Tótambola na nzela ya pole oyo ezali se kobakisama
“Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.”—MASESE 4:18.
1, 2. Basaleli ya Nzambe bamoni makambo nini lokola Yehova azali se kobakisa pole ya elimo?
NANI, koleka Yehova Nzambe, Mopesi ya pole, akoki kolimbola malamu likambo oyo esalemaka ntango moi ebandi kobima? (Nzembo 36:9) Nzambe alobi ete ‘ntango pole ya ntɔngɔ esimbi bansuka ya mabelé, mabelé ebongwanaka lokola lima oyo enyatami na kashɛ, mpe biloko etikalaka lokola na elamba.’ (Yobo 38:12-14, NW) Ntango pole ya moi ezali kobakisama mokemoke, lolenge mpe langi ya biloko oyo ezali awa na mabelé ekómaka komonana polele ndenge lima ya pɛtɛpɛtɛ etikalaka na liyemi ya kashɛ oyo banyati likoló na yango.
2 Yehova azali mpe Mopesi ya pole ya elimo. (Nzembo 43:3) Atako mokili ezali na kati ya molili tuu, Nzambe ya solo azali kokoba kongɛngisa pole epai ya bato na ye. Yango ezali komema makambo nini? Biblia epesi eyano ete: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.” (Masese 4:18) Pole oyo Yehova azali kotinda ezali kobakisama mokemoke mpe ezali kongɛngisa nzela ya bato na ye. Ezali kosembola bango na oyo etali ebongiseli, mateya, mpe etamboli.
Pole esalisi na kosembola makambo mosusu etali ebongiseli
3. Yisaya 60:17 esakolaki nini?
3 Na nzela ya Yisaya, Yehova asakolaki boye: “Na esika ya motako nakoyeisa wolo mpe na esika ya ebende nakoyeisa palata; na esika ya mabaya, motako, na esika ya mabanga, ebende.” (Yisaya 60:17) Kolongola eloko ya motuya moke mpo na kotya eloko oyo eleki motuya na esika na yango emonisaka ete makambo ekei liboso; ndenge moko mpe, ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ekei liboso na makambo mingi na eleko oyo ya “bosukisi ya ebongiseli ya makambo,” to “mikolo ya nsuka.”—Matai 24:3; 2 Timote 3:1.
4. Ebongiseli nini ebandaki na 1919, mpe ememaki matomba nini?
4 Na ebandeli ya mikolo ya nsuka, na masangá ya Batatoli ya Yehova (na ntango wana Bayekoli ya Biblia), bankulutu ná badiakono bazalaki koponama na voti. Kasi, bankulutu mosusu bazalaki mpenza na elimo ya bapalanganisi ya nsango malamu te. Bamosusu bazalaki kosepela kosakola te; kutu, bazalaki kopekisa baninga na bango básakolaka. Yango wana, na 1919, ebongiseli moko ya sika esalemaki na lisangá mokomoko: bapesaki ndeko moko mokumba ya mokambi ya mosala. Mokambi ya mosala azalaki koponama na voti te, biro ya filiale nde ezalaki kopona ye. Mokumba ya mokambi ya mosala ezalaki ya kobongisa mosala ya kosakola, kokabola bateritware, mpe kolendisa bandeko bábimaka na mosala ya kosakola. Na bambula oyo elandaki, mosala ya kosakola ekendaki mpenza liboso.
5. Mbongwana nini esalemaki na bambula ya 1920?
5 Bandeko nyonso na masangá bazwaki lisusu makasi na elendiseli oyo elobaki ete, “Bósakola, bósakola, bósakola, Mokonzi ná bokonzi na ye,” oyo epesamaki na 1922 na liyangani ya etúká ya Bayekoli ya Biblia na Cedar Point, etúká ya Ohio, na États-Unis. Na 1927, mosala ya kosakola ebongisamaki malamu na boye ete mokolo nyonso ya lomingo ekómaki mokolo oyo ebongi mpenza mpo na mosala ya ndako na ndako. Mpo na nini baponaki mokolo ya lomingo? Mpamba te bato mingi bazalaki kosala te. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali komonisa elimo ya ndenge wana na ndenge bazali kosala makasi mpo na koluka bato na bangonga oyo bakoki kokuta bango na bandako, na ndakisa na wikende to na bampokwa.
6. Ekateli nini endimamaki na 1931, mpe ememaki mbongwana nini na mosala ya kosakola Bokonzi?
6 Mosala ya kosakola elendisamaki lisusu makasi mokolo ya lomingo, 26 Yuli 1931 na nsima ya midi, ntango bandeko oyo bazalaki na liyangani ya etúká oyo esalemaki na engumba Columbus, na etúká ya Ohio, bazwaki ekateli moko oyo, na nsima, bandeko na masangá ya mokili mobimba bandimaki yango. Na ekateli yango, esika moko elobaki boye: “Tozali basaleli ya Yehova Nzambe oyo totindami mpo na kosala mosala na nkombo na ye, mpe, mpo na kotosa komandema na ye, tozali kopesa litatoli ya Yesu Klisto, mpe koyebisa bato ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso; yango wana tondimi na esengo nyonso mpe tozwi nkombo oyo euti na monɔkɔ ya Nkolo Nzambe, mpe tolingi koyebana mpe kobengama na nkombo yango ya Batatoli ya Yehova.” (Yisaya 43:10) Nkombo wana ya sika emonisaki polele mosala ya libosoliboso ya bato nyonso oyo bakomema yango! Ya solo, Yehova azalaki na mosala moko oyo basaleli na ye nyonso basengeli kosala. Motángo monene ya bandeko bandimaki ekateli yango na esengo!
7. Mbongwana nini esalemaki na 1932, mpe mpo na nini?
7 Bankulutu mingi bamipesaki na komikitisa nyonso na mosala ya kosakola. Kasi, na bisika mosusu, bankulutu oyo baponamaki na voti baboyaki kondima ete moto nyonso na lisangá asengeli kosakolaka. Nzokande, mbongwana mosusu ezalaki liboso. Na 1932, masangá nyonso ezwaki malako na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ete bankulutu mpe badiakono báponama lisusu na voti te. Masangá esengelaki nde kobanda kosala voti mpo na kopona komite ya mosala ya kosakola, oyo ezali na mibali bakɔmeli na elimo oyo bazalaki kosangana na mosala ya kosakola. Na ndenge yango, mosala ya bakɛngɛli na lisangá epesamaki epai ya bato oyo bazalaki kosakola mpe na bongo, mosala ekendeki liboso.
Kobakisama ya pole ememi mbongwana mosusu
8. Mbongwana nini esalemaki na 1938?
8 Pole ezalaki ‘kongɛnga lisusu mpe lisusu.’ Na 1938, masangá etikaki mpenza likambo ya kopona bandeko na voti. Basaleli nyonso ya lisangá bakómaki koponama na ndenge ya teokrasi, na kolanda malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Masangá ya Batatoli ya Yehova pene na nyonso endimaki mbongwana yango, mpe mosala ya kosakola ekobaki kobota mbuma.
9. Na 1972, ebongiseli nini esalemaki, mpe mpo na nini ezalaki mbongwana ya malamu?
9 Kobanda mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1972, mbongwana mosusu esalemaki na ndenge ya kotambwisa lisangá. Lisangá mokomoko ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ekómaki kotambwisama na lisangani ya bankulutu na esika ya mosaleli, to mokɛngɛli kaka moko. Ebongiseli yango elendisi mpenza mibali oyo bakɔmeli na elimo mpo bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá. (1 Timote 3:1-7) Litomba na yango ezali ete bandeko mibali ebele bakómi na makoki ya kokokisa mikumba na lisangá. Bandeko yango basali mosala monene ya kosalisa ebele ya bandeko ya sika oyo bandimi solo ya Biblia!
10. Ebongiseli nini esalemaki na 1976?
10 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekómaki na bakomite motoba, mpe kobanda mokolo ya 1 Yanuali 1976, bakomite yango ekómaki kotambwisa misala nyonso ya ebongiseli mpe ya masangá na mokili mobimba. Lokola makambo nyonso ya mosala ya Bokonzi ezali kotambwisama na ebele ya “bato ya toli,” ebimisi matomba mingi!—Masese 15:22; 24:6.
11. Mbongwana nini esalemaki na 1992, mpe mpo na nini?
11 Na 1992, mbongwana mosusu esalemaki; yango ekokani na mbongwana oyo esalemaki ntango Bayisalaele mpe bato mosusu bautaki na boombo na Babilone. Na ntango wana, Balevi bazalaki moke mpo na misala nyonso ya tempelo. Banetinime, bato oyo bazalaki Bayisalaele te, bazwaki mikumba mosusu mpo na kosalisa Balevi. Ndenge moko mpe, mpo na kosalisa moombo ya sembo mpe ya mayele akokisa mokumba na ye ya kobatela bozwi ya Nkolo oyo ezali se kobakisama awa na mabelé, na 1992, bandeko mosusu oyo bazali “bampate mosusu” bazwaki mikumba ya minene. Baponamaki lokola basungi ya bakomite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.—Yoane 10:16.
12. Ndenge nini Yehova atye kimya lokola bakɛngɛli na biso?
12 Nyonso wana ememi matomba nini? Yehova alobaki boye: “Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita na yo. (Yisaya 60:17, NW) Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali na “kimya,” mpe bolingo mpo na “boyengebene” ekómi ‘kapita’ na bango, to mposa oyo ezali kotinda bango na kosalela Nzambe. Bazali na ebongiseli ya malamu mpenza mpo na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.—Matai 24:14; 28:19, 20.
Yehova azali kongɛngisa nzela na oyo etali mateya
13. Na bambula ya 1920, ndenge nini Yehova angɛngisaki nzela ya basaleli na ye na oyo etali mateya?
13 Yehova azali mpe kongɛngisa mokemoke nzela ya basaleli na ye na oyo etali mateya. Ndakisa moko ya likambo yango ezali Emoniseli 12:1-9. Lisolo yango elobeli bikelamu misato ya elilingi: “mwasi” moko oyo azali na zemi mpe aboti, “dalagona” moko, mpe “mwana mobali” moko. Oyebi soki ekelamu mokomoko ezali elilingi ya nini? Lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kobotama ya ekólo,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1925 na Lingelesi (1 Yuni na Lifalanse), elimbolaki yango. Lisolo wana esalisaki basaleli ya Nzambe bákanga ntina ya bisakweli oyo elobeli kobotama ya Bokonzi, bandimbola wana emonisaki polele ete ezali na bibongiseli mibale: ebongiseli ya Yehova mpe ebongiseli ya Satana. Na nsima, na 1927-1928, basaleli ya Nzambe basosolaki ete kosepela fɛti ya Noele mpe anivɛrsɛrɛ ya mbotama eyokani te na mateya ya Biblia mpe batikaki kosala yango.
14. Mateya nini elimbolamaki polele na bambula ya 1930?
14 Na bambula ya 1930, pole engɛngaki lisusu likoló ya mateya misato. Banda bambula mingi, Bayekoli ya Biblia bazalaki koyeba ete “ebele ya bato” oyo Emoniseli 7:9-17 elobeli bakeseni na bato 144 000, oyo bakoyangela na Klisto lokola bakonzi mpe banganga-nzambe. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1-5) Kasi, bazalaki koyeba te soki ebele ya bato ezali mpenza banani. Se ndenge lolenge mpe langi ya biloko emonanaka polele wana pole ya ntɔngɔ ezali kobakisama mokemoke, na 1935 ndimbola epesamaki ete ebele ya bato ezali baoyo bakobika na “bolɔzi monene,” mpe bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé. Na nsima, kaka na mbula yango, likambo mosusu elimbolamaki polele; na bikólo mingi likambo yango ebimisaki mokakatano mpo na bana ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki naino na kelasi. Na ntango oyo bolingo ya ekólo ezalaki kokóma makasi na mokili mobimba, Batatoli basosolaki ete kopesa drapo losako ezali kosambela yango. Na mbula oyo elandaki, balimbolaki ete Klisto akufaki na nzete, kasi na ekulusu te.—Misala 10:39.
15. Ntango nini mpe ndenge nini elimbolamaki ete makila ezali eloko ya bosantu?
15 Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntango bakómaki na momeseno ya kozongisa makila epai ya basoda oyo bazoki na bitumba, pole ebakisamaki mpe basaleli ya Yehova basosolaki ete makila ezali eloko ya bosantu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1945 elendisaki “basambeli nyonso ya Yehova oyo bazali na mposa ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya boyengebene ete bátalela makila lokola eloko ya bosantu mpe bálanda malako ya sembo ya Nzambe na likambo yango ya ntina mingi.”
16. Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebimaki na mbula nini, mpe wapi makambo na yango mibale ya ntina mingi?
16 Na 1946, basaleli ya Yehova bamonaki ete bazali na mposa ya Biblia oyo ebongolami na kolanda makambo oyo bato ya mayele na maloba ya Biblia bayekoli mpe oyo elandi te mateya oyo euti na mangomba ya boklisto. Mosala ya kobongola Biblia yango ebandaki na sanza ya Desɛmbɛ 1947. Na 1950, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ebimaki na Lingelesi. Na 1953, volimi ya liboso ya Makomami ya Liebele ebimaki na Lingelesi. Volimi ya mitano mpe ya nsuka ebimaki na 1960, elingi koloba mbula koleka 12 banda ntango mosala ya kobongola ebandaki. Biblia mobimba Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebimaki na 1961. Lelo oyo, libongoli yango ezali na minɔkɔ ebele mpe ezali na mwa makambo mingi ya ntina kati na yango. Na ndakisa, esaleli nkombo ya Nzambe, Yehova. Longola yango, lokola ebongoli malamumalamu maloba ya minɔkɔ ya Liebele ná ya Grɛki, ezali kosalisa biso tókoba kokanga ntina ya mateya ya solo.
17. Bingɛngiseli nini epesamaki na 1962?
17 Na 1962, baklisto ya solo bazwaki ndimbola ya malamu ya maloba “bakonzi oyo bazali liboso” oyo Baloma 13:1 elobeli mpe na makambo nini basengeli kotosa bango. Boyekoli malamumalamu ya Baloma mokapo 13 mpe bavɛrsɛ mosusu ya Biblia lokola Tito 3:1, 2 mpe 1 Petelo 2:13, 17 emonisaki polele ete “bakonzi oyo bazali liboso” ezali te Yehova Nzambe ná Yesu Klisto, ezali nde bakonzi ya Leta.
18. Wapi mwa mateya ya solo oyo elimbolamaki polele na bambula ya 1980?
18 Na bambula oyo elandaki, nzela ya basembwi ekobaki kongɛnga lisusu mpe lisusu. Na 1985 pole ebakisamaki mpe likambo ya kotángama moyengebene “mpo na bomoi” mpe moyengebene lokola moninga ya Nzambe elimbolamaki polele. (Baloma 5:18; Yakobo 2:23) Yubile ya baklisto elimbolamaki malamumalamu na 1987.
19. Ndenge nini Yehova apesi lisusu basaleli na ye pole mingi na bambula oyo euti koleka?
19 Na 1995, tokangaki ntina malamu ya kokabolama ya “bampate” ná “bantaba.” Na 1998, tozwaki ndimbola ya eteni mokomoko ya tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli, likambo oyo esilaki kobanda kokokisama. Na 1999, balimbolaki biso ntango nini mpe ndenge nini ‘eloko ya bosɔtɔ etɛlɛmaki na esika mosantu.’ (Matai 24:15, 16; 25:32) Na 2002 tososolaki malamu soki kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo” elimboli mpenza nini.—Yoane 4:24.
20. Basaleli ya Nzambe bazwaki bingɛngiseli na makambo etali nini?
20 Longola mbongwana na makambo etali ebongiseli mpe mateya, makambo mosusu oyo etali etamboli ya baklisto elimbolamaki malamumalamu. Na ndakisa, na 1973 emonanaki ete komɛla likaya ezali ‘mbindo ya mosuni’ mpe ekómaki kotalelama ete ezali lisumu monene. (2 Bakolinti 7:1) Mbula zomi na nsima, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1983 (ebimeli ya Lifalanse) elimbolaki malamu ndenge oyo tosengeli kotalela likambo ya kosimba mindoki. Nyonso wana ezali kaka bandakisa moke ya kongɛnga ya pole oyo ebakisami na ntango na biso.
Tókoba kotambola na nzela ya pole oyo ezali se kobakisama
21. Makanisi nini ekosalisa biso tókoba kotambola na nzela ya pole oyo ezali se kobakisama?
21 Nkulutu moko oyo aumeli na lisangá alobaki boye: “Kondima mbongwana mpe komesana na yango ezalaka pɛtɛɛ te.” Nini esalisaki ye mpo na kondima ebele ya mbongwana oyo esalemi na boumeli ya mbula 48 oyo azali mosakoli ya Bokonzi? Alobi boye: “Sɛkɛlɛ ezali kozala na makanisi oyo ebongi. Koboya ndimbola ya sika elimboli kotikala nsima na ntango oyo ebongiseli ya Yehova ezali kokende liboso. Soki nazali kokakatana mpo na kondima mbongwana, nakanisaka maloba oyo Petelo ayebisaki Yesu ete: ‘Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.’ Na nsima, namitunaka, ‘Nakokende epai wapi na mokili oyo etondi na molili?’ Yango esalisaka ngai nakangama na ebongiseli ya Nzambe.”—Yoane 6:68.
22. Matomba nini tokozwa soki tozali kotambola na pole?
22 Tozali na mokili oyo ezali mpenza na molili. Lokola Yehova azali kokoba kotinda pole oyo ezali kongɛngisa basaleli na ye, bokeseni kati na bango mpe bato ya mokili ezali se kobakisama. Pole yango ezali kosala nini epai na biso? Miinda ya motuka ekoki kosalisa biso tómona libulu oyo ezali na nzela, kasi ekolongola libulu yango te. Ndenge moko mpe, pole ya Liloba ya Nzambe elongolaka te makambo oyo ekoki kobɛtisa biso libaku. Kasi, esalisaka biso tókima yango mpe tókoba kotambola na nzela ya pole oyo ezali se kobakisama. Yango wana, tókoba kotya likebi na liloba ya esakweli ya Yehova, “lokola mwinda oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili.”—2 Petelo 1:19.
Ozali koyeba lisusu?
• Mbongwana nini Yehova asali na ebongiseli ya basaleli na ye?
• Pole oyo ezali kobakisama ememaki mbongwana nini na mateya?
• Mbongwana nini oyo yo moko omoni, mpe nini esalisaki yo na kondima yango?
• Mpo na nini olingi kokoba kotambola na nzela ya pole oyo ezali se kobakisama?
[Bililingi na lokasa 27]
Na 1922, na liyangani ya etúká ya Cedar Point, Bayekoli ya Biblia balendisamaki na komipesa na mosala ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 29]
Nathan Knorr azali kolakisa “Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto,” na 1950
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
© 2003 BiblePlaces.com