Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/2 nk. 4-7
  • Moi ná baplanɛti na yango ebimaki ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moi ná baplanɛti na yango ebimaki ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya sanza
  • Ebimaki pwasa to ezalisamaki?
  • Lisolo ya bozalisi na mokanda ya Genese
  • Nzambe alingaki ete bato básepela na bomoi na Mabelé
  • Ntango nini Nzambe abandaki kokela molɔ́ngɔ́?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nguya ya kokela—“Ye oyo asalaki lola mpe mokili”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Mabelé esika moko kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • God Begins to Make Things
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/2 nk. 4-7

Moi ná baplanɛti na yango ebimaki ndenge nini?

MAKAMBO mingi esalaka ete esika oyo planɛti na biso Mabelé ezali ekesana mpenza na bisika mosusu na kati ya molɔ́ngɔ́. Ya liboso, na kati ya galaksi na biso, moi ná baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango etyamá na esika oyo minzoto ezalaka mingi te. Minzoto nyonso oyo tomonaka na butu ezalaka mpenza mosika na biso; ata soki tosaleli masini oyo emonisaka biloko pembeni, tokomona kaka biloko mike oyo ezali kongɛnga. Esengelaki mpenza ete moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango ezala na esika wana?

Soki ezalaki na katikati ya galaksi na biso, tolingaki kozala na esika oyo minzoto ezali mingi mpe yango elingaki kozala likama. Na ndakisa, elingaki kozala mpasi mpo planɛti na biso, Mabelé, elanda nzela na yango malamu; mpo na yango, bomoi na biso elingaki kozala na likama mpenza. Tomoni ete moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango ezali na esika oyo ebongi mpenza mpo na kobatela biso na likama yango mpe na makama mosusu na ndakisa likama ya kozika ntango Mabelé ezali koleka na bisika mosusu, mpe ntango minzoto mosusu epanzani to mpe na kongɛnga ya biloko mosusu oyo ekoki koboma.

Moi ezali monzoto oyo ebongi na biso. Ndenge oyo ebimisaka mɔtɔ ebongwanaka te, eumeli bamiliare ya bambula, mpe ezali monene makasi koleka te. Minzoto mingi ya galaksi na biso ezali mike soki tokokanisi yango na moi; lisusu pole mpe molunge na yango ebongi te mpo na kobatela bomoi na planɛti lokola Mabelé. Lisusu, minzoto mingi ebendanaka mibalemibale to mingi mpe mokomoko ebalukaka zingazinga ya mosusu. Nzokande, moi ebendamaka na monzoto mosusu te mpe ebalukaka zingazinga ya monzoto mosusu te. Soki ezalaki bongo te, mbɛlɛ elingaki kozala mpasi mpo moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango etikala na bisika na yango.

Likambo mosusu oyo esalaka ete moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango ekesana mpenza na biloko mosusu oyo ezali na molɔ́ngɔ́ ezali bisika oyo baplanɛti oyo eleki minene ezali; atako baplanɛti yango ebalukaka mpe zingazinga ya moi, esalaka mabe moko te na baplanɛti ya mike oyo ezali mwa pembeni ya moi.a Kutu, baplanɛti yango ekangaka to mpe ebenganaka biloko oyo ekoki kosala mabe soki ekómi na planɛti lokola Mabelé. Na buku na bango (Rare Earth​—Why Complex Life Is Uncommon in the Universe), Peter Ward ná Donald Brownlee, balobi boye: “Biloko mosusu oyo ezali lokola mabanga mineneminene (astéroïdes) mpe mosusu ezali lokola mɔtɔ (comètes) ekweaka awa na Mabelé, kasi mingi te mpo baplanɛti ya minene oyo esalemi na bagaze, na ndakisa Jupiter, ekangaka yango.” Bato ya siansi basili mpe komona minzoto oyo ezali na baplanɛti ya minene oyo ebalukaka zingazinga na yango. Kasi, mingi ya baplanɛti yango soki ezalaki kobaluka zingazinga ya moi elingaki kobebisa planɛti ya moke lokola Mabelé.

Mosala ya sanza

Banda na ntango ya kala, bato batalaka sanza na kokamwa. Bato oyo bakomaka maloba ya ntɔki mpe baoyo basalaka banzembo balobelá yango. Na ndakisa, Moebele moko oyo azalaki kokoma maloba ya ntɔki alobaki ete sanza “ekopikama makasi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe lokola motatoli ya sembo na mapata ya likoló.”​—Nzembo 89:37, NW.

Moko ya makambo ya ntina mingi oyo sanza esalaka mpo na kobatela bomoi awa na Mabelé ezali ete nguya na yango esalaka ete mai ya mbu emata mpe ekita. Komata mpe kokita ya mai ya mbu ezali moko na makambo oyo etambwisaka mai mpe yango epesaka nzela ete bileko ebongwanaka.

Likambo mosusu ya ntina mingi oyo sanza ekokisaka ezali ete esalaka ete Mabelé etikala kaka etɛngamá mwa moke ntango ezali kobaluka zingazinga ya moi. Zulunalo moko (Nature) elobi ete soki sanza ezalaki te, mbɛlɛ kotɛngama ya Mabelé ebongwanaka, ntango mosusu ekómi semba mpe ntango mosusu etɛngami makasi. Kanisá naino soki Mabelé ezalaki te ya kotɛngama mwa moke! Bileko elingaki kobanda kobongwana te mpe mbula elingaki kozala te. Ndenge Mabelé etɛngamá mwa moke, esalaka mpe ete moi eleka makasi te mpe malili eleka makasi te mpo tókufa te. Jacques Laskar, moto moko ya mayele na astronomi, alobi boye: “Sanza nde esalaka ete bileko na biso elandanaka malamu.” Mpo ekokisa malamu mosala na yango, sanza ezalaka monene koleka kutu basanza ya baplanɛti ya minene.

Mokomi ya Genese amonisi mpe likambo mosusu ya ntina mingi oyo sanza esalaka; alobi ete ezali mwinda mpo na butu.​—Genese 1:16.

Ebimaki pwasa to ezalisamaki?

Ndenge nini moto akoki kolimbola ndenge oyo biloko ndenge na ndenge oyo esalaka ete bomoi ezala na Mabelé mpe esepelisa ebimaki? Emonani ete ndimbola ezali kaka mibale. Ndimbola ya liboso ezali ete biloko yango nyonso ebimaki pwasa. Ya mibale ezali ete moto moko ya mayele nde azalisaki yango.

Esili koleka bankóto ya bambula, Makomami Mosantu elobaki ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalisaki mpe abongisaki molɔ́ngɔ́. Soki ezali solo, boye biloko nyonso oyo touti kolobela ebimaki pwasa te, kasi ezalisamaki. Mozalisi apesi biso buku moko mpe na kati alimboli ndenge asalaki mpo bomoi ezala awa na Mabelé. Okoki kokamwa na koyeba ete ata soki buku yango eumeli bambula soki 3 500, makambo oyo elobi mpo na ndenge molɔ́ngɔ́ na biso ezalisamaki ekokani mpenza na oyo bato mosusu ya siansi bandimaka. Lisolo yango ezali na mokanda ya Genese. Tótalela yango.

Lisolo ya bozalisi na mokanda ya Genese

“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe [mabelé].” (Genese 1:1) Maloba wana ya ebandeli na Biblia emonisi kozalisama ya moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango, na ndakisa Mabelé; elobeli mpe kozalisama ya minzoto ndenge na ndenge oyo ezali na kati ya bamiliare ya bagalaksi oyo ezali na kati ya molɔ́ngɔ́. Biblia elobi ete na ebandeli Mabelé ezalaki “na lolenge te, bobele mpamba.” Ezalaki na bakɔntina te; ata mpe bisika oyo milona ekoki kobota ezalaki te. Kasi, maloba oyo elandi emonisi likambo ya ntina mingi oyo, ata bato ya siansi bandimaka ete ezali na ntina mingi mpo bomoi ezala​—ebele ya mai. Elimo ya Nzambe ezalaki “kotambola likoló ya mai.”​—Genese 1:2.

Mpo mai etikala kaka ndenge ezali, planɛti esengeli kokabwana ná moi na ntaka oyo ebongi. Andrew Ingersoll, moto moko ya siansi, amonisi ete “Mars ezali na malili mingi, Vénus eleki molunge, kaka Mabelé nde ezali na esika oyo ebongi mpenza.” Ndenge moko mpe mpo milona ekola malamu, esɛngaka pole oyo ekoki. Mpe lisolo ya Biblia emonisi ete na ebandeli ya bozalisi, Nzambe asalaki ete pole ya moi ekatisa mapata ya mai oyo ezingaki mai ya mbu lokola “elamba” oyo bazingi bebe.​—Yobo 38:4, 9; Genese 1:3-5.

Kaka na mokanda yango ya Genese, na bavɛrsɛ oyo elandi tozali kotánga ete Mozalisi abimisaki “etando monene.” (Genese 1:6-8) Etando yango ezali mipɛpɛ ndenge na ndenge oyo ezingi Mabelé mobimba.

Na nsima, Biblia emonisi ete Nzambe abimisaki mokili ya kokauka. (Genese 1:9, 10) Mbala mosusu asalaki ete mabelé na nse ya mai etombwana. Mpo na yango, mai ekabwanaki mpe mikili to bakɔntina ebimaki uta na mai ya mbu.​—Nzembo 104:6-8.

Na ntango moko boye, Nzambe azalisaki na kati ya mai ya mbu mwa biloko mikemike oyo emonanaka na miso te babengi yango algue. Biloko yango ya mikemike ebandaki kosalela nguya ya moi mpo na kobongola gaze oyo babengi gaz carbonique ekóma bilei mpe kobimisa oxygène. Likambo yango ekómaki lisusu makasi na mokolo ya misato ntango Nzambe azalisaki matiti ná banzete mpe yango etondanaki na mokili. Mpo na yango, oxygène ekómaki mingi mpe epesaki nzela na bato mpe banyama bákoka kozala na bomoi awa na Mabelé.​—Genese 1:11, 12.

Mpo mabelé ebimisaka milona malamu, Mozalisi asalaki ete banyama mikemike ya ndenge na ndenge ebotana na mabelé. (Yilimia 51:15) Mwa banyama yango elyaka biloko oyo epoli mpe ebimisaka biloko oyo banzete esengelaka na yango mpo na kokola malamu. Mwa banyama yango mosusu ezwaka gaze oyo babengi azote mpe ekɔtisaka yango na kati ya mabelé mpe na bongo epesaka nzela na banzete ekola malamu. Likambo ya kokamwa, ata mwa mabelé oyo moto akoki kotoka na lobɔkɔ moko ekoki kozala na milio motoba ya mwa banyama yango.

Genese 1:14-19 elobi ete moi, sanza, mpe minzoto ezalisamaki na mokolo ya minei. Soki totaleli bandimbola oyo ezali liboso tokomona lokola nde Biblia ezali bongolabongola. Kasi, tóbosana te ete Moize, moto oyo akomaki mokanda ya Genese, akomaki yango lokola nde azalaki awa na Mabelé na ntango Nzambe azalaki kozalisa. Emonani ete moi, sanza, mpe minzoto ekómaki komonana awa na Mabelé nde na ntango yango.

Lisolo ya Genese emonisi ete na mokolo ya mitano nde Nzambe azalisaki bambisi mpe banyama mosusu oyo ezalaka na mai ya mbu; na mokolo ya motoba nde azalisaki banyama ya zamba mpe moto.​—Genese 1:20-31.

Nzambe alingaki ete bato básepela na bomoi na Mabelé

Omoni te ete ndenge lisolo ya Genese elobeli yango, ndenge bomoi ebandaki awa na Mabelé, ezalaki mpo bato básepela? Ntango mosusu esila kokómela yo osepela na bomoi wana olamuki na ntɔngɔ omoni kongɛnga ya moi mpe oyoki mopɛpɛ kitoko oyo ezali kopɛpa. To mpe ekoki kozala ete ntango otambolaki na kati ya elanga moko osepelaki mingi na komona bafololo kitoko. To mpe okɔtaki na elanga ya banzete oyo ebotaka mbuma mpe obukaki bambuma kitoko. Makambo kitoko wana nyonso elingaki kozala te soki biloko oyo ezalaki te na planɛti na biso: (1) mai mingi, (2) molunge mpe pole ya moi oyo ekoki, (3) mipɛpɛ ndenge na ndenge, mpe (4) mabelé ya malamu.

Tokoki koloba te ete biloko wana nyonso oyo ezali kaka na Mabelé, kasi na baplanɛti mosusu te lokola Mars, Vénus mpe baplanɛti mosusu ya minene ebimaki kaka pwasa. Ebongisamaki malamu mpo tósepela na bomoi awa na Mabelé. Ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, Mozalisi asalaki mpe Mabelé mpo eumela seko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Baplanɛti minei ya mike oyo ezali pembeni ya moi ezali: Mercure, Vénus, Mabelé, mpe Mars. Baplanɛti yango ezali na mabelé mpe mabanga. Baplanɛti ya minene oyo ezali mosika na moi ezali: Jupiter, Saturne, Uranus, mpe Neptune; yango ezali bagaze.

[Etanda na lokasa 6]

“Lokola nayebi mateya ya siansi, soki basɛngi ngai nalimbola na mokuse epai ya bato oyo batángá te, na ndakisa bato oyo bazalaki kobɔkɔla bibwɛlɛ, baoyo balobelami na mokanda ya Genese, makambo oyo toyebi lelo oyo na oyo etali ebandeli ya mabelé mpe ndenge bomoi ebandaki, nakosalela kaka elobeli lokola oyo ezali na mokapo ya liboso ya mokanda ya Genese.”​—Wallace Pratt, moto ya mayele na geoloji.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 7]

ESIKA OYO EBONGI MPE MPO NA KOYEKOLA MOLƆ́NGƆ́

Soki moi ezalaki na esika mosusu na kati ya galaksi na biso, mbɛlɛ minzoto emonanaka malamu te. Buku moko (The Privileged Planet) elobi boye: “Moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango ezali . . . mosika ya bisika ya mputulu mpe oyo engɛngaka makasi, yango wana tomonaka malamu minzoto oyo ezali pembeni mpe bisika mosusu oyo ezali mosika mpenza na kati ya molɔ́ngɔ́.”

Lisusu, bonene ya sanza mpe ntaka oyo ekaboli yango na Mabelé ebongi mpenza mpe epesaka sanza likoki ya kozipa malamu moi na ntango ya ekilipisi (éclipse solaire). Makambo wana ya kokamwa oyo ezali na bisika mosusu te epesaka bato ya astronomi libaku ya koyekola moi. Yango esalisi bango báyeba makambo mingi mpo na ndenge oyo minzoto engɛngaka.

[Elilingi na lokasa 5]

Sanza ezali na monene oyo ebongi mpo na kosala ete Mabelé etikala kaka etɛngamá mwa moke ntango ezali kobaluka

[Bililingi na lokasa 7]

Nini esalaka ete bomoi ezala awa na Mabelé? Mai mingi, pole mpe molunge oyo ebongi, mabelé ya malamu, mpe mopɛpɛ

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mabelé: Fɔtɔ ya NASA; blé: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto