Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/12 nk. 20-24
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya bolingo
  • Ndenge oyo tomonisaka ete tolingaka Yehova
  • Ntina oyo tosengeli kolinga Yehova
  • Tóyekola kolinga Nzambe
  • “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kotika te ete bolingo na yo ekita
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Bókoba kotambola na kati ya bolingo”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/12 nk. 20-24

Lingá Nzambe oyo alingaka yo

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”​—MATAI 22:37.

1, 2. Nini etindaki Bafalisai báluka koyeba mobeko oyo eleki monene?

MOBEKO nini elekaki monene na kati ya mibeko koleka 600 ya Moize? Bafalisai bazalaki kotyana ntembe mingi na motuna wana na ntango ya Yesu. Bakokaki kokanisa ete mobeko oyo etalelaki bambeka nde elekaki monene, mpamba te bambeka ezalaki kopesama mpo na bolimbisi ya masumu mpe mpo na kotɔnda Nzambe. Bakokaki mpe kokanisa ete mobeko ya kokata ngɛnga nde elekaki monene, mpamba te ngɛnga ezalaki elembo ya kondimana oyo Yehova asalaki na Abalayama.​—Genese 17:9-13.

2 Epai mosusu, Bayuda oyo bazalaki kolanda mpenza Mibeko ya Moize bazalaki koloba ete lokola mibeko nyonso oyo Nzambe apesaki ezalaki na ntina mingi, ata soki mosusu ezalaki komonana lokola nde ezali na ntina mingi te, ebongaki te ete bákanisa ete mobeko moko eleki mibeko mosusu. Bafalisai batunaki Yesu motuna yango, na elikya ete akopesa eyano moko oyo ekosilisa lokumu na ye. Moko na bango atunaki ye ete: “Komandema nini eleki monene na kati ya Mibeko?”​—Matai 22:34-36.

3. Mobeko nini Yesu alobaki ete eleki monene?

3 Eyano oyo Yesu apesaki ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. Alobaki likambo moko oyo esimbi losambo ya solo na bileko nyonso. Azongelaki maloba ya Deteronome 6:5 mpe alobaki ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde komandema oyo eleki monene mpe ya liboso.” Atako Mofalisai yango atunaki ye kaka mobeko moko, Yesu abakisaki mobeko mosusu. Azongelaki maloba ya Levitike 19:18 mpe alobaki ete: “Ya mibale, oyo ekokani na yango, ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” Na nsima, Yesu amonisaki ete mibeko wana mibale nde esimbi losambo ya solo. Mpo na kopekisa Mofalisai yango asɛnga ye atánga mibeko yango nyonso na molɔngɔ kobanda na oyo eleki monene tii na oyo eleki moke, abakisaki boye: “Na bakomandema oyo mibale Mibeko nyonso ekakisami, mpe Basakoli.” (Matai 22:37-40) Na lisolo oyo, tokolobela mobeko oyo eleki monene na kati ya mibeko yango mibale. Mpo na nini tosengeli kolinga Nzambe? Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe? Mpe nini ekosalisa biso tokóma kolinga Nzambe? Ezali na ntina mingi tóyeba biyano na mituna wana, mpamba te mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kolinga ye na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso.

Ntina ya bolingo

4, 5. (a) Mpo na nini Mofalisai akamwaki te na eyano oyo Yesu apesaki ye? (b) Eloko nini ezali na motuya na miso ya Nzambe koleka makabo mpe bambeka?

4 Emonani ete eyano oyo Yesu apesaki Mofalisai yango epesaki ye mpasi na motema te, mpe ekamwisaki ye te. Ayebaki ete kolinga Nzambe ezali na ntina mingi na losambo ya solo, atako bato mingi bazalaki na bolingo yango te. Na kati ya basinagoga, bazalaki kozongela mbala na mbala libondeli oyo bazalaki kobenga Shema, to eyambweli ya kondima, oyo maloba na yango mosusu eutaki na Deteronome 6:4-9, oyo Yesu azongelaki. Malako alobi ete Mofalisai yango alobaki na Yesu ete: “Moteyi, olobi malamu na boyokani na solo, ‘Ye azali kaka Moko, mpe mosusu azali te kaka Ye’; mpe kolinga ye na motema na yo mobimba mpe na bososoli na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko ezali malamu mingi koleka makabo nyonso ya kotumba mpe bambeka.”​—Malako 12:32, 33.

5 Ya solo, atako mibeko esɛngaki ete bápesaka makabo ya kotumba mpe bambeka, likambo ya ntina mpenza mpo na Nzambe ezalaki ete bato básalela ye na bolingo. Ata mokɛngɛli-mboka oyo moto apesi Nzambe na bolingo mpe na motema moko ezalaki na motuya mingi koleka mpate nkoto oyo moto apesi na mitema mibale. (Mika 6:6-8) Tókanisa lisusu mwasi mobola oyo akufelá mobali, oyo Yesu amonaki na tempelo ya Yelusaleme. Mbongo mibale ya bibende oyo atyaki na kesi ya makabo ekokaki kosomba ata mokɛngɛli-mboka moko te. Nzokande, likabo na ye, oyo apesaki na bolingo mpenza, ezalaki na motuya mingi na miso ya Yehova koleka makabo ya mineneminene oyo bazwi bapesaki, mpamba te oyo bapesaki ezalaki moke mpenza soki totali bozwi ebele oyo bazalaki na yango. (Malako 12:41-44) Tolendisami mpenza lokola toyebi ete Yehova atalelaka na motuya mingi bolingo, eloko oyo biso nyonso tokoki kopesa, tózala na bozwi to te!

6. Ntoma Paulo akomaki nini mpo na komonisa ntina ya bolingo?

6 Mpo na komonisa ntina ya bolingo na losambo ya solo, ntoma Paulo akomaki boye: “Soki nazali koloba na minɔkɔ ya bato mpe ya baanzelu kasi nazali na bolingo te, nakómi eteni ya ebende ya bronzɛ oyo ezali kolela to sɛmbalɛ oyo ezali kobɛta. Mpe soki nazali na likabo ya bisakweli mpe nayebi basɛkɛlɛ mosantu nyonso mpe nazali na boyebi nyonso, mpe soki nazali na kondima monene tii na kolongola bangomba mpe kotya yango epai mosusu, kasi nazali na bolingo te, nazali mpamba. Mpe soki napesi biloko na ngai nyonso mpo na koleisa bamosusu, mpe soki nakabi nzoto na ngai, mpo namikumisa, kasi nazali na bolingo te, nazali kozwa litomba ata moke te.” (1 Bakolinti 13:1-3) Emonani polele ete soki tolingi Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kozala na bolingo. Kasi, ndenge nini tokomonisa ete tolingaka Yehova?

Ndenge oyo tomonisaka ete tolingaka Yehova

7, 8. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?

7 Bato mingi bakanisaka ete bolingo ezali kaka likambo ya motema, lokola lolango ya mwasi ná mobali. Kasi, bolingo ya solosolo esukaka kaka na motema te; emonanaka na misala. Biblia elobi ete bolingo ezali “nzela oyo eleki nyonso,” mpe tosengeli ‘kolanda’ yango. (1 Bakolinti 12:31; 14:1) Biblia elendisi baklisto bálingaka kaka “na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.”​—1 Yoane 3:18.

8 Kolinga Nzambe etindaka biso tósala oyo esepelisaka ye mpe tóluka kolongisa bokonzi na ye, na maloba mpe na misala. Epekisaka biso kolinga mokili mpe banzela na yango ya mabe. (1 Yoane 2:15, 16) Bato oyo balingaka Nzambe bayinaka mabe. (Nzembo 97:10) Kolinga Nzambe elimboli mpe kolinga mozalani na biso, yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi. Longola yango, kolinga Nzambe esɛngaka kotosa ye. Biblia elobi ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.”​—1 Yoane 5:3.

9. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka Nzambe?

9 Yesu amonisaki mpenza oyo elimboli kolinga Nzambe. Bolingo etindaki ye atika likoló mpe aya kofanda awa na mabelé lokola moto. Etindaki ye apesa Tata na ye nkembo na makambo oyo azalaki kosala mpe koteya. Bolingo etindaki ye ‘atosa tii na liwa.’ (Bafilipi 2:8) Botosi yango, oyo emonisaki bolingo na ye, esalaki ete bato ya sembo bázala bayengebene na miso ya Nzambe. Paulo akomaki boye: “Lokola kozanga botosi ya moto kaka moko [Adama] ekómisaki ebele ya bato basumuki, kaka bongo mpe botosi ya moto kaka moko [Yesu Klisto] ekokómisa bato mingi bayengebene.”​—Baloma 5:19.

10. Mpo na nini kolinga Nzambe esɛngaka mpe kotosa ye?

10 Lokola Yesu, biso mpe totosaka Nzambe mpo na komonisa ete tolingaka ye. Yoane, ntoma oyo Yesu alingaki mingi, akomaki boye: “Talá oyo bolingo elakisi, ete tókoba kotambola engebene bakomandema na ye.” (2 Yoane 6) Bato oyo balingaka mpenza Nzambe balukaka litambwisi na ye. Lokola bayebi ete bakoki komitambwisa bango moko te, batyelaka bwanya ya Nzambe motema mpe bandimaka litambwisi na ye ya bolingo. (Yilimia 10:23) Bazali lokola bato ya makanisi malamu ya Beloya oyo bayambaki nsango ya Nzambe “na mposa makasi mpenza,” mpamba te bazalaki na mposa makasi ya kosala mokano ya Nzambe. (Misala 17:11) Bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mpo na koyeba mokano ya Nzambe malamu lisusu koleka, mpe yango esalisaki bango bámonisa bolingo na nzela ya misala mingi oyo ezali komonisa botosi.

11. Kolinga Nzambe na motema na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso, na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso nyonso elimboli nini?

11 Ndenge Yesu alobaki, tosengeli kolinga Nzambe na motema na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso, na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso nyonso. (Malako 12:30) Bolingo ya ndenge wana eutaka na motema, elingi koloba mayoki, bamposa mpe makanisi na biso, mpe epesaka biso mposa makasi ya kosepelisa Yehova. Tolingaka mpe Yehova na makanisi na biso nyonso. Tomipesaka na Yehova mpamba te, kasi mpo toyebi ye, elingi koloba toyebi bizaleli, mitinda mpe mikano na ye. Topesaka molimo na biso, elingi koloba bomoto mpe bomoi na biso mobimba, mpo na kosalela Yehova mpe kopesa ye nkembo. Tosalelaka mpe makasi na biso mpo na kosalela Yehova mpe kopesa ye nkembo.

Ntina oyo tosengeli kolinga Yehova

12. Mpo na nini Nzambe asɛngaka ete tólinga ye?

12 Ntina moko oyo tosengeli kolinga Yehova ezali ete asɛngaka biso tólanda bizaleli na ye. Nzambe azali liziba mpe ndakisa eleki monene ya bolingo. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Yoane akomaki ete, “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Lokola Nzambe akelaki biso na elilingi na ye, biso mpe tozali na likoki ya kolinga. Kutu, Yehova asalelaka bokonzi na ye na bolingo. Alingaka bato oyo basalelaka ye mpo balingaka ye mpe bandimaka bokonzi na ye ya sembo. Na ntembe te, bolingo ezali na ntina mingi mpo na kimya mpe boyokani na kati ya bikelamu nyonso.

13. (a) Mpo na nini basɛngaki Bayisalaele ete: ‘Bálingá Yehova Nzambe na bango’? (b) Mpo na nini ebongi mpenza ete Yehova asɛnga biso tólinga ye?

13 Ntina mosusu oyo tolingaka Yehova ezali mpo na komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo asali mpo na biso. Tóbosana te ete Yesu alobaki na Bayuda ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo.” Basɛngaki bango te ete bálinga nzambe moko oyo azali mosika mpenza na bato mpe oyo ayebani te. Basengelaki nde kolinga Nzambe oyo amonisaki ete alingaka bango. Yehova azalaki Nzambe na bango. Ye nde abimisaki bango na Ezipito mpe amemaki bango na Mokili ya Ndaka, abatelaki bango, asungaki bango, alingaki bango, mpe azalaki kosembola bango na bolingo nyonso. Lelo mpe, Yehova azali Nzambe na biso, oyo akabaki Mwana na ye mbeka mpo na kosikola biso mpo tókoka kozwa bomoi ya seko. Yango wana, ebongi mpenza ete Yehova asɛnga biso tólinga ye. Nzambe azali kosɛnga biso tólinga ye mpo ye mpe alingaka biso. Tolingaka Ye oyo “alingaki biso liboso.”​—1 Yoane 4:19.

14. Na ndenge nini bolingo ya Yehova ekokani na oyo ya moboti ya bolingo?

14 Yehova alingaka bato ndenge moboti ya bolingo alingaka bana na ye. Atako bazali bato ya kozanga kokoka, baboti ya bolingo babomaka nzoto ebele ya bambula mpo na kobɔkɔla bana na bango, mpe bamipimelaka biloko mingi mpo na yango. Baboti bateyaka, balendisaka, basungaka mpe basembolaka bana na bango, mpamba te balingaka ete bázala na esengo mpe bákola malamu. Kasi, baboti basɛngaka bana na bango nini? Basɛngaka ete bana bálinga bango mpe bázala na botɔndi mpo na bolamu nyonso oyo basalelaka bango. Tomoni te ete Tata na biso ya likoló, moboti ya kokoka, azali na lotomo ya kosɛnga ete tólinga ye mpe tómonisa botɔndi mpo na nyonso oyo asali mpo na biso?

Tóyekola kolinga Nzambe

15. Wapi likambo ya libosoliboso oyo tosengeli kosala mpo tókóma kolinga Nzambe?

15 Tomoná Nzambe te mpe toyoká mongongo na ye ata mokolo moko te. (Yoane 1:18) Kasi, azali kosɛnga biso tókóma baninga na ye. (Yakobo 4:8) Ndenge nini tokoki kosala yango? Mpo na kolinga moto, esɛngaka libosoliboso koyeba ye; ezalaka mpasi mpo tólinga mpenza moto oyo toyebi te. Yehova apesi biso Biblia, Liloba na ye, mpo tóyeba ye. Yango wana, na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova azali kolendisa biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo. Biblia nde esalisaka biso tóyeba Nzambe, bizaleli na ye, bomoto na ye mpe makambo oyo azali kosalela bato na boumeli ya bankóto ya bambula. Soki tozali kokanisa masolo yango na mozindo, tokoyeba Nzambe malamu mpe tokolinga ye lisusu mingi koleka.​—Baloma 15:4.

16. Ndenge nini kokanisa na mozindo misala ya Yesu ekoki kosalisa biso tókóma kolinga Nzambe mingi?

16 Likambo eleki ntina oyo ekoki kosalisa biso mpo tókóma kolinga Yehova mingi ezali kokanisa bomoi mpe misala ya Yesu. Kutu, Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Yango wana alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Osepelaka te na motema mawa oyo Yesu amonisaki ntango asekwisaki mwana kaka moko ya mwasi akufelá mobali? (Luka 7:11-15) Osepelaka te koyeba ete ye, Mwana ya Nzambe mpe moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, amikitisaki mpe asukolaki bayekoli na ye makolo? (Yoane 13:3-5) Oyokaka esengo te ete atako Yesu alekaki bato nyonso na bonene mpe na bwanya, azalaki kondima ete bato ya lolenge nyonso, ata bana mike, bápusana penepene na ye? (Malako 10:13, 14) Soki tozali kokanisa na mozindo makambo nyonso wana, tokokóma lokola baklisto oyo Petelo akomaki mpo na bango ete: “Atako bomoná [Yesu] te, bozali kolinga ye.” (1 Petelo 1:8) Ntango bolingo na biso mpo na Yesu ezali kokóma makasi, tokokóma mpe kolinga Yehova mingi.

17, 18. Makambo nini ekoki kotinda biso tókóma kolinga Yehova mingi?

17 Likambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso tókóma kolinga Nzambe mingi ezali kokanisa na mozindo ebele ya biloko oyo apesá biso na bolingo nyonso mpo tósepelaka na bomoi: ebele ya biloko kitoko oyo akelá, bilei kitoko, baninga ya malamu mpe ya bolingo mpe biloko mosusu oyo epesaka biso esengo mpe bolamu. (Misala 14:17) Soki toyebi Nzambe na biso malamumalamu, tokokóma mpe na botɔndi mingi mpo na bolamu mpe boboto na ye oyo ezali na nsuka te. Kanisá naino makambo nyonso oyo Yehova asalá mpo na yo. Omoni te ete osengeli mpenza kolinga ye?

18 Na kati ya makabo kitoko oyo Yehova apesá biso, tokoki kotánga libaku kitoko ya kosolola na ye ntango nyonso oyo tolingi na nzela ya libondeli, na elikya mpenza ete ye oyo ‘ayokaka mabondeli’ akoyoka biso. (Nzembo 65:2) Yehova apesá Mwana na ye ya bolingo bokonzi mpo na koyangela mpe kosambisa. Kasi, apesi moto moko te, ezala ata Mwana na ye, lotomo ya koyoka mabondeli. Ayokaka mabondeli na biso ye moko. Lokola Yehova alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso, yango etindaka biso tópusana penepene na ye.

19. Bilaka nini ya Yehova etindaka biso tópusana penepene na ye?

19 Eloko mosusu oyo ekotinda biso tópusana penepene na Yehova ezali koyeba mokano na ye mpo na bato. Alaki ete akosilisa bamaladi, mawa mpe liwa. (Emoniseli 21:3, 4) Ntango tokokóma bato ya kokoka, bamaladi ya makanisi, kolɛmba nzoto to makama ekozala lisusu te. Nzala, bobola mpe bitumba ekosila. (Nzembo 46:9; 72:16) Mabelé ekobongwana paladiso. (Luka 23:43) Yehova akosopela biso mapamboli nyonso wana mpo alingaka biso, kasi te mpo asɛngisami.

20. Ndenge nini Moize amonisaki ete kolinga Yehova ememaka matomba?

20 Ya solo mpenza, ezali na bantina ya solosolo oyo tosengeli kolinga Nzambe na biso mpe kokolisa bolingo yango. Okokoba kolinga Nzambe mpe kotika ye atambwisa yo? Yo moko poná. Moize ayebaki ete koyekola kolinga Nzambe mpe kokoba kosala bongo ememaka matomba. Alobaki na Bayisalaele ya kala ete: “Poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete yango bomoi mpe [mikolo mingi mpo, NW] na yo.”​—Deteronome 30:19, 20.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini ezali na ntina mingi tólingaka Yehova?

• Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe?

• Mpo na nini tosengeli kolinga Yehova?

• Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova?

[Elilingi na lokasa 20]

Yehova atalelaka na motuya mingi bolingo, eloko oyo biso nyonso tokoki komonisa

[Bililingi na lokasa 23]

“Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.”​—Yoane 14:9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto