Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/1 nk. 14-16
  • Samwele atombolaki losambo ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Samwele atombolaki losambo ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomwana na ye
  • Samwele akómi mosakoli
  • Bayisalaele basɛngi mokonzi
  • Mokonzi ya liboso mpe mokonzi ya mibale ya Yisalaele
  • Mateya oyo Samwele atikelaki biso
  • Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ayikaki mpiko atako makambo ebebaki
    Mekolá kondima na bango
  • “Azalaki se kokola liboso ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Azalaki se kokola liboso ya Yehova”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/1 nk. 14-16

Samwele atombolaki losambo ya solo

NTANGO bato ya Yisalaele basɛngaki mosakoli Samwele apesa bango mokonzi, mosakoli apamelaki bango mpe alendisaki bango bátosa Nzambe. Asɛngaki Yehova atinda nkake mpe mbula mpo bato bámona ete azali solo mosakoli ya Nzambe. Na Yisalaele, na eleko wana ya kobuka mbuma, mbula makasi ezalaki kobɛta mpenza te. Kasi, Nzambe atindaki nkake makasi mpe mbula. Mpo na yango, bato ya Yisalaele babangaki makasi Yehova mpe Samwele, momonisi na ye.​—1 Samwele 12:11-19.

Mosakoli Samwele azalaki mpe mokomi. Akomaki masolo oyo esalemaki na boumeli ya mbula soki 330 bakisá mpe makambo minene oyo Basambisi basalaki mpo na kobikisa Yisalaele. Na ndakisa, bato oyo bakomaka maloba ya ntɔki, bayembi, bato oyo basalaka bateyatre mpe bafilme basalelaka mpe lisolo ya Samasona, moto oyo alekaki bato nyonso ya ntango na ye na makasi. (Basambisi, mokapo 13 tii 16) Samwele akomaki mpe lisolo ya Luta ná bokilo na ye Naomi, bango mibale bazalaki basi oyo bakufelá mibali mpe babola. Lisolo yango mpe oyo esukaki malamu esepelisaka mpenza.​—Luta, Mokapo 1 tii 4.

Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo Samwele akomaki mpe na oyo asalaki na bomoi na ye? Na ndenge nini atombolaki losambo ya solo?

Bomwana na ye

Elekana, tata ya Samwele, azalaki mosambeli ya Yehova mpe mobali malamu. Hana, mwasi ya Elekana azalaki makasi na elimo. Ntango akendaki na ndako ya Yehova na Silo, Hana, ye oyo azalaki kobota te abondelaki Yehova na molende mpenza, alapaki mpe ndai boye: “[Yehova] na bibele, soki okotala nsɔni na ngai, moombo na yo, soki okokanisa ngai mpe okobosana moombo na yo te nde okopesa moombo na yo mwana mobali, ngai nakopesa ye epai ya [Yehova] mikolo nyonso ya bomoi na ye mpe lotɛbu ekokata nsuki na ye te.” (1 Samwele 1:1-11) Yango elingaki koloba ete mwana wana asengelaki kopesama na mosala ya Yehova.

Hana abondelaki na motema. Lisolo elobi ete “bobele bibɛbu na ye [ezalaki koningana].” Nganga-nzambe Monene Eli akanisaki ete alangwe masanga mpe apamelaki ye. Kasi, na limemya nyonso, Hana, alimbwelaki ye ete azalaki nde koyebisa Yehova likambo oyo ezalaki kotungisa ye; bongo Eli alobaki na ye boye: “Kende na kimya. Tiká ete Nzambe ya Yisalaele apesa yo libondeli lisili yo kobondela ye.” Yehova ayokaki libondeli ya Hana, mpamba te lisolo elobi boye: “Ekokaki ntango na elanga Hana abotaki mwana mobali; apesaki ye nkombo ete Samwele, mpo ete alobaki ete, nalɔmbaki ye epai ya [Yehova].”​—1 Samwele 1:12-20.

Samwele abɔkwamaki na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Ntango kaka Samwele alongwaki na mabɛlɛ, Hana amemaki ye na ndako ya Nzambe na Silo mpe alakisaki ye epai ya Eli, nganga-nzambe monene. Mwana yango atikalaki na mabɔkɔ ya Nganga-nzambe Eli mpe ‘azalaki kosalela Yehova.’ Hana amonisaki esengo monene na ye na maloba ya botɔndi oyo alobaki; maloba oyo, Samwele ye moko akomaki yango na nsima.​—1 Samwele 2:1-11.

Soki ozali moboti, olendisaka bana na yo bámipesa mobimba na mosala ya Yehova? Kotombola losambo ya solo ezali lolenge ya malamu koleka oyo moto akoki kosalela makasi na ye.

Samwele amesanaki malamu na bomoi ya tabenakle. “Akolaki liboso ya [Yehova]” mpe “amonanaki na ngɔlu mingi liboso ya [Yehova] mpe liboso ya bato.” Amekolaki bizaleli ya Nzambe, yango wana bato bazalaki kosepela na ye mingi.​—1 Samwele 2:21, 26.

Kasi, Hofini ná Fineasi, bana ya Eli, bazalaki lokola Samwele te; bazalaki bato mpamba “bayebaki [Yehova] te.” Bazalaki kosala pite mpe kozwa biteni oyo eleki malamu ya nyama oyo bato bazalaki komema mpo na mbeka. Nzambe asilaki kotinda mosakoli moko ayebisa Eli etumbu oyo asengelaki kozwa oyo esangisaki mpe liwa ya bana yango mibale. (1 Samwele 2:12, 15-17, 22-25, 27, 30-34) Yehova asalelaki mpe Samwele mpo na kopesa nsango mosusu ya etumbu.

Samwele akómi mosakoli

Nzambe ayebisaki Samwele boye: “Osengeli koyebisa [Eli] ete nazali kosambisa ndako na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na libunga oyo ye ayebi, mpamba te bana na ye bazali kolakela Nzambe mabe, mpe ye apameli bango te.” Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kopesa nsango yango, mpe Eli atyaki Samwele mbamba ete abombela ye ata liloba moko te. Na yango, Samwele ayebisaki ye makambo nyonso oyo Yehova alobaki. Esɛngaki ete azala mpenza na mpiko!​—1 Samwele 3:10-18, NW.

Wana Samwele azalaki kokola, bato nyonso ya Yisalaele bayebaki ete azali mosakoli ya Nzambe. (1 Samwele 3:19, 20) Etumbu oyo Samwele asakolaki ebandaki kokokisama ntango Bafilistia balongaki Yisalaele. Hofini mpe Fineasi bakufaki na etumba yango, mpe Bafilistia babɔtɔlaki sanduku ya kondimana ya Yehova. Ntango Eli ayokaki ete bana na ye bakufi mpe ete Sanduku ebɔtɔlami, akweaki na kiti oyo azalaki, nkingo na ye ebukanaki mpe akufaki.​—1 Samwele 4:1-18.

Mbula ntuku mibale na nsima, Samwele alendisaki Bayisalaele ete bátika losambo ya lokuta. Bayokaki toli na ye mpe balongolaki bikeko, bakilaki bilei mpe bayambolaki masumu na bango. Samwele abondelaki mpe atumbaki mbeka mpo na masumu na bango. Mpo na yango, ntango Bafilistia bayaki lisusu kobundisa Bayisalaele, Nzambe atyaki bango kati na mobulungano mpe Bayisalaele balongaki bango. Yehova apambolaki bango, makambo ebongaki na Yisalaele mpe bazwaki bamboka oyo Bafilistia babɔtɔlaki bango.​—1 Samwele 7:3-14.

Samwele atombolaki mpenza losambo ya solo. Na ndakisa, asalaki ete biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba esalelama mpo na kobongisa tabenakle. Asalaki ete fɛti ya Elekeli mpe misala ya Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla bikuke ebongisama malamu. (1 Ntango 9:22; 26:27, 28; 2 Ntango 35:18) Mbula na mbula, Samwele azalaki kolongwa na mboka na ye Lama mpo na kokende kosambisa makambo na bingumba ndenge na ndenge ya Yisalaele. Bato bayebaki ete azali moto ya sembo mpe aponaka bilongi te. Lokola bato bazalaki komemya ye, Samwele azalaki na likoki ya kosalisa bango na elimo. (1 Samwele 7:15-17; 9:6-14; 12:2-5) Na ntembe te, bosembo na ye mpe ezaleli na ye ya kolinga makambo ya elimo esalaki ete bato mingi bálanda ndakisa na ye. Bomoi ya Samwele elendisaka mpe yo?

Bayisalaele basɛngi mokonzi

Ntango Samwele akómaki mobange, atyaki bana na ye Yoele mpe Abiya bázala basambisi. “Bana na ye batambolaki na nzela na ye te, kasi bapɛngwaki mpo na bozwi, bakamataki kanyaka, babongolaki boyengebene.” Ezali mpo na makambo mabe na bango nde mikóló ya Yisalaele basɛngaki Samwele mokonzi. (1 Samwele 8:1-5) Samwele asepelaki na likambo yango te. Kasi, ntango abondelaki mpo na yango, Yehova alobaki boye: “Bazali koboya yo te kasi bazali koboya ngai ete nazala mokonzi likoló na bango lisusu te.” (1 Samwele 8:6, 7) Nzambe ayebisaki Samwele akokisa mposa na bango mpe ayebisa bango ete lokola balingi mokonzi, bakobungisa bonsomi na makambo mosusu. Lokola bakangamaki kaka na ekateli na bango, Yehova atindaki Samwele apakola Saulo lokola mokonzi.​—1 Samwele 8:6–22; 9:15-17; 10:1.

Atako Samwele asepelaki na likambo yango te, asalaki ndenge Yehova ayebisaki ye. Ntango Bayisalaele balongaki Baamona, Samwele asangisaki bato na Gilegale mpo bango nyonso báyeba ete Saulo nde mokonzi na bango. (1 Samwele 10:17-24; 11:11-15) Samwele akundwelaki bango lisolo ya ekólo na bango mpe apesaki mokonzi mpe bato ya Yisalaele toli ete bátosa Yehova. Nzambe ayanolaki libondeli ya Samwele na ndenge atindaki nkake makasi mpe mbula, ndenge tolobelaki yango na ebandeli ya lisolo oyo. Nkake mpe mbula makasi yango esalaki ete bato bámona ete basalaki libunga na ndenge baboyaki Yehova. Ntango basɛngaki Samwele abondela mpo na bango, ayebisaki bango boye: “Mpo na ngai mpe, nasalela [Yehova] lisumu oyo te ete natika kobondela mpo na bino, kasi nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.” Oyo nde ndakisa malamu ya bolingo ya sembo mpo na Yehova mpe mpo na bato na ye! (1 Samwele 12:6-24) Yo mpe ondimaka kosimba bibongiseli ya teokrasi mpe kobondela mpo na basambeli mosusu ya Yehova?

Mokonzi ya liboso mpe mokonzi ya mibale ya Yisalaele

Saulo azalaki na komikitisa mpe Nzambe azalaki kosepela na ye. (1 Samwele 9:21; 11:6) Kasi, na nsima, azalaki lisusu kolanda litambwisi ya Nzambe te. Na ndakisa, mokolo moko Samwele apamelaki ye mpo atumbaki mbeka mpe azelaki ye te ndenge ayebisaki ye. (1 Samwele 13:10-14) Ntango Saulo azangaki lisusu botosi mpe atikaki na bomoi Agaga, mokonzi ya Baamaleki, Samwele ayebisaki ye boye: “[Yehova] abɔtɔli yo bokonzi ya Yisalaele lelo mpe apesi yango epai ya mozalani na yo oyo aleki yo na malamu.” Samwele ye moko abomaki Agaga mpe akendaki na mawa mpo na Saulo.​—1 Samwele 15:1-35.

Nsukansuka, Yehova alobaki na Samwele boye: “Okolela mpo na Saulo kino ntango nini? Ngai moko naboyi ye ete azala mokonzi likoló na Yisalaele te.” Bongo, Yehova atindaki Samwele na Beteleme apakola mwana moko ya Yisai lokola mokonzi. Samwele atalaki mwana mokomoko ya Yisai tii Yehova amonisaki ye ete aponi Davidi, ye oyo azalaki leki na bana nyonso ya Yisai. Mokolo yango, Samwele ayekolaki liteya moko ya ntina mingi: “[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.”​—1 Samwele 16:1-13.

Kozanga botosi ya Saulo epesaki Samwele mpasi mingi na motema; kanisá sikoyo mpasi oyo ayokaki ntango Saulo ayinaki Davidi mpe akómaki koluka koboma ye! Na nyonso wana, Samwele alɛmbaki te atako akómaki mpe mobange asalaki nyonso oyo akokaki na mosala ya Yehova.​—1 Samwele 19:18-20.

Mateya oyo Samwele atikelaki biso

Ntango Samwele akufaki, Bayisalaele balelaki mosakoli yango ya komikitisa mpe ya mpiko oyo apesaki bato ebele ndakisa malamu. (1 Samwele 25:1) Samwele azalaki moto ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu azalaki kosala mabunga. Atako bongo, Samwele akangamaki kaka na Yehova mpe alɛmbaki te kosalisa basusu básala mpe bongo.

Banda ntango oyo Samwele azalaki na bomoi, tii lelo oyo, makambo mingi ebongwani; kasi, lisolo ya bomoi na ye ezali na mateya ya ntina mingi mpo na biso. Libosoliboso, Samwele azalaki mosambeli ya Yehova mpe atombolaki losambo ya solo. Ezali yango nde osalaka?

[Etanda na lokasa 16]

MANYOLÁ NA BOMOI YA SAMWELE

• Ndenge baboti ya Samwele bateyaki mwana na bango Liloba ya Nzambe, yo mpe bɔkɔlá bana na yo na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”​—Baefese 6:4.

• Lendisá bana na yo bálanda ndakisa ya Samwele, bámityela mokano ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova.

• Bizaleli malamu ya Samwele esalaki ete bato básepela na ye, atikelaki biso ndakisa malamu mpo na yango.

• Samwele asalaki nyonso mpo na kotombola losambo ya solo, biso mpe tosengeli kosala bongo.

[Elilingi na lokasa 15]

Samwele atombolaki losambo ya solo mpe andimaki kosalisa basusu na elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto