Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/10 nk. 3-4
  • Osengeli kokanisaka kaka makambo ya lelo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kokanisaka kaka makambo ya lelo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli kobongisa avenire?
  • Kanisáká mpe lobi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Matai 6:34—‘Bómitungisa te mpo na makambo ekoya lobi’
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Koyoka makebisi esalisaki bango
    Lamuká!—2006
  • Bomoi ebombeli biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/10 nk. 3-4

Osengeli kokanisaka kaka makambo ya lelo?

“NAMITUNGISAKA mpo na lobi te. Lobi eumelaka koya te.” Bato balobaka ete Albert Einstein, moto moko ya siansi nde alobaki maloba wana. Bato mingi bazalaka na makanisi lokola oyo ya ye. Na ndakisa, balobaka ete “Ntina nini komitungisa mpo na lobi?” Ekoki mpe kozala ete osilá koyoka bato mosusu bazali koloba maloba lokola “Salá oyo osengeli kosala lelo.” “Kipe kaka makambo ya lelo.” “Bosaná makambo oyo ekoya lobi.”

Makanisi ya ndenge wana ebandi lelo te. Na ntango ya kala, Baepikuli bazalaki mpe na makanisi wana; bazalaki koloba ete “Lyá, mɛlá, sepelá. Makambo mosusu oyo etikali ezali na ntina te.” Na ntango ya ntoma Paulo, bato mosusu bazalaki mpe na makanisi yango. Bazalaki koloba boye: “Tiká tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Bakolinti 15:32) Bazalaki kokanisa ete bomoi ezali kaka moko mpe ezali mokuse; yango wana bazalaki koloba ete moto asengeli kosala nyonso mpo na kosepela na bomoi.

Nzokande, mpo na bato mingi kosepela na bomoi elimboli te kozala na bomoi ya bisengo. Lokola bomoi etondi na mikakatano, bato mingi bazali konyokwama mpe komona mpasi mpo na kozwa ata mwa eloko ya kobikela. Bato yango bamonaka ntina moko te ya kokanisa avenire mpo ezali na elikya ata moke te.

Tosengeli kobongisa avenire?

Ata bato oyo bazali na bomoi ya mwa malamu bamonaka ete kobongisa avenire ezali mpenza na ntina te. Bamitunaka boye: “Mpo na nini komitungisa?” Basusu bakoki koloba ete bato oyo babongisaka avenire, bakutanaka na makambo oyo ekobebisa nyonso oyo babongisaki. Ata Yobo, moto moko ya kala, atungisamaki mingi ntango makambo nyonso oyo akanaki kosala mpo na bolamu na ye moko mpe oyo ya bana na ye “ebebaki.”​—Yobo [Job] 17:11, Bible na Lingala ya lelo oyo; Mosakoli 9:11.

Robert Burns, mokomi mpe moto ya Écosse, akokanisaki bomoi ya bato na oyo ya mpoko moko. Mokolo moko, mokomi yango atimolaki mabelé na kongo mpe, kozanga ete akana yango, abebisaki ndako ya mpoko moko. Ndako ya mpoko ebebaki na mbalakaka mpe nyama yango akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Mokomi alobaki ete ‘mbala mingi tokutanaka na makambo oyo ebongolaka mpenza bomoi na biso, makambo oyo tozalaka na nguya te ya kobongola yango mpe esalaka ete nyonso oyo tokanaki ekende na mai.’

Na yango, tokoki nde koloba ete kobongisa avenire ezali na ntina te? Likambo oyo tosengeli koyeba ezali ete soki tobongisi makambo liboso te, tokozwa mpasi mingi ntango makambo lokola mopɛpɛ makasi, mpe makama mosusu ekómeli biso. Ya solo, moto moko te akokaki kopekisa mopɛpɛ ya makasi lokola oyo ebɛtaki na sudi ya États-Unis. Kasi, komona makambo liboso mpe komibongisa elingaki kobikisa bato mingi mpe kosala ete biloko mosusu ebeba te.

Okanisi nini? Ebongi mpenza kokanisaka kaka makambo ya lelo mpe komitungisa te mpo na makambo oyo ekoya lobi? Tolendisi yo otánga lisolo oyo elandi.

[Bililingi na lokasa 3]

“Lyá, mɛlá, sepelá. Makambo mosusu oyo etikali ezali na ntina te”

[Elilingi na lokasa 4]

Mopɛpɛ makasi Katrina elingaki nde kobebisa biloko mingi boye soki bamonaki likama yango liboso mpe bamibongisaki?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

U.S. Coast Guard Digital

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto