“Mikolo ya nsuka” ezali nini?
OSILÁ komituna ndenge oyo bomoi na yo mpe ya bandeko to baninga na yo ekozala na mikolo ezali koya? Bato mingi batyaka likebi na bansango ya televizyo mpe radio mpo na koyeba ndenge makambo ya mokili ekoki kosalisa bango. Nzokande, kotya likebi na makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi, esalisaka biso tókanga malamumalamu ntina ya makambo oyo ezali koleka na mokili. Ezali bongo mpamba te, Biblia esakolaki banda kala makambo oyo tozali komona mpe oyo tokomona na mikolo ezali koya.
Na ndakisa, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki kolobela mingi Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43) Bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki na mposa ya koyeba ntango oyo Bokonzi yango ekoya. Kutu, mikolo misato liboso báboma Yesu, bayekoli na ye batunaki ye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo [lokola mokonzi] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Yesu ayebisaki bango ete kaka Yehova Nzambe nde ayebi mokolo oyo Bokonzi ekobanda koyangela mabelé. (Matai 24:36; Malako 13:32) Atako bongo, Yesu ná bato mosusu balobelaki makambo oyo ekomonana awa na mabelé, oyo ekozala elembo ete Klisto akómi mokonzi.
Liboso tótalela makambo oyo ezali komonisa ete tozali mpenza na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, tólobela naino na mokuse likambo moko monene oyo esalemaki na likoló. (2 Timote 3:1) Yesu Klisto akómaki mokonzi na likoló na mobu 1914.a (Danyele 7:13, 14) Kaka ntango azwaki bokonzi, asalaki likambo moko monene. Biblia elobi boye: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona, mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki.” (Emoniseli 12:7) “Mikaele anzelu-mokonzi” ezali Yesu Klisto na likoló.b (Yuda 9; 1 Batesaloniki 4:16) Dalagona ezali Satana Zabolo. Satana ná bademo na ye basukaki ndenge nini na etumba yango? Balongaki te, babenganaki bango na likoló mpe “babwakamaki” na mabelé. (Emoniseli 12:9) Yango wana, ‘likoló mpe baoyo bazali kofanda na likoló,’ elingi koloba baanzelu ya sembo ya Nzambe, basepelaki. Nzokande, mpo na bato awa na mabelé, esengo ya ndenge wana ezalaki te. Biblia esakolaki boye: “Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”—Emoniseli 12:12.
Lokola Satana azali na nkanda, amemi mawa—bampasi mpe minyoko—awa na mabelé. Kasi, mpasi yango ezali kaka mpo “na eleko moko ya ntango mokuse.” Biblia ebengi ntango yango “mikolo ya nsuka.” Tosengeli kosepela mpo mosika te, makambo mabe nyonso oyo Zabolo amemi ekozala lisusu te. Kasi, nini mpenza ezali kondimisa biso ete tozali na mikolo ya nsuka?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2006, nkasa 6-7.
b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 218-219, ebimisami na Batatoli ya Yehova.