Tambolá elongo na Nzambe mpo obuka oyo ezali malamu
“Bazali kolona mopɛpɛ, mpe bakobuka ekumbaki.”—HOSEA 8:7, NW.
1. Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Yehova?
SOKI tozali kosala mobembo na mboka moko oyo etondi na makama, tokozala na kobanga te soki moto oyo ayebi mboka yango malamu azali kolakisa biso nzela. Ekozala malamu mingi tótambola na moto wana na esika tózala biso moko. Na makambo mosusu, yango ezali komonisa bomoi na biso na moi ya lelo. Yehova alingi kotambwisa biso na mokili mabe oyo ezali lokola esobe moko monene. Soki tozali na bwanya, tokondima tótambola elongo na ye na esika tómitambwisa biso moko. Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Nzambe? Na kolanda malako oyo apesi na kati ya Liloba na ye.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Na lisolo oyo eleki, totalelaki Hosea mokapo 1 tii 5, oyo elobeli likambo moko oyo ezali elilingi ya likambo mosusu. Ndenge tomonaki yango, likambo yango ezali na mateya oyo ekoki kosalisa biso mpo tótambola elongo na Nzambe. Tótalela sikoyo mwa makanisi ya ntina na mokapo 6 tii 9. Ekozala malamu tólobela naino na mokuse mikapo minei yango.
Botaleli na mokuse
3. Lobelá na mokuse makambo ezali na Hosea mokapo 6 tii 9.
3 Yehova atindaki Hosea asakola libosoliboso na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi. Bato ya ekólo yango, oyo ezalaki mpe kobengama Efalaima, na nkombo ya libota na yango oyo elekaki monene, bapesaki Nzambe mokɔngɔ. Hosea mokapo 6 tii 9 emonisi ete bato bazalaki lisusu sembo te na ndenge babosanaki kondimana ya Yehova mpe bamipesaki na makambo ya mabe. (Hosea 6:7) Na esika bázonga epai ya Yehova, bango batyaki motema na kondimana oyo basalaki ná bikólo mosusu. Lokola bakobaki kolona oyo ezali mabe, basengelaki mpe kobuka oyo ezali mabe. Na maloba mosusu, basengelaki kozwa etumbu. Kasi, esakweli ya Hosea ezali mpe na nsango moko ya malamu mingi. Na nzela ya Hosea, Yehova ayebisaki bato ete bakoki kozonga epai na ye mpe akoyokela bango mawa soki babongoli mpenza motema.
4. Tokotalela mateya nini oyo ekoki kosalisa biso na esakweli ya Hosea?
4 Mikapo minei wana ya esakweli ya Hosea ekoki kopesa biso mateya mosusu oyo ekosalisa biso tótambola elongo na Nzambe. Tiká tótalela mateya minei oyo ekoki kosalisa biso: (1) Kobongola motema ya solosolo emonanaka na misala, kasi na maloba mpamba te; (2) bambeka mpamba esepelisaka Nzambe te; (3) Yehova ayokaka motema mpasi soki basambeli na ye bapesi ye mokɔngɔ; mpe (4) mpo na kobuka oyo ezali malamu, tosengeli kolona oyo ezali malamu.
Makambo oyo emonisaka kobongola motema ya solosolo
5. Yebisá na mokuse makambo ezali na Hosea 6:1-3.
5 Esakweli ya Hosea ezali koteya biso makambo mingi na ntina na kobongola motema mpe bolimbisi. Na Hosea 6:1-3, tozali kotánga boye: “Yaká [tózonga] epai ya [Yehova], zambi apasoli biso nde akobikisa biso; abɛti biso nde akokangela biso mpota. Nsima ya mikolo mibale akobikisa biso lisusu mpe na mokolo ya misato akosekwisa biso mpe tokobika na liboso ya elongi na ye. Tóyeba, [tólandaka] koyeba [Yehova]; akobima solo lokola ekobimaka ntɔngɔntɔngɔ; akobimela biso lokola mbula, lokola mbula na ebandeli ya elanga oyo ekopɔlisaka mabelé.”
6-8. Nini emonisi ete kobongola motema ya Yisalaele ezalaki ya solo te?
6 Nani alobaki makambo oyo ezali na bavɛrsɛ yango? Bato mosusu balobaka ete ezali Bayisalaele oyo bazalaki sembo te mpe bakanisaka ete bato wana oyo bazangaki botosi bazalaki kokosa kobongola motema mpe koluka ete Nzambe ayokela bango mawa. Nzokande, bato mosusu balobaka ete mosakoli Hosea nde alobaki yango, azalaki kobondela bato bázonga epai ya Yehova. Kasi, ata soki nani alobaki yango, motuna ya ntina ezali ete, bato ya Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, bazongaki nde epai ya Yehova? Babongolaki mpenza mitema? Eyano ezali ete te. Na nzela ya Hosea, Yehova alobaki boye: “Ee Efelaima, nakosalela yo nini? Ee Yuda, nakosalela yo nini? Zambi [motema-boboto, NW ] boyengebene na bino ezali lokola londende ya ntɔngɔ, lokola mamwɛ oyo ekolimwa mbangumbangu.” (Hosea 6:4) Maloba wana ezali komonisa ete libota ya Nzambe ekufaki mpenza na elimo! Motema-boboto, to bolingo ya sembo elimwaki lokola londende ya ntɔngɔ oyo elimwaka nokinoki ntango kaka moi ebimi. Atako bato ya libota ya Nzambe bakosaki kobongola mitema, Yehova amonaki likambo moko te oyo ekokaki kotinda ye ayokela bango mawa. Likambo mpenza ezalaki wapi?
7 Kobongola motema ya Yisalaele eutaki mpenza na motema te. Mpo na komonisa ete Yehova azalaki kosepela na bato na ye te, Hosea 7:14 elobi boye: “Baleli epai na ngai na mitema na bango te wana eleli bango likoló ya mbeto na bango.” Vɛrsɛ 16 (NW) ebakisi boye: “Bazongaki, kasi te na eloko oyo etombwani”—elingi koloba, “na losambo ya malamu te.” (Maloba na nse ya lokasa) Bayisalaele bazalaki na mposa te ya kobongwana na ndenge oyo esengelaki, elingi koloba kobongisa boyokani na bango ná Yehova mpe kozongela losambo ya pɛto. Bazalaki mpenza na mposa te ya kotambola elongo na Nzambe.
8 Likambo mosusu ezangaki na kobongola motema ya Yisalaele. Bato batikaki masumu te; kutu, bazalaki kosala masumu ndenge na ndenge lokola kokosa, koboma, koyiba, kosambela bikeko, mpe kosala boyokani na bikólo mosusu. Na Hosea 7:4, bakokanisi bato yango na “etumbelo,” to fulu ya kotumba mampa, na ntembe te mpo bazalaki kozika na bamposa ya mabe. Lokola bato yango bakufaki mpenza na elimo, ebongaki nde báyokela bango mawa? Te! Hosea ayebisaki batomboki yango ete Yehova “akokanisa mabe na bango” mpe “akopesa masumu na bango etumbu.” (Hosea 9:9) Bakokaki koyokela bango mawa te!
9. Maloba ya Hosea ezali koteya biso nini na ntina na kobongola motema mpe bolimbisi?
9 Ntango tozali kotánga maloba ya Hosea, tozali koyekola nini na ntina na kobongola motema mpe bolimbisi? Ndakisa mabe ya Bayisalaele oyo bazangaki kondima ezali koteya biso ete mpo Yehova ayokela biso mawa, tosengeli kobongola motema na ndenge ya solo. Yango emonanaka ndenge nini? Tokoki te kokosa Yehova na mpisoli to na maloba ya mpamba. Kobongola motema ya solosolo emonanaka na misala. Mpo Nzambe alimbisa moto, esengeli atika masumu na ye mpe asala makambo oyo Yehova azali kosɛnga epai ya basambeli na ye.
Bambeka mpamba esepelisaka Yehova te
10, 11. Ndenge ndakisa ya Bayisalaele emonisi yango, mpo na nini bambeka mpamba esepelisaka Yehova te?
10 Tólobela sikoyo liteya ya mibale oyo ekoki kosalisa biso mpo tótambola elongo na Yehova. Liteya yango ezali oyo: Bambeka mpamba esepelisaka Nzambe te. Hosea 6:6 elobi boye: “Mpo ete [ngai Yehova] nalingi [motema-boboto, NW], mbeka te; nalingi boyebi koyeba Nzambe liboso ya makabo matumbami.” Tomoni ete Yehova asepelaka na motema-boboto to bolingo ya sembo, ezaleli oyo eutaka na motema, mpe na boyebi na ye. Kasi okoki komituna ete: ‘Mpo na nini vɛrsɛ yango elobi ete Yehova asepelaka te na “mbeka” mpe “makabo matumbami”? Ezali yango te biloko oyo asɛngaki na Mibeko ya Moize?
11 Mibeko esɛngaki kopesa bambeka mpe makabo; kasi, mokakatano monene ezalaki na bato ya ntango ya Hosea. Emonani ete Bayisalaele mosusu bazalaki kolandela likambo ya kopesa mbeka mpo bámonana ete bazali kosalela Nzambe. Nzokande, batikaki mpe masumu te. Lokola bazalaki kosala masumu, emonisaki ete mitema na bango ezalaki na bolingo ya sembo te. Bamonisaki mpe ete baboyaki boyebi ya Nzambe, mpamba te bazalaki kosalela yango te. Lokola bato bazalaki na mitema oyo ebongi te mpe etamboli na bango elongobanaki te, bambeka na bango ezalaki na ntina moko te; ezalaki nde kofinga Yehova Nzambe.
12. Hosea 6:6 ezali kopesa bato likebisi nini lelo oyo?
12 Maloba ya Hosea ezali na likebisi mpo na bato mingi oyo bazali kosambela lelo oyo. Bato yango bazali kopesa Nzambe bambeka na ndenge bazali kokokisa makambo oyo mangomba na bango esɛngaka bango. Kasi, losambo na bango esalaka mpenza eloko ya malonga te, mbala mosusu mpe eloko moko te, na etamboli na bango ya mokolo na mokolo. Tokanisi mpenza ete bato wana basepelisaka Nzambe soki mitema na bango etindaka bango te báboya masumu, bázwa boyebi na ye mpe básalela yango? Moto moko amikosa te na kokanisa ete Nzambe asepelaka soki tozali kaka kosala misala oyo bazali kosɛnga biso na lingomba. Yehova asepelaka te na bato oyo balukaka kokóma baninga na ye na komipesa na losambo ya mpamba na esika bátosa Liloba na ye.—2 Timote 3:5.
13. Bambeka ya ndenge nini topesaka, kasi likambo nini tosengeli kobosana te mpo na motuya ya bambeka yango?
13 Lokola tozali baklisto ya solo, toyebi ete bambeka mpamba esepelisaka Nzambe te. Ya solo, topesaka Yehova bambeka ya banyama te. Kasi, ‘topesaka Nzambe mbeka ya lisanzoli, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.’ (Baebele 13:15) Ezali na ntina mingi tókóma te lokola Bayisalaele oyo bamipesaki na masumu na mikolo ya Hosea; tómikosa te na kokanisa ete tokoki kozipa mabe na biso soki tozali kopesa Nzambe bambeka ya elimo. Tózwa ndakisa ya elenge moko oyo azalaki kosala pite, kasi azalaki kobomba lisumu na ye. Na nsima alobaki boye: “Nabakisaki milende na mosala ya kosakola, nazalaki kokanisa ete yango nde ekozipa mabe wana.” Azalaki na makanisi ndenge moko na Bayisalaele oyo bapesaki Nzambe mokɔngɔ. Nzokande, Nzambe andimaka mbeka ya lisanzoli se soki tozali kopesa yango na motema malamu mpe soki tozali na etamboli ya malamu.
Yehova ayokaka mpasi na motema soki basambeli na ye bapesi ye mokɔngɔ
14. Esakweli ya Hosea emonisi biso nini na ndenge Nzambe ayokaka na motema?
14 Liteya ya misato oyo tozwi na Hosea mokapo 6 tii 9 etaleli ndenge oyo Yehova ayokaka ntango basambeli na ye bapesi ye mokɔngɔ. Nzambe ayebaka kokanga motema, kasi azalaka mpe na boboto. Azalaka na boboto epai ya bato oyo babongoli motema mpe batiki masumu na bango mpe ayokelaka bango mawa. Kasi, soki basaleli na ye baboyi kobongola motema, apesaka bango etumbu oyo ekoki mpenza. Lokola Nzambe alingaka mpenza bolamu na biso, asepelaka ntango tozali kotambola na bosembo elongo na ye. Nzembo 149:4 (NW) elobi boye: “Yehova asepelaka na bato na ye.” Kasi, Yehova ayokaka ndenge nini soki basaleli na ye bazali sembo te?
15. Na kotalela Hosea 6:7, Bayisalaele mosusu bazalaki kosala nini?
15 Mpo na Bayisalaele oyo bazalaki sembo te, Yehova alobaki boye: “Lokola moto oyo asalami na putulu, babuki kondimana. Wana nde esika basaleli ngai makambo na bokosi.” (Hosea 6:7, NW) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na ‘bokosi’ elimboli mpe “kozanga bosembo.” Malaki 2:10-16 esaleli liloba kaka wana ya Liebele mpo na kolobela etamboli ya Bayisalaele oyo bazalaki kokosa balongani na bango. Mpo na liloba oyo ezali na Hosea 6:7, buku moko elobi ete “ezali maloba ya elilingi oyo ezali komonisa libala . . . Ezali lokola kolobela moto oyo bakosi ye na bolingo.”
16, 17. (a) Ndenge nini Bayisalaele batalelaki kondimana oyo Nzambe asalaki na bango? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te mpo na misala na biso?
16 Yehova azalaki kotalela Yisalaele lokola mwasi na ye mpo na kondimana oyo asalaki na ekólo yango. Yango wana, ntango bato na ye babebisaki kondimana yango, ezalaki lokola nde basali ekobo. Nzambe azalaki lokola mobali oyo azali sembo, kasi bato na ye batikaki ye!
17 Ezali boni mpo na biso? Nzambe asepelaka soki tozali kotambola elongo na ye mpe ayokaka mawa soki tozali kosala yango te. Tosengeli kobosana te ete “Nzambe azali bolingo” mpe ete misala na biso ekoki kosepelisa ye to mpe kopesa ye mawa. (1 Yoane 4:16) Soki tolandi nzela ya mabe, tokoki kopesa Yehova mpasi na motema mpe koyokisa ye mawa. Soki tozali kobosana likambo yango te, ekoki kobatela biso mpo tókwea na komekama te.
Ndenge oyo tokoki kobuka oyo ezali malamu
18, 19. Liteya nini ezali na Hosea 8:7, mpe ndenge nini ekokisamaki epai ya Bayisalaele?
18 Tótalela sikoyo liteya ya minei na esakweli ya Hosea: ndenge oyo tokoki kobuka oyo ezali malamu. Mpo na kozanga kondima ya Bayisalaele mpe etamboli na bango ya bozoba, Hosea akomaki boye: “Bazali kolona mopɛpɛ, mpe bakobuka ekumbaki.” (Hosea 8:7, NW) Maloba yango ezali na liteya moko oyo tosengeli kobosana te: Makambo oyo tokokutana na yango ata ndele etaleli mingimingi oyo tozali kosala sikoyo. Ndenge nini likambo yango emonanaki na bomoi ya Bayisalaele oyo bazalaki sembo te?
19 Lokola Bayisalaele bazalaki kosala masumu, bazalaki kolona oyo ezali mabe. Bakokaki nde kokoba kosala bongo kozanga ete bábuka mbuma mabe? Bakokaki kokima etumbu te. Hosea 8:13 elobi boye: “[Yehova] akokanisa mabe na bango, akopesa masumu na bango etumbu.” Na Hosea 9:17 tozali mpe kotánga boye: “Nzambe na ngai akobwaka bango mpo ete bayokaki ye te; bakozala bato ya kolemalema kati na mabota.” Yehova akanaki kofutisa Bayisalaele masumu na bango. Lokola balonaki oyo ezali mabe, basengelaki mpe kobuka oyo ezali mabe. Nzambe apesaki bango etumbu na mobu 740 L.T.B. ntango Baasulia balongaki Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, mpe bamemaki bato na boombo.
20. Makambo oyo ekómelaki Bayisalaele ezali koteya biso nini?
20 Makambo oyo ekómelaki Bayisalaele ezali koteya biso likambo moko ya ntina mingi: Tokobuka oyo tozali kolona. Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Soki toloni oyo ezali mabe, tokobuka oyo ezali mabe. Na ndakisa, bato oyo bamipesi na pite bakobuka mbuma ya bololo. Mosali mabe oyo aboyi kobongola motema, akosuka mabe.
21. Ndenge nini tokoki kobuka oyo ezali malamu?
21 Kasi, ndenge nini tokoki kobuka oyo ezali malamu? Mwa ndakisa moke ekosalisa biso tózwa eyano na motuna yango. Soki mosali-bilanga alingi kobuka nguba, akolona nde masango? Te! Asengeli kolona molona oyo alingi kobuka. Ndenge moko mpe, soki tolingi kobuka oyo ezali malamu, tosengeli kolona oyo ezali malamu. Olingi kokoba kobuka oyo ezali malamu, elingi koloba bomoi ya esengo lelo oyo mpe bomoi ya seko na mokili ya sika? Boye kobá kolona oyo ezali malamu elingi koloba, kotambola elongo na Nzambe mpe kotosa mibeko na ye ya sembo.
22. Mateya nini toyekoli na Hosea mokapo 6 tii 9?
22 Banda mokapo 6 tii 9 ya Hosea, toyekoli mateya minei oyo ekoki kosalisa biso na kotambola elongo na Nzambe: (1) Kobongola motema ya solosolo emonanaka na misala; (2) bambeka mpamba esepelisaka Nzambe te; (3) Yehova ayokaka motema mpasi soki basambeli na ye bapesi ye mokɔngɔ; mpe (4) mpo na kobuka oyo ezali malamu, tosengeli kolona oyo ezali malamu. Ndenge nini mikapo mitano oyo etikali ekoki kosalisa biso na kotambola elongo na Nzambe?
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini kobongola motema ya solosolo emonanaka?
• Mpo na nini Tata na biso ya likoló asepelaka na bambeka mpamba te?
• Nzambe ayokaka ndenge nini soki basambeli na ye bapesi ye mokɔngɔ?
• Tosengeli kolona nini soki tolingi kobuka oyo ezali malamu?
[Elilingi na lokasa 23]
Bolingo ya sembo ya Yisalaele elimwaki lokola londende ya ntɔngɔ
[Elilingi na lokasa 23]
Bayisalaele bazalaki kozika na bamposa ya mabe lokola etumbelo
[Elilingi na lokasa 24]
Mpo na nini Yehova aboyaki bambeka ya bato na ye?
[Elilingi na lokasa 25]
Mpo na kobuka oyo ezali malamu, tosengeli kolona oyo ezali malamu
[Elilingi na lokasa 26]