Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/12 nk. 4-7
  • Ndenge oyo mbotama ya Yesu ezali komema kimya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo mbotama ya Yesu ezali komema kimya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokonzi oyo basakoli balobelaki
  • “Nsango malamu ya esengo moko monene”
  • Bizaleli ya boklisto ekoki kotikala libela?
  • Masiya amonani
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • “Oyo azali mwana na ngai”
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Azwaki ngɔlu mingi epai na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/12 nk. 4-7

Ndenge oyo mbotama ya Yesu ezali komema kimya

“KIMYA na kati ya bato oyo [Nzambe] amoniseli motema boboto.” Nsango wana ezalaki kaka moko kati na ebele ya bisakweli oyo elobelaki makambo oyo mbotama ya Yesu esengelaki komema. Longola maloba yango ya baanzelu oyo ekamwisaki babateli ya mpate, Nzambe atindaki anzelu ayebisa Malia mpe na nsima, mobali na ye Yozefe, makambo oyo etaleli Yesu. Soki totaleli bansango yango, tokomona ete mbotama ya Yesu esengelaki komema makambo ebele mpe tokoyeba ndimbola ya solo ya maloba ya baanzelu, oyo esakolaki kimya na kati ya bato.

Liboso Yesu abotama, liboso kutu Malia akóma na zemi, anzelu Gabiliele abimelaki Malia. Alobaki na ye boye: “Mbote, moto oyo bamoniseli boboto mingi, Yehova azali elongo na yo.” Na ntembe te, Malia akamwaki mingi mpe mbala mosusu abangaki. Maloba yango elimbolaki mpenza nini?

Anzelu Gabiliele alobaki boye: “Talá! okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” Malia atunaki ndenge nini yango ekokaki kosalema lokola ye ayebaki naino mibali te. Gabiliele ayebisaki ye ete akozwa zemi na lisalisi ya elimo santu. Yango emonisaki ete mwana oyo akobotama akokesana na bana mosusu nyonso.​—Luka 1:28-35.

Mokonzi oyo basakoli balobelaki

Na ntembe te, maloba ya Gabiliele esalisaki Malia amona ete akobota mwana oyo basakoli balobelaki. Maloba oyo ete Yehova akopesa mwana yango “kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye” etindaki Malia​—ndenge moko mpe ekokaki kotinda Moyuda nyonso oyo ayebaki Makomami​—akanisa likambo oyo Nzambe alakaki Mokonzi Davidi.

Yehova atindaki mosakoli Natana ayebisa Davidi boye: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ekobongisama liboso na yo libela; kiti ya bokonzi na yo ekokokisama seko.” (2 Samwele 7:4, 16) Yehova alobaki mpo na Davidi boye: “Nakosala ete mabota na ye mazala seko na seko mpe ete kiti na ye ya bokonzi eumela [lokola] lola. Mokitani na ye akoumela ntango nyonso; kiti na ye ya bokonzi ekozala liboso na ngai [lokola] moi.” (Nzembo 89:20, 29, 35, 36) Ntembe ezali te ete Nzambe nde abongisaki ete Malia ná Yozefe bázala bato ya libota ya Davidi.

Longola bisakweli yango, ezali mpe na bisakweli mosusu ya Makomami ya Liebele oyo elobelaki mokonzi moko oyo akozala mwana ya Davidi. Ekoki mpe kozala ete Malia ayebaki esakweli ya Yisaya oyo elobi boye: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló ya lipeka na ye, nkombo na ye akobyangama ete, Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Nkolo ya kimya. Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te; na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe likoló ya bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atɛmisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa ya [Yehova] na bibele ekosala oyo.”​—Yisaya 9:6, 7.

Na bongo, nsango oyo Gabiliele amemelaki Malia emonisaki kaka te ete akobota mwana mobali moko na ndenge ya likamwisi. Mwana yango asengelaki kozwa kiti ya bokonzi ya Mokonzi Davidi; asengelaki kozala mokonzi ya libela na Bokonzi ya Nzambe. Makambo oyo Gabiliele alobaki ete Yesu akokokisa ezali na ndimbola monene mpo na mokomoko na biso.

Ntango Yozefe ayebaki ete mwasi oyo alingi kobala azali na zemi, azwaki ekateli ya kokabwana na ye. Ayebaki ete mwana yango azali ya ye te mpo ye ná Malia basangisaki nzoto ata mokolo moko te. Na ntembe te, ezalaki mwa mpasi mpo Yozefe andimela Malia ntango azalaki kolimbwela ye ndenge oyo akómaki na zemi yango. Lisolo elobi boye: “Anzelu ya Yehova abimelaki ye na ndɔtɔ, alobaki ete: ‘Yozefe, mwana ya Davidi, kobanga te kotya Malia mwasi na yo na ndako, mpo oyo ebotami na kati na ye euti na elimo santu. Akobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu, mpo akobikisa bato ya ekólo na ye na masumu na bango.’”​—Matai 1:20, 21.

Biblia eyebisi biso te soki Yozefe akangaki mpenza ntina ya ndenge oyo mwana yango “akobikisa bato ya ekólo na ye na masumu na bango.” Atako bongo, nsango yango ekokaki mpo na kondimisa Yozefe ete Malia asalaki likambo moko ya mabe te. Yozefe asalaki makambo oyo anzelu ayebisaki ye mpe abalaki Malia.

Mikanda mosusu ya Biblia ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya maloba ya anzelu. Na ebandeli, anzelu moko akómaki motomboki mpe alobaki ete Yehova abongi kozala mokonzi te. Makomami ya Liebele emonisi ete Satana alobaki ete Nzambe abongi koyangela te mpe ete ata moto moko te akoki kotikala sembo epai ya Yehova soki amekami. (Genese 3:2-5; Yobo 1:6-12) Adama atikalaki sembo epai ya Nzambe te. Yango wana, atikelaki bato nyonso lisumu, mpe lisumu yango ememaki liwa. (Baloma 5:12; 6:23) Nzokande, Yesu abotamaki na lisumu te mpamba te tata na ye azalaki moto te. Lokola Yesu andimaki kopesa bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko oyo ekokani na bomoi oyo Adama abungisaki, akómaki na likoki ya kolongola bato na lisumu mpe kopesa bango elikya ya bomoi ya seko.​—1 Timote 2:3-6; Tito 3:6, 7; 1 Yoane 2:25.

Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki mwa moke ndenge oyo makambo ekozala ntango akolongola makambo ya mabe oyo lisumu ememaki. Abikisaki bato na maladi ya ndenge na ndenge mpe asekwisaki bakufi. (Matai 4:23; Yoane 11:1-44) Makamwisi yango emonisaki makambo oyo akosala na mikolo ekoya. Ye moko alobaki boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na [ngai] mpe bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

Elaka yango ya lisekwa ezali komonisa mpo na nini kobotama ya Yesu, mpe mingimingi liwa na ye, ezali na ntina mingi mpo na biso. Yoane 3:17 elobi ete Nzambe atindaki Mwana na ye na mokili “mpo mokili ebika na nzela na ye.” Nsango malamu yango ezongisi makanisi na biso na maloba ya baanzelu oyo bakendaki koyebisa nsango ya mbotama ya Yesu epai ya babateli ya mpate oyo bazalaki kobatela bibwɛlɛ na bango na butu.

“Nsango malamu ya esengo moko monene”

Nsango ya mbotama ya ‘Mobikisi, oyo azali Klisto Nkolo,’ oyo baanzelu basakolaki, ezalaki mpenza “nsango malamu ya esengo moko monene” mpo na bato. (Luka 2:10, 11) Mwana yango asengelaki kozala Masiya, Mosakoli mpe Moyangeli oyo basaleli ya Nzambe bazalaki kozela banda kala. (Deteronome 18:18; Mika 5:2, NW) Bomoi ya Yesu awa na mabelé mpe liwa na ye esengelaki kozala na ntina mingi mpo na kolongisa lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi; yango wana baanzelu balobaki ete: “Nkembo na Nzambe kuna na bisika ya likoló.”​—Luka 2:14.

Yesu, oyo Biblia ebengi ye mpe “Adama ya nsuka,” amonisaki ete bato bakoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki bakutani na mikakatano ya makasi. (1 Bakolinti 15:45) Na bongo, amonisaki ete Satana azali mobuki-lokuta. Likambo yango epesaki baanzelu ya sembo esengo.

Sikoyo, tózongela motuna na biso: “Tokoki nde kolikya ete maloba oyo baanzelu basakolaki na butu oyo Yesu abotamaki ekokokisama?” Ɛɛ, tokoki mpenza kolikya yango! Kimya ezali na ntina mingi mpo mokano ya Nzambe ekokisama awa na mabelé; mokano yango ezali mpe ete mabelé ekóma paladiso. Ntango mokano yango ekokokisama na mabelé mobimba, bato nyonso bakosalela Nzambe na bolingo mpe na bosembo. Yango wana, kokokisama ya mokano ya Nzambe esɛngi mpe kolongolama ya moto nyonso oyo atɛmɛlaka bokonzi ya Yehova. Yango ezali nsango ya malamu te mpo na bato oyo bazali na ngámbo ya Satana, oyo alobaka ete ndenge oyo Nzambe asalaka makambo ezali mabe. Bango nyonso bakobomama.​—Nzembo 37:11; Masese 2:21, 22.

Tóbosana te ete baanzelu basakolaki epai ya babateli ya mpate kimya mpe boboto mpo na bato nyonso te. Kasi, basakolaki ‘kimya na kati ya bato oyo [Nzambe] amoniseli motema boboto.’ Elingi koloba, na kati ya bato oyo Nzambe andimi. Baoyo bamonisaka kondima ya solo epai ya Yehova bakómaka bayekoli ya sembo ya Yesu mpe bamekolaka bizaleli na ye. Bato yango bamonisaka bizaleli lokola bokabi mpe komitya na esika ya basusu kaka na boumeli ya mwa mikolo te, kasi mikolo nyonso.

Bizaleli ya boklisto ekoki kotikala libela?

Nsango malamu oyo Yesu asakolaki ezali kosimba mitema ya bato mingi. Mingi kati na bango bakómi kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Bato oyo bazalaki kotalela kaka makambo na bango moko bakómi komituna soki Yesu alingaki kosala nini na esika na bango. Bato oyo bamipesaki na koluka bozwi mpe na bisengo bamoni ete makambo ya elimo eleki ntina mpe bakómi koyebisa yango epai ya bato mosusu. Bato oyo basalaka bongo bomonisaka bizaleli lokola bokabi mpe boboto mokolo na mokolo. Yango nde makambo oyo olingaka komona epai ya baklisto ya solo, boye te?

Soki bato nyonso ya mitema sembo baluki koyeba ndimbola ya nsango ya kimya oyo baanzelu basakolaki mpe basaleli makambo yango, na ntembe te mokili ekokóma malamu.

Bisakweli oyo elobelaki mbotama ya Yesu epesi bato oyo Nzambe amoniseli motema boboto elikya ete bakozala na kimya ya solosolo mpo na libela. Yo mpe ozali na mposa ya kimya ya solosolo? Tokoki mpenza kozala na elikya ete nsango malamu ya kimya oyo baanzelu basakolaki ntango Yesu abotamaki ekokokisama. Kimya mpo na libela ekozala mpenza, ezali kaka makanisi mpamba te oyo bato bazalaka na yango na eleko ya Noele.

[Bililingi na lokasa 7]

Bizaleli ya boklisto ekoki mpe esengeli komonisama mokolo na mokolo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto