Nganga-nzambe monene oyo akatelaki Yesu etumbu
NA SANZA ya Novɛmbɛ 1990, bato oyo bazalaki kobongisa nzela na parkɛ moko na ntaka ya kilomɛtrɛ soki moko na sudi ya Jérusalem, bamonaki likambo moko oyo ebendaki likebi na bango. Traktɛrɛ oyo bazalaki kosala na yango ebukaki esika moko; na nse na yango ezali libulu oyo ezalaki malita. Esika wana nyonso ezalaki malita epai bazalaki kokunda bato banda na ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.). Bato ya arkeoloji bakundolaki biloko ya kokamwa na kati ya lidusu moko.
Na lidusu yango bamonaki mwa basanduku 12 oyo ezalaki na mikuwa ya bato. Na ntango wana, bazalaki kotya nzoto ya mowei na lilita na boumeli ya mbula mobimba mpe na nsima, soki misuni nyonso epɔli mpe ekauki, bazalaki kotya mikuwa na ye na sanduku. Na mopanzi ya moko ya basanduku oyo eleki kitoko bakomaki nkombo Yehôsef bar Qayafa (Yozefe mwana ya Kaifa) na makomi ya kitoko mpenza.
Makambo mingi ezali komonisa ete yango ekoki kozala lilita ya nganga-nzambe monene oyo atambwisaki kosambisama eleki monene oyo esalemá na mokili: kosambisama ya Yesu Klisto. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki moto ya mayele na masolo ya kala, akomaki ete nganga-nzambe monene yango ezalaki “Yozefe, oyo abengamaki Kaifa.” Biblia ebengi ye kaka Kaifa. Mpo na nini lisolo na ye esengeli kobenda likebi na biso? Mpo na ntina nini akatelaki Yesu etumbu?
Libota na ye mpe makambo mosusu
Kaifa abalaki mwana ya Anasi, moto oyo azalaká mpe nganga-nzambe monene liboso na ye. (Yoane 18:13) Na ntembe te babongisaki libala wana bambula mingi liboso, mpamba te libota mokomoko esengelaki komindimisa ete bakoki kobalana. Yango esɛngaki koluka na milɔngɔ ya bankɔkɔ mpo na koyeba soki bazali mpenza makila ya banganga-nzambe. Ekoki kozala ete mokomoko na mabota yango ezalaki na lokumu mpe ezalaki na bozwi mingi, oyo mbala mosusu ezalaki kouta na mabelé minene oyo bazalaki na yango na zingazinga ya Yelusaleme. Na ntembe te Anasi alingaki komindimisa ete moto oyo akokóma bokilo na ye akozala ngámbo moko na ye na makambo ya politiki. Emonani ete Anasi ná Kaifa bazalaki na mwa lingomba ya Basadukai.—Misala 5:17.
Lokola Kaifa autaki na libota ya lokumu, elingi koloba azalaki mwana ya nganga-nzambe, ekoki mpenza kozala ete ayekolaki Makomami ya Liebele mpe ndenge oyo bazalaki kolimbola yango. Ekoki mpenza kozala ete abandaki kosala na tempelo ntango akokisaki mbula 20, kasi eyebani te soki azalaki na mbula boni ntango akómaki nganga-nzambe monene.
Banganga-nzambe monene mpe banganga-nzambe bakonzi
Na ebandeli, mokumba ya nganga-nzambe monene ezalaki mpo na bomoi mobimba mpe soki nganga-nzambe monene akufi, mwana na ye azalaki kokitana ye. Kasi, na ekeke ya mibale L.T.B., bato ya Asmon [to Bamakabe] babɔtɔlaki mokumba ya nganga-nzambe monene.a Elode Monene aponaki mpe alongolaki banganga-nzambe monene, yango emonisi ete ye nde azalaki kopesa mitindo na moto nyonso oyo azalaki kozwa mokumba yango. Baloma oyo bazalaki kokóma baguvɛrnɛrɛ balandaki mpe momeseno wana.
Mbongwana nyonso wana ebimisaki etuluku moko ya bato oyo Biblia ebengi “banganga-nzambe bakonzi.” (Matai 26:3, 4) Longola Kaifa, bato mosusu oyo bazalaki na etuluku yango ezali banganga-nzambe monene ya kala, na ndakisa Anasi oyo, atako balongolaki ye mokumba wana, azalaki kaka kobengama na titre yango. Bato mosusu oyo bazalaki mpe na etuluku yango ezali bandeko ya nganga-nzambe monene ná bandeko ya bato oyo bazalaká banganga-nzambe monene.
Baloma batikelaki bato minene ya Bayuda, kati na bango banganga-nzambe bakonzi, mokumba ya kotambwisa makambo mikemike ya mboka. Yango esalisaki Loma eyangela etúká yango mpe efutisaka bato mpako kozanga ete etinda ebele ya basoda kuna. Bakonzi ya Loma bazalaki kosɛnga bato minene ya Bayuda ete bábatela kimya mpe matomba ya Loma. Baloma oyo bazalaki kotindama kuna lokola baguvɛrnɛrɛ bazalaki mpenza kolinga bakonzi ya Bayuda te, mpo bato yango bazalaki kosepela te ndenge Loma ezalaki koyangela bango. Kasi, bango nyonso bazalaki komona malamu bápesana mabɔkɔ mpo kimya ezala.
Na ntango ya Kaifa, nganga-nzambe monene azalaki mpe moto ya politiki. Ezali Quirinius, guvɛrnɛrɛ ya Sulia nde atyaki Anasi nganga-nzambe monene na mobu 6 to 7 T.B. Masolo ya kala ya Balabi emonisi ete Bayuda oyo bazalaki na mabota ya lokumu batondaki na lokoso, bazalaki kopona bilongi, konyokola bato. Mokomi moko akanisi ete lokola Anasi azalaki nganga-nzambe monene, asalaki nyonso ete bokilo na ye “amata mpɛtɛ nokinoki na bokonzi ya tempelo; mpamba te, soki Kaifa azali na esika ya lokumu, akosalisa ye mingi.”
Valerius Gratus, guvɛrnɛrɛ ya Yudea, alongolaki Anasi mokumba ya nganga-nzambe monene na mobu soki 15 T.B. Nsima na ye, bato misato balandanaki na mokumba wana, kati na bango, mwana na ye moko, kasi bazalaki koumela te. Kaifa akómaki nganga-nzambe monene na mobu soki 18 T.B. Ponsi Pilato, oyo akómaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea na mobu 26 T.B., akutaki Kaifa mpe atikaki ye azala kaka nganga-nzambe monene na boumeli ya mbula zomi oyo ye azalaki guvɛrnɛrɛ. Kaifa nde azalaki nganga-nzambe monene na eleko oyo Yesu asalaki mosala na ye awa na mabelé mpe ntango bayekoli na ye babandaki mosala na bango ya kosakola. Kasi, Kaifa azalaki kosepela ata moke te na nsango ya Klisto ná ya bayekoli na ye.
Kobanga Yesu mpe kobanga Loma
Kaifa azalaki kotalela Yesu lokola moto oyo akoki kokɔtisa mobulu na mboka. Yesu aboyaki ndenge oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kolimbola mibeko ya Sabata mpe abenganaki bakomelesa ná bato oyo bazalaki kosanze mbongo na tempelo, alobaki na bango ete bakómisi tempelo “libulu ya babandi.” (Luka 19:45, 46) Bato mosusu ya mayele na masolo ya kala bakanisaka ete bato ya libota ya Anasi nde bazalaki bakóló mombongo oyo ezalaki kosalema na tempelo—yango ekoki kozala ntina mosusu oyo Kaifa azalaki koluka kosukisa Yesu. Ntango banganga-nzambe bakonzi batindaki basoda bákende kokanga Yesu, lokola maloba na ye ekamwisaki bango mingi, bakangaki ye lisusu te mpe bazongaki.—Yoane 2:13-17; 5:1-16; 7:14-49.
Tótala likambo oyo esalemaki ntango bakonzi ya Bayuda bayokaki ete Yesu asekwisi Lazalo. Evanzile ya Yoane elobi boye: “Banganga-nzambe bakonzi mpe Bafalisai bayanganisaki Sanedrina mpe babandaki koloba ete: ‘Tosengeli kosala nini, mpo moto oyo azali kosala bilembo mingi? Soki totiki ye kaka boye, bango nyonso bakondimela ye, mpe Baloma bakoya kobɔtɔla esika na biso mpe ekólo na biso.’” (Yoane 11:47, 48) Bazuzi ya Sanedrina bamonaki ete Yesu akoki kobebisa bokonzi ya bakonzi ya mangomba, kokɔtisa mobulu, likambo oyo ekobendela bango mindɔndɔ epai ya Pilato. Yikiyiki nyonso oyo Baloma bakoki kotalela lokola botomboki ekokaki kotinda bango bákɔta na makambo ya Bayuda—likambo oyo Sanedrina ezalaki kosala nyonso mpo na kokima yango.
Atako Kaifa akokaki kowangana te ete Yesu azalaki kosala makamwisi, andimelaki ye te, azalaki koluka kobatela lokumu mpe bokonzi na ye. Kutu, ekokaki kobanda ndenge nini Kaifa andima ete Lazalo asekwaki? Lokola azalaki Mosadukai, azalaki kondima lisekwa te!—Misala 23:8.
Motema mabe ya Kaifa emonanaki polele ntango ayebisaki baninga na ye boye: “Bozali kososola te ete ezali litomba na bino ete moto moko akufa mpo na bato ya ekólo na esika ete ekólo mobimba ebomama mpo na moto moko.” Lisolo ebakisi boye: “Nzokande, alobaki bongo na ndenge na ye moko te; kasi lokola azalaki nganga-nzambe monene na mbula wana, azalaki nde kosakola ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekólo wana, nde kaka mpo na ekólo yango te, kasi mpe mpo ete asangisa liboke moko bana ya Nzambe oyo bapalanganá epai na epai. Boye banda mokolo wana basalaki likita mpo na koboma [Yesu].”—Yoane 11:49-53.
Kaifa ayebaki te ete maloba na ye ezalaki na ndimbola monene. Lokola azalaki nganga-nzambe monene, maloba na ye ezalaki esakweli. bLiwa ya Yesu esengelaki kozala na matomba, kasi mpo na Bayuda kaka te. Mbeka na ye esengelaki kopesa bato nyonso likoki ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa.
Likita mpo na koboma moto
Banganga-nzambe bakonzi ná mikóló ya Bayuda bakutanaki na ndako ya Kaifa mpo na koyokana ndenge oyo bakoki kokanga Yesu mpe koboma ye. Emonani ete Kaifa mpe apesaki makanisi mpo na koyokana na Yuda Mokeliota mbongo oyo bakopesa ye mpo atɛkela bango Yesu. (Matai 26:3, 4, 14, 15) Nzokande, mpo na kokokisa mikano na ye, Kaifa amonaki ete liwa ya moto moko ekoki te. “Banganga-nzambe bakonzi basalaki sikoyo likita mpo na koboma mpe Lazalo, mpamba te mpo na ye mingi na kati ya Bayuda bazalaki . . . kondimela Yesu.”—Yoane 12:10, 11.
Malakusu, moto oyo azalaki moombo ya Kaifa, azalaki na kati ya bato oyo batindaki mpo bákende kokanga Yesu. Bamemaki ye liboso na ndako ya Anasi mpo atuna ye mituna; na nsima, bakendaki na ye epai ya Kaifa, oyo asilaki koyanganisa mikóló ya Bayuda mpo na kosambisa Yesu butu butu, likambo oyo mibeko epesaki nzela te.—Matai 26:57; Yoane 18:10, 13, 19-24.
Kaifa abongolaki makanisi na ye te ata ntango batatoli ya lokuta balobaki ndenge moko te na makambo oyo bafundaki Yesu. Nganga-nzambe monene yango ayebaki ndenge oyo bato oyo asalaki na bango likita bazalaki kotalela moto nyonso oyo amibengi Masiya. Yango wana atunaki Yesu soki andimi ete azali Masiya. Yesu ayanolaki ete bato nyonso oyo bazalaki kosambisa ye bakomona ye “afandi na lobɔkɔ ya mobali ya nguya mpe azali koya likoló ya mapata ya likoló.” Mpo na kolakisa ete amoni ete bafingi Nzambe mpe ye ayoki mabe, “nganga-nzambe monene apasolaki bilamba na ye ya likoló, alobaki ete: ‘Atuki! Mposa nini lisusu tozali na yango ya batatoli?’” Bazuzi nyonso ya Sanedrina bandimaki ete Yesu asengeli kokufa.—Matai 26:64-66.
Liboso Bayuda bápesa moto etumbu ya liwa, basengelaki naino kozwa ndingisa ya Baloma. Lokola Kaifa nde azalaki kokutana na guvɛrnɛrɛ soki Bayuda bazali na likambo ya koyebisa ye, ekoki mpenza kozala ete ye nde amemaki likambo ya Yesu epai ya Pilato. Na ntembe te ntango Pilato alukaki kobikisa Yesu, Kaifa azalaki na kati ya banganga-nzambe bakonzi oyo babelelaki ete: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!” (Yoane 19:4-6) Ekoki kozala ete Kaifa atindaki bato báganga ete bábimisa mobomi-bato na esika ya Yesu mpe azalaki na kati ya banganga-nzambe bakonzi oyo balobaki maloba ya lokuta ete: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.”—Yoane 19:15; Malako 15:7-11.
Kaifa aboyaki kondima ete Yesu asekwaki. Apekisaki Petelo ná Yoane, mpe na nsima, Setefano. Lisusu, Kaifa apesaki Saulo ndingisa ya kokende kokanga baklisto nyonso oyo akokuta na Damasi. (Matai 28:11-13; Misala 4:1-17; 6:8–7:60; 9:1, 2) Kasi, na mobu soki 36 T.B., Vitellius, guvɛrnɛrɛ ya Sulia, alongolaki Kaifa mokumba ya nganga-nzambe monene.
Mikanda ya Bayuda elobi malamu te mpo na libota ya Kaifa. Na ndakisa, buku moko (Talmud de Babylone) elobi boye: “Mawa na ngai mpo na libota ya Hannin [Anasi], mawa na ngai mpo na maloba na bango ya nse nse.” Bato mosusu bakanisaka ete kolela wana ezalaki mpo na “makita ya nkuku mpo na koyokana ndenge oyo bakonyokola bato.”
Liteya oyo tozwi na bomoi ya Kaifa
Moto moko ya mayele alobaki ete banganga-nzambe monene bazalaki bato ya “makambo makasi, bazalaki na mayele, bayebaki mosala—kasi mpe bato ya lofundo.” Lofundo ya Kaifa epekisaki ye andima Masiya. Na yango, tosengeli kokamwa te soki bato mosusu bazali koboya nsango ya Biblia lelo oyo. Bato mosusu basepelaka mpenza te kotika bindimeli na bango mpo na kolanda mateya ya solo ya Biblia. Bato mosusu bamonaka ete soki bakómi basakoli ya nsango malamu, lokumu na bango ekokita. Lisusu, bato oyo bazali sembo te mpe bato ya lokoso bakoki kosepela na mitinda ya boklisto te.
Lokola Kaifa azalaki nganga-nzambe monene, akokaki kosalisa bandeko na ye Bayuda ete bándima Masiya; kasi, mposa ya lokumu ememaki ye akatela Yesu etumbu. Ekoki mpenza kozala ete atikaki te kotɛmɛla baklisto tii ntango akufaki. Lisolo na ye emonisi ete soki moto akufi, makambo oyo asalaki etikalaka. Na misala na biso, tomisalelaka lokumu ya malamu to ya mabe na miso ya Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba lisolo ya bato ya Asmon, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2001, nkasa 27-30.
b Kala, Yehova asalelaká Balama, moto mabe, mpo asakola makambo ya solo mpo na Bayisalaele.—Mituya 23:1–24:24.
[Elilingi na lokasa 10]
Yozefe mwana ya Kaifa
[Elilingi na lokasa 10]
Sanduku ya kobomba mikuwa oyo bakundolaki na 1990
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Sanduku, makomi, mpe lidusu na nsima ya elilingi: Na ndingisa ya Israel Antiquities Authority