Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/6 nk. 26-30
  • Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na ndimbola nini “kotosa eleki mbeka”?
  • Ndakisa oyo ezali kokebisa biso
  • Tótosaka na makambo nyonso
  • Tosengeli kotosa Nzambe mpo tolingi ye
  • Ozali na “motema ya botosi”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Kotosa eleki mbeka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mokonzi ya liboso na Yisraele
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Ayekolaki botosi”
    “Yaká, landá ngai”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/6 nk. 26-30

Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova

“Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai.”​—MASESE 27:11.

1. Elimo nini epalangani na mokili lelo oyo?

LELO oyo, bato mingi balingaka kosala kaka oyo motema na bango elingi, balingaka mpe kotosa te. Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese, alimbolaki mpo na nini elimo yango ezali komonana: “Bozalaki kotambola kala engebene ebongiseli ya makambo ya mokili oyo, engebene moyangeli ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” (Baefese 2:1, 2) Satana Zabolo, “moyangeli ya nguya ya mopɛpɛ,” nde apalanganisi elimo ya kozanga botosi na mokili mobimba. Asalaki yango na siɛklɛ ya liboso, mpe bandá abwakamá awa na nse na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, azali se kobakisa milende mpo na kopalanganisa elimo yango.​—Emoniseli 12:9.

2, 3. Mpo na bantina nini tosengeli kotosa Yehova?

2 Nzokande, biso baklisto toyebi ete tosengeli kotosa Yehova Nzambe mpamba te azali Mozalisi na biso, Mobateli ya bomoi na biso, Nkolo Mokonzi oyo atondi na bolingo, mpe Mobikisi na biso. (Nzembo 148:5, 6; Misala 4:24; Bakolose 1:13; Emoniseli 4:11) Bayisalaele ya ntango ya Moize bayebaki ete Yehova azalaki Mopesi-bomoi mpe Mobikisi na bango. Yango wana, Moize alobaki na bango boye: “Bokokeba ete bósala lokola [Yehova] Nzambe na bino alakeli bino.” (Deteronome 5:32) Ebongaki mpenza ete Bayisalaele bátosa Yehova. Kasi, mwa moke nsima ya koyoka maloba yango, batikaki kotosa Nkolo na bango.

3 Botosi na biso ezali na ntina nini epai ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba? Na ntango ya kala, Nzambe atindaki mosakoli Samwele ayebisa Mokonzi Saulo ete: “Kotosa eleki mbeka.” (1 Samwele 15:22, 23, NW) Mpo na nini?

Na ndimbola nini “kotosa eleki mbeka”?

4. Na ndenge nini tokoki kopesa Yehova eloko moko?

4 Lokola Yehova azali Mozalisi, biloko nyonso oyo tozali na yango ezali ya ye. Na yango, ezali nde na eloko moko oyo tokoki kopesa ye? Ɛɛ, tokoki kopesa ye eloko moko ya motuya mingi. Eloko yango nini? Tokozwa eyano na maloba oyo: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Eloko oyo tokoki kopesa Nzambe ezali botosi na biso. Atako bomoi na biso nyonso ezali ndenge moko te, toutá bisika ekeseni mpe tokolá ndenge moko te, mokomoko na biso akoki kopesa eyano na likambo oyo Satana Zabolo alobaki ete moto moko te akotikala sembo epai ya Nzambe soki amekami. Ezali mpenza libaku malamu mpo na biso!

5. Mozalisi ayokaka ndenge nini soki tozali kotosa te? Pesá ndakisa.

5 Nzambe atyaka likebi na bikateli oyo tozwaka. Ayokaka mawa mingi soki totosi te. Na ndenge nini? Ayokaka motema mpasi ntango moto moko aponi nzela ya mabe. (Nzembo 78:40, 41) Tókamata ndakisa ya moto moko oyo azali na maladi ya diabɛti, oyo azali te kolanda toli ya monganga mpe azali kolya bilei oyo ebongi te mpo na nzoto na ye. Soki monganga ayoki likambo yango, akoyoka ndenge nini na motema? Tóyeba ete Yehova ayokaka motema mpasi soki bato bazali kotosa ye te, mpamba te ayebi mbuma mabe oyo moto abukaka soki atosi malako na ye te.

6. Nini ekoki kosalisa biso mpo tótosaka Nzambe?

6 Nini ekoki kosalisa mokomoko na biso azala na botosi? Ebongi ete mokomoko na biso asala lokola Salomo, elingi koloba asɛngaka Nzambe apesa ye “motema ya botosi.” Salomo asɛngaki motema ya ndenge wana mpo ‘ayeba kososola malamu ná mabe’ mpo na kosambisa bandeko na ye Bayisalaele. (1 Mikonzi 3:9, NW) Tosengeli kozala na “motema ya botosi” mpo tóyeba kokesenisa mabe ná malamu na mokili oyo ezangi botosi. Nzambe apesi biso Liloba na ye mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, asali ebongiseli ya makita, apesi biso bankulutu; nyonso wana mpo na kosalisa biso tólona “motema ya botosi.” Tosalelaka bibongiseli wana oyo Nzambe apesi biso?

7. Mpo na nini Yehova asepelaka na botosi koleka bambeka?

7 Na likambo yango, tóbosana te ete na ntango ya kala Yehova ayebisaki bato ya ekólo oyo aponaki ete kotosa eleki bambeka ya banyama. (Masese 21:3, 27; Hosea 6:6; Matai 12:7) Mpo na nini Yehova alobaki bongo nzokande ye moko nde asɛngaki bango bápesaka bambeka? Esengelaki ete moto oyo azali kopesa mbeka asala yango na makanisi ya malamu. Esengelaki moto amituna soki azali kosala yango mpo na kosepelisa Nzambe to azali kosala yango kaka mpo na kokokisa molulu moko boye. Moto oyo azali mpenza na mposa ya kosepelisa Nzambe akosala makasi atosa mibeko na Ye nyonso. Nzambe azali na mposa ya bambeka ya banyama te; botosi na biso nde eloko ya motuya oyo tokoki kopesa ye.

Ndakisa oyo ezali kokebisa biso

8. Mpo na nini Nzambe amonaki ete Saulo abongi lisusu kozala mokonzi te?

8 Lisolo ya Mokonzi Saulo emonisi malamumalamu ntina ya botosi. Na ebandeli, Mokonzi Saulo azalaki na komikitisa mpe na bopɔlɔ, azalaki ‘moke na miso na ye mpenza.’ Kasi na nsima, akómaki kozwa bikateli na lolendo mpe na makanisi ya mabe. (1 Samwele 10:21, 22; 15:17) Mokolo moko, Saulo asengelaki kobunda na Bafilistia. Samwele ayebisaki mokonzi azela tii ntango ye moko akoya kotumba mbeka mpo na Yehova mpe kopesa ye malako mosusu. Kasi, Samwele ayaki noki te, mpe bato bakómaki kokima. Ntango Saulo amonaki bongo, ye moko “atumbaki mbeka ya kotumba.” Yehova asepelaki na likambo yango te. Ntango Samwele akómaki, Saulo alukaki kolongisa kozanga botosi na ye; alobaki ete Samwele aumelaki, yango wana azwaki ekateli ya kotumba mbeka mpo na kokitisa motema ya Yehova. Mpo na Saulo, kopesa mbeka yango ezalaki na ntina mingi koleka kotosa malako oyo azwaki ete azela Samwele aya kotumba mbeka yango. Samwele alobaki na ye boye: “Osali makambo na elema. Obateli mobeko ya [Yehova], Nzambe na yo te.” Lokola Saulo atosaki Yehova te, abongaki lisusu kozala mokonzi te.​—1 Samwele 10:8; 13:5-13.

9. Ndenge nini Saulo amonisaki ete azalaki na botosi te epai ya Nzambe?

9 Mokonzi azwaki liteya na likambo oyo ekómelaki ye? Te! Na nsima, Yehova atindaki Saulo aboma ekólo mobimba ya Baamaleki, bato oyo babundisaki Yisalaele atako batumolaki bango te. Saulo asengelaki kobikisa ata bibwɛlɛ na bango te. Mokonzi atosaki na ndenge “abɛtaki Baamaleki longwa na Hawila kino na Sula.” Ntango Samwele akómaki epai ye azalaki, mokonzi azalaki na esengo lokola alongaki mpe alobaki na ye boye: “Opambwama na [Yehova]! Nasilisi likambo lilakami na [Yehova].” Nzokande, atako malako oyo azwaki ezalaki polele, Saulo ná bato na ye babomaki te Mokonzi Agaga mpe “nyama oyo elekaki malamu kati na bampate mpe na bangɔmbɛ mpe bibwɛlɛ ya mafuta mpe . . . bana ya mpate mpe . . . nyonso ezalaki malamu.” Mpo na kolongisa kozanga botosi na ye, Mokonzi Saulo alobaki boye: “Bato babikisaki bibwɛlɛ oyo elekaki malamu kati na bampate mpe bangɔmbɛ ete bátumbela [Yehova] Nzambe na yo mbeka.”​—1 Samwele 15:1-15.

10. Liteya nini Saulo asimbaki te?

10 Samwele ayebisaki Saulo boye: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba mpe bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa eleki mbeka, koyoka eleki mafuta ya bampate.” (1 Samwele 15:22, NW) Lokola Yehova alobaki ete báboma banyama yango, ebongaki mpe te kopesa yango lokola mbeka.

Tótosaka na makambo nyonso

11, 12. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka milende oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye na losambo na biso? (b) Ndenge nini moto akoki komikosa na kokanisa ete azali kosala mokano ya Nzambe, nzokande azali kotosa te?

11 Yehova asepelaka soki basaleli na ye ya sembo bazali kozonga nsima te ata ntango bakutani na minyoko, bazali kolɛmba te kosakola nsango ya Bokonzi atako bato mingi bazali kosepela na yango te, mpe bazali kotika te koyangana na makita atako basengeli kosala makasi mpo na kozwa biloko ya kobikela! Tosepelisaka motema na ye ntango tozali kotosa na makambo wana ya ntina mingi! Yehova azwaka na motuya milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye soki bolingo nde ezali kotinda biso tósala yango. Ekoki kozala ete bato bazali komona te mosala makasi oyo tozali kosala, kasi Nzambe amonaka makabo oyo topesaka ye na motema mobimba mpe abosanaka yango te.​—Matai 6:4.

12 Kasi, mpo na kosepelisa mpenza Nzambe na biso, tosengeli kotosaka ye na makambo nyonso ya bomoi na biso. Tómikosa te na kokanisa ete lokola tozali kokokisa makambo mosusu oyo azali kosɛnga basaleli na ye, yango ezali kopesa biso nzela ya kobuka mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, moto mosusu akoki kokanisa ete soki azali kokokisa, ata likolólikoló, makambo mosusu oyo esɛngami na losambo ya solo, akozwa etumbu te soki azali kosala pite to ekobo, to lisumu mosusu. Kokanisa ndenge wana ezali mpenza libunga!​—Bagalatia 6:7, 8.

13. Ndenge nini botosi na biso epai ya Yehova ekoki komekama ntango tozali na kati ya ndako na biso?

13 Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Natosaka Yehova na makambo oyo nasalaka mokolo na mokolo, ata na makambo oyo ekoki komonana lokola nde etali kaka ngai moko?’ Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali sembo na oyo eleki moke azali mpe sembo na mingi, mpe moto oyo azali moyengebene te na oyo eleki moke azali mpe moyengebene te na mingi.” (Luka 16:10) ‘Totambolaka na bosembo ya motema na biso’ ata ‘na kati ya ndako na biso,’ epai oyo bato mosusu bamonaka biso te? (Nzembo 101:2, NW) Bosembo na biso ekoki komekama ntango tozali na kati ya ndako na biso. Na ndakisa, na mikili oyo bato mingi bakómi na ordinatɛrɛ na ndako, ezali lisusu mpasi te kotala bililingi ya bato bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto. Eleki mwa bambula, mpo moto atala makambo ya ndenge wana asengelaki kokende na bisika oyo balakisaka bafilme ya mabe. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” Tokobatela maloba yango na mitema na biso mpe tokotosa yango? Tokoboya mpenza kotala bililingi ya makambo ya mbindo ata mwa miniti moke? (Matai 5:28; Yobo 31:1, 9, 10; Nzembo 119:37; Masese 6:24, 25; Baefese 5:3-5) Ezali boni mpo na masano ya bitumba oyo balakisaka na televizyo? Tondimaka makanisi ya Nzambe na biso oyo “ayini ye oyo alingi mobulu”? (Nzembo 11:5) Ezali boni mpo na likambo etali komɛla masanga mingi na kobombana? Biblia epekisi kolangwa masanga, kasi ezali mpe kolendisa baklisto ete bámipesa te na “ebele ya vinyo.”​—Tito 2:3; Luka 21:34, 35; 1 Timote 3:3.

14. Tángá mwa makambo oyo ekoki komeka botosi na biso epai ya Nzambe na makambo ya mbongo.

14 Tosengeli mpe kokeba na makambo nyonso oyo etali mbongo. Na ndakisa, tokondima kosala mombongo moko oyo tomoni ete ekopesa biso benefisi mingi nsima ya mwa ntango moke, kasi ezali kosɛnga kosalela mayele mabe? Tokanisaka ntango mosusu kosalela mayele mabe mpo tófuta mpako te? To totosaka na bosembo mobeko oyo elobi ete ‘tózongisa epai ya banso oyo esengeli na bango, epai ya oyo asɛngi mpako, mpako’?​—Baloma 13:7.

Tosengeli kotosa Nzambe mpo tolingi ye

15. Mpo na nini otosaka mibeko ya Yehova?

15 Moto oyo atosaka mibeko ya Nzambe azwaka matomba mingi. Na ndakisa, moto oyo amɛlaka likaya te, asalaka pite to ekobo te mpe aboyaka makila, amibatelaka na bamaladi ndenge na ndenge. Longola yango, soki tozali kolanda toli ya Biblia na makambo mosusu ya bomoi na biso, tokosalela mbongo na biso malamu, biso moko mpe libota na biso tokozala na bomoi ya malamu. (Yisaya 48:17) Tokoki kotalela matomba nyonso wana lokola mapamboli oyo emonisaka ete mibeko ya Nzambe ezali na ntina. Kasi, ntina ya libosoliboso oyo totosaka Yehova ezali mpo tolingi ye. Tosalelaka Nzambe mpo na koluka matomba na biso moko te. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Nzambe apesi biso bonsomi ya kopona nani tolingi kotosa. Biso toponi kotosa Yehova mpamba te tolingi kosepelisa ye mpe kosala oyo ezali sembo.​—Baloma 6:16, 17; 1 Yoane 5:3.

16, 17. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kotosa Nzambe mpo alingaki ye mpenza? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu?

16 Yesu apesaki ndakisa eleki malamu na oyo etali kotosa Yehova mpo alingaki ye. (Yoane 8:28, 29) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, “ayekolaki botosi na kati ya makambo oyo akutanaki na yango.” (Baebele 5:8, 9) Na ndenge nini? Na ndenge “amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi.” (Bafilipi 2:7, 8) Yesu azalaki kotosa ata ntango azalaki na likoló, kasi awa na mabelé akutanaki na makambo oyo emekaki mpenza botosi na ye. Tokoki mpenza kolikya ete Yesu abongi kozala Nganga-nzambe Monene mpo na bandeko na ye ya elimo mpe bato mosusu nyonso ya kondima.​—Baebele 4:15; 1 Yoane 2:1, 2.

17 Ezali boni mpo na biso? Tokoki kolanda ndakisa ya Yesu mpe kotya likambo ya kotosa mokano ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. (1 Petelo 2:21) Tokozala na esengo soki bolingo na biso mpo na Nzambe ezali kotinda biso tósala makambo oyo azali kosɛnga, ata na ntango tomekami na kobuka mobeko ya Yehova. (Baloma 7:18-20) Yango elimboli mpe kondima kotosa batoli mpe malako ya baoyo, atako bazali bato ya kozanga kokoka, bazali kokamba biso na losambo ya solo. (Baebele 13:17) Kotosa mibeko ya Yehova ata na makambo oyo etali biso moko ezali na motuya mingi na miso na ye.

18, 19. Botosi na biso epai ya Nzambe ememaka nini?

18 Lelo oyo, kotosa Yehova ekoki kosɛnga ete tóyikela minyoko mpiko mpo na kotikala sembo. (Misala 5:29) Lisusu, kotosa etinda ya kosakola mpe koteya oyo Yehova apesi biso ezali kosɛnga tóyika mpiko tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. (Matai 24:13, 14; 28:19, 20) Tosengeli koyika mpiko mpo na kokoba koyangana na makita, atako tozali kobunda na mikakatano ya mokili oyo. Nzambe na biso oyo atondi na bolingo ayebi malamu milende oyo tozali kosala mpo na kotosa ye na makambo yango. Kasi, mpo na kotosa na makambo nyonso, tosengeli kobundisa nzoto na biso ya masumu, koboya makambo ya mabe, mpe kolinga makambo ya malamu.​—Baloma 12:9.

19 Soki tozali kosalela Yehova mpo tolingi ye mpe tozali na botɔndi epai na ye, ‘akokóma epai na biso mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.’ (Baebele 11:6) Kopesa Nzambe bambeka oyo ebongi ezali na ntina; kasi Yehova asepelaka mingi soki tozali kotosa ye na makambo nyonso ya bomoi na biso mpo tolingi ye.​—Masese 3:1, 2.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini tokoki koloba ete tokoki kopesa Yehova eloko moko?

• Mabunga nini Saulo asalaki?

• Ndenge nini okoki komonisa ete ondimaka ete botosi eleki mbeka?

• Nini etindaka yo otosa Yehova?

[Elilingi na lokasa 26]

Monganga akoyoka ndenge nini soki moto ya maladi alandi malako na ye te?

[Elilingi na lokasa 28]

Mpo na nini Yehova asepelaki lisusu na Mokonzi Saulo te?

[Bililingi na lokasa 30]

Otosaka mibeko ya Nzambe ata na kati ya ndako na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto