Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
“Bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
1, 2. (a) Ezaleli nini ya Zabolo emonisami na maloba oyo ezali na Yisaya mokapo 14? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
ZABOLO atondi mpenza na lofundo. Lolendo na ye emonisami na maloba oyo ezali na mokanda ya mosakoli Yisaya. Mbula koleka nkama liboso Babilone ekóma ekólo oyo eleki makasi na mokili mobimba, esakweli moko emonisaki libota ya Nzambe ezali koloba na “mokonzi ya Babele” boye: “Olobaki na motema na yo ete, Nakobuta epai na lola koleka likoló ya minzoto ya Nzambe [bakonzi oyo bakitanaki Davidi]; [nakofanda] na kiti na ngai ya bokonzi . . . [nakomikómisa] lokola Oyo-Aleki-Likoló.” (Yisaya 14:3, 4, 12-15; Mituya 24:17) Lolendo ya “mokonzi ya Babele” ekokani na elimo ya Satana, “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Kasi, Satana akosuka mabe na lolendo na ye, se ndenge bokonzi ya Babilone esukaki na nsɔni.
2 Kasi, lokola Zabolo azali naino, tokoki komituna mituna lokola oyo: Tosengeli kobangaka Satana? Mpo na nini abimiselaka baklisto minyoko? Tokoki kosala nini mpo Zabolo akosa biso te?
Tosengeli nde kobangaka Zabolo?
3, 4. Mpo na nini baklisto bapakolami ná baninga na bango babangaka Zabolo te?
3 Baklisto bapakolami balendisamaka mingi na maloba ya Yesu Klisto oyo: “Kobanga te makambo oyo elingi kokómela yo. Talá! Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na kati ya bolɔkɔ mpo bómekama mpenza na mobimba, mpe mpo bózwa bolɔzi mikolo zomi. Omimonisa sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.” (Emoniseli 2:10) Bapakolami na elimo ná baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé babangaka Zabolo te. Soki babangaka te ezali te mpo mitema na bango ezali na mpiko mingi. Babangaka Zabolo te mpo babangaka Nzambe mpe ‘bamibombaka na nse ya mapapu na ye.’—Nzembo 34:9; 36:7.
4 Bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto bazalaki mpiko mpe batikalaki sembo tii liwa atako banyokwamaki mingi. Bazalaki kobanga te makambo oyo Satana Zabolo akokaki kosala bango, mpamba te bayebaki ete Yehova akoki te kosundola bato oyo bazali sembo epai na ye. Ndenge moko mpe, liboso ya minyoko makasi oyo bazali kokutana na yango lelo oyo, baklisto bapakolami ná baninga na bango bazali na ekateli makasi ya kotikala sembo epai ya Nzambe. Nzokande, ntoma Paulo amonisaki ete Zabolo akoki kopesa liwa. Likambo yango esengeli kobangisa biso te?
5. Mokapo ya Baebele 2:14, 15 ezali koteya biso nini?
5 Paulo alobaki ete Yesu ‘asanganaki na makila mpe mosuni’ mpo ete “na nzela ya liwa na ye akoka kobebisa nyɛɛ moto oyo azali na likoki ya kopesa liwa, elingi koloba, Zabolo; mpe ete akoka kopesa bonsomi na bato nyonso oyo mpo na kobanga liwa batyamaki na kati ya boombo na boumeli ya bomoi na bango mobimba.” (Baebele 2:14, 15) Satana azali “na likoki ya kopesa liwa”; yango wana akɔtelaki Yuda Mokeliota mpe na nsima asalelaki bakonzi ya Bayuda mpe Baloma mpo báboma Yesu. (Luka 22:3; Yoane 13:26, 27) Kasi, na nzela ya liwa na ye lokola mbeka, Yesu alongoli bato ya masumu na boombo ya Satana mpe afungweli biso nzela ya bomoi ya seko.—Yoane 3:16.
6, 7. Likoki ya kopesa liwa oyo Satana azali na yango ezali ndenge nini?
6 Likoki ya kopesa liwa oyo Zabolo azali na yango ezali ndenge nini? Banda Satana abandá mosala mabe na ye, makambo na ye ya lokuta mpe makanisi oyo azali kopesa bato ememeli ebele ya bato liwa. Ezali mpo Adama asalaki lisumu mpe atikelá bato nyonso lisumu mpe liwa. (Baloma 5:12) Longola yango, basaleli ya Satana awa na mabelé bazali konyokola basambeli ya Yehova, ntango mosusu tii na koboma bango, ndenge kaka basalaki Yesu Klisto.
7 Atako bongo, tosengeli kokanisa te ete Zabolo akoki koboma moto nyonso oyo asepeli koboma. Nzambe abatelaka bato na Ye mpe akotika nzela te ete Satana asilisa basambeli nyonso ya solo awa na mabelé. (Baloma 14:8) Ya solo, Yehova atikaka nzela bányokola basaleli na ye nyonso, mpe atikaka ntango mosusu Zabolo anyokola bamosusu kati na biso tii na liwa. Kasi, Biblia epesi baoyo bazali na “mokanda ya kokanisa” ya Nzambe elikya malamu mingi ya lisekwa mpe Zabolo akoki kosala eloko moko te mpo na kopekisa ete bázonga na bomoi!—Malaki 3:16; Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.
Mpo na nini Satana abimiselaka biso minyoko?
8. Mpo na nini Zabolo azali kobimisela basaleli ya Nzambe minyoko?
8 Soki tozali basaleli ya sembo ya Nzambe, ezali na ntina moko monene oyo Zabolo abimiselaka biso minyoko. Mokano na ye ezali ya komema biso tówangana kondima na biso. Boyokani oyo tozali na yango na Tata na biso ya likoló ezali eloko ya motuya mingi, mpe mposa ya Satana ezali ete abebisa yango. Yango ezali likambo ya kokamwa te. Na Edene, Yehova asakolaki ete koyinana ekozala kati na “mwasi” na ye ya elilingi mpe “nyoka” mpe kati na ‘mimboto’ na bango. (Genese 3:14, 15, NW) Biblia ebengi Zabolo “nyoka ya ebandeli” mpe emonisi ete atikali na ntango mokuse mpe azali na nkanda makasi. (Emoniseli 12:9, 12) Lokola koyinana ezali naino na kati ya “momboto” ya mwasi ná oyo ya nyoka, basaleli ya sembo ya Yehova bayebi ete bakozanga te konyokwama. (2 Timote 3:12) Oyebi ntina mpenza oyo Satana azali kobimisela biso minyoko?
9, 10. Zabolo abimisaki ntembe nini, mpe na ndenge nini yango etaleli etamboli ya bato?
9 Zabolo abimisaki ntembe na likambo ya boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Abimisaki mpe likambo mosusu oyo eyokani na yango: atyaki ntembe na bosembo ya bato epai ya Mozalisi na bango. Mpo na nini Satana anyokolaki Yobo, moto ya sembo? Mpo Yobo atikala sembo te epai ya Yehova. Na ntango wana, mwasi ya Yobo ná baninga na ye misato oyo bazalaki “babɔndisi mabe” bakokisaki nde mokano ya Zabolo. Ndenge mokanda ya Yobo emonisi yango, Zabolo atyelaki Nzambe ntembe, alobaki ete moto moko te akotikala sembo epai ya Nzambe soki batikeli ye nzela ameka moto yango. Kasi, Yobo atikalaki sembo, amonisaki ete Satana azali mobuki-lokuta. (Yobo 1:8–2:9; 16:2; 27:5; 31:6) Lelo oyo, Zabolo azali konyokola biso Batatoli ya Yehova mpo tótikala sembo te mpe alakisa ete alobaki solo.
10 Koyeba ete Zabolo azali kobimisela biso minyoko mpo azali koluka na ndenge nyonso biso tópesa Nzambe mokɔngɔ ekoki kosalisa biso tózala na mpiko mpe makasi. (Deteronome 31:6) Nzambe na biso azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe akosalisa biso mpo tótikala sembo. Tiká ete tózala ntango nyonso bato ya sembo mpo tósepelisa motema ya Yehova; na ndenge yango, tokosalisa ye apesa eyano epai ya Momeki, Satana Zabolo.—Masese 27:11.
“Bikisá biso longwa na moto mabe”
11. Maloba “komema biso na komekama te” elimbolaka nini?
11 Kozala moto ya sembo ezali likambo ya pɛtɛɛ te; esɛngaka kobondela makasi. Maloba ya libondeli ya ndakisa ekoki mpenza kosalisa biso. Na esika moko, Yesu alobaki boye: “Komema biso na komekama te, kasi bikisá biso longwa na moto mabe.” (Matai 6:13) Yehova amekaka biso te mpo tósala masumu. (Yakobo 1:13) Kasi, na bisika mosusu Biblia elobi ete asalaki to atindaki likambo boye to boye; yango emonisi kaka ete atikelaki yango nzela. (Luta 1:20, 21) Na bongo, soki na libondeli na biso tozali koloba na Yehova maloba oyo Yesu alakisaki biso, tozali kosɛnga ye ete atika biso tókwea na komekama te. Akoyoka mpe biso, mpamba te Biblia epesi biso elaka oyo: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Bakolinti 10:13.
12. Mpo na nini tobondelaka ete: “Bikisá biso longwa na moto mabe”?
12 Na libondeli ya ndakisa, nsima ya kolobela komekama, Yesu alobaki ete: “Bikisá biso longwa na moto mabe.” Na Babiblia mosusu bakomi: “Bikisá biso na mabe.” (haut fleuve; Bible na Lingala ya lelo oyo) Kasi, na Biblia maloba ‘kobikisa na’ esalelamaka mingimingi mpo na kolobela bato, mpe Evanzile ya Matai emonisi ete Zabolo azali moto na ndenge ebengi ye “Momeki.” (Matai 4:3, 11) Yango wana, ezali na ntina mingi tóbondelaka Nzambe abikisa biso na “moto mabe,” Satana Zabolo. Alukaka kopusa biso na kosala masumu na miso ya Nzambe. (1 Batesaloniki 3:5) Ntango tozali kobondela Tata na biso ya likoló ete, “Bikisá biso longwa na moto mabe,” tozali kosɛnga ye alakisa biso nzela mpe asalisa biso mpo Zabolo akosa biso te.
Bótika te ete Zabolo akosa bino
13, 14. Mpo na nini Bakolinti basengelaki kobongola ndenge na bango ya kotalela moto oyo azalaki liboso mosali ya pite?
13 Ntango Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti ete bálimbisaka, akomaki boye: “Likambo nyonso bokolimbisa moto na boboto, ngai mpe nakolimbisa ye yango. Kutu, mpo na ngai, likambo nyonso nalimbisi na boboto, soki nalimbisi moto likambo moko boye na boboto, nasali yango mpo na bino na miso ya Klisto; ete tókosama na Satana te, mpo tozangi te koyeba mayele na ye.” (2 Bakolinti 2:10, 11) Zabolo akoki kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kokosa biso; kasi, mpo na nini Paulo alobaki maloba oyo touti kotánga?
14 Paulo apamelaki Bakolinti mpo bazalaki kotika moto moko ya pite na lisangá. Na ntembe te likambo yango ezalaki kosepelisa Satana, mpamba te ezalaki kobwaka nsɔni na lisangá yango ndenge ezalaki kokanga miso na “pite ya ndenge oyo ezalaka kutu te na kati ya bikólo mosusu.” Nsukansuka, babimisaki mosali-mabe yango na lisangá. (1 Bakolinti 5:1-5, 11-13) Na nsima, moto yango abongolaki motema. Soki Bakolinti baboyaki kolimbisa moto yango mpe kozongisa ye na lisangá, Zabolo alingaki kokosa bango na ndenge mosusu. Na ndenge nini? Balingaki komonisa ete bazali makambo makasi mpe balingaka kolimbisa te, lokola Satana ye moko. Soki moto oyo abongolaki motema ‘amɛlamaki na mawa na ye ya koleka ndelo’ mpe atikaki libela kosambela Yehova, bankulutu balingaki kozala na ngambo na miso ya Yehova, Nzambe oyo alimbisaka. (2 Bakolinti 2:7; Yakobo 2:13; 3:1) Nzokande, ata moklisto moko te ya solo akolinga komekola Satana na makambo makasi mpe ezaleli ya koboya kolimbisa.
Tobatelami na molato ya etumba oyo mouti na Nzambe
15. Tozali kobunda etumba nini, mpe tosengeli na nini mpo na kolonga etumba yango?
15 Mpo Zabolo alonga biso te, tosengeli kobunda etumba ya elimo ná bilimo mabe. Mpo na kolonga etumba yango, tosengeli kolata “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe.” (Baefese 6:11-18) Moko na biteni ya molato yango ezali “ebateli-ntolo ya boyengebene.” (Baefese 6:14) Saulo, mokonzi ya Yisalaele ya kala atosaki Nzambe te mpe elimo santu elongwaki epai na ye. (1 Samwele 15:22, 23) Kasi, soki tozali kosala misala ya boyengebene mpe tolati molato mobimba ya etumba ya elimo, tokozala na elimo santu ya Nzambe mpe libateli oyo tosengeli na yango liboso ya Satana ná baanzelu na ye, to bademo.—Masese 18:10.
16. Tosengeli kosala nini mpo bilimo mabe bálonga biso te?
16 Mpo bilimo mabe bálonga biso te, tosengeli mpe kotángaka Liloba ya Nzambe mpe koyekola yango mokolo na mokolo, kosalela batoli oyo tozali kozwa na mikanda ya “kapita ya sembo.” (Luka 12:42) Na ndenge yango, tokotondisa bɔɔngɔ na biso na makambo ya elimo, ndenge toli ya Paulo elobi yango ete: “Bandeko, makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kosanzolama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.”—Bafilipi 4:8.
17. Nini ekosalisa biso tózala basakoli ya solosolo ya nsango malamu?
17 Yehova azali kosalisa biso mpo ‘tólatisa makolo na biso bisaleli ya nsango malamu ya kimya.’ (Baefese 6:15) Koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe kopesa biyano esalisaka biso mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Kosalisa bato báyekola solo ya Nzambe mpe bázwa bonsomi ya elimo epesaka biso mpenza esengo! (Yoane 8:32) “Mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe” ezali na ntina mingi mpo na komibatela na mateya ya lokuta mpe “kokweisa biloko oyo epikamá makasi.” (Baefese 6:17; 2 Bakolinti 10:4, 5) Koyeba kosalela malamu Biblia, Liloba ya Nzambe, esalisaka biso tóteya solo mpe ebatelaka biso tókwea te na mitambo ya Zabolo.
18. Ndenge nini tokoki “kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo”?
18 Ntango Paulo alobelaki molato ya etumba ya elimo oyo tosengeli kolata, abandaki boye: “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na kati ya nguya ya bokasi na ye. Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:10, 11) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kotɛlɛma ngwi” ezali komonisa soda oyo apikami na esika na ye. Tozali kopika mpende na etumba ya elimo, atako Satana azali kosalela mayele ndenge na ndenge ya mabe mpo na kobebisa bomoko na biso, mateya na biso mpe bosembo na biso epai ya Nzambe. Kasi, nyonso oyo Zabolo asali elongi te, mpe ekolonga ata mokolo moko te!a
Tótɛmɛla Zabolo, mpe akokima
19. Wapi lolenge moko oyo biso tokoki kotɛmɛla Zabolo?
19 Tokoki kolonga etumba ya elimo oyo tozali kobunda na Zabolo mpe bilimo mabe oyo azali kotambwisa. Tosengeli te kobangaka Satana, mpamba te moyekoli Yakobo akomaki boye: “Bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Yakobo 4:7) Lolenge moko oyo biso mpe tokoki kotɛmɛla Satana ná bilimo mabe oyo bazali nsima na ye ezali ya koboya mpenza misala ya molili to ya maji mpe bato oyo bamipesi na yango. Biblia emonisi polele ete basaleli ya Yehova basengeli te koluka koyeba makambo oyo ekoya to kotánga horoscope, mpe makambo ya bikelakela. Soki tomipesi na mosala ya Nzambe mpe tozali makasi na elimo, tosengeli kobanga te, moto moko te akokoka kolɔka biso.—Mituya 23:23; Deteronome 18:10-12; Yisaya 47:12-15; Misala 19:18-20.
20. Ndenge nini tokoki kotɛmɛla Zabolo?
20 ‘Tokotɛmɛla Zabolo’ soki tozali kolanda mitinda mpe mateya ya solo ya Biblia mpe soki tozali kozonga nsima te. Mokili ezali kolanda makanisi ya Satana mpo azali nzambe na yango. (2 Bakolinti 4:4) Yango wana, biso toboyi bizaleli ya mokili, lokola lolendo, moimi, misala ya mbindo, mobulu, mpe kolinga biloko ya mokili. Toyebi ete ntango Zabolo amekaki Yesu na esobe, Zabolo akimaki mpamba Yesu atɛmɛlaki ye na ndenge azalaki kotángela ye maloba ya Biblia. (Matai 4:4, 7, 10, 11) Ndenge moko mpe, tokolonga Satana mpe ‘akokima biso’ soki tozali kotosa Yehova mpe tozali kobondela mpe kotyela Ye motema mobimba. (Baefese 6:18) Na lisalisi ya Yehova Nzambe ná Mwana na ye ya bolingo, moto moko te—ata Zabolo ye moko—akoki kosala biso mabe oyo ekoumela libela!—Nzembo 91:9-11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na makanisi mosusu na ntina na molato ya etumba ya Nzambe, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1992, nkasa 21-23.
Okopesa eyano nini?
• Tosengeli nde kobangaka Satana Zabolo?
• Mpo na nini Satana azali kobimisela baklisto minyoko?
• Mpo na nini tobondelaka mpo tóbikisama na mabɔkɔ ya “moto mabe”?
• Ndenge nini tokoki kolonga etumba ya elimo oyo tozali kobunda?
[Elilingi na lokasa 26]
Bayekoli ya liboso ya Klisto bazalaki kobanga te: batikalaki sembo tii na liwa
[Elilingi na lokasa 27]
Zabolo akoki te kopekisa lisekwa ya bato oyo Yehova abombi na makanisi na ye
[Elilingi na lokasa 28]
Obondelaka Yehova abikisa yo longwa na “moto mabe”?
[Elilingi na lokasa 29]
Olati “molato mobimba ya etumba mouti na Nzambe”?