Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/11 nk. 16-20
  • Yehova azali Mobateli na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali Mobateli na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa oyo ebongi mpenza
  • ‘Atambwisaka ngai’
  • “Nakobanga mabe te, zambi yo ozali na ngai elongo”
  • “Otandi mesa liboso na ngai”
  • ‘Nakofanda na ndako ya Yehova’
  • “Yehova azali mobateli na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Epai tokoki kozwa libɔndisi
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • jéhovah azali mobateli na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Nzembo 23:4—“Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/11 nk. 16-20

Yehova azali Mobateli na biso

“[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.”​—NZEMBO 23:1.

1-3. Mpo na nini tokoki kokamwa te na ndenge Davidi akokanisaki Yehova na mobateli ya mpate?

SOKI basɛngi yo olobela ndenge Yehova abatelaka basaleli na ye, okoloba nini? Ndakisa nini okosalela mpo na kolobela boboto oyo Yehova amonisaka epai ya basaleli na ye ya sembo? Eleki sikoyo mbula 3 000, Mokonzi Davidi asalelaki ndakisa moko kitoko mpo na kolobela Yehova na nzembo moko oyo akomaki, ndakisa oyo azwaki na mosala oyo azalaki kosala na bolenge na ye.

2 Ntango Davidi azalaki elenge, azalaki mobateli ya mpate. Na yango, ayebaki mpenza mosala ya kobatela bampate. Ayebaki malamu ete soki batiki bampate yango moko, ekobunga nzela mpe miyibi bakoyiba yango to banyama mabe ekolya yango. (1 Samwele 17:34-36) Soki bampate ezali na mobateli te, ekoyeba te epai matiti ya kolya ezali mingi. Na ntembe te, ntango Davidi akómaki mobange, azalaki kokanisa bangonga oyo azalaki kolekisa na kotambwisa bampate, kobatela yango mpe koleisa yango.

3 Tokoki kokamwa te ete ntango elimo santu etindaki Davidi alobela ndenge Yehova abatelaka basaleli na ye, makanisi na ye ekendaki mbala moko na mosala ya mobateli ya mpate. Nzembo 23 oyo Davidi akomaki ebandi na maloba oyo: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.” Tiká tótalela ntina oyo ndakisa yango ebongi mpenza. Na nsima, Nzembo 23 ekosalisa biso tómona ndenge Yehova abatelaka basambeli na ye lokola mobateli ya mpate.​—1 Petelo 2:25.

Ndakisa oyo ebongi mpenza

4, 5. Ndenge nini Biblia elobeli bizaleli ya bampate?

4 Na kati ya Biblia, Yehova azali na batitre mingi, kasi liloba “Mobateli” ezali mpenza komonisa boboto na ye. (Nzembo 80:1) Mpo na koyeba ntina mpenza oyo Yehova abongi kobengama Mobateli, tosengeli koyeba makambo mibale: ya liboso, bizaleli ya bampate mpe ya mibale, makambo oyo mobateli ya mpate ya malamu asengeli kosala mpe bomoto na ye.

5 Mbala mingi, Biblia elobelaka bizaleli ya bampate mpe emonisaka ete ekangamaka mpenza na mobateli na yango (2 Samwele 12:3), ezalaka matata te (Yisaya 53:7), mpe ezalaka na makasi ya kobunda te. (Mika 5:8) Mokomi moko oyo abɔkɔlaki bampate na boumeli ya mbula mingi akomaki boye: “Bampate ‘emibatelaka yango moko te’ ndenge bato mosusu bakanisaka. Esɛngaka kotyela yango likebi makasi mpe kobatela yango mingi koleka bibwele mosusu.” Mpo banyama yango ekufa te, esengeli ezala na mobateli ya malamu.​—Ezekiele 34:5.

6. Ndenge nini diksionɛrɛ moko ya Biblia emonisi ndenge mobateli ya mpate na ntango ya kala azalaki kolekisa mokolo na ye?

6 Ndenge nini mobateli ya mpate na ntango ya kala azalaki kolekisa mokolo na ye? Diksionɛrɛ moko ya Biblia elobi boye: “Na ntɔngɔntɔngɔ, azalaki kobimisa bampate na ndako na yango, kotambola liboso na yango tii na esika oyo ekozwa matiti ya kolya. Kuna, azalaki kobatela yango mokolo mobimba, kokɛngɛla mpo mpate moko ekende epai mosusu te mpe, soki ntango mosusu akebaki te mpate moko ebungi mpe ekei mosika na etonga, akoluka yango na molende tii ntango akozwa yango mpe akozonga na yango. . . . Na butu, akozonga na bampate na ndako na yango, akotánga yango ntango ezali kokɔta mokomoko na ndako mpo na koyeba soki moko ebungi te. . . . Mbala mosusu akotikala wana butu mobimba kokɛngɛla yango mpo banyama mabe ya zamba to miyibi bákɔtela yango te.”a

7. Mpo na nini ezalaki kosɛnga mbala mosusu mobateli ya mpate azala motema molai mpe boboto?

7 Ntango mosusu bampate, mingimingi oyo ezalaki na zemi mpe oyo ya bana, ezalaki kosɛnga mobateli na yango azala motema molai mpe boboto. (Genese 33:13) Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi boye: “Mbala mingi, bampate ebotaka mosika, na ngomba. Mobateli akobanda kokɛngɛla mama yango oyo alɛmbi na mpasi ya kobota mpe komema mwana tii na etonga. Tii ntango mwana ya mpate yango ekobanda kotambola, akobanda komema yango na mabɔkɔ na ye to na ntolo na ye.” (Yisaya 40:10, 11) Emonani mpenza ete mobateli ya mpate ya malamu asengelaki kozala makasi mpe boboto.

8. Wapi bantina oyo Davidi apesaki mpo na elikya oyo azalaki na yango epai ya Yehova?

8 “Yehova azali mobateli na ngai”​—maloba wana ebongi mpenza mpo na Tata na biso ya likoló! Ntango tozali kotalela Nzembo 23, tokomona ete, lokola mobateli ya mpate, Yehova abatelaka biso na makasi mpe boboto. Na vɛrsɛ 1, Davidi amonisi elikya makasi oyo azalaki na yango ete Yehova akosala nyonso mpo bampate na ye ‘ezanga eloko te.’ Na bavɛrsɛ oyo elandi, Davidi apesi ntina misato oyo azali na elikya makasi ndenge wana: Yehova atambwisaka, abatelaka mpe aleisaka bampate na ye. Tiká tólobela yango mokomoko.

‘Atambwisaka ngai’

9. Wapi elilingi ya kimya oyo Davidi asaleli, mpe ndenge nini bampate ekoki kokóma na esika ya kimya ndenge wana?

9 Ya liboso, Yehova atambwisaka basaleli na ye. Davidi akomaki boye: “Azali kopemisa ngai kati na matiti mobesu, azali kokendisa ngai epai ya mai ya kimya. Akolendisaka molimo na ngai. Akotambolisaka ngai na nzela ya boyengebene mpo na nkombo na ye.” (Nzembo 23:2, 3) Davidi asaleli elilingi yango mpo na komonisa esengo, kopema mpe kimya: etonga ya bampate oyo elali na kimya na kati ya ebele ya matiti. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “matiti mobesu” ekoki kolimbola “esika kitoko.” Na ntembe te, bampate yango moko ekoki te kozwa esika ya kitoko ndenge wana mpo na kolala na kimya. Mpo bampate ekóma na “esika kitoko” ndenge wana, mobateli na yango asengeli kotambwisa yango.

10. Ndenge nini Nzambe amonisi ete atyelaka biso motema?

10 Ndenge nini Yehova azali kotambwisa biso lelo oyo? Lolenge moko oyo atambwisaka biso ezali ndenge apesaka biso ndakisa. Liloba na ye ezali kosɛnga biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe.’ (Baefese 5:1) Na esika wana, Paulo azalaki kolobela motema mawa, kolimbisa mpe bolingo. (Baefese 4:32; 5:2) Na ntembe te, Yehova azali kopesa biso ndakisa malamu mpenza na bizaleli kitoko wana. Yehova azali nde kolekisa ndelo ndenge azali kosɛnga biso tómekola ye? Te. Soki totali malamu, toli wana ya Biblia ezali nde komonisa ete Nzambe atyelaka biso motema. Na ndenge nini? Nzambe akelá biso na lolenge na ye, elingi koloba apesá biso bizaleli ya malamu mpe likoki ya kolinga makambo ya elimo. (Genese 1:26) Na yango, Yehova ayebi ete atako tozali bato ya kozanga kokoka, tozali na likoki ya kokóma na bizaleli oyo ye amonisaka. Kanisá naino: Nzambe na biso ya bolingo atyelaka biso motema ete tokoki kozala lokola ye. Soki tolandi ndakisa na ye, akotambwisa biso mpe akomema biso na esika kitoko mpe “ya kimya.” Na mokili oyo etondi na yikiyiki, ‘akobatela biso na esika na biso,’ mpo toyebi ete Nzambe azali kondima biso.​—Nzembo 4:8; 29:11.

11. Yehova atalaka nini ntango azali kotambwisa bampate na ye, mpe ndenge nini yango emonanaka na makambo oyo asɛngaka biso?

11 Yehova atambwisaka biso na boboto mpe na motema molai. Mobateli ya mpate ayebaka esika makasi ya bampate na ye esuki mpe atambwisaka yango “lokola ekoki bibwɛlɛ kotambola.” (Genese 33:14) Ndenge moko, Yehova atambwisaka bampate na ye ‘lokola ekoki bango kotambola.’ Ayebi makoki na biso mpe makambo na biso nyonso. Na ndenge yango, atambwisaka biso na ndenge oyo ekoki na biso, elingi koloba asɛngaka biso te makambo oyo eleki biso. Asɛngaka kaka ete tósalela ye na molimo na biso mobimba. (Bakolose 3:23) Ezali boni soki okómi mobange mpe ozali lisusu na likoki te ya kosala ndenge omesanaki? To mpe obɛli maladi moko oyo esilisi yo makasi? Wana nde esika tokomona ete etinda ya kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba ezali kitoko. Bato mibale bakokanaka na makambo nyonso te. Kosalela Nzambe na molimo na yo mobimba elingi koloba komipesa na mosala na ye na makasi mpe nguya oyo ozali na yango. Atako tozali na bolɛmbu oyo ekoki kokitisa milende na biso, Yehova asepelaka soki tozali kosambela ye na motema na biso mobimba.​—Malako 12:29, 30.

12. Ndakisa nini na Mobeko ya Moize ezali komonisa ete Yehova atambwisaka bampate na ye ‘lokola ekoki bango kotambola’?

12 Ndakisa moko oyo ezali komonisa ete Yehova atambwisaka bampate na ye ‘lokola ekoki bango kotambola’ ezali na makambo oyo alobaki na Mobeko ya Moize na ntina na bambeka mosusu ya ekweli. Yehova azalaki kosɛnga ete bato bápesa ye bambeka ya malamu mpe bápesa yango na mitema ya botɔndi. Epai mosusu, asɛngaki ete moto na moto apesaka na kotalela makoki na ye. Mobeko elobaki boye: “Soki . . . akoki kopesa mwana ya mpate te mbele . . . akoya na bibenga mibale to na bana ya bibenga mibale.” Ezalaki boni soki moto azali na likoki ya kopesa ata bibenga mibale te? Soki bongo, akokaki komema mwa ndambo ya “fufu etutami mokemoke.” (Levitike 5:7, 11) Yango emonisi ete Nzambe azalaki te kosɛnga moto apesa biloko oyo azali na yango te. Lokola Nzambe abongwanaka te, tokoki kobɔndisama na koyeba ete asɛngaka biso te makambo oyo eleki biso; asepelaka kaka na oyo tozali na likoki ya kopesa ye. (Malaki 3:6) Oyo nde esengo ya kotambwisama na mobateli oyo ayebi komitya na esika na biso!

“Nakobanga mabe te, zambi yo ozali na ngai elongo”

13. Na Nzembo 23:4, ndenge nini Davidi asololi na Nzambe lokola moninga na ye ya motema, mpe mpo na nini yango ekoki kokamwisa biso te?

13 Davidi ayebisi ntina ya mibale oyo azalaki kotyela Yehova motema: Yehova abatelaka bampate na ye. Totángaka boye: “Ata natamboli na libulu ya molili ya kufa, nakobanga mabe te; zambi yo ozali na ngai elongo, [lingenda] na yo mpe nzete na yo makasi ezali kobɔndisa ngai.” (Nzembo 23:4) Sikoyo Davidi asololi na Yehova lokola moninga na ye ya motema, mpe azali kobenga ye “yo.” Yango ekoki kokamwisa biso te, mpamba te Davidi azali kolobela ndenge Nzambe asalisaki ye ayikela mikakatano mpiko. Davidi alekaki na mabulu ebele ya molili ya kufa, elingi koloba bantango oyo bomoi na ye ekómaki na likama. Kasi, atikaki te ete nsɔmɔ elonga ye, mpamba te ayebaki ete Nzambe azalaki elongo na ye, na “lingenda” mpe na “nzete” na ye. Lokola Davidi ayebaki ete Yehova azali kobatela ye, yango ebɔndisaki ye mpe, na ntembe te, etindaki ye apusana penepene na Yehova.b

14. Elikya nini Biblia epesi biso na ntina na libateli ya Yehova, kasi yango elimboli nini te?

14 Ndenge nini Yehova azali kobatela bampate na ye lelo oyo? Biblia eyebisi biso ete monguna moko te, azala demo to moto, akoki kosilisa bampate ya Nzambe awa na mabelé. Yehova akopesa nzela te. (Yisaya 54:17; 2 Petelo 2:9) Kasi, yango elingi koloba te ete Mobateli na biso akobatela biso na bampasi nyonso. Tokutanaka na mikakatano oyo bato nyonso bakutanaka na yango mpe na botɛmɛli oyo baklisto nyonso ya solo bakutanaka na yango. (2 Timote 3:12; Yakobo 1:2) Na bantango mosusu, tokómaka ‘kotambola na libulu ya molili ya kufa.’ Na ndakisa, monyoko to maladi ekoki komema biso mpenza pene na liwa. To mpe ekoki kozala ete moto moko oyo tolingaka mingi akómi pene na liwa to mpe akufi. Na ntango wana oyo ezali lokola ntango ya molili makasi, Mobateli na biso azali na biso, mpe akobatela biso. Na ndenge nini?

15, 16. (a) Ndenge nini Yehova asalisaka biso tólonga mikakatano oyo tokoki kokutana na yango? (b) Bɛtá lisolo moko oyo ezali komonisa ete Yehova asalisaka biso na ntango ya mpasi.

15 Yehova alaki te ete akobatela biso na ndenge ya kokamwa.c Kasi, likambo oyo tosengeli kobosana te yango oyo: Yehova akosalisa biso tólonga ata mikakatano ya ndenge nini oyo tokutani na yango. Akoki kopesa biso bwanya mpo na kolonga “komekama ya ndenge na ndenge.” (Yakobo 1:2-5) Mobateli ya mpate asalelaka lingenda to nzete na ye kaka mpo na kobengana banyama mabe te, kasi mpe mpo na kozongisa bampate na ye na nzela. Yehova akoki mbala mosusu kotinda ndeko moko asalisa biso na toli moko ya Biblia mpo na “kozongisa biso na nzela,” mpe yango ekoki kobongola mpenza bomoi na biso. Lisusu, Yehova akoki kopesa biso makasi ya koyikela mikakatano mpiko. (Bafilipi 4:13) Na nzela ya elimo santu na ye, akoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Elimo ya Nzambe ekoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko liboso ya komekama nyonso oyo Satana akoki kobimisela biso. (1Bakolinti 10:13) Tobɔndisami te na koyeba ete Yehova azalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso?

16 Ya solo, ata soki tozali na kati ya libulu ya molili ndenge nini, tokotambola biso moko te. Mobateli na biso azali elongo na biso, mpe azali kosalisa biso na ndenge oyo mbala mosusu biso moko toyebi te. Tótalela lisolo ya nkulutu moko oyo minganga bayebisaki ye ete azali na kanser ya bɔɔngɔ. Alobaki boye: “Nakoki kobombela bino te ete nabandaki komituna soki Yehova asilikeli ngai to soki alingaka ngai mpenza. Kasi, nazwaki ekateli ya kokangama kaka na Yehova. Nayebisaki ye mpasi na ngai. Mpe Yehova asalisaki ngai, mbala mingi azalaki kobɔndisa ngai na nzela ya bandeko ya elimo. Bandeko mingi bazalaki kopesa ngai batoli kitoko mpenza; koyebisa ngai ndenge bango moko basalaki ntango babɛlaki maladi ya makasi. Maloba kitoko oyo bazalaki koyebisa ngai esalisaki ngai namona ete mokakatano na ngai ezali kaka maladi ndenge moto nyonso abɛlaka. Mwa makabo oyo bandeko bazalaki kopesa ngai mpe boboto oyo bazalaki komonisela ngai esalisaki ngai namona ete Yehova aboyi ngai te. Kutu, nazali naino kaka kobunda na maladi na ngai, mpe nayebi te ndenge ekosukela ngai. Kasi, nazali na kondima ete Yehova azali na ngai mpe ete akokoba kosalisa ngai na maladi na ngai.”

“Otandi mesa liboso na ngai”

17. Likambo nini Davidi alobi mpo na Yehova na Nzembo 23:5, mpe mpo na nini likambo yango ná ndakisa ya mobateli ya mpate ezangi boyokani te?

17 Na nsima, Davidi ayebisaki ntina ya misato oyo azalaki kotyela Mobateli na ye motema: Yehova aleisaka bampate na ye, mpe atondisaka bango na biloko. Akomaki boye: “Otandi mesa liboso na ngai na miso ya bayini na ngai; opakoli motó na ngai na mafuta mpe kɔpɔ na ngai etondi maa.” (Nzembo 23:5) Na vɛrsɛ wana, Davidi azali kolobela Mobateli na ye lokola moyambi monene ya bapaya oyo apesi bango ebele ya bilei mpe masanga. Bandakisa mibale wana, oyo ya mobateli ya mpate mpe oyo ya moyambi bapaya, ezangi boyokani te. Kutu, mobateli ya mpate ya malamu asengeli koyeba epai matiti mpe mai ezali ebele mpo bampate na ye ‘ezanga eloko te.’​—Nzembo 23:1, 2.

18. Nini ezali komonisa ete Yehova azali moyambi monene ya bapaya?

18 Mobateli na biso azali mpe moyambi ya bapaya? Ntembe ezali ata moke te! Kanisá naino bilei ya elimo ndenge na ndenge ya malamu oyo tozali na yango beboo lelo oyo. Na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yehova apesi biso ebele ya mikanda ya malamu mpenza mpe baprogramɛ kitoko ya makita mpe ya mayangani, oyo ezali kokokisa bamposa na biso ya elimo. (Matai 24:45-47) Tozali kokelela bilei ya elimo ata moke te. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisi bamilio ya Babiblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe mikanda yango ezali kobima lelo oyo na minɔkɔ 413. Bilei yango oyo Yehova azali kopesa biso ezali motindo na motindo: kobanda na “mabɛlɛ” to mateya ya ebandeli ya Biblia tii na “bilei ya makasi” to mateya mozindo ya elimo. (Baebele 5:11-14) Yango wana, ntango tokutani na mokakatano moko to tolingi kozwa ekateli moko, mbala mingi tomonaka ete mikanda na biso esilá kolobela likambo yango. Elingaki kozala ndenge nini soki tózalaka na bilei yango ya elimo te? Mobateli na biso azali mpenza mokabi monene!​—Yisaya 25:6; 65:13.

‘Nakofanda na ndako ya Yehova’

19, 20. (a) Elikya nini Davidi amonisi na Nzembo 23:6, mpe ndenge nini biso mpe tokoki kokóma na elikya yango? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Nsima ya kotalela bizaleli ya Mobateli mpe mokabeli na ye, Davidi asukisaki boye: “Solo, malamu mpe ngɔlu ekokenda na ngai mikolo nyonso ya bomoi na ngai; mpe nakofanda na ndako ya [Yehova] kino nsuka ya mikolo na ngai.” (Nzembo 23:6) Davidi alobaki maloba wana na botɔndi na motema mpe na kondima; botɔndi mpo na makambo oyo elekaki mpe kondima mpo na makambo oyo esengelaki koya na nsima. Davidi, oyo azalaki liboso mobateli ya mpate, azalaki na kimya mpamba te ayebaki ete soki atikali kaka penepene na Mobateli na ye ya likoló, oyo ezali lokola nde afandi na ndako na ye, Yehova akotika te kokokisa bamposa na ye.

20 Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na maloba kitoko wana ya Nzembo 23! Davidi asalelaki maloba oyo ebongi mpenza mpo na kolobela ndenge Yehova atambwisaka, abatelaka mpe aleisaka bampate na ye. Maloba kitoko wana ya Davidi ekomamaki mpo na kopesa biso elikya ete biso mpe tokoki kotalela Yehova lokola Mobateli na biso. Ya solo, soki totikali kaka penepene na Yehova, akozala mpo na biso lokola Mobateli ya bolingo ‘kino nsuka ya mikolo na biso,’ ata mpe libela na libela. Kasi, lokola tozali bampate na ye, tozali na mokumba ya kotambola elongo na Yehova, Mobateli na biso monene. Tokotalela makambo oyo tosengeli kosala mpo na kotambola elongo na Yehova na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Genese 29:7; Yobo 30:1; Yilimia 33:13; Luka 15:4; Yoane 10:3, 4.

b Davidi asalaki banzembo ebele mpo na kosanzola Yehova na ndenge abikisaki ye na makama.​—Talá na ndakisa, maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 18, 34, 56, 57, 59 mpe 63.

c Talá lisolo “Tokoki kolikya ete Nzambe akosala nini?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2003.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini ebongaki mpenza Davidi akokanisa Yehova ná mobateli ya mpate?

• Ndenge nini Yehova atambwisaka biso na kotalela makoki na biso?

• Ndenge nini Yehova asalisaka biso tóyikela mikakatano mpiko?

• Nini ezali komonisa ete Yehova azali moyambi monene ya bapaya?

[Elilingi na lokasa 18]

Lokola mobateli ya mpate na Yisalaele, Yehova azali kotambwisa bampate na Ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto