amonaki ete likambo esili kaka te, amekaki kopusa bato oyo bayanganaki na libándá ya ndako na ye básɛnga atika Yesu; mpo mokolo nyonso ya Pasika azalaki kobimisa mokangami moko mpo na kosepelisa bango. Basɛngaki abimisa nde Balabasi.​—Luka 23:5-19.

Ekoki kozala ete Pilato alingaki kosala oyo ezali sembo, kasi alingaki mpe komibatela mpe kosepelisa bato. Nsukansuka, andimaki kobatela mosala na ye na esika ya koyoka lisosoli na ye mpe kosala oyo ezali sembo. Asɛngaki mai, asukolaki mabɔkɔ na ye mpe alobaki ete azali na ngambo te mpo na liwa oyo apesaki nzela.a Atako Pilato ayebaki ete bakoselaki Yesu makambo, atindaki bányokola ye, bátyola ye, bábɛta ye, mpe bábwakela ye nsɔi.​—Matai 27:24-31.

Pilato amekaki lisusu kobikisa Yesu mpo na mbala ya nsuka, kasi bato bagangaki ete soki asali bongo, azali moninga ya Kaisala te. (Yoane 19:12) Ntango Pilato ayokaki bongo, atikaki. Moto moko ya mayele alobaki mpo na ekateli ya Pilato boye: “Likambo ya pɛtɛɛ ezalaki: kotika ete mobali yango abomama. Akanisaki ete Moyuda moko mpamba akokufa; ekozala bozoba atika mobulu ebima mpo na moto yango.”

Nini ekómelaki Pilato?

Mbala ya nsuka oyo balobeli Pilato ezali ntango mobulu mosusu ebimaki. Josèphe alobi ete Basamalia mingi ná bibundeli na bango basanganaki na Ngomba Gelizimi mpo na kotimola biloko ya motuya oyo balobaki ete Moize akundaki kuna. Pilato atindaki basoda na ye mpe babomaki bato mosusu. Basamalia bafundaki likambo yango epai ya Lucius Vitellius, guvɛrnɛrɛ ya Sulia, oyo azalaki na bokonzi koleka Pilato. Lisolo elobi te soki Vitellius amonaki ete Pilato alekisaki ndelo. Ata soki ezalaki ndenge nini, atindaki Pilato na Loma akende kolimbola epai ya ampɛrɛrɛ likambo oyo asalaki. Kasi, liboso ete Pilato akóma kuna, Tibɛli akufaki.

Zulunalo moko elobi boye: “Banda wana, lisolo ya Pilato ekóma nde masapo.” Bato mingi babakisá makambo ndenge na ndenge na lisolo ya Pilato. Bamosusu balobaka ete Pilato akómaki moklisto. Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Éthiopie ekómisá ye “mosantu.” Eusèbe oyo akomaki mokanda na ye na nsuka ya ekeke ya misato mpe na ebandeli ya ekeke ya minei, azali moto ya liboso kati na bato mingi oyo balobaka ete ndenge moko na Yuda Mokeliota, Pilato mpe amibomaki. Kasi, moto moko te ayebi mpenza likambo oyo ekómelaki Pilato na nsima.

Ekoki kozala ete Pilato azalaki motó makasi, moto oyo atyolaka bato, mpe azalaki makambo makasi. Kasi, atako baguvɛrnɛrɛ mosusu ya Yudea bazalaki koumela te, ye aumelaki mbula zomi. Na bongo, soki totaleli makambo na ndenge ya Baloma, tokoki koloba ete Pilato asalaki mosala na ye malamu. Balobaka ete azalaki moto ya bibangabanga mpo atikaki ete bányokola Yesu mpe báboma ye mpo na komibatela. Bamosusu balobaka ete mosala ya Pilato ezalaki te ya kobatela bosembo kasi nde ya kotya kimya mpe kobatela matomba ya Loma.

Ntango ya Pilato ekeseni na oyo ya biso. Kasi, zuzi moko te akoki mpenza na bosembo nyonso kopesa etumbu na moto oyo ye amoni ete asali likambo te. Soki likambo ya Yesu te, mbɛlɛ Ponsi Pilato azali kaka ndenge moko na bato mosusu nyonso oyo bankombo na bango ezali na mikanda ya masolo ya kala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kosukola mabɔkɔ ezalaki momeseno ya Bayuda, kasi ya Baloma te, ezalaki komonisa ete moto asangani te na kosopa makila.​—Deteronome 21:6, 7.

[Elilingi na lokasa 11]

Na Kaisalia, bamonaki makomi oyo emonisi ete Ponsi Pilato azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto