Tiká ete lisangá esanzola Yehova
“Nakosakola nkombo na yo epai ya bandeko na ngai; na katikati ya lisangá nakosanzola yo.”—BAEBELE 2:12.
1, 2. Mpo na nini lisangá ezali ebongiseli ya malamu mingi, mpe wapi ntina na yango ya libosoliboso?
BANDA kalakala, libota ezalaka esika oyo moto azwaka bandeko oyo akoki kotyela motema mpe oyo bakoki kosalisa ye. Nzokande, Biblia ezali kolobela esika mosusu oyo bato mingi na mokili mobimba lelo oyo bazali kozwa bandeko oyo bakoki kotyela motema mpe oyo bakoki kosalisa bango. Esika yango ezali lisangá ya boklisto. Ezala ete bandeko na yo balingaka yo mpe basalisaka yo to soki balingaka yo te mpe basalisaka yo te, ntembe ezali te ete okoki kosepela na lisangá, ebongiseli malamu oyo Nzambe asali. Soki osanganaka na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova, na ntembe te osepelaka na bondeko mpe bolingo oyo omonaka kuna.
2 Atako bongo, lisangá ezali moziki te to esika ya bokutani mpo na bato oyo bakolá esika moko, oyo basalaka mosala moko, to oyo balingaka lisano moko boye. Ntina ya libosoliboso ya lisangá ezali mpo na kokumisa Yehova Nzambe. Ezalaka bongo banda kala, ndenge mokanda ya Nzembo emonisi yango. Na Nzembo 35:18, tozali kotánga boye: “Nakotɔnda yo kati na koyangana [to lisangá] monene mpe nakosanzola yo kati na bato mingi.” Lisusu, Nzembo 107:31, 32 elendisi biso na maloba oyo: “Tiká ete bato básanzola [Yehova] mpo na boboto na ye, mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato. Tiká ete bákumisa ye kati na koyangana [to lisangá] ya bato.”
3. Paulo alobaki ete lisangá esalaka nini?
3 Ntoma Paulo amonisaki ntina mosusu ya lisangá ntango abengaki yango “ndako ya Nzambe, oyo ezali lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Timote 3:15) Paulo alobelaki lisangá nini? Liloba “lisangá” ezali na bandimbola nini na Biblia? Lisangá esengeli kozala na esika nini na bomoi na biso mpe na mikano na biso? Liboso tózwa biyano na mituna yango, tótalela naino ndenge oyo Liloba ya Nzambe esaleli liloba “lisangá.”
4. Na Makomami ya Liebele, liloba “lisangá” esalelami mingi na ndimbola nini?
4 Liloba ya Liebele oyo mbala mingi ebongolamaka na “lisangá” euti na verbe moko oyo elimboli “kosangisa” to “koyanganisa.” (Deteronome 4:10; 9:10) Mokomi ya nzembo alobaki ete baanzelu na likoló bazali “lisangá.” Bakoki mpe kosalela liloba yango mpo na kolobela etuluku ya bato mabe. (Nzembo 26:5, NW; 89:5-7, NW) Kasi, Makomami ya Liebele esaleli yango mingimingi mpo na kolobela Bayisalaele. Nzambe amonisaki ete Yakobo akokóma “ebele [to lisangá] ya bato,” mpe esalemaki bongo. (Genese 28:3; 35:11; 48:4) Nzambe aponaki Bayisalaele mpo bázala “lisangá ya Yehova,” “lisangá ya Nzambe ya solo.”—Mituya 20:4, NW; Nehemia 13:1, NW; Yosua 8:35, NW; 1 Samwele 17:47, NW; Mika 2:5, NW.
5. Liloba nini ya Grɛki ebongolamaka mingi na “lisangá” mpe liloba yango ekoki kolimbola nini?
5 Liloba ya Grɛki oyo ekokani na yango ezali ékklêsia, oyo esangisi maloba mibale ya Grɛki, moko elimboli “libándá ya” mpe mosusu “kobenga.” Ekoki kosalelama mpo na etuluku nyonso ya bato oyo bayangani; na ndakisa, “liyangani” ya bato oyo Demetiliusi asangisaki na Efese mpo bátombokela Paulo. (Misala 19:32, 39, 41) Kasi, Biblia esaleli liloba yango mingimingi mpo na kolobela lisangá ya boklisto. Nzokande, soki totali na likebi mpenza, tokomona ete na Makomami ya Grɛki ya boklisto, liloba “lisangá” ezali na ndimbola soki minei.
Lisangá ya bapakolami na elimo
6. Davidi mpe Yesu basalaki nini na kati ya lisangá?
6 Ntoma Paulo amonisaki ete Yesu akokisaki maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 22:22. Akomaki boye: “‘Nakosakola nkombo na yo epai ya bandeko na ngai; na katikati ya lisangá nakosanzola yo na nzembo.’ Mpo na yango [Yesu] asengelaki kokóma lokola ‘bandeko’ na ye na makambo nyonso, mpo akoka kokóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo oyo etali Nzambe.” (Baebele 2:12, 17) Davidi akumisaki Nzambe na kati ya lisangá na Yisalaele ya kala. (Nzembo 40:9) Na bongo, Paulo azalaki kokanisa lisangá nini ntango alobaki ete Yesu asanzolaki Nzambe “na kati ya lisangá”?
7. Makomami ya Grɛki ya boklisto esaleli liloba “lisangá” libosoliboso na ndimbola nini?
7 Maloba ya Baebele 2:12, 17 ezali na ndimbola monene. Ezali komonisa ete Klisto amitángaki na kati ya lisangá moko epai asakolaki nkombo ya Nzambe epai ya bandeko na ye. Bandeko yango ezali banani? Ezali “momboto ya Abalayama,” bandeko ya Klisto, bapakolami na elimo, baoyo “basangani na kobengama ya likoló.” (Baebele 2:16–3:1; Matai 25:40) Na Makomami ya Grɛki ya boklisto, liloba “lisangá” elimboli libosoliboso etuluku mobimba ya bayekoli ya Klisto oyo bapakolami na elimo. Bato yango 144 000 oyo bapakolami na elimo bazali “lisangá ya bana ya liboso oyo bakomamá nkombo na kati ya likoló.”—Baebele 12:23.
8. Ndenge nini Yesu asakolaki ete lisangá ya boklisto ekosalema?
8 Yesu asakolaki ete “lisangá” ya boklisto ekosalema. Soki mbula moko liboso akufa, ayebisaki moko ya bantoma na ye boye: “Yo ozali Petelo, mpe na libanga oyo nakotonga lisangá na ngai, mpe bikuke ya Hadesi ekolonga yango te.” (Matai 16:18) Petelo ná Paulo bakangaki ntina ya maloba yango na ndenge ebongi mpenza ete Yesu ye moko nde azali libanga wana. Petelo akomaki ete baoyo batongami lokola “mabanga ya bomoi” ya ndako ya elimo likoló ya libanga ya moboko, elingi koloba Klisto, bazali “ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo [bá]sakola bizaleli malamu” ya Moto oyo abengaki bango.—1 Petelo 2:4-9; Nzembo 118:22; Yisaya 8:14; 1 Bakolinti 10:1-4.
9. Lisangá ya Nzambe ebandaki ntango nini?
9 Ntango nini “ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza” ekómaki lisangá ya boklisto? Ezalaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), ntango Nzambe akitisaki elimo santu likoló ya bayekoli oyo bayanganaki na Yelusaleme. Na nsima, kaka na mokolo yango, Petelo asalaki lisukulu moko ya kafukafu liboso ya ebele ya Bayuda ná Baprozelite. Ntango alobelaki liwa ya Yesu, maloba na ye esimbaki mitema ya bato mingi; babongolaki mitema mpe bazwaki batisimo. Biblia elobi ete bato nkóto misato bazwaki batisimo, bakɔtaki mbala moko na lisangá ya Nzambe oyo eutaki kosalema sika mpe ezalaki kokola. (Misala 2:1-4, 14, 37-47) Lisangá ya boklisto ezalaki kokola mpamba te ebele ya Bayuda ná Baprozelite bandimaki ete ekólo Yisalaele ezalaki lisusu lisangá ya Nzambe te. Ekólo oyo ekómaki lisangá ya solo ya Nzambe ezalaki lisangá ya baklisto bapakolami, “Yisalaele ya Nzambe.”—Bagalatia 6:16; Misala 20:28.
10. Boyokani ya ndenge nini Yesu azali na yango ná lisangá ya Nzambe?
10 Mbala mingi Biblia ekesenisaka Yesu ná bapakolami, na ndakisa na fraze oyo, “na ntina etali Klisto mpe lisangá.” Yesu azali Mokonzi ya lisangá ya baklisto oyo bapakolami na elimo. Paulo akomaki ete Nzambe “akómisaki [Yesu] mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá, oyo ezali nzoto na ye.” (Baefese 1:22, 23; 5:23, 32; Bakolose 1:18, 24) Lelo oyo, bapakolami na elimo, basangani ya lisangá ya Nzambe, bazali lisusu mingi te awa na mabelé. Kasi, tokoki kolikya ete Yesu Klisto, Mokonzi na bango, alingaka bango. Baefese 5:25 emonisi ndenge atalelaka bango: “Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” Alingaka bango mpamba te bapesaka Nzambe “mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu . . . oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye,” ndenge ye moko Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabelé.—Baebele 13:15.
Bandimbola mosusu ya liloba “lisangá”
11. Na ndimbola nini mosusu Makomami ya Grɛki ya boklisto esaleli liloba “lisangá”?
11 Biblia esaleli mpe liloba “lisangá” mpo na kolobela mwa etuluku ya bato, kasi te lisangá mobimba ya bapakolami 144 000, oyo bazali “lisangá ya Nzambe.” Na ndakisa, Paulo akomelaki baklisto ya engumba moko boye: “Bókeba ete bókóma te bantina ya kobɛtisa libaku epai ya Bayuda mpe Bagrɛki mpe epai ya lisangá ya Nzambe.” (1 Bakolinti 10:32) Ezali polele ete na ntango wana, soki moklisto moko na Kolinti asalaki likambo ya mabe, bato mosusu bakokaki kobɛta libaku. Kasi, yango elingaki nde kozala libaku mpo na Bagrɛki, Bayuda, to bapakolami nyonso banda na ntango wana tii lelo oyo? Te. Yango emonisi ete na vɛrsɛ yango, “lisangá ya Nzambe” ezali baklisto nyonso ya eleko moko boye. Na ndenge yango, moto akoki koloba ete Nzambe azali kotambwisa, kosunga, to kopambola lisangá, elingi koloba baklisto nyonso ya eleko moko, ata soki bazali na esika nini. Ndenge moko mpe, tokoki koloba ete lelo oyo esengo mpe kimya ezali na lisangá ya Nzambe, elingi koloba na kati ya bandeko na mokili mobimba.
12. Wapi ndimbola ya misato oyo Biblia esaleli liloba “lisangá”?
12 Ndimbola ya misato oyo Biblia esaleli liloba “lisangá” emonisi baklisto nyonso ya etúká moko. Tozali kotánga boye: “Lisangá na kati ya Yudea mobimba mpe Galilai mpe Samalia ekɔtaki na eleko moko ya kimya.” (Misala 9:31) Na kati ya etúká monene wana, bituluku ya baklisto ezalaki mwa mingi, kasi mokomoko na yango ebengamaki “lisangá,” ezala ya Yudea, ya Galilai, to ya Samalia. Soki tokanisi motángo ya bato oyo bazwaki batisimo na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe mwa moke na nsima, tokomona ete baklisto ya Yelusaleme bazalaki koyangana na bituluku mingi. (Misala 2:41, 46, 47; 4:4; 6:1, 7) Elode Agilipa I ayangelaki etúká ya Yudea tii na liwa na ye, na mobu 44 T.B., mpe vɛrsɛ ya 1 Batesaloniki 2:14 ezali komonisa polele ete tii na mobu soki 50 T.B., masangá ezalaki mwa mingi na Yudea. Na bongo, ntango totángaka ete Elode azalaki “konyokola bato mosusu ya lisangá,” yango emonisaka ete ezalaki kaka te etuluku moko oyo ezalaki koyangana na Yelusaleme.—Misala 12:1.
13. Wapi ndimbola ya minei ya liloba “lisangá” oyo mpe Biblia esaleli mingi?
13 Ndimbola ya minei mpe oyo esalelami mingi mpo na liloba “lisangá” emonisaka etuluku moko ya baklisto oyo bayanganaka esika moko, na ndakisa na ndako ya ndeko moko. Paulo alobelaki “masangá ya Galatia.” Na kati ya etúká monene wana ya Loma masangá ezalaki mingi. Mbala mibale, Paulo asalelaki liloba “masangá” (na boike) ntango azalaki kolobela etúká ya Galatia, na ntembe te yango esangisaki masangá oyo ezalaki na Antiokia, Delebe, Lisitala, mpe Ikoniumu. Mibali oyo bakokisi masɛngami, to bakɛngɛli, baponamaki mpo na kotambwisa lisangá mokomoko. (1 Bakolinti 16:1; Bagalatia 1:2; Misala 14:19-23) Biblia emonisi ete nyonso wana ezalaki “masangá ya Nzambe.”—1 Bakolinti 11:16; 2 Batesaloniki 1:4.
14. Likanisi nini tokoki kosimba mpo na ndimbola ya “lisangá” na mwa bavɛrsɛ oyo totaleli?
14 Na bisika mosusu, baklisto oyo bazalaki koyangana esika moko bazalaki etuluku moke, bakokaki koyangana ata na ndako ya ndeko moko. Atako bongo, etuluku mokomoko wana ezalaki kobengama “lisangá.” Biblia elobeli lisangá oyo ezalaki na ndako ya Akila ná Pilisila, ya Nimifa, mpe ya Filemona. (Baloma 16:3-5; Bakolose 4:15; Filemona 2) Yango esengeli kolendisa masangá oyo ezali na basakoli moke, oyo ekoki kozala ete bayanganaka na ndako ya ndeko moko. Lokola Yehova ayebaki masangá ya ndenge wana na siɛklɛ ya liboso, ntembe ezali te ete ayebaka mpe masangá ya lelo mpe apambolaka yango na nzela ya elimo na ye.
Masangá esanzolaka Yehova
15. Elimo santu epesaki bandeko mosusu na masangá ya siɛklɛ ya liboso likoki ya kosala makambo nini?
15 Tomonaki ete Yesu akokisaki Nzembo 22:22, elingi koloba ete asanzolaki Nzambe na kati ya lisangá. (Baebele 2:12) Bayekoli na ye ya sembo basengelaki mpe kosala bongo. Na siɛklɛ ya liboso, ntango baklisto ya solo bapakolamaki na elimo santu, elingi koloba bakómaki bana ya Nzambe mpe bandeko ya Klisto, elimo yango epesaki bamosusu kati na bango nguya ya kosala makambo ya kokamwa. Na maloba mosusu, bazwaki makabo ya elimo santu. Makabo yango ezalaki maloba ya bwanya to boyebi, to nguya ya kobikisa to kosakola makambo, to mpe likoki ya koloba minɔkɔ oyo bayekoli te.—1 Bakolinti 12:4-11.
16. Wapi ntina moko ya makabo ya elimo?
16 Na oyo etali koloba minɔkɔ mosusu, Paulo alobaki boye: “Nakoyemba nzembo ya masanzoli na likabo ya elimo, kasi nakoyemba mpe nzembo ya masanzoli na makanisi na ngai.” (1 Bakolinti 14:15) Paulo amonaki ete ebongi mpenza bato mosusu bákanga ntina ya maloba na ye mpe báteyama. Mokano ya Paulo ezalaki ete asanzola Yehova na kati ya lisangá. Alendisaki bato mosusu oyo bazwaki makabo ya elimo na maloba oyo: “Bóluka kotondana na yango mpo na kotongama ya lisangá,” to etuluku mobimba epai bazalaki komonisa makabo yango. (1 Bakolinti 14:4, 5, 12, 23) Na maloba mosusu, Paulo azalaki komibanzabanza mpo na masangá, ayebaki ete na lisangá mokomoko, baklisto bazalaki na mabaku ya kosanzola Nzambe.
17. Tokoki kondimisama na likambo nini mpo na masangá na biso lelo oyo?
17 Yehova azali kokoba kosalela lisangá na ye mpe azali kobatela yango. Azali kopambola etuluku mobimba ya baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé. Tokoki komona yango na ebele ya bilei ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango lelo oyo. (Luka 12:42) Yehova azali kopambola lisangá ya bandeko na mokili mobimba. Azali mpe kopambola lisangá mokomoko epai tosanganaka mpo na kosanzola Mozalisi na misala na biso mpe na biyano na biso oyo elendisaka. Na masangá yango tozwaka mateya mpe formasyo mpo tókoka kosanzola Nzambe ata ntango toyangani na lisangá te.
18, 19. Baklisto ya sembo na lisangá mokomoko basengeli kosala nini?
18 Tóbosana te ete ntoma Paulo alendisaki baklisto na lisangá ya Filipi, na etúká ya Masedonia, na maloba oyo: “Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango, . . . [ete] bótonda na mbuma ya boyengebene, oyo eyaka na nzela ya Yesu Klisto, mpo na nkembo mpe lisanzoli ya Nzambe.” Yango elimbolaki mpe kosakola kondima na bango kati na Yesu mpe elikya kitoko oyo bazalaki na yango epai ya bato oyo bazalaki na lisangá te. (Bafilipi 1:9-11; 3:8-11) Yango wana, Paulo alendisaki baninga na ye baklisto na maloba oyo: “Na nzela na [Yesu] tiká tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.”—Baebele 13:15.
19 Na ndakisa ya Yesu, yo mpe osepelaka kosanzola Nzambe “na kati ya lisangá,” mpe osalelaka mbɛbu na yo mpo na kosanzola Yehova epai ya bato oyo bayebi ye naino te mpe basanzolaka ye te? (Baebele 2:12; Baloma 15:9-11) Eyano ya mokomoko na biso ekomonisa mwa moke ndenge oyo atalelaka mokumba oyo lisangá na ye ekokisaka na kati ya mokano ya Nzambe. Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela ndenge oyo Yehova azali kotambwisa mpe kosalela lisangá mokomoko mpe mokumba oyo esengeli kokokisa na bomoi na biso lelo oyo.
Ozali koyeba lisusu?
• “Lisangá ya Nzambe,” oyo esangisi baklisto bapakolami, ebandaki ndenge nini?
• Wapi bandimbola mosusu misato ya liloba “lisangá” na kati ya Biblia?
• Na ntina etali lisangá, Davidi, Yesu, mpe baklisto ya siɛklɛ ya liboso basepelaki kosala nini, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?
[Elilingi na lokasa 21]
Yesu azalaki moboko ya lisangá nini?
[Elilingi na lokasa 23]
Baklisto bazalaki koyangana na bituluku oyo ezalaki “masangá ya Nzambe”
[Elilingi na lokasa 24]
Lokola baklisto oyo na Bénin, biso mpe tokoki kosanzola Yehova na kati ya lisangá