Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/1 nk. 4-7
  • Ndenge oyo malamu ekolonga mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo malamu ekolonga mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitema ekangamá na mabe
  • Mabe ezali kobakisama mpo na kozanga boyebi
  • Mobandisi ya mabe
  • Mposa ya kosala mabe elongolami
  • Boyebi ya solosolo ezali kotinda bato básala malamu
  • Ntango mabe ekosila
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Malamu na mabe: Etumba oyo eumeli bikeke mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?
    Lamuká!—2010
  • Nkolo ya mabe ayebani!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/1 nk. 4-7

Ndenge oyo malamu ekolonga mabe

Mokonzi Davidi azalaki moto malamu. Azalaki kolinga Nzambe mingi, kosepela na boyengebene mpe komibanzabanza mingi mpo na babola. Nzokande, kaka mokonzi yango asalaki ekobo na mwasi ya mosali na ye moko ya sembo. Nsukansuka, ntango ayokaki ete mwasi yango, Bata-seba, akómi na zemi, abomisaki mobali na ye. Na nsima, abalaki Bata-seba mpo na koluka kobomba mabe na ye.​—2 Samwele 11:1-27.

NTEMBE ezali ata moke te ete bato bazali na likoki ya kosala makambo mingi ya malamu. Kasi, mpo na nini bazali kosala mabe mingi boye? Biblia eyebisi bantina mingi oyo bato basalaka bongo. Eyebisi mpe ndenge Nzambe, na nzela ya Klisto Yesu, akolongola mabe mpo na libela.

Mitema ekangamá na mabe

Mokonzi Davidi ye moko amonisaki ntina moko oyo bato basalaka mabe. Ntango batɔndɔlaki mabe na ye, alukaki ata kosamba te. Na nsima, akomaki na mawa nyonso boye: “Talá, ngai nabotami kati na bokɛsɛnɛ, mpe mama na ngai azwaki zemi kati na lisumu.” (Nzembo 51:5) Mokano ya Nzambe ezalaki te ete bamama bábotaka bana ya masumu. Kasi, ntango Eva mpe na nsima Adama batombokelaki Nzambe, babungisaki likoki ya kobota bana oyo bazangi masumu. (Baloma 5:12) Ntango bato ya kozanga kokoka bakómaki ebele, emonanaki polele ete motema ya bato ekangamá na mabe, mpamba te Biblia elobi ete “makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye.”​—Genese 8:21.

Soki tokebi te, motema yango ekoki komema biso na “pite, . . . koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya,” mpe bizaleli mosusu ya mabe oyo Biblia ezali kobenga “misala ya mosuni.” (Bagalatia 5:19-21) Mokonzi Davidi asalaki ekobo mpo na bolɛmbu ya nzoto, mpe nsukansuka asopaki makila. (2 Samwele 12:1-12) Akokaki kolonga mposa mabe wana ya kosala ekobo. Kasi, lokola alongolaki te makanisi na ye epai ya Bata-seba, Davidi asalaki mpenza likambo oyo Yakobo amonisi: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; na ngala na yango, lisumu, ntango ekokisami, eboti liwa.”​—Yakobo 1:14, 15.

Makambo lokola koboma bato ebele na mbala moko, kosangisa na basi nzoto na makasi mpe kobɔtɔla biloko ya bato, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, ezali bandakisa oyo ezali komonisa makambo oyo esalemaka soki bato batiki bamposa ya mabe elonga bango.

Mabe ezali kobakisama mpo na kozanga boyebi

Bomoi ya ntoma Paulo ezali komonisa ntina ya mibale oyo ezali kotinda bato básala makambo ya mabe. Ntango ntoma Paulo akufaki, ayebanaki lokola moto ya boboto mpe ya bolingo. Azalaki mpenza komipesa mpo na koluka bolamu ya bandeko na ye baklisto. (1 Batesaloniki 2:7-9) Nzokande liboso, ntango bazalaki kobenga ye Saulo, azalaki nde ‘kokanela mpe koluka koboma’ bango. (Misala 9:1, 2) Mpo na nini Paulo azalaki kondima bányokola baklisto ya liboso mpe mpo na nini ye moko azalaki konyokola bango? Ye moko alobi: “Mpamba te nazangaki boyebi.” (1 Timote 1:13) Ya solo, Paulo azalaki liboso “na molende mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya solosolo te.”​—Baloma 10:2.

Lokola Paulo, bato mingi ya mitema sembo bazali kosala makambo ya mabe mpo bazangi boyebi ya solosolo ya mokano ya Nzambe. Na ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.” (Yoane 16:2) Batatoli ya Yehova lelo oyo bazali komona bosolo ya maloba wana ya Yesu. Na mikili mingi, bato oyo bamibengaka basaleli ya Nzambe bazali konyokola, ata mpe koboma bango. Na ntembe te, Nzambe ya solo azali kosepela te na milende wana ya mabe.​—1 Batesaloniki 1:6.

Mobandisi ya mabe

Yesu ayebisaki ntina mpenza oyo mabe ezali. Alobaki na bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo bazalaki koluka koboma ye boye: “Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino. Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki.” (Yoane 8:44) Kaka Satana wana nde, mpo na kokokisa mposa na ye ya mabe, atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe. Botomboki yango ememelá bato lisumu mpe liwa.

Satana amonisaki mpe ete azali mobomi na likambo oyo asalaki Yobo. Ntango Yehova apesaki ye ndingisa ya komeka bosembo ya Yobo, Satana asukaki kaka te na kobebisa biloko na ye. Abomaki mpe bana na ye zomi. (Yobo 1:9-19) Na bambula ya 1900, mabe ebakisamaki makasi mpo na kozanga kokoka, kozanga boyebi ya bato mpe mpo Satana abakisaki milende na ye awa na mabelé. Biblia emonisi ete Zabolo “abwakamaki na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye.” Kaka esakweli yango elobaki ete lokola Satana abwakami na mabelé, yango ekomema “mawa na mabelé” na ndenge oyo esalemá naino te liboso. Atako Satana akoki te kotinda bato na makasi básala makambo ya mabe, azali na mayele mingi ya “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.”​—Emoniseli 12:9, 12.

Mposa ya kosala mabe elongolami

Mpo mabe esila mpenza na mokili, esengeli makanisi ya kosala mabe oyo moto abotamaka na yango, kozanga boyebi ya solosolo mpe bopusi ya Satana elongwa. Ya liboso, ndenge nini makanisi ya kosala masumu oyo moto abotamaka na yango ekoki kolongwa na motema na ye?

Monganga moko te akoki kopasola motema mpo na kolongola makanisi wana. Kasi, Yehova Nzambe apesi nkisi moko oyo, soki tondimi yango, ekoki kolongola lisumu mpe kozanga kokoka oyo Adama ná Eva batikelá biso. Ntoma Yoane akomaki boye: “Makila ya Yesu . . . ezali kopɛtola biso uta na lisumu nyonso.” (1 Yoane 1:7) Ntango Yesu, moto ya kokoka, andimaki kopesa bomoi na ye, “amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete, mpo tókoka kotika masumu mpe tózala na bomoi ya boyengebene.” (1 Petelo 2:24) Mbeka oyo Yesu apesaki na liwa na ye esengelaki kolongola mabe nyonso oyo eutá na lisumu ya Adama. Paulo alobaki ete Yesu Klisto akómaki “lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso.” (1 Timote 2:6) Ya solo, liwa ya Klisto epesi bato nyonso likoki ya kozwa lisusu bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki.

Kasi, okoki komituna boye: ‘Soki liwa ya Yesu, likambo oyo esalemaki lelo oyo mbula koleka 2000, epesaki bato likoki ya kozwa lisusu bomoi ya kokoka, mpo na nini mabe mpe liwa ezali kosila te?’ Eyano na motuna wana ekoki kosalisa na kolongola likambo ya mibale oyo ezali kotinda bato básala mabe, elingi koloba kozanga boyebi ya mikano ya Nzambe.

Boyebi ya solosolo ezali kotinda bato básala malamu

Kozwa boyebi ya solosolo ya makambo oyo Yehova ná Yesu bazali kosala sikoyo mpo na kolongola mabe ekoki kopekisa moto ya motema sembo andima makambo ya mabe to akóma “mpenza kobunda na Nzambe.” (Misala 5:38, 39) Yehova Nzambe atalaka te mabe oyo tosalaki ntango tozalaki na boyebi te. Paulo alobaki na bato ya Athènes boye: “Nzambe ataleli te bantango wana ya kozanga boyebi, nzokande sikoyo azali koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema. Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa na boyengebene mabelé oyo efandami na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe asili kopesa ndanga epai ya bato nyonso na ndenge asekwisi ye na bakufi.”​—Misala 17:30, 31.

Paulo ayebaki mpenza ete Yesu asekwisamaki na kati ya bakufi, mpamba te Yesu ye moko, oyo asekwaki, asololaki na Paulo mpe apekisaki ye akoba konyokola baklisto ya liboso. (Misala 9:3-7) Ntango kaka Paulo azwaki boyebi ya solosolo ya mikano ya Nzambe, abongwanaki mpe akómaki moto malamu mpenza, oyo azalaki kolanda ndakisa ya Klisto. (1 Bakolinti 11:1; Bakolose 3:9, 10) Lisusu, Paulo asakolaki na molende “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Matai 24:14) Na boumeli ya mbula soki 2000 banda Yesu akufaki mpe asekwaki, Klisto aponi na kati ya bato, baoyo lokola Paulo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi na ye.—Emoniseli 5:9, 10.

Na boumeli ya ekeke oyo euti koleka mpe tii lelo, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa na molende mpenza etinda ya Yesu oyo: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Baoyo bandimaka nsango yango bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé oyo ekoyangelama na guvɛrnema ya likoló ya Klisto. Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Kosalisa bato bázwa boyebi yango ezali likambo ya malamu koleka oyo tokoki kosalela basusu.

Bato oyo bandimaka nsango malamu yango ya Bokonzi bakómaka komonisa bizaleli lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa,” atako bafandi na kati ya mokili oyo etondi na makambo ya mabe. (Bagalatia 5:22, 23) Na ndakisa ya Yesu, ‘bazongisaka mabe na mabe na moto te.’ (Baloma 12:17) Mokomoko na bango asalaka makasi mpo na ‘kokoba kolonga mabe na kosaláká malamu.’​—Baloma 12:21; Matai 5:44.

Ntango mabe ekosila

Bato bango moko bakoki te kolonga Satana, mobimisi ya mabe nyonso. Kasi mosika te, Yehova akosalela Yesu mpo na kopanza motó ya Satana . (Genese 3:15; Baloma 16:20) Yehova akotinda Klisto Yesu mpo ‘abuka mpe asilisa’ bibongiseli nyonso ya politiki, oyo mingi kati na yango ebimisi mobulu mingi na mokili. (Danyele 2:44; Mosakoli 8:9) Na mokolo yango ya kosambisa, bato nyonso oyo “bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu . . . bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko”​—2 Batesaloniki 1:8, 9; Sefania 1:14-18.

Ntango Satana ná bato na ye bakolongolama, Yesu kuna na likoló akosalisa bato oyo batikali bábongisa mabelé ekóma lisusu paladiso. Klisto akosekwisa mpe bato nyonso oyo babongi kofanda na mabelé oyo ekokóma lisusu paladiso. (Luka 23:32, 39-43; Yoane 5:26-29) Makambo wana oyo akosala ekosilisa bampasi mosusu oyo mabe ezali kobimisela bato.

Yehova akotinda bato na makasi te ete bátosa nsango malamu oyo etali Yesu. Kasi, azali kopesa bato libaku ya kozwa boyebi oyo ememaka na bomoi. Ezali mpenza na ntina ete osimba libaku yango sikoyo! (Sefania 2:2, 3) Soki osali bongo, okoyeba ndenge ya kolonga mabe nyonso oyo ezali kotungisa bomoi na yo sikoyo. Okomona mpe ndenge Klisto akolonga mabe mpo na libela.​—Emoniseli 19:11-16; 20:1-3, 10; 21:3, 4.

[Elilingi na lokasa 5]

Saulo azalaki kolendisa makambo ya mabe mpo azangaki boyebi ya solosolo

[Elilingi na lokasa 7]

Kosalisa moto azwa boyebi ya solosolo ezali likambo ya malamu koleka oyo tokoki kosalela basusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto