Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/9 nk. 10-13
  • “Bayanganisaki Sanedrina”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bayanganisaki Sanedrina”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya Sanedrina
  • Ndenge oyo mikumba ekabolamaki
  • Bazuzi ya Sanedrina
  • Bokonzi ya Sanedrina
  • Kosambisama ya Yesu mpe ya bayekoli na ye
  • Etumbu ya Nzambe
  • “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • ‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Lazare asekwi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/9 nk. 10-13

“Bayanganisaki Sanedrina”

NGANGA-NZAMBE monene elongo ná mikóló ya Bayuda basilaki mayele. Bayebaki te nini bakoki kosala mpo bato bátika koloba na nkombo ya Yesu Klisto. Balongaki kobomisa Yesu, kasi sikoyo bayekoli na ye bazali kosakola na Yelusaleme mobimba ete asekwi. Basengelaki kosala nini mpo na kopekisa bango? Mpo na kozwa ekateli, nganga-nzambe monene ná bato na ye “bayanganisaki Sanedrina,” tribinale monene ya Bayuda.​—Misala 5:21.

Na ntango wana, na Yisalaele, mokonzi oyo azalaki na ekateli ya nsuka ezalaki Ponsi Pilato, guvɛrnɛrɛ Moloma. Sanedrina ezalaki na boyokani nini na Pilato? Bokonzi ya Sanedrina esukaki wapi, mpe oyo ya Pilato ebandaki wapi? Banani bazalaki basangani ya Sanedrina? Makambo ezalaki kotambola ndenge nini na Sanedrina?

Ebandeli ya Sanedrina

Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “Sanedrina” elimboli “kofanda elongo na.” Yango nde liloba oyo bazalaki kosalela mpo na kolobela liyangani to likita. Mpo na Bayuda, ezalaki mingimingi kolimbola lisangani ya bakonzi ya lingomba oyo bazalaki kosambisa.

Bato oyo bakomaki Talmud, buku oyo esangisamaki na boumeli ya bankama ya bambula nsima ya kobomama ya Yelusaleme na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.), bamonisaki ete Sanedrina ebandá kala. Balobaki ete banda kala basangani ya Sanedrina bazalaki bato ya mayele oyo bazalaki kokutana mpo na kopesana makanisi likoló ya mibeko ya Bayuda mpe ete ebandaki ntango Moize ayanganisaki mikóló 70 mpo na kosunga ye na mokumba ya kokamba libota ya Yisalaele. (Mituya 11:16, 17) Bato ya mayele na masolo ya kala bandimaka likanisi yango te. Bango balobaka ete liboso Baperse bákóma koyangela Yisalaele, ezalaki na lisangani moko te lokola Sanedrina ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso. Lisusu, bato ya mayele na masolo ya kala balobaka ete eloko moko te ezali komonisa ete bato oyo bakomaki Talmud bazalaki basangani ya Sanedrina; ekoki mpenza kozala ete ezalaki nde bituluku ya Balabi ya ekeke ya mibale mpe ya misato na ntango na biso. Boye, Sanedrina ebandaki ntango nini?

Biblia emonisi ete bato oyo bautaki na boombo na Babilone na mobu 537 L.T.B., babongisaki boyangeli moko mpo na ekólo na bango. Nehemia ná Ezela batángi bankumu, mibange, bato ya lokumu, mpe mikóló​—oyo mbala mosusu ezali ebandeli ya ebongiseli oyo, na nsima, ekómaki Sanedrina.​—Ezela 10:8; Nehemia 5:7.

Yikiyiki ezalaki mingi na ekólo ya Bayuda na eleko oyo ekaboli ntango basilisaki kokoma Makomami ya Liebele ná ntango babandaki kokoma Evanzile ya Matai. Na mobu 332 L.T.B., Alexandre le Grand akómaki mpe koyangela etúká ya Yudea. Nsima ya liwa ya Alexandre, bikonzi mibale ya ekólo Grèce eyangelaki Yudea; ebandaki na bokonzi ya libota ya Ptolémée, mpe na nsima, ekómaki na bokonzi ya libota ya Séleucide. Mbala ya liboso oyo balobeli lisangani ya badepite ya Bayuda ezali na masolo ya boyangeli ya libota ya Séleucide, oyo ebandaki na mobu 198 L.T.B. Na ntembe te, lisangani yango ezalaki na bokonzi mingi te, kasi ezalaki kosala ete Bayuda bámona ete bazali komiyangela bango moko.

Na mobu 167 L.T.B., Mokonzi Antiochus IV (Épiphane) alukaki kondimisa Bayuda mimeseno ya Bagrɛki na makasi. Atukaki tempelo ya Yelusaleme mpo atumbelaki nzambe Zeusi mbeka na etumbelo na yango. Mpo na yango, Bayuda batombokaki mpe bato ya libota ya Makabe balongolaki boyangeli ya libota ya Séleucide mpe bango moko bakómaki koyangela.a Kaka na eleko wana, bakomeli ná Bafalisai (bakambi ya bato oyo bapesaki batomboki mabɔkɔ) bakómaki kozwa bisika mingi ya bokonzi na mboka mpe balekaki banganga-nzambe.

Sanedrina, na ndenge oyo Makomami ya Grɛki elobeli yango, ekómaki kosalema mokemoke. Na nsima, ekómaki lisangani monene na ekólo mpe esambiselo monene mpo na kolimbola mibeko ya Bayuda.

Ndenge oyo mikumba ekabolamaki

Na ekeke ya liboso, ekólo Loma ezalaki koyangela Yudea. Atako bongo, Bayuda bazalaki na bonsomi na makambo mwa mingi. Baloma bazalaki na momeseno ya kotikela ekólo oyo bazali koyangela bonsomi na makambo mosusu. Yango wana, bakonzi ya Loma bazalaki kolandela te makambo oyo batribinale ya mboka ezalaki kokata, mpe na ndenge yango, bazalaki kokima mikakatano oyo ekoki kobima mpo na bokeseni ya mimeseno ya mboka. Ndenge Baloma bazalaki kotikela bato nzela bálanda mimeseno na bango mpe bámiyangela, mposa na bango ezalaki ete mobulu ezala te mpe ete etúká moko te etombokela bokonzi ya Loma. Longola kaka kopona mpe kolongola nganga-nzambe monene (oyo azalaki mpe mokambi ya Sanedrina) mpe kofutisa mpako, Baloma bazalaki kokɔta na makambo ya Bayuda kaka soki bamoni ete ekómi likama mpo na bokonzi mpe matomba na bango. Lokola tokoki komona yango na ndenge oyo basambisaki Yesu, bakonzi ya Loma bazalaki na lotomo ya kokatela moto etumbu ya liwa.​—Yoane 18:31.

Na bongo, Sanedrina ezalaki kotalela makambo ya Bayuda bango na bango. Kutu, ezalaki na bapolisi na yango mpo na kokanga bato. (Yoane 7:32) Batribinale ya nse ezalaki kosambisa makambo ya mike mpe bakonzi ya Loma bazalaki kolandela bikateli na yango te. Soki tribinale ya nse ekoki te kokata likambo moko, bazalaki komema yango na Sanedrina mpe yango ezalaki kozwa ekateli ya nsuka.

Mpo Sanedrina ezala kaka na bokonzi, esengelaki kobatela kimya mpe kondima boyangeli ya Loma. Kasi, soki Baloma bayoki mwa nungunungu to bamoni ete Bayuda balingi kosala makambo ya nyamunyamu, bazalaki kosala likambo nyonso oyo bamoni malamu. Ezalaki bongo na ndakisa, ntango bakangaki ntoma Paulo.​—Misala 21:31-40.

Bazuzi ya Sanedrina

Bazuzi ya Sanedrina bazalaki bato 71: nganga-nzambe monene ná bato mosusu 70 oyo bazalaki na kati ya bato minene ya ekólo. Ntango Baloma bazalaki koyangela ekólo ya Bayuda, basangani ya Sanedrina bazalaki mingi banganga-nzambe ya lokumu (mingimingi Basadukai), ná bato mosusu oyo bazalaki bato minene na mboka, ná bakomeli ya mayele oyo bazalaki na lingomba ya Bafalisai. Banganga-nzambe ya lokumu, oyo bato minene ya ekólo bazalaki nsima na bango, bazalaki basangani ya Sanedrina oyo balekaki mingi.b Basadukai bazalaki kosepela na mbongwana te; kasi, Bafalisai bazalaki kondima makanisi ya sika mpe bato mosusu bazalaki mingi kolanda makanisi na bango. Josèphe, mokomi moko ya masolo ya kala, alobaki ete ezalaki pɛtɛɛ te mpo Basadukai bándima makambo oyo Bafalisai basɛngi. Lokola Paulo ayebaki ete Basadukai ná Bafalisai bazalaki koyokana te mpe ete mateya na bango ekesanaki, asalelaki mayele ya kokabola bango ntango asambaki liboso ya Sanedrina.​—Misala 23:6-9.

Lokola basangani ya Sanedrina bazalaki mingimingi bato minene ya mboka, ekoki mpenza kozala ete bazalaki kolongwa mpambampamba te; soki moto moko akufi to azali kokokisa lisusu masɛngami te, basangani mosusu bazalaki kopona moto oyo akozwa esika na ye. Mishna, mokanda moko ya Bayuda, elobi ete bato oyo bakoki kokóma basangani ya Sanedrina basengelaki kozala “banganga-nzambe, Balevi, mpe Bayisalaele oyo banganga-nzambe bakoki kobala bana na bango ya basi,” elingi koloba, Bayuda oyo bakokaki komonisa milɔngɔ ya bankɔkɔ mpe kondimisa ete bazali na makila ya bapaya te. Lokola Sanedrina ezalaki kotalela makambo ya mibeko na ekólo mobimba, ekoki mpenza kozala ete bazuzi oyo bamisaleli lokumu malamu na batribinale ya mike bazalaki koponama mpo na kokóma basangani na yango.

Bokonzi ya Sanedrina

Bayuda bazalaki na limemya mingi mpo na Sanedrina, mpe bazuzi ya batribinale ya mike basengelaki kotosa bikateli na yango, soki te, bakokaki kokatela bango etumbu ya liwa. Tribinale yango ezalaki mingimingi kotalela masɛngami ya banganga-nzambe mpe makambo etali Yelusaleme, tempelo na yango, mpe losambo na tempelo. Sanedrina ezalaki mpenzampenza kotalela kaka makambo oyo esalemi na Yudea. Kasi, lokola ezalaki lisangani monene oyo ezalaki kolimbola Mibeko, Bayuda ya mokili mobimba bazalaki komemya yango. Na ndakisa, nganga-nzambe monene mpe lisangani mobimba bapesaki bakambi ya basinagoga ya Damasi malako ete bápesa bato oyo bakendaki kokanga bayekoli ya Klisto mabɔkɔ. (Misala 9:1, 2; 22:4, 5; 26:12) Ekoki mpe kozala ete Bayuda oyo bazalaki kokende bafɛti na Yelusaleme bazalaki komema bansango ya bikateli ya Sanedrina na bingumba na bango.

Na Mishna balobi ete Sanedrina ezalaki kokata makambo oyo ekoki kotalela ekólo mobimba, kolandela bazuzi oyo baboyi bikateli ya Sanedrina, mpe kosambisa basakoli ya lokuta. Yesu ná Setefano basambaki liboso ya Sanedrina mpo bafundaki bango ete bazali batuki, Petelo ná Yoane basambaki mpo bafundaki bango ete bazali kobungisa ekólo mobimba nzela, mpe Paulo asambaki mpo bafundaki ye ete atukaki tempelo.​—Malako 14:64; Misala 4:15-17; 6:11; 23:1; 24:6.

Kosambisama ya Yesu mpe ya bayekoli na ye

Longola kaka mikolo ya Sabata mpe mikolo ya fɛti, Sanedrina ezalaki kosambisa makambo mikolo nyonso banda na ntango ya mbeka ya ntɔngɔ tii na ntango ya mbeka ya mpokwa. Bazalaki kosambisa makambo kaka na moi. Lokola bazalaki koyebisa etumbu ya liwa kaka mokolo moko liboso ya koboma moto oyo bakateli ye yango, bazalaki te kosambisa makambo oyo ekoki komema etumbu ya liwa na mokolo oyo ezali liboso ya mokolo ya Sabata to liboso ya mokolo ya fɛti. Bazalaki mpenza kobenda batatoli matoi ete báloba te maloba ya lokuta oyo ekoki komema bango na kosopa makila ya moto oyo asali likambo te. Yango wana, tokoloba ete bazuzi ya Sanedrina babukaki mibeko ndenge basambisaki Yesu na butu, na ndako ya Kaifa, mpe bakatelaki ye etumbu liboso ya mokolo ya fɛti. Likambo ya mabe koleka, bango moko basambisi balukaki batatoli ya lokuta mpe bandimisaki Pilato na makasi ete akweisa mitindo ete báboma Yesu.​—Matai 26:57-59; Yoane 11:47-53; 19:31.

Buku Talmud elobi ete na ntango ya kosambisa likambo oyo bakoki kokatela moto etumbu ya liwa, bazalaki kosala makasi mpo na kobikisa moto oyo afundami na mikolo oyo bakoki koyoka makambo nyonso na kimya. Kasi, kosamba ya Setefano, ndenge moko mpe na oyo ya Yesu mwa basanza liboso, elekaki ndenge wana te. Nsima ya kosamba liboso ya Sanedrina, ebele ya bato babambaki ye mabanga tii babomaki ye. Ntoma Paulo alingaki mpe kobomama ndenge wana soki basoda ya Loma bayaki noki te mpo na kobikisa ye. Kutu, bazuzi ya Sanedrina bafandelaki ye likita mpo na koboma ye.​—Misala 6:12; 7:58; 23:6-15.

Kasi, ezalaki mpe na bazuzi ya esambiselo yango oyo bazalaki mitema sembo. Ekoki kozala ete elenge Moyuda oyo azalaki mokonzi, oyo Yesu asololaki na ye, azalaki zuzi ya Sanedrina. Atako bozwi na ye epekisaki ye alanda Yesu, na ntembe te azalaki na bizaleli ya malamu, mpamba te Yesu abengaki ye akóma moyekoli na ye.​—Matai 19:16-22; Luka 18:18, 22.

Ekoki mpe kozala ete Nikodeme, “moyangeli moko ya Bayuda,” azalaki kobanga baninga na ye bazuzi, yango wana akendaki kokutana na Yesu na butu. Atako bongo, liboso ya Sanedrina, Nikodeme akɔtelaki Yesu ntango atunaki boye: “Mibeko na biso esambisaka nde moto kozanga koyoka ye liboso mpe kozanga koyeba oyo ye azali kosala?” Nikodeme amemaki “mila mpe aloe” mpo na kobongisa nzoto ya Yesu liboso bákunda ye.​—Yoane 3:1, 2; 7:51, 52; 19:39.

Yozefe ya Alimatai, mosangani mosusu ya Sanedrina, asɛngaki Pilato nzoto ya Yesu mpe atyaki yango na lilita na ye moko oyo batimolaki sika. Yozefe azalaki “kozela bokonzi ya Nzambe,” kasi lokola azalaki kobanga Bayuda, alingaki te báyeba ye lokola moyekoli ya Yesu. Kasi, tokoki kondima Yozefe na likambo moko ya malamu oyo asalaki; aponaki te ete báboma Yesu ntango bazuzi ya Sanedrina bafandaki likita mpo na kobomisa Yesu.​—Malako 15:43-46; Matai 27:57-60; Luka 23:50-53; Yoane 19:38.

Gamaliele, mosangani mosusu ya Sanedrina, apesaki baninga na ye toli ete bátika kotya bayekoli ya Yesu mpanzi likoló. Alobaki na bango ete, “Soki boye te, bokoya mbala mosusu komonana ete bozali bato oyo bazali mpenza kobunda na Nzambe.” (Misala 5:34-39) Mpo na nini bazuzi ya Sanedrina baboyaki kondima ete Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kosala mosala oyo Nzambe atindaki? Na esika bándima makamwisi ya Yesu, bazuzi ya Sanedrina balobaki boye: “Tosengeli kosala nini, mpo moto oyo azali kosala bilembo mingi? Soki totiki ye kaka boye, bango nyonso bakondimela ye mpe Baloma bakoya kobɔtɔla esika na biso mpe ekólo na biso.” (Yoane 11:47, 48) Mposa ya kobatela bokonzi etindaki bazuzi bákata likambo na bosembo te. Ndenge moko mpe, na esika bakonzi ya mangomba básepela ndenge bayekoli ya Yesu babikisaki bato, bango “batondaki na zuwa.” (Misala 5:17) Lokola bazalaki bazuzi, basengelaki kozala bato oyo babangaka Nzambe mpe bato ya sembo, kasi mingi bazalaki kondima kanyaka mpe bazalaki sembo te.​—Exode 18:21; Deteronome 16:18-20.

Etumbu ya Nzambe

Lokola Bayisalaele baboyaki kotosa Mibeko ya Nzambe mpe bandimaki Masiya te, nsukansuka, Yehova aboyaki ekólo na bango. Na mobu 70 T.B., Baloma babomaki engumba Yelusaleme ná tempelo mpe ebongiseli ya Bayuda mobimba mpe babebisaki Sanedrina.

Yesu Klisto, Zuzi oyo Yehova aponi, akokata soki basangani mosusu ya Sanedrina ya siɛklɛ ya liboso bakosekwa mpe soki nani kati na bango asalelaki elimo santu lisumu. (Malako 3:29; Yoane 5:22) Tokoki kozala na elikya ete ntango Yesu akozwa bikateli wana, akosala makambo na bosembo nyonso.​—Yisaya 11:3-5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na lisolo ya Bamakabe mpe bato ya Asmon, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1998, nkasa 21-24, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2001, nkasa 27-30.

b Ntango Biblia ezali kolobela “banganga-nzambe bakonzi,” yango esangisi nganga-nzambe monene ya eleko wana ná baoyo ya kala, mpe bato ya mabota na bango oyo bazali na makoki ya kokóma banganga-nzambe monene.​—Matai 21:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto