Ndenge ya kozwa bikateli oyo ekosepelisa Nzambe
NA ÉTATS-UNIS, mobali moko akendaki na banki na chèque ya dolare 25000. Azalaki na makanisi ya kobombisa mbongo yango mpo na mwa ntango na banki. Kasi, mosali ya banki apesaki ye toli ete akɔtisa yango na mombongo ya bakompanyi (bourse); alobaki ete na mombongo ya bakompanyi, mbongo ebungaka te. Mobali yango alandaki toli wana. Kasi, eumelaki te, valɛrɛ ya mbongo na ye ekitaki mingi.
Ndakisa yango ezali komonisa ete kozwa bikateli ya malamu ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Likambo yango ezali solo mpo na bikateli nyonso oyo tozwaka na bomoi. Bikateli mingi ekoki kosalisa biso tókende liboso, kasi mosusu ekoki mpe kozongisa biso nsima mpe nsukansuka komemela biso liwa. Na yango, ndenge nini tokoki kondimisama ete bikateli na biso ezali malamu?
“Oyo ezali nzela”
Mokolo na mokolo, tozwaka bikateli na oyo etali biloko oyo tokolya, bilamba oyo tokolata, bisika oyo tokokende, mpe bongo na bongo. Bikateli mosusu ekoki komonana moke, nzokande ekoki kobimisa mikakatano minene na nsima. Na ndakisa, komɛla likaya mbala ya liboso ekoki kozala lokola lisɛki, nzokande, ekoki kokómisa moto moombo ya likaya. Tosengeli soki moke te kozwa na lisɛki bikateli oyo emonanaka mike.
Epai ya nani tokoki kozwa toli mpo na kozwa bikateli, ata na makambo oyo emonanaka mike? Kozala na mopesi-toli ya malamu, oyo akoki kosalisa biso ntango tozali kozwa bikateli ya minene, ezali likambo malamu! Mopesi-toli ya ndenge wana azali. Buku moko ya kala oyo ezali na ntina mingi lelo oyo elobi boye: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:21) Nani alobaki maloba yango? Nini ekoki kondimisa yo otyela toli na ye motema?
Maloba wana euti na Biblia, mokanda oyo bamilio ya bato bayekoli mpe bandimi ete epemami na Mozalisi, Yehova Nzambe. (2 Timote 3:16, 17) Yehova azali mopesi-toli oyo aleki malamu mpamba te ayebi ndenge oyo tosalemá. Azali mpe na likoki ya komona makambo oyo ekoya mpo azali “Oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalami naino te, oyo alobi ete, Toli na ngai ekotɛlɛma.” (Yisaya 46:10) Yango wana, mokomi ya nzembo alobaki boye mpo na komonisa ete azalaki kotyela Liloba ya Yehova motema: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka na ngai mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Kasi, ndenge nini Yehova asalisaka biso tótambola malamu na kati ya mokili oyo etondi na yikiyiki? Ndenge nini tokoki kozwa bikateli oyo ekosepelisa Nzambe?
Tólanda mitinda ya Biblia
Yehova Nzambe apesi baklisto mitinda oyo ekoki kosalisa bango bázwaka bikateli ya malamu. Koyekola mitinda ya Biblia mpe kosalela yango ezali lokola koyekola monɔkɔ ya sika. Soki oyebi monɔkɔ yango malamu, mbala mingi okobanda koyeba esika oyo moto asali foti ntango azali koloba. Mbala mosusu okoyeba te kolimbola foti nini ya gramɛrɛ oyo asali, kasi oyebi kaka ete asali foti. Ntango oyebi mitinda ya Biblia malamu, okobanda koyeba ete ekateli boye to boye ezali malamu te, eyokani te na mitinda ya Biblia.
Tózwa ndakisa ya elenge mobali oyo alingi kopona modɛlɛ ya nsuki oyo alingi kokatisa. Mobeko moko te ya Biblia elobi ete baklisto basengeli kobongisa nsuki na lolenge boye to boye. Nzokande, tótalela etinda moko ya Biblia. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nalingi ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na nzela ya misala ya malamu.” (1 Timote 2:9, 10) Atako na vɛrsɛ yango, Paulo alobelaki basi, etinda yango etaleli mpe mibali. Ezali etinda nini? Tosengeli kolata mpe kobongisa nsuki na biso na kolekisa ndelo te mpe na makanisi ya malamu. Na yango, elenge mobali yango akoki komituna boye, ‘Modɛlɛ na ngai ya nsuki ezali komonisa ete nalekisi ndelo?’
Moklisto oyo azali elenge akoki koyekola etinda nini na maloba oyo ya moyekoli Yakobo? “Basi ya ekobo, boyebi te ete boninga ná mokili ezali bonguna ná Nzambe? Na yango, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4) Baklisto baboyaka boninga nyonso na mokili, mpamba te yango ezali bonguna na Nzambe. Soki elenge moklisto alandi modɛlɛ ya nsuki oyo baninga na ye bazali kosepela na yango, ekomonisa ete azali moninga ya Nzambe to moninga ya mokili? Elenge oyo alingi kopona modɛlɛ ya nsuki akoki kotalela mitinda wana mpo na kozwa ekateli ya malamu. Tomoni mpenza ete mitinda ya Biblia esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Soki tomesani kolanda mitinda ya Biblia mpo na kozwa bikateli, tokobanda kozwa te bikateli oyo ekobota mbuma mabe.
Liloba ya Nzambe ezali na mitinda mingi. Ya solo, na bantango mosusu tokomona te vɛrsɛ oyo elobeli mpenza likambo oyo tozali na yango. Kasi, tokoki kotánga masolo ya Biblia oyo ezali komonisa ndenge oyo bato mosusu balandaki toli ya Nzambe mpe ndenge oyo bato mosusu balandaki yango te. (Genese 4:6, 7, 13-16; Deteronome 30:15-20; 1 Bakolinti 10:11) Soki tozali kotánga masolo ya ndenge wana mpe tozali kotalela mbuma oyo bato yango babukaki, tokoyeba mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli oyo okosepelisa Nzambe.
Tózwa ndakisa ya mwa lisolo ya Yesu Klisto ná ntoma Petelo. Bato oyo bazalaki kokɔngɔla mpako ya badalakima mibale batunaki Petelo boye: “Moteyi na bino afutaka mpako ya badalakima mibale te?” Petelo ayanolaki ete: “Te, afutaka.” Mwa moke na nsima, Yesu atunaki Petelo boye: “Bakonzi ya mabelé bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bapaya?” Ntango Petelo alobaki ete: “Epai ya bapaya,” Yesu alobaki na ye ete: “Boye, ezali solo ete bana bazali te na mokumba ya kofuta mpako. Kasi mpo tóbɛtisa bango libaku te, kende na mbu, bwaká ndɔbɔ, mpe kamatá mbisi ya liboso oyo ekomata mpe, ntango okofungola monɔkɔ na yango, okokuta mbongo ya ebende ya satatɛlɛ. Kamatá yango mpe pesá bango yango mpo na ngai ná yo.” (Matai 17:24-27) Lisolo yango eteyi biso mitinda nini?
Yesu atunaki Petelo mituna mpo na kosalisa ye asosola ete lokola Yesu azali Mwana ya Nzambe, akokaki kofuta mpako te. Atako na ebandeli Petelo ayebaki yango te, Yesu asalisaki ye na boboto mpenza. Na yango, ntango moto moko asali libunga, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu: tokosalisa ye na boboto na esika ya kosambisa ye.
Lokola Yesu asalisaki ye, Petelo amonaki ntina oyo basengelaki kofuta mpako ya moto na moto—mpo na kobɛtisa bato mosusu libaku te. Lisolo yango ezali koteya biso etinda mosusu: tosengeli mpe kotalelaka lisosoli ya basusu na esika ya kotingama kaka na makambo tozali na lotomo ya kosala.
Nini esengeli kotinda biso tózwaka bikateli oyo ekomonisa ete tozali kotalela lisosoli ya basusu? Bolingo mpo na bazalani na biso. Yesu Klisto ateyaki ete kolinga bazalani na biso lokola biso moko ezali komandema ya mibale, nsima ya komandema ya kolinga Nzambe na molimo na biso mobimba. (Matai 22:39) Nzokande, mokili oyo etondi na moimi mpe bomoto na biso ya masumu etindaka biso tóluka kaka bolamu na biso. Yango wana, mpo moto akóma kolinga bazalani na ye lokola ye moko, asengeli kobongola makanisi na ye.—Baloma 12:2.
Bato mingi babongoli makanisi na bango mpe batalelaka lisosoli ya basusu liboso ya kozwa ekateli, ezala ya monene to ya moke. Paulo akomaki boye: “Ya solo, bobengamaki mpo na bonsomi, bandeko; kaka nde bósalela bonsomi yango te lokola nzela mpo na mosuni, kasi na bolingo bósalelanaka lokola baombo.” (Bagalatia 5:13) Ndenge nini tokoki kolanda toli yango? Tótalela ndakisa ya elenge mwasi moko oyo akendaki kofanda na mwa engumba moko mpo na kosakola nsango malamu. Ntango akómaki kuna amonaki ete elateli na ye, atako ezalaki malamu na ndenge ya bato ya vile, bato ya mboka bazalaki koloba mabe mpo na yango. Molato na ye mpe ndenge na ye ya kobongisa nsuki ezalaki mabe te, kasi azwaki ekateli ya kolata bilamba oyo ekobɛtisa bato ya mboka libaku te “mpo liloba ya Nzambe efingama te.”—Tito 2:5.
Soki ezalaki yo na esika ya ndeko mwasi yango, olingaki kosala nini? Yebá ete Yehova asepelaka soki ozali kotalela lisosoli ya bato mosusu ntango ozali kozwa bikateli.
Monáká mosika
Longola mitinda ya Biblia mpe lisosoli ya basusu, tosengeli kotalelaka nini ntango tozali kozwa bikateli? Atako baklisto bazali kotambola na nzela ya nkaka mpe ekangamakangamá, Nzambe apesi bango bonsomi mingi na kati ya nzela yango. (Matai 7:13, 14) Tosengeli kotalelaka soki bikateli na biso ekobebisa te elimo, makanisi, mpe kolɔngɔnɔ na biso ya nzoto na mikolo ezali koya.
Kanisá ete balingi kozwa yo na mosala moko. Mbala mosusu mosala yango moko ezali mabe te. Kutu, ekopekisa yo te oyanganaka na makita mpe na mayangani. Lisusu, bakobanda kofuta yo malamu koleka kutu ndenge oyo okokaki kokanisa. Patrɔ amoni ete oyebi malamu mosala na yo mpe alingi kosalela yo mingi. Yo moko mpe osepeli na mosala yango. Ezali nde na likambo mosusu oyo ekoki kopekisa yo ondima mosala yango? Okanisi boni soki ozali komona ete okokóma moombo ya mosala yango? Patrɔ ayebisi yo ete akosɛnga yo te osalaka nsima ya ngonga ya mosala. Kasi, mpo na kosilisa mosala moko oyo obandi, ekosɛnga yo omipesa mingi koleka? Ekoki nde kozala ete likambo ya ndenge wana ekobanda kozonga mbala na mbala? Mbala mosusu yango ekobanda nde kopekisa yo ozalaka na libota na yo to mpe ntango mosusu kopekisa yo obima na mosala ya kosakola to oyangana na makita?
Tótala ndenge Jim azwaki ekateli moko monene na likambo etali mosala na ye. Azalaki kosala mingi mpe amataki mpɛtɛ na kompanyi. Akómaki mokambi ya kompanyi yango na Azia, azalaki mpe kokamba misala na yango mosusu na États-Unis mpe na Mpoto. Nzokande, ntango nkita ya Japon ekitaki, amonaki ete koluka kokóma moto monene mpe kozala na mbongo mingi ezali na ntina te. Mbongo nyonso oyo amonelaki mpasi elimwaki. Amonaki ete bomoi na ye ezali lisusu na ntina te. Amitunaki boye: ‘Nakozala ndenge nini nsima ya mbula zomi?’ Amonaki ete mwasi mpe bana na ye bazalaki kolanda mikano oyo eleki ntina na bomoi. Banda bambula mingi bazalaki kosangana na Batatoli ya Yehova. Jim alingaki ete ye mpe azala na esengo ndenge moko na mwasi mpe bana na ye. Yango wana, abandaki koyekola Biblia.
Jim amonaki ete mosala na ye ezalaki kopekisa ye azala na bomoi oyo ezali na ntina lokola moklisto ya solo. Lokola azalaki ntango nyonso kosala mibembo na Azia, na États-Unis, mpe na Mpoto, azalaki na ntango te mpo na koyekola Biblia mpe kolekisa ntango na baklisto mosusu. Amitunaki boye: ‘Nasengeli kokoba na bomoi oyo nazali na yango banda bambula 50, to nasengeli kobongwana?’ Abondelaki Nzambe mpe atalelaki mbuma oyo ekateli na ye ekobota mpe atikaki mikumba nyonso oyo azalaki na yango mpe atikalaki kaka na mosala moko mpo azwa ntango ya komipesa na makambo ya elimo. (1 Timote 6:6-8) Ekateli yango epesaki ye esengo mpe likoki ya kosala mingi na mosala ya boklisto.
Bikateli na yo, ezala ya minene to ya mike, ezali na ntina. Ekateli oyo ozwi lelo ekoki kosalisa yo okende liboso mpe kobatela bomoi na yo to mpe ozonga nsima mpe nsukansuka komemela yo liwa. Okoki kozwa bikateli ya malamu soki ozali kolanda mitinda ya Biblia, kotalela lisosoli ya basusu, mpe kokanisa mbuma oyo ekateli yango ekoki kobota. Yango wana, zwáká bikateli oyo ekosepelisa Nzambe.
[Elilingi na lokasa 13]
Bikateli oyo emonanaka mike, ekoki kobimisa mikakatano minene na nsima
[Elilingi na lokasa 14]
Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaki ye azwa bikateli ya malamu?
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu asalisaki Petelo na boboto