Bosembo ememaka matomba
KOZANGA bosembo ebandaki na elanga ya Edene. Nzokande, bato ya bikolo mingi basepelaka na bosembo mpe balingaka lokuta ata moke te. Koyebana lokola moto oyo bakoki kotyela motema ezali esengo. Nzokande, bato mingi lelo oyo bakómi kosalela lokuta mpo na kobikela. Ndenge nini yo otalelaka likambo yango? Ezali na ntina ozala sembo? Nini ekosalisa yo oyeba ete likambo boye to boye ezali sembo?
Mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kozala sembo na maloba mpe na etamboli na biso. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye.” (Baefese 4:25) Paulo akomaki lisusu boye: “Tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Soki tolukaka kozala sembo, ezali te mpo bato bákumisa biso, kasi mpo totosaka Mozalisi na biso mpe tolingi kosepelisa ye.
Kobomba bomoto na yo te
Na bamboka mingi, bato bakosaka mpo bázwa matomba. Basalisaka mikanda ya lokuta mpo na kokɔta na ekólo moko to mpo bázwa mosala to bákóma bakonzi na mosala. Baboti mosusu bakitisaka bambula ya bana na bango mpo epesa bango nzela ya kokoba bakelasi.
Nzokande, mpo tósepelisa Nzambe, tosengeli te kokosaka. Biblia elobi ete Yehova azali “Nzambe ya sembo” mpe alingaka ete baoyo bazali baninga na ye bázala mpe sembo. (Nzembo 31:5) Soki tolingi kotikala kaka baninga ya Yehova, tokomekola te “bato ya lokuta,” baoyo “babombaka bomoto na bango.”—Nzembo 26:4, NW.
Bato mingi bakosaka soki bamoni ete likambo oyo basali ekomemela bango etumbu. Ezala na kati ya lisangá, ekoki kokómela moto asala mpe bongo. Na ndakisa, na lisangá moko, elenge mobali moko andimaki liboso ya bankulutu ete asalaki masumu. Nzokande, aboyaki kondima ete ayibaki, atako bilembeteli ezalaki. Nsukansuka, emonanaki ete ayibaki mpe babimisaki ye na lisangá. Elingaki kozala malamu soki ayebisaka bankulutu bosembo mpo básalisa ye azongisa boyokani na ye na Yehova! Kutu Biblia elobi boye: “Kotyola te disipilini oyo euti na Yehova, mpe kolɛmba nzoto te ntango osembolami na ye; mpo Yehova apesaka disipilini na moto oyo ye alingaka.”—Baebele 12:5, 6.
Na bantango mosusu, ndeko moko oyo azali koluka mikumba na kati ya lisangá, akoki kosala nyonso mpo abomba makambo na ye ya mabe to mabunga oyo asalá. Na ndakisa, ntango azali kotondisa formilɛrɛ mpo na mosala ya ntango nyonso, akoki kokosa ete azali nzoto kolɔngɔnɔ to azali na etamboli malamu, kaka mpo bándima ye. Akoki koloba ete: ‘Nakosi mpenza te.’ Kasi, alobaki nde solo? Talá oyo Masese 3:32 (NW) elobi: “Yehova ayinaka mpenza moto ya mobulu, kasi azalaka moninga ya bayengebene.”
Kozala sembo, elimboli libosoliboso koboya komikosa biso moko. Mbala mingi tondimaka makambo kaka mpo esepelisi biso, kasi te mpo ezali solo. Ezalaka mpasi te kobwakela bato mosusu foti na biso! Na ndakisa, ntango Mokonzi Saulo azangaki botosi epai ya Yehova, abwakelaki bato mosusu foti na ye mpo na koluka komilongisa. Nsukansuka, Yehova aboyaki ye, mpo azala lisusu mokonzi te. (1 Samwele 15:20-23) Mokonzi Davidi asalaki lokola ye te. Ye abondelaki Yehova ete: “Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokɛsɛnɛ ya motema na ngai te. Nalobaki ete, Nakoyebisa [Yehova] bipɛngwɛli na ngai, mpe yo olimbisi mabe ya masumu na ngai.”—Nzembo 32:5.
Bosembo ememaka mapamboli
Soki ozali sembo, bato bakobanda kotyela yo motema. Kasi, soki bato bayebi ete okosaki bango ata mbala moko, bakotyela yo lisusu motema te, mpe ekozala mpasi mpo bátyela yo lisusu motema. Epai mosusu, soki olobaka solo mpe ozali sembo; okoyebana lokola moto ya bosembo oyo abongi ete bátyela ye motema. Batatoli ya Yehova bayebani mpo na bosembo na bango. Tótalela mwa bandakisa.
Mokonzi moko ya kompanyi ayebaki ete basali na ye ebele bazalaki koyiba mpe abengaki bapolisi mpo bákanga bango. Ntango mokonzi yango ayokaki ete Motatoli ya Yehova moko azalaki mpe na kati ya basali oyo bakangaki, akendaki na biro ya bapolisi mpo bábimisa ye. Mpo na nini? Mpamba te mokonzi ayebaki ete moto wana azalaki mosali ya sembo mpe bakangaki ye kaka mpamba. Motatoli wana atikalaki na mosala, kasi balongolaki baninga na ye. Bandeko na ye Batatoli basepelaki mpo bayebaki ete etamboli na ye ekumisaki nkombo ya Yehova.
Etamboli malamu ezangaka te komonana. Na mboka moko ya Afrika, basengelaki kobongisa gbagba moko, mpo bayibaki mwa ndambo ya mabaya na yango. Bato ya mboka yango bayokanaki ete básangisa mbongo mpo na kosomba mabaya mosusu. Kasi, nani bakotyela motema mpo asimba mbongo yango? Bango nyonso bayokanaki ete moto yango asengeli kozala Motatoli ya Yehova.
Ntango yikiyiki ebimaki na mboka moko ya Afrika, kompanyi moko oyo ezalaka na mikili mingi etindaki Motatoli moko oyo azalaki kosala epai na bango lokola comptable na mboka mosusu mpo bomoi na ye ezalaki na likama. Kompanyi yango esalaki ete akoba mosala na mboka yango kino yikiyiki ekosila. Mpo na nini? Mpamba te, liboso, Motatoli yango aboyaki makanisi ya basali mosusu oyo bazalaki koyokana mpo báyiba kompanyi. Mokonzi ya kompanyi ayebaki ete Motatoli yango azalaka mpenza sembo. Bakonzi ya kompanyi wana bakokaki kosalisa ye te soki báyebaka ete azali sembo te.
Masese 20:7 elobi ete: “Moyengebene akotambola na sembo na ye.” Moto ya sembo, ezali moto oyo amitambwisaka alima. Akosaka mozalani na ye te. Yo mpe olingaka te ete bato bákosa yo! Bosembo ezali likambo ya ntina mingi na losambo ya solo. Emonisaka ete tolingaka Nzambe mpe mozalani na biso. Soki tozali sembo, tokomonisa ete tozali kolanda toli ya Yesu oyo: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12; 22:36-39.
Kozala sembo ntango nyonso ekoki mpe komema mikakatano. Kasi, lisosoli ya pɛto oyo bosembo ememaka ezali na motuya mingi koleka mikakatano nyonso oyo ekoki kokómela yo. Nsukansuka, kozala sembo mpe kotambola alima ememaka matomba ebele. Ya solo, boyokani malamu na Yehova nde likambo eleki motuya. Mpo na nini kozanga bosembo mpe kobebisa boninga na biso na Yehova kaka mpo na koluka lokumu to matomba mosusu na lolenge oyo ebongi te? Ezala tokutani na mokakatano nini, tóbosana te maloba ya mokomi ya Nzembo oyo: “Mapamboli mazali na moto oyo alikye epai na [Yehova], ye oyo abongwani epai ya moto ya enzombo te mpe bango baoyo bakopɛngwa na nkuta.”—Nzembo 40:4.
[Bililingi na lokasa 18]
Baklisto ya solo basombaka te mpe basalelaka te mikanda ya lokuta