Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/11 nk. 8-9
  • Yehova apambolaka baoyo bazali na elimo ya komipimela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apambolaka baoyo bazali na elimo ya komipimela
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolingo ezali kotinda bango
  • Mosala oyo esɛngaka komipimela
  • Tosalela Jéhovah ma elimo ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tókanisaka basali ya ntango nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tóbila Yesu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/11 nk. 8-9

“Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova”

Yehova apambolaka baoyo bazali na elimo ya komipimela

NA CAMEROUN, mobali moko azali kosala mobembo na velo na kati ya zamba; atamboli bangonga mingi na nzela oyo etondi na mai mpe pɔtɔpɔtɔ, andimi ata makama kaka mpo na kokende kolendisa basusu. Na Zimbabwe, mibali mibale batambolaka ntaka ya kilomɛtrɛ 15 na makolo mpo na kokende koteya na mboka moko epai basakoli bazali te, bakatisaka bibale mozindo; liboso ya kokatisa balongolaka bilamba ná basapato mpe batyaka yango na mitó mpo ezwa mai te. Na esika mosusu, mwasi moko alamukaka na ngonga ya minei ya ntɔngɔ mpo na kokende koyekola Biblia na lifulumɛ moko ya mwasi oyo andimaka koyekola na boumeli ya ngonga moko, kasi azwaka ntango kaka na ntɔngɔntɔngɔ.

Bato nyonso ya molende oyo touti kolobela bakokani na likambo nini? Bango nyonso bazali Batatoli ya Yehova, bazali na mosala ya ntango nyonso, elingi koloba bamipesá na mosala ya koteya solo ya Biblia. Na kati na bango ezali na babongisi-nzela ya sanza na sanza, babongisi-nzela monene, bamisionɛrɛ, bakɛngɛli-batamboli, mpe ebele ya bandeko oyo basalaka na Babetele na mokili mobimba. Bango nyonso bazalaka na elimo ya komipimela.a

Bolingo ezali kotinda bango

Batatoli ya Yehova batyaka likebi na toli oyo ntoma Paulo apesaki Timote ete: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) Kasi nini etindaka ebele ya Batatoli ya Yehova bámipesa na mosala ya ntango nyonso?

Soki batuni basakoli ya ntango nyonso eloko nini etindaka bango bámipesa na mosala ya Yehova, balobaka ete ezali bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango. (Matai 22:37-39) Esengeli mpenza kozala bongo, mpamba te soki bolingo ezali te, milende nyonso oyo tokoki kosala ekozala na ntina moko te.​—1 Bakolinti 13:1-3.

Mosala oyo esɛngaka komipimela

Baklisto nyonso oyo bamipesi na Nzambe bandimaka etinda ya Yesu oyo: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Komiboya elimboli kondima kokóma moto ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto mpe kotika bango bátambwisa biso. Yango etindi bato mingi bámipesa na mosala ya ntango nyonso, mosala oyo esɛngaka komipimela.

Ebele ya Batatoli basalaka mpenza milende mpo básala mingi na mosala ya Yehova. Tózwa ndakisa ya Júlia, mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo azali na mbula 56 mpe afandaka na engumba São Paulo, na Brésil. Alobi boye: “Ndeko moko oyo azali moto ya Chine abengaki ngai na telefone mpo atuna ngai soki nakosepela koyekola monɔkɔ ya Chinois. Na mbula oyo nakómi na yango, nazalaki ata kokanisa te koyekola monɔkɔ ya sika. Kasi nsima ya mwa mikolo, nandimaki. Lelo, nakoki kosolola na bato masolo ya Biblia na monɔkɔ ya Chinois.”

Filiale ya Batatoli ya Yehova na Pérou ekomi boye: “Banda mwa bambula, bankama ya babongisi-nzela ya sanza na sanza bazali komonisa mpiko mpe elimo ya komipimela na ndenge bazali kokende na bateritware oyo basakoli bazali te. Bazali kokende na bamboka mosika epai bomoi ezali mpasi mpe misala ezali mingi te. Bandeko yango bazali kondima kosala nyonso oyo bakoki mpo bátikala na bateritware wana. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete na bisika mingi oyo bazali kokende, mosala na bango ya kosakola ezali kobimisa matomba mingi. Bakɛngɛli-batamboli balobi ete mosala ya babongisi-nzela wana oyo bazali komonisa elimo ya komipimela esali ete bituluku ya sika ebotama.”

Baklisto mosusu batyaki bomoi na bango na likama mpo na kosalisa bandeko na bango. (Baloma 16:3, 4) Na Afrika, na etúká moko oyo ezali na bitumba, mokɛngɛli moko ya zongazonga akomi boye: “Ntango tokómaki pembeni ya esika oyo barɛbɛlɛ bakangaki nzela, liboso ya kokɔta na teritware oyo ezali na mabɔkɔ ya basoda ya guvɛrnɛma, bakonzi minei ya barɛbɛlɛ ná bakɛngɛli na bango batɛlɛmisaki ngai ná mwasi na ngai mpe basɛngaki mikanda na biso ya Leta. Nsima ya kotala mikanda yango basilikaki ntango bamonaki ete touti na ngámbo oyo ezali na mabɔkɔ ya basoda ya guvɛrnɛma. Balobaki ete nazali monɔngi. Yango wana, balingaki kobwaka ngai na libulu. Nayebisaki bango soki tozali banani, na nsima, batikaki biso.” Bandeko ya masangá oyo mokɛngɛli yango ná mwasi na ye batalaki bazalaki na botɔndi mpenza na ndenge balongaki koya kolendisa bango!

Atako bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bazali kokutana na mikakatano, na mokili mobimba motángo na bango ezali se kobakisama. (Yisaya 6:8) Bandeko yango ya molende basepelaka na libaku malamu oyo bazali na yango ya kosalela Yehova. Bandeko mosusu mingi oyo bazali kokumisa Yehova lelo oyo bazali mpe na elimo ya komipimela. Yehova apambolaka bango mingi. (Masese 10:22) Lokola basaleli ya Yehova bayebi ete akokoba kopambola mpe kosunga bango, bazali na makanisi moko ná mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.”​—Nzembo 121:2, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2005, Novɛmbɛ/Dɛsɛmbɛ.

[Maloba na katikati ya lokasa 9]

“Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo ya nguya na yo.”​—NZEMBO 110:3

[Etanda na lokasa 8]

YEHOVA ALINGAKA BASALELI NA YE

“Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo, koyebáká ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na oyo etali Nkolo.”​—1 Bakolinti 15:58.

“Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.”​—Baebele 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto