Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/7 lok. 24
  • Libanga moko ya kala elobeli bato oyo babengamaki Yisalaele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libanga moko ya kala elobeli bato oyo babengamaki Yisalaele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Buku oyo okoki kotyela motema—Eteni 1
    Lamuká!—2011
  • Biblia—Buku oyo ezali na bisakweli ya solosolo, Eteni 1
    Lamuká!—2012
  • “Ndako ya Davidi”: Likambo ya solo to lisapo mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mokanda ya Biblia nimero 2​—Exode
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/7 lok. 24

Libanga moko ya kala elobeli bato oyo babengamaki Yisalaele

NA NDAKO moko oyo babombaka biloko ya kala na Caire, na Egypte, ezali na libanga moko oyo bakomá bitumba nyonso oyo Falao Mérneptah alongaki. Bato ya mayele balobaka ete Mérneptah, mwana ya 13 ya Falao Ramsès II, ayangelaki na kati ya mobu soki 1212 mpe 1202 liboso ya ntango na biso (L.T.B.); elingi koloba na nsuka ya eleko ya Basambisi na Yisalaele. Na milɔngɔ mibale ya nsuka ya libanga ya Mérneptah bakomi boye: “Bapunzi Kanana mobimba. Babɔtɔli Asekelone, bazwi Gezele, [mpe] babebisi Yanoam mobimba. Yisalaele etikali mpamba, bana na ye bazali lisusu te.”

Liloba “Yisalaele” oyo bakomi na libanga yango ezali nini? Na ekomeli ya Baezipito, bazalaki kotya mwa bilembo pembeni ya bankombo mpo na komonisa soki ezali nkombo ya moto to ya eloko. Buku moko (The Rise of Ancient Israel) elobi boye: “Elembo oyo batyaki na bankombo misato​—Asekelone, Gezele, mpe Yanoam—​emonisi ete ezali bankombo ya bingumba. . . . Nzokande, elembo oyo batyaki na nkombo Yisalaele emonisi ete ezali bato.”

Yango ezali komonisa biso nini? Mokomi Hershel Shanks alobi boye: “Libanga ya Mérneptah emonisi ete na mobu 1212 L.T.B., ezalaki na bato oyo bazalaki kobengama Yisalaele mpe ete falao ya Ezipito ayebaki bango; kutu amikumisaki na ndenge alongaki bango na etumba.” William Dever, moto ya mayele na makambo ya arkeoloji ya Moyen-Orient, alobi boye: “Libanga ya Mérneptah ezali koloba na biso polele: Na mokili ya Kanana, ezali na bato oyo bamibengaka ‘Yisalaele,’ mpe oyo Baezipito babengaka ‘Yisalaele.’ Nzokande, makomi ya Baezipito elobi mpenza makambo te oyo ekoki kondimisa masolo ya Biblia mpe ezali mwa mpasi ezala ete kaka mpo na lokumu na bango bakanisaki bato moko mpe bapesaki bango nkombo ‘Yisalaele.’”

Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli nkombo Yisalaele ezali ntango bapesaki Yakobo nkombo yango. Na nsima, bakómaki kobenga bankɔkɔ ya bana 12 ya Yakobo ete “bana ya Yisalaele.” (Genese 32:22–28, 32, NW; 35:9, 10) Bambula mingi na nsima, mosakoli Moize mpe Falao babengaki bankɔkɔ ya Yakobo ete “Yisalaele.” (Exode 5:1, 2) Longola Biblia, libanga ya Mérneptah ezali eloko eleki koumela oyo bakomi ete ezalaki na bato oyo babengamaki Yisalaele.

[Bililingi na lokasa 24]

Libanga ya Mérneptah

Bilembo misato na ebandeli, elingi koloba mwasi ná mobali oyo bafandi mpe nzete oyo babwaki, emonisi ete Yisalaele ezalaki ekólo ya bapaya

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Musée national du Caire, Égypte/Giraudon/The Bridgeman Art Library

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto