Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/5 nk. 22-26
  • Yehova ateyaka bankulutu mpo báyeba kobatela etonga na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova ateyaka bankulutu mpo báyeba kobatela etonga na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bankulutu oyo bakɔmelá basalisaka bango
  • Liloba ya Nzambe eteyaka bango
  • “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali koteya bango
  • Bankulutu oyo bazali “bandakisa epai ya etonga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Babateli oyo motema na ngai endimi”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Babateli ya mpate ya Klisto, ‘Bófungola mpenza mitema na bino’!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/5 nk. 22-26

Yehova ateyaka bankulutu mpo báyeba kobatela etonga na ye

“[Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ekoutaka na monɔkɔ na ye.”​—MASESE 2:6.

1, 2. Mpo na nini bandeko mibali balukaka mikumba na lisangá?

NICK, oyo azali nkulutu banda mbula nsambo, alobi boye: “Nasepelaki makasi ntango baponaki ngai nkulutu. Namonaki mokumba yango lokola libaku ya kosalela Yehova lisusu mingi. Mpo na nyonso oyo asalelá ngai, nazalaki komona ete nazali na nyongo monene epai na ye. Nazalaki mpe na mposa ya kosalisa bandeko ya lisangá mingi, ndenge bankulutu mosusu basalisaki ngai.” Nzokande, atako azalaki na esengo nyonso wana, ezalaki mpe na makambo oyo ezalaki kobangisa ye. Nick abakisaki boye: “Lokola nakokisaki naino mbula 30 te ntango nakómaki nkulutu, nazalaki kokanisa ete nakozanga bososoli mpe bwanya, makoki oyo esengeli mpo na kozala nkulutu na lisangá.”

2 Baoyo Yehova aponaka mpo na kobatela etonga na ye basengeli mpenza kozala na esengo. Ntoma Paulo akundolelaki bankulutu ya Efese ntina moko oyo basengelaki kozala na esengo ntango atángelaki bango maloba ya Yesu oyo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Kozala mosaleli na misala to nkulutu ebakiselaka bandeko mibali mabaku ya kopesa Yehova mpe lisangá. Na ndakisa, basaleli na misala bapesaka bankulutu mabɔkɔ. Bazwaka mpe mikumba mosusu oyo, atako elyaka bango ntango mingi, ezali na ntina mingi. Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango etindaka bandeko wana básala misala wana ya ntina mingi.​—Malako 12:30, 31.

3. Mpo na nini bandeko mosusu babangaka koluka mikumba na lisangá?

3 Ezali boni mpo na ndeko oyo azali kobanga koluka kokóma mosaleli na misala to nkulutu mpo azali kokanisa ete akokoka te? Lokola Nick, akoki kokanisa ete azali na makoki oyo esengeli te mpo na kozala nkulutu ya malamu. Yo mpe ozali na kati ya bandeko mibali oyo bazali kokanisa bongo? Tokoki koloba te ete ozali kobanga kaka mpamba. Yehova akotuna bankulutu oyo ye atyá mpo na lolenge oyo bazali kokokisa mokumba yango. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo bapesi ye mingi, bakosɛnga ye mingi; mpe moto oyo bapesi ye mokumba ya biloko mingi, bakosɛnga ye mingi koleka ndenge esɛngamaka.”​—Luka 12:48.

4. Ndenge nini Yehova asalisaka bato oyo aponaka mpo báyeba kobatela bampate na ye?

4 Yehova atikaka nde basaleli na misala mpe bankulutu bámema mokumba yango kaka bango moko? Te, apesaka bango lisalisi ya malamu mpenza, oyo epesaka bango kaka te likoki ya kokokisa mokumba na bango, kasi mpe ya kokende liboso. Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, Yehova apesaka bango elimo santu na ye, oyo mbuma na yango esalisaka bango bábatela bampate na boboto. (Misala 20:28; Bagalatia 5:22, 23) Lisusu, Yehova apesaka bango bwanya, boyebi mpe bososoli. (Masese 2:6) Ndenge nini asalaka yango? Tiká tótalela lolenge misato oyo Yehova ateyaka bato oyo aponaka mpo báyeba kobatela bampate na ye.

Bankulutu oyo bakɔmelá basalisaka bango

5. Mpo na nini Petelo ná Yoane bazalaki bankulutu ya malamu mpenza?

5 Ntango bantoma Petelo ná Yoane batɛlɛmaki liboso ya Sanedrina, bazuzi ya tribinale yango oyo bazalaki na bwanya mingi ya mokili bamonaki bango lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” Toboyi te, bayebaki kotánga mpe kokoma, kasi bayekolaki Makomami lokola balabi te. Atako bongo, Petelo ná Yoane mpe bayekoli mosusu bazalaki bateyi ya malamu mpenza, mpe mateya na bango etindaki bato mingi oyo bayokaki bango bákóma bandimi. Ndenge nini bato mpamba wana bakómaki bateyi minene bongo? Nsima ya koyoka Petelo ná Yoane, bazuzi “bayaki koyeba malamumalamu na ntina na bango ete bazalaki elongo na Yesu.” (Misala 4:1-4, 13) Ya solo, bazwaki elimo santu. (Misala 1:8) Kasi, emonanaki polele, ata na miso ya bazuzi wana oyo bakufaki miso ya elimo ete Yesu ateyaki mibali yango. Ntango azalaki na bango awa na mabelé, Yesu ateyaki bayekoli na ye kaka te ndenge ya koyanganisa bampate, kasi mpe ndenge ya kobatela bango soki bakɔti na etonga.​—Matai 11:29; 20:24-28; 1 Petelo 5:4.

6. Ndakisa nini Yesu ná Paulo batiká na likambo ya koteya basusu?

6 Nsima ya kosekwa, Yesu akobaki koteya bankulutu. (Emoniseli 1:1; 2:1–3:22) Na ndakisa, ye moko aponaki Paulo mpe azwaki bibongiseli ete báteya ye. (Misala 22:6-10) Paulo asepelaki na mateya oyo azwaki mpe ateyaki bankulutu mosusu mateya yango. (Misala 20:17-35) Na ndakisa, alekisaki ebele ya ntango mpe makasi na ye mpo na koteya Timote azala “mosali” ya Nzambe, “oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni.” (2 Timote 2:15) Paulo ná Timote bakómaki baninga mpenza. Mwa liboso, Paulo akomaki mpo na Timote ete: “Lokola mwana ná tata na ye asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.” (Bafilipi 2:22) Paulo alukaki te kokómisa Timote to moto mosusu moyekoli na ye. Alendisaki nde baninga na ye bandimi bákóma ‘bamekoli na ye, ndenge ye mpe azalaki momekoli ya klisto.’​—1 Bakolinti 11:1.

7, 8. (a) Ndakisa nini emonisi matomba oyo emonanaka soki bankulutu bazali komekola Yesu ná Paulo? (b) Ntango nini bankulutu basengeli kobanda koteya bandeko oyo bakoki kokóma basaleli na misala mpe bankulutu?

7 Na ndakisa ya Yesu ná Paulo, bankulutu oyo bakɔmelá bateyaka bandeko mibali, mpe yango ebimisaka matomba ya malamu mpenza. Tózwa ndakisa ya Chad. Atako tata na ye azalaki Motatoli ya Yehova te, Chad auti kokóma nkulutu. Alobi boye: “Na boumeli ya bambula, bankulutu mingi oyo bakɔmelá basalisaki ngai nakola na elimo. Lokola tata na ngai azalaki mondimi te, bankulutu yango bazalaki kotyela ngai likebi mingi mpe bakómaki lokola batata na ngai ya elimo. Bazwaki ntango ya kolakisa ngai mosala ya kosakola, mpe na nsima, nkulutu moko asalisaki ngai na kokokisa mikumba oyo nazalaki kozwa na lisangá.”

8 Ndenge lisolo ya Chad emonisi yango, bankulutu oyo bazali na bososoli babandaka koteya bandeko oyo bazali na makoki ya kokóma basaleli na misala mpe bankulutu ntango molai liboso bázwa mikumba yango. Mpo na nini? Mpamba te Biblia ezali kosɛnga ete basaleli na misala mpe bankulutu bákóma na bizaleli malamu mingi mpe bákɔmela na elimo liboso bápesa bango mikumba yango. Esengeli “bámekama liboso mpo na koyeba makoki na bango.”​—1 Timote 3:1-10.

9. Mokumba nini bankulutu oyo bakɔmelá bazali na yango, mpe mpo na nini?

9 Soki bandeko mibali yango basengeli komekama, ebongi báteya bango naino. Tózwa ndakisa: Soki na eteyelo basɛngi moyekoli moko asala momekano moko ya makasi ya makambo oyo bateyaki ye te, akoki kozwa na momekano yango? Emonani ete akozwa te. Yango emonisi ete ezali na ntina báteya ye liboso. Yango wana, balakisi ya malamu bateyaka bayekoli kaka te mpo bálonga na mamekani, kasi mpe mpo báyeba kosalela boyebi oyo bakozwa. Ndenge moko mpe, bankulutu ya molende basalisaka bandeko mibali bálona bizaleli oyo esengeli mpo na kozwa mikumba. Basalisaka bandeko yango kaka mpo bázwa mikumba te, kasi mpe mpo báyeba kobatela etonga malamu. (2 Timote 2:2) Ya solo, bandeko mibali basengeli mpe kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala to bankulutu. (Tito 1:5-9) Atako bongo, soki bankulutu oyo bakɔmelá bazali koteya bandeko oyo bazali koluka mikumba, bakoki kosalisa bango bákola noki.

10, 11. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa basusu bázwa mikumba?

10 Ndenge nini mpenza bankulutu oyo bakɔmelá bakoki kosalisa basusu mpo bázwa mikumba na lisangá? Libosoliboso, basengeli kotyelaka bandeko ya lisangá likebi, na ndakisa kobimaka na bango mingi na mosala ya kosakola mpe kosalisa bango bákolisa makoki na bango ya kosembola “liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) Bankulutu oyo bakɔmelá bayebisaka bandeko bisengo oyo moto akoki kozwa na kosalela basusu mpe bisengo oyo bango moko bazwaka ntango bamityeli mikano ya elimo mpe bakokisi yango. Na boboto nyonso, bayebisaka mpe bandeko milende oyo bakoki kosala lisusu mpo na kokóma “bandakisa epai ya etonga.”​—1 Petelo 5:3, 5.

11 Soki ndeko moko akómi mosaleli na misala, bankulutu ya bwanya bakobaka kolakisa ye. Bruce, oyo azali nkulutu banda mbula soki 50, alobi boye: “Nasepelaka kofanda na ndeko oyo auti kokóma mosaleli na misala mpe kotalela na ye malako oyo moombo ya sembo mpe ya mayele abimisá na mikanda. Totalelaka mpe malako oyo etali mokumba oyo bapesi ye na lisangá, mpe nasepelaka kosala elongo na ye tii ntango akomesana na mikumba yango.” Ntango mosaleli na misala azali kokɔmela, bakoki mpe kolakisa ye ndenge ya kobatela bampate. Bruce alobi lisusu boye: “Soki nabimi na mosaleli na misala mpo na kotala bampate, nasalisaka ye na kopona mikapo oyo ekolendisa moto to libota oyo tokei kotala. Koyekola kosalela Makomami na ndenge oyo ekosimba mitema ya bato ezali na ntina mingi mpo na mosaleli na misala oyo alingi kokóma nkulutu.”​—Baebele 4:12; 5:14.

12. Ndenge nini bankulutu oyo bakɔmelá bakoki kosalisa bankulutu ya sika?

12 Bandeko oyo bauti kokóma bankulutu bazwaka mpe litomba monene na lisalisi ya bankulutu mosusu. Nick, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Lisalisi oyo nazwaki epai ya bankulutu oyo baleki ngai na mbula esalisaki ngai mingi. Mbala mingi, bandeko yango bazalaki koyeba nini esengelaki kosala na likambo boye to boye. Bazalaki ntango nyonso koyoka ngai na motema molai mpe bazalaki kotala makanisi na ngai mpamba te, ata soki eyokani te na oyo ya bango. Nayekolaki makambo mingi na elimo ya komikitisa mpe na limemya oyo bandeko yango bazalaki komonisela bandeko ya lisangá. Bankulutu yango basalisaki ngai nayeba ntina ya kosalela Biblia malamu ntango nazali kotalela makambo oyo ebimi na lisangá to kolendisa bandeko.”

Liloba ya Nzambe eteyaka bango

13. (a) Mpo na kozala nkulutu ya malamu, esɛngaka nini? (b) Mpo na nini Yesu alobaki: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te”?

13 Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali na mibeko, mitinda mpe bandakisa oyo ekoki kosalisa nkulutu akóma “moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Atako ndeko moko atánga mingi, boyebi na ye ya Makomami mpe ndenge oyo asalelaka yango nde ekosalisa ye akóma nkulutu ya malamu. Tózwa ndakisa ya Yesu. Azalaki mobateli ya mpate oyo alekaki na boyebi, na bososoli mpe na bwanya awa na mabelé; kasi, ata ye azalaki kotya motema na bwanya na ye moko te ntango azalaki koteya bampate ya Yehova. Alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” Mpo na nini Yesu azalaki kozongisa lokumu nyonso epai ya Tata na ye ya likoló? Alimbolaki boye: “Moto oyo alobaka makambo oyo euti na ye moko alukaka nkembo na ye moko.”​—Yoane 7:16, 18.

14. Ndenge nini bankulutu baboyaka koluka lokumu na bango moko?

14 Bankulutu ya sembo balukaka te lokumu na bango moko. Ntango bazali kopesa bandeko toli to kolendisa bango, basalelaka bwanya na bango moko te, kasi nde Liloba ya Nzambe. Bayebi ete mosala ya nkulutu ezali ya kosalisa bampate bákóma na “makanisi ya Klisto,” kasi te oyo ya bango. (1 Bakolinti 2:14-16) Na ndakisa, ezali boni soki nkulutu oyo azali kosalisa ndeko moko ná mwasi na ye básilisa matata na libala na bango azali kopesa bango toli na kolanda makambo oyo ye moko akutanaki na yango na esika ya mitinda ya Biblia mpe makanisi oyo ezali na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (Matai 24:45) Toli na ye ekoki kolanda mimeseno ya bonkɔkɔ to boyebi na ye ya kozanga kokoka. Toboyi te, mimeseno mosusu ya bonkɔkɔ ezalaka mpenza mabe te, mpe nkulutu yango akoki koyeba makambo mingi na bomoi. Kasi, bampate bakozwa litomba mingi koleka soki bankulutu balendisi bango báyoka mongongo ya Yesu mpe maloba ya Yehova, na esika ya koyoka makanisi ya bato to mimeseno ya bonkɔkɔ.​—Nzembo 12:6; Masese 3:5, 6.

“Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali koteya bango

15. Mokumba nini Yesu apesaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe wapi ntina moko oyo moombo yango azali kolonga?

15 Bankulutu lokola bantoma Petelo, Yoane mpe Paulo bazalaki bango nyonso na molɔngɔ ya bato oyo Yesu abengaki “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Bato yango bazali bandeko ya Yesu bapakolami na elimo oyo bazali awa na mabelé, kasi bazali na elikya ya koyangela elongo na Klisto kuna na likoló. (Emoniseli 5:9, 10) Na mikolo oyo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, motángo ya bandeko ya Klisto oyo bazali naino awa na mabelé ezali se kokita. Nzokande, mokumba oyo Yesu atikelaki bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi liboso nsuka eya ezali se kokóma monene. Atako bongo, etuluku ya moombo balongi mpenza na mosala na bango! Mpo na nini? Ntina moko ezali ete bateyi “bampate mosusu” mpo bápesa bango mabɔkɔ na mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Yoane 10:16; Matai 24:14; 25:40) Lelo oyo, etuluku wana ya “bampate mosusu” nde ezali kosala ndambo monene ya mosala yango.

16. Ndenge nini moombo azali koteya mibali oyo baponami?

16 Ndenge nini moombo azali koteya bango? Na ekeke ya liboso, bamonisi ya moombo bazalaki na ndingisa ya koteya bandeko na masangá mpe kotya bango bakɛngɛli; bango mpe na ngala na bango bazalaki koteya bampate. (1 Bakolinti 4:17) Ezali se ndenge moko lelo oyo. Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mwa etuluku ya bankulutu bapakolami oyo bazali bamonisi ya moombo, bazali kopesa bamonisi na bango ndingisa ya koteya bandeko mpe kotya bango basaleli na misala mpe bankulutu na bankóto na bankóto ya masangá na mokili mobimba. Lisusu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kobongisa biteyelo mpo na koteya bandeko oyo basalaka na bakomite ya filiale, bakɛngɛli-batamboli, bankulutu mpe basaleli na misala mpo báyeba kobatela bampate malamu. Bazali mpe kopesa bango malako mosusu na nzela ya mikanda, na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na mikanda mosusu lokola buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova.a

17. (a) Ndenge nini Yesu amonisi ete azali kotyela moombo motema? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali kotyela moombo motema?

17 Lokola Yesu atyelaka moombo yango motema mobimba, atyá ye likoló ya “biloko na ye nyonso,” elingi koloba makambo na ye nyonso awa na mabelé. (Matai 24:47) Bankulutu bazali mpe komonisa ete bazali kotyela moombo motema mpe bazali kondima litambwisi oyo azali kopesa bango na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ya solo, soki bankulutu bazali koteya basusu, soki bango moko bazali kondima koteyama na Liloba ya Nzambe mpe soki bazali kosalela mateya oyo bazali kozwa epai ya moombo ya sembo, bakomema kimya na kati ya etonga. Tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova na ndenge azali koteya mibali oyo bazali kokokisa bamposa ya ndeko mokomoko na kati ya lisangá!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini bankulutu oyo bakɔmelá balakisaka basusu?

• Mpo na nini bankulutu bateyaka makanisi na bango moko te?

• Ndenge nini mpe mpo na nini bankulutu batyelaka moombo motema?

[Bililingi na lokasa 25]

Bankulutu bateyaka bilenge mibali ya lisangá

[Bililingi na lokasa 26]

“Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa bankulutu mateya ndenge na ndenge

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto