Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/6 nk. 8-12
  • Basanza na “mokili malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basanza na “mokili malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sanza mibale ya koyanganisa mbuma
  • Sanza mibale mpo na kolona
  • Sanza mibale mpo na kolona biloko mosusu
  • Sanza moko mpo na kokata lini
  • Sanza moko mpo na kobuka ɔrje
  • Sanza moko mpo na kobuka mbuma mpe komeka
  • Sanza mibale mpo na kolongola nkasa
  • Sanza moko mpo na mbuma ya ntango ya moi
  • Ntina ya Manaka ya Gezele mpo na yo
  • Alukaka oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • B15 Kalandriye ya Baebre
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/6 nk. 8-12

Basanza na “mokili malamu”

NA 1908, pembeni ya mokili patatalu na wɛsti ya Yelusaleme, na esika oyo ezalaki Gezele, engumba moko oyo elobelami na Biblia, bato ya arkeoloji bakundolaki etanda moko ya mabanga oyo, mbala mosusu ekomamaki na siɛklɛ ya zomi liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na etanda yango, bakomá na Liebele ya kala, makambo oyo bato mingi balobaka ete ezali kozongela na mokuse basanza ya mosala ya bilanga na mbula mobimba, mpe misala ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalema. Ebengamaka Manaka ya Gezele.

Etanda yango ezali na nkombo ya moto oyo akomaki yango: Abiya. Atako bato mosusu ya arkeoloji bandimaka yango te, mingi bamonaka ete mwana-kelasi moko nde akomaki makambo yango na maloba ya ntɔki.a Okosepela kotalela ndenge oyo mwana moke azalaki komona kolandana ya bileko? Mbala mosusu ekozongisa na makanisi na yo masolo mosusu ya Biblia.

Sanza mibale ya koyanganisa mbuma

Mokomi ya Manaka ya Gezele abandaki na mosala ya koyanganisa mbuma. Atako mosala yango etángami na esika ya liboso na manaka yango, ezali mpasi te tóyeba ntina oyo Bayisalaele bazalaki kotalela yango lokola mosala ya nsuka na kati ya misala nyonso ya bilanga oyo bazalaki kosala na mbula mobimba. Sanza ya Etanimi (oyo na nsima bakómaki kobenga Tisri) ezalaka na katikati ya sanza ya Sɛtɛmbɛ mpe ya Ɔkɔtɔbɛ na manaka na biso. Lokola na eleko yango bazalaki kosilisa kobuka mbuma nyonso, ezalaki mpenza ntango ya esengo ata mpo na elenge Abiya. Kanisá esengo oyo azalaki na yango ntango azalaki kopesa tata na ye mabɔkɔ ntango azalaki kosala mongombo oyo ezalaki kokóma ndako na bango na boumeli ya pɔsɔ mobimba wana bazalaki kotɔnda Yehova na esengo mpo na biloko nyonso oyo bilanga na bango ebotaki!​—Deteronome 16:13-15.

Na eleko yango, libota ya Abiya ezalaki komibongisa mpo na kobuka mbuma ya olive; mpo na kobuka yango, bazalaki kobɛta bitape na yango; mbala mosusu mosala yango ezalaki mpasi mpo na elenge Abiya, kasi azalaki kosepela kotala ndenge oyo ezalaki kosalema. (Deteronome 24:20) Soki basilisi kobuka bambuma ya olive, bazalaki komema yango na ekamweli moko ya libanga mpo bábimisa mafuta. Na mabota mosusu, bazalaki kosala mafuta na ndenge mosusu ya pɛtɛɛ​—bazalaki kotya na mai olive oyo batuti mpe na nsima kolongola mafuta oyo ekomata likoló. Ata soki basaleli mayele nini mpo na kozwa yango, mafuta ya olive ezalaki kaka mpo na kolambela te. Bazalaki mpe kosalela yango mpo na kopelisa miinda, konyolisa esika oyo moto azali koyoka mpasi na nzoto mpe kotya yango na mpota, oyo mwana lokola Abiya akokaki kozoka ntango azali kosakana.

Sanza mibale mpo na kolona

Ntango bambula ebandi konɔka, na ntembe te Abiya azalaki kosepela kosukola mai ya mbula. Mbala mosusu, tata na ye ayebisaki ye mosala monene oyo mbula esalaka na mabelé. (Deteronome 11:14) Mbula ezalaki kolɛmbisa mabelé oyo moi ekausaki na boumeli ya basanza mpe kokómisa yango malamu mpo na kobalola. Moto oyo azalaki kobalola mabelé azalaki kosalela etimweli ya mabaya, oyo mbala mosusu ezalaki na nsɔngɛ ya ebende, oyo nyama moko azalaki kobenda. Bazalaki kosala milɔngɔ oyo ezali alima. Mabelé ezalaki eloko ya motuya mingi, yango wana basali-bilanga na Yisalaele bazalaki kolandela mwa biteni, ata mpe mipanzi ya mwa bangomba. Na ntembe te, na bisika ya ndenge wana, bazalaki kosalela nde nkongo.

Soki basilisi kobalola mabelé oyo mbula elɛmbisaki, bakokaki sikoyo kolona blé mpe ɔrje. Kutu, molɔngɔ oyo elandi na Manaka ya Gezele, elobeli mpe sanza mibale mpo na kolona. Moloni azalaki kotya milona na libenga oyo ezalaki ntolo na ye; azalaki kozwa yango na lobɔkɔ mpe kobwaka yango na elanga.

Sanza mibale mpo na kolona biloko mosusu

Biloko ya kolya ezalaki kobota na bileko nyonso na “mokili malamu.” (Deteronome 3:25) Na sanza ya Desɛmbɛ, mbula ezalaki kobɛta mingi mpe matiti nyonso ezalaki kokóma na langi ya mai ya mpondu. Yango ezalaki ntango ya kolona biloko lokola ndunda mpe madesu. (Amosa 7:1, 2) Na etanda wana, Abiya abengaki yango “matiti ya prɛnta” to, na kolanda libongoli mosusu, “kolona ya nsima,” eleko oyo bazalaki kolamba bilei kitoko na biloko oyo bazalaki kobuka.

Wana eleko ya mpiɔ ebandi kosila, nzete ya amande ezalaki kobimisa bafololo ya mpɛmbɛ mpe ya motane; yango ezalaki komonisa ete eleko ya prɛnta elingi kobanda. Yango ezalaki kobanda na mwa molunge, lokola oyo ezalaka na ebandeli ya sanza ya Yanuali.​—Yilimia 1:11, 12.

Sanza moko mpo na kokata lini

Na nsima, Abiya alobelaki lini. Mbala mosusu, okanisi likambo oyo esalemaki bankama ya mbula liboso ya ntango ya Abiya, na ɛsti ya bangomba ya Yudea. Na engumba Yeliko, Lahaba abombaki banɔngi mibale “na kati ya banzete ya lini oyo atandaki na milɔngɔ” likoló ya nsamba ya ndako na ye mpo ekauka. (Yosua 2:6, NW) Lini ezalaki na ntina mingi na bomoi ya Bayisalaele. Mpo na kozwa nsinga ya lini, bazalaki naino kopɔlisa nzete na yango. Soki balingi kosala yango malɛmbɛmalɛmbɛ, bazalaki kotika ete mamwɛ epɔlisa yango; soki balingi kosala yango mbangu, bazalaki kotya yango na liziba to na mai. Soki epɔli, bazalaki kobenda bamposo mpo na kosala lini, oyo bazalaki kosala na yango bilamba ya masuwa, bahema, mpe bilamba ya kolata. Bazalaki mpe kosalela lini mpo na kosala nsinga ya mwinda.

Bato mosusu balobaka ete lini ezalaki kobota te na Gezele, mpamba te mai ezalaki mingi te. Bamosusu balobaka ete lini ezalaki kobota kaka na basanza ya nsuka. Yango wana, bato mosusu balobaka ete liloba “lini” na Manaka ya Gezele, elimboli nde “matiti” ya banyama.

Sanza moko mpo na kobuka ɔrje

Mbula na mbula, nsima ya sanza ya kobuka lini, Abiya azalaki komona mbuma ya ɔrje ya mobesu na banzete na yango; molona oyo alobelaki nsima na manaka na ye. Sanza oyo bazalaki kobuka yango ebengami na Liebele sanza ya Abibu, oyo elimboli “Mbuma ya Mobesu”; mbala mosusu bapesaki nkombo yango mpo na kolobela mbuma oyo esili kotela kasi ezali naino pɛtɛɛ. Yehova apesaki mobeko oyo: “Kanisá sanza ya Abibu mpe sɛnzɛlá Elekeli epai ya [ Yehova] Nzambe na yo.” (Deteronome 16:1) Sanza ya Abibu (oyo na nsima ekómaki Nisana) ekweaka na katikati ya Marsi mpe Aprili na manaka na biso. Mbala mosusu baponaki ebandeli ya sanza yango na kolanda eleko oyo ɔrje ebandi kotela. Kutu, tii lelo, Bayuda oyo babengaka Bakaraïte balandaka ntango oyo ɔrje ebandi kotela mpo na kokata ebandeli ya mbula ya sika epai na bango. Ezala bongo to te, Mibeko esɛngaki bákamataka mbuma ya liboso ya ɔrje mpe báningisaka yango liboso ya Yehova na mokolo ya 16 Abibu.​—Levitike 23:10, 11.

Ɔrje ezalaki na ntina mingi na bomoi ya Bayisalaele. Lokola blé ezalaki na ntalo mingi koleka ɔrje, bato mosusu, mingimingi babola, bazalaki kosepela kosala mampa na ɔrje.​—Ezekiele 4:12.

Sanza moko mpo na kobuka mbuma mpe komeka

Na bileko mosusu, soki Abiya alamuki na ntɔngɔ, akomona ete mapata ezali kolimwa; yango ezalaki kolakisa ete bambula ekonɔka lisusu te na boumeli ya mwa ntango. Na boumeli ya eleko yango, mamwɛ kaka nde ekokaki kokolisa milona na mokili malamu. (Genese 27:28; Zekalia 8:12) Basali-bilanga na Yisalaele bayebaki ete milona mingi oyo bazalaki kobuka na basanza ya moi makasi esengelaki na mipɛpɛ ya malamu tii eleko ya Pantekote. Na ntembe te, mipɛpɛ ya malili oyo ezalaki kouta na nɔrdi ezalaki malamu mpo na masango, kasi ezalaki malamu te mpo na banzete oyo esili kobimisa fololo. Mipɛpɛ ya molunge oyo ezalaki kouta na sudi nde ezalaki malamu mpo bafololo efungwama mpe na nsima ebota mbuma.​—Masese 25:23; Loyembo ya Salomo 4:16.

Yehova, nkolo ya molunge, mopɛpɛ, mpe mbula akabolaki bileko na yango malamu. Na ntango ya Abiya, Yisalaele ezalaki mpenza “mokili ya blé mpe ya ɔrje mpe ya banzete ya vinyo mpe ya figi mpe ya grenade, mokili ya mafuta ya olive mpe ya mafuta ya nzoi.” (Deteronome 8:8, NW) Mbala mosusu nkɔkɔ ya Abiya ayebisaki ye ete biloko ezalaki mingi na boyangeli ya Mokonzi Salomo​—likambo oyo emonisaki polele ete Yehova apambolaki bango.​—1 Mikonzi 4:20.

Nsima ya kolobela kobuka mbuma, manaka yango ezali na liloba oyo bato mosusu balobaka ete elimboli “komeka.” Mbala mosusu ezali kolobela ndenge oyo bazalaki komeka mbuma oyo babukaki mpo na kopesa nkolo-bilanga mpe basali na ye, to mpe mpo na kopesa lokola mpako. Nzokande, bato mosusu ya mayele balobaka ete liloba yango ya Liebele elimboli “kosala fɛti” mpe bamonaka ete yango ezali Fɛti ya Bapɔsɔ, oyo ezalaki na sanza ya Siwana (na kati ya Mai mpe Yuni).​—Exode 34:22.

Sanza mibale mpo na kolongola nkasa

Na nsima, Abiya akomaki mpo na sanza mibale oyo bazalaki kobongisa banzete ya vinyo. Ekoki kozala ete ye mpe azalaki kosalisa na kolongola ebele ya nkasa na banzete ya vinyo mpo mbuma nyonso ezwaka moi malamu. (Yisaya 18:5) Na nsima, ezalaki ntango ya kobuka mbuma ya vinyo, eleko oyo ezalaki kosepelisa bana. Mbuma ya vinyo oyo eteli liboso ezalaki elɛngi mingi! Ekoki kozala ete Abiya ayebaki lisolo ya bato 12 oyo Moize atindaki bákende konɔnga Mokili ya Ndaka. Bato yango bakendaki na eleko oyo mbuma ya vinyo ya liboso etelaki mpo na koyeba soki mokili yango ezalaki kitoko. Na ntango wana, bato yango bazwaki etuka moko monene mpenza ya vinyo oyo esɛngaki mibali mibale mpo na komema yango!​—Mituya 13:20, 23.

Sanza moko mpo na mbuma ya ntango ya moi

Likambo ya nsuka oyo elobami na manaka ya Abiya ezali mbuma ya ntango ya moi. Na ntango ya kala na mikili ya Moyen-Orient, basali-bilanga bazalaki kobuka bambuma mingimingi na ntango ya moi. Bambula mingi nsima ya eleko ya Abiya, Yehova asalelaki maloba “ekɔlɔ ya mbuma ya ntango ya moi” mpo na komonisa ete ‘nsuka eyei epai ya bato na ye, Yisalaele’; asalelaki maloba “mbuma ya ntango ya moi” lokola elilingi mpo na kolobela “nsuka” na Liebele. (Amosa 8:2) Na ntembe te, yango emonisaki Bayisalaele ete lokola bazalaki sembo te, bakómaki na nsuka mpe ebongaki ete Yehova apesa bango etumbu. Na ntembe te, mbuma ya figi ezalaki na kati ya bambuma ya ntango ya moi oyo Abiya alobelaki. Bazalaki mpe kosala bagato na mbuma ya figi oyo bakamoli to mpe bazalaki kosalela yango lokola pomadi mpo kosilisa babibɔ.​—2 Mikonzi 20:7.

Ntina ya Manaka ya Gezele mpo na yo

Emonani ete Abiya ayebaki malamu ndenge oyo mosala ya bilanga ezalaki kosalema na mokili yango. Bayisalaele mingi ya ntango wana bazalaki kosala mosala ya bilanga. Ata soki ofandi na esika oyo basalaka bilanga te, makambo oyo ezali na etanda oyo bakundolaki na Gezele ekoki kosalisa yo omona na makanisi masolo ya Biblia, mpe okanga ntina na yango malamumalamu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndenge oyo basanza elandani na Manaka ya Gezele ekeseni mwa moke na ndenge oyo Biblia elobelaka yango. Lisusu, na bisika ndenge na ndenge ya Mokili ya Ndaka, misala mosusu ya bilanga ezalaki kosalema na bileko oyo ekeseni mwa moke.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 11]

LOLENGE MOKO OYO MANAKA YA GEZELE EKOKI KOBONGOLAMA:

“Basanza ya kobuka mbuma ya vinyo mpe ya olive;

basanza ya kolona;

basanza oyo matiti ya prɛnta ebimaka;

sanza ya kobenda lini;

sanza ya kobuka ɔrje;

sanza ya kobuka blé mpe komeka;

basanza ya kobongisa nzete ya vinyo;

sanza ya mbuma ya ntango ya moi.”

[ekomami na:] Abiyab

[Maloba na nse ya lokasa]

b Euti na buku Textbook of Syrian Semitic Inscriptions, volimi 1, ya John Gibson, 1971.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Archaeological Museum of Istanbul

[Etanda/​Bililingi na lokasa 9]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

NISANA (ABIBU)

Marsi​—Aprili

IYALA (ZIWI)

Aprili​—Mai

SIWANA

Mai​—Yuni

TAMUZU

Yuni​—Yuli

ABI

Yuli​—Augusto

ELULU

Augusto​—Sɛtɛmbɛ

TISRI (ETANIMI)

Sɛtɛmbɛ​—Ɔkɔtɔbɛ

HESEVANA (BULU)

Ɔkɔtɔbɛ​—Novɛmbɛ

KISILEWE

Novɛmbɛ​—Dɛsɛmbɛ

TEBETE

Dɛsɛmbɛ​—Yanuali

SEBATA

Yanuali​—Febwali

ADALA

Febwali​—Marsi

VE-ADALA

Marsi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mosali-elanga: Garo Nalbandian

[Elilingi na lokasa 8]

Bitika ya Gezele

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© 2003 BiblePlaces.com

[Bililingi na lokasa 10]

Nzete ya amande

[Elilingi na lokasa 10]

Nzete ya lini

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Dr. David Darom

[Elilingi na lokasa 10]

Ɔrje

[Eutelo ya bafɔtɔ]

U.S. Department of Agriculture

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto