Yokeláká lisosoli na yo
“Biloko nyonso ezali pɛto epai ya bato ya pɛto. Kasi epai ya bato ya mbindo mpe oyo bazangi kondima ata eloko moko te ezali pɛto.”—TITO 1:15.
1. Paulo asalaki nini mpo na masangá ya Krɛti?
NSIMA ya mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ, ntoma Paulo akangamaki mpe atindamaki na Loma, epai afandaki mbula mibale lokola moto ya bolɔkɔ. Asalaki nini ntango batikaki ye? Toyebi ete akendaki mpe na Esanga Krɛti elongo na Tito oyo, na nsima Paulo akomelaki ye boye: “Natikaki yo na Krɛti, mpo okoka kosembola makambo oyo ezalaki kotambola malamu te mpe okoka kotya bankulutu.” (Tito 1:5) Tito asengelaki kosala makambo yango epai ya bato oyo, bamosusu masosoli na bango ebebaki.
2. Tito asengelaki kosilisa mokakatano nini na Krɛti?
2 Paulo ayebisaki Tito masɛngami oyo moto asengeli kokokisa mpo azala nkulutu; na nsima, ayebisaki ye ete ezalaki na “bato mingi ya mitó makasi, bato ya bilobaloba, mpe bato oyo babebisaka makanisi.” Bato yango bazalaki “kokɔtisa mobulu na bandako mobimba na koteyáká . . . makambo oyo basengeli koteya te.” Tito asengelaki ‘kokoba kopamela bango.’ (Tito 1:10-14; 1 Timote 4:7) Paulo alobaki ete makanisi mpe masosoli na bango ekómá “mbindo”; asalelaki liloba oyo ezali kopesa likanisi ya litɔnɔ, lokola litɔnɔ ya langi oyo ekoki kobebisa elamba ya kitoko. (Tito 1:15) Ekoki kozala ete bato yango mosusu bazalaki Bayuda, mpamba te ‘bazalaki kokangama na kokatama ngenga.’ Lelo oyo masangá ekoki kobebisama te na bato oyo bazali na makanisi ya ndenge wana; kasi, toli oyo Paulo apesaki Tito ekoki koteya biso makambo mingi mpo na lisosoli.
Bato oyo lisosoli na bango ekómá mbindo
3. Makambo nini Paulo akomelaki Tito na oyo etali lisosoli?
3 Tótalela makambo oyo Paulo azalaki kolobela ntango alobelaki lisosoli. “Biloko nyonso ezali pɛto epai ya bato ya pɛto. Kasi epai ya bato ya mbindo mpe oyo bazangi kondima ata eloko moko te ezali pɛto, kutu makanisi na bango mpe masosoli na bango ekómá mbindo. Balobaka polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango.” Maloba yango emonisi ete bato mosusu basengelaki kobongisa makambo mosusu na bomoi na bango mpo “bázala makasi na kati ya kondima.” (Tito 1:13, 15, 16) Bato yango bazalaki na mokakatano ya kokesenisa biloko ya pɛto mpe biloko ya mbindo; likambo yango etalelaki lisosoli na bango.
4, 5. Mabe nini baklisto mosusu bazalaki na yango, mpe yango ekómisaki bango ndenge nini?
4 Mbula koleka zomi liboso, lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki ekateli ete kokatama ngenga ezalaki lisɛngami te mpo moto akóma mosambeli ya Nzambe ya solo, mpe bakomelaki masangá ekateli yango. (Misala 15:1, 2, 19-29) Kasi na Krɛti, bato mosusu bazalaki naino kaka ‘kokangama na kokatama ngenga.’ Bato yango baboyaki mpenza makanisi ya lisangani ya mikóló-bakambi, bazalaki ‘koteya makambo oyo basengeli koteya te.’ (Tito 1:10, 11) Ekoki mpe kozala ete bazalaki kosɛngisa bato bátosaka makambo oyo Mibeko elobaki mpo na bilei mpe milulu ya komipɛtola. Mbala mosusu mpe bazalaki kobakisa makambo mosusu na oyo Mibeko elobaki, ndenge bato mosusu bazalaki kosala ntango Yesu azalaki awa na mabelé; bazalaki mpe kolendisa masapo ya Bayuda mpe mibeko ya bato.—Malako 7:2, 3, 5, 15; 1 Timote 4:3.
5 Makanisi ya ndenge wana ezalaki kobebisa lisosoli na bango. Paulo akomaki boye: “Biloko nyonso ezali pɛto epai ya bato ya pɛto.” Lisosoli na bango ebebaki mpenza; ekokaki lisusu te kosalisa bango básala makambo ya malamu to báyeba kotalela makambo na ndenge ebongi. Lisusu, bato yango bazalaki kosambisa bandeko na bango baklisto na makambo oyo etali moto ye moko, makambo oyo moklisto moko akoki kozwa ekateli ekeseni na oyo ya moklisto mosusu. Mpo na yango, bato wana bazalaki kotalela lokola mbindo makambo oyo ezalaki mbindo te. (Baloma 14:17; Bakolose 2:16) Bazalaki koloba ete bayebi Nzambe; kasi, misala na bango ezalaki komonisa ete bayebi ye te.—Tito 1:16.
“Pɛto epai ya bato ya pɛto”
6. Wapi lolenge mibale ya bato oyo Paulo alobelaki?
6 Makambo oyo Paulo akomelaki Tito ezali koteya biso nini? Tótalela naino makambo mibale ekeseni oyo alobelaki: “Biloko nyonso ezali pɛto epai ya bato ya pɛto. Kasi epai ya bato ya mbindo mpe oyo bazangi kondima ata eloko moko te ezali pɛto, kutu makanisi na bango mpe masosoli na bango ekómá mbindo.” (Tito 1:15) Paulo alingaki koloba te ete mpo na moklisto oyo azali pɛto, makambo nyonso ezali malamu mpe azali na ndingisa ya kosala nyonso oyo alingi. Tolobi bongo mpamba te na mokanda mosusu oyo akomaki, amonisaki polele ete bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya bikelakela, mpe baoyo basalaka makambo mosusu ya mabe “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Bagalatia 5:19-21) Yango wana, tokanisi ete Paulo azalaki kolobela bizaleli oyo emonanaka epai ya lolenge mibale ya bato, baoyo bazali pɛto na makanisi mpe na elimo, mpe baoyo bazali pɛto te.
7. Baebele 13:4 epekisi nini, kasi motuna nini ekoki kotunama?
7 Makambo oyo moklisto ya solo asengeli koboya ezali kaka te makambo oyo Biblia epekisi na maloba ya polele. Na ndakisa, tótalela maloba oyo ya polele: “Tiká libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Baebele 13:4) Ata bato oyo bazali baklisto te mpe baoyo bayebi Biblia te bakoki komona polele ete vɛrsɛ yango epekisi ekobo. Vɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu ya Biblia ezali komonisa polele ete Nzambe apekisi moto oyo abalá asangisa nzoto na moto mosusu. Kasi, Biblia elobi nini mpo na bato mibale oyo babalani te mpe bazali kosangisa nzoto na monɔkɔ? Bilenge mingi bakanisaka ete likambo yango ezali mabe te mpamba te ezali mpenza kosangisa nzoto te. Moklisto akoki nde kotalela kosangisa nzoto na monɔkɔ lokola likambo ya pɛto?
8. Na ndenge nini makanisi ya baklisto ya solo ekeseni na oyo ya bato ya mokili na likambo etali kosangisa nzoto na monɔkɔ?
8 Baebele 13:4 mpe 1 Bakolinti 6:9 emonisi polele ete Nzambe apekisi ekobo mpe pite (na Grɛki pornéïa). Pite ezali nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na pite elimboli kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te to kosala makambo mosusu ya mbindo na binama ya kobotela. Na bongo, kosangisa nzoto na monɔkɔ ezali mpe pite, atako bilenge mingi na mokili bazali koteyama to bazali kokanisa ete yango ezali lisumu te. Baklisto ya solo batikaka te ete elimo na bango mpe misala na bango etambwisama na makanisi ya “bato ya bilobaloba, mpe bato oyo babebisaka makanisi.” (Tito 1:10) Balandaka mitinda ya Biblia. Na esika báluka kolongisa likambo ya kosangisa nzoto na monɔkɔ, bayebaka ete na kotalela Biblia, yango ezali pite (to pornéïa) mpe bateyaka lisosoli na bango bongo.a—Misala 21:25; 1 Bakolinti 6:18; Baefese 5:3.
Bikateli oyo etaleli lisosoli ya moto na moto
9. Soki “biloko nyonso ezali pɛto,” ntina ya lisosoli ezali nini?
9 Paulo azalaki na makanisi nini ntango alobaki ete “biloko nyonso ezali pɛto epai ya bato ya pɛto”? Paulo azalaki kolobela baklisto oyo bayokanisaki makanisi mpe lisosoli na bango na mitinda ya Nzambe ndenge emonisami na Liloba na ye. Baklisto yango bayebaka ete na makambo oyo epekisami te, moklisto moko akoki kozwa ekateli ekeseni na oyo ya moklisto mosusu. Na esika ya kosambisa bandeko na bango, batalelaka lokola “pɛto” makambo oyo Nzambe apekisi te. Balukaka te ete baklisto mosusu nyonso bázala na makanisi ndenge moko na bango na makambo oyo Biblia epesi malako ya sikisiki te. Tótalela mwa bandakisa.
10. Moklisto akoki kokutana na mokakatano nini ntango moto moko na libota abali to ntango moto moko akufi?
10 Na mabota mosusu, kaka molongani moko nde azali Motatoli. (1 Petelo 3:1; 4:3) Motatoli yango akoki kokutana na mikakatano ndenge na ndenge, na ndakisa ntango ndeko moko na libota abali to akufi. Tózwa ndakisa ya ndeko-mwasi moko oyo mobali na ye azali na lingomba mosusu. Moto moko na libota ya mobali na ye azali kobala, mpe libala ekosalema na ndako-nzambe. (To moto moko, mbala mosusu moboti ya mobali, akufi mpe bakolela ye na ndako-nzambe.) Mobali alingi ete akende elongo na mwasi na ye. Lisosoli ya ndeko-mwasi ekoloba na ye nini? Akosala nini? Tótalela makambo mibale oyo ekoki kosalema.
11. Ndenge nini mwasi moko moklisto akoki kotalela likambo ya kokende na libala oyo ekosalema na ndako-nzambe, mpe ekateli nini akoki kozwa?
11 Loisi ataleli mobeko ya Biblia oyo elobi ete, ‘Bóbima na Babilone Monene,’ lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Emoniseli 18:2, 4) Liboso akóma Motatoli, azalaki kosambela na lingomba epai libala ekosalema mpe ayebi ete na ndako-nzambe, bakosɛnga na bayangani nyonso bábondela, báyemba, to básala milulu mosusu. Alingi kosangana na makambo yango te mpe aboyi ata kokende na ndako-nzambe mpo bosembo na ye emekama te. Lokola Biblia elobi ete mobali azali mokonzi ya libota, Loisi amemyaka mobali na ye mpe alingi te bázwana matata; kasi, alingi mpe te kobuka mitinda ya Biblia. (Misala 5:29) Yango wana, asololi na ye mpo amonisa ye na boboto nyonso ete akoki kokende te. Mbala mosusu amonisi ye ete soki akei na ndako-nzambe mpe aboyi kosangana na makambo oyo ekosalema kuna, ekoki koyokisa mobali na ye nsɔni, yango wana amoni malamu akende te. Ekateli yango esalisi ye abatela lisosoli ya malamu.
12. Mwasi moklisto mosusu akoki kokanisa ndenge nini mpe kozwa ekateli nini ntango babengi ye na libala oyo ekosalema na ndako-nzambe?
12 Ruth mpe azali na mokakatano ya ndenge wana. Amemyaka mobali na ye, azali na ekateli ya kotikala sembo epai ya Nzambe, mpe ayokelaka lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Nsima ya kotalela makambo lokola oyo Loisi atalelaki, Ruth atángi na likebi mpenza “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2002. Ayebi ete bilenge Baebele misato batosaki etinda ya kokende na esika oyo basengelaki kosambela ekeko moko; kasi batikalaki sembo mpe baboyaki kosambela ekeko yango. (Danyele 3:15-18) Ayokeli lisosoli na ye mpe azwi ekateli ya kokende elongo na mobali na ye, kasi akosangana te na milulu ya losambo. Na boboto nyonso, alimbweli mobali na ye polele makambo oyo lisosoli na ye ekopesa ye nzela asala mpe oyo ekopekisa ye asala. Ruth azali na elikya ete mobali na ye akomona bokeseni kati na losambo ya solo mpe losambo ya lokuta.—Misala 24:16.
13. Mpo na nini tosengeli kotungisama te ntango baklisto mibale bazwi bikateli ekeseni na likambo moko?
13 Lokola baklisto mibale bakoki kozwa bikateli ekeseni na likambo moko, yango elingi nde koloba ete moto akoki kozwa ata ekateli nini to mpe emonisi nde ete lisosoli ya moko na bango ezali malamu te? Te. Mbala mosusu Loisi, lokola ayebi banzembo mpe makambo mosusu oyo basalaka na ndako-nzambe, amoni ete kokende kuna ekozala likama mpo na ye. Mbala mosusu mpe lokola makambo ya losambo esilá kobimisa mwa matata kati na ye ná mobali na ye, lisosoli na ye ekoki kopekisa ye akende. Nsima ya kotalela nyonso wana, akoki komona ete ekateli wana nde ebongi mpo na ye.
14. Likambo nini baklisto basengeli kobosana te na oyo etali ekateli ya moto na moto?
14 Kasi, ekateli ya Ruth ezali mabe? Wana ezali likambo na ye. Moto moko te asengeli kosambisa ye to kotɔnga ye mpo na ekateli oyo azwi ya kokende na ndako-nzambe, kasi ya kosangana na milulu te. Tóbosana te toli ya Paulo mpo na ekateli ya moto na moto ya kolya to koboya kolya bilei mosusu: “Tiká ete moto oyo azali kolya atyola te moto oyo azali kolya te, mpe tiká moto oyo azali kolya te asambisa te moto oyo azali kolya . . . Epai ya nkolo na ye moko nde atɛlɛmaka to akweaka. Ɛɛ, akotɛlɛma, mpo Yehova akoki kotɛlɛmisa ye.” (Baloma 14:3, 4) Moto moko te oyo azali moklisto ya solo akolinga kosɛngisa moto mosusu aboya koyokela lisosoli na ye oyo eteyami, mpamba te kosala bongo ekoki mbala mosusu kopekisa moto asala likambo oyo ekobikisa bomoi na ye.
15. Mpo na nini tosengeli kotalelaka lisosoli mpe mayoki ya basusu?
15 Na bandakisa oyo tolobeli, moklisto mokomoko asengeli mpe kotalela makambo mosusu, na ndakisa, ndenge oyo bato mosusu bakotalela ekateli na ye. Paulo apesaki toli oyo: “Bózwa kutu nde mokano oyo, ya kotya te liboso ya ndeko libaku ya kokweisa to eloko ya kotutana.” (Baloma 14:13) Mbala mosusu Loisi ayebi ete makambo ya ndenge wana esilá kobimisa koimaima na lisangá to na libota na ye, mpe ete bana na ye bakoki kolanda makambo oyo akosala. Nzokande, mbala mosusu Ruth ayebi ete bikateli ya ndenge wana ebimisaki koimaima te, ezala epai ya bandeko na lisangá to epai ya bato mosusu na esika afandi. Basi yango mibale—mpe biso nyonso—tosengeli koyeba ete moto oyo azali na lisosoli oyo eteyami atalelaka ndenge oyo bato mosusu bakotalela ekateli na ye. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo abɛtisi libaku na moko ya bato mike oyo bandimelaka ngai, ezali litomba mingi koleka mpo na ye bákangisa na nkingo na ye libanga ya konikela lokola oyo mpunda ebalolaka mpe azindisama na mbu ya monene, oyo efungwamá.” (Matai 18:6) Moto oyo aboyi kotalela lisosoli ya basusu, akoki kobebisa lisosoli na ye, ndenge ekómelaki baklisto mosusu ya Krɛti.
16. Mbongwana nini esengeli komonanaka epai ya moklisto wana azali koumela na lisangá?
16 Moklisto asengeli kokoba kokola na elimo; bokoli na ye esengeli mpe komonana na ndenge oyo azali koyokela lisosoli na ye. Tózwa ndakisa ya Mark oyo azwi batisimo sika. Lisosoli na ye etindi ye atika makambo oyo azalaki kosala liboso, oyo Biblia epekisi, na ndakisa kosambela bikeko to kondima makila. (Misala 21:25) Kutu, azali koboya makambo mosusu oyo azali komona ete ekokani na makambo oyo Biblia epekisi. Nzokande, azali komituna mpo na nini bandeko mosusu baboyaka makambo oyo ye amonaka mabe te, na ndakisa baemisyo mosusu ya televizyo.
17. Pesá ndakisa moko mpo na komonisa ndenge oyo koumela na lisangá mpe kokola na elimo ekoki kobongola lisosoli mpe bikateli ya moklisto.
17 Nsima ya bambula, Mark akómi na boyebi mingi mpe akómi moninga mpenza ya Nzambe. (Bakolose 1:9, 10) Yango eboti mbuma nini? Lisosoli na ye eteyami mingi. Mark akómi koyokela mingi lisosoli na ye mpe kolanda mitinda ya Biblia. Kutu, amoni ete makambo mosusu oyo azalaki koboya mpo azalaki komona ete ekokani na makambo oyo Biblia epekisi, ezali mabe te na miso ya Nzambe. Lisusu, lokola ayebi sikoyo mitinda ya Biblia malamu mpe azali koyokela lisosoli na ye, Mark akómi koboya baemisyo oyo azalaki komona mabe te. Lisosoli na ye ebongisami malamumalamu.—Nzembo 37:31.
18. Likambo nini esengeli kopesa biso esengo?
18 Na masangá nyonso ezali na bandeko oyo bakɔmeli na elimo mpe na baoyo bazali bana mike na elimo. Bamosusu kati na bango bazwi batisimo sika. Lisosoli na bango etungisamaka te na makambo mosusu, kasi epekisaka bango makasi kosala makambo mosusu. Ekoki kosɛnga ntango mpe kosalisa bango mokemoke mpo bákóma kolanda malamu mpenza mitinda ya Yehova mpe koyokela lisosoli na bango oyo eteyami. (Baefese 4:14, 15) Nzokande, na kati ya masangá, ezali na bandeko oyo bazali na boyebi mingi, bamesaná kosalela mitinda ya Biblia, mpe lisosoli na bango eyokani mpenza na makanisi ya Nzambe. Ezali mpenza esengo kozala na “bato ya pɛto” oyo batalelaka lokola “pɛto” makambo oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo! (Baefese 5:10) Tiká ete biso nyonso tómityela mokano ya kokóma bato ya ndenge wana mpe ya kobatela lisosoli oyo eyokani na boyebi ya sikisiki ya solo mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe.—Tito 1:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1983, nkasa 30-31 (ebimeli ya Lifalanse) emonisi makanisi oyo bato oyo babalá basengeli kotalela.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini baklisto mosusu ya Krɛti bazalaki na masosoli oyo ezalaki mbindo?
• Mpo na nini baklisto mibale oyo masosoli na bango eteyami malamu bakoki kozwa bikateli ekeseni?
• Lisosoli na biso esengeli kokóma ndenge nini wana tozali koumela na lisangá?
[Karte na lokasa 26]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Sisili
GRƐSI
Krɛti
ASIE MINEURE
Sipele
MBU YA MEDITERANE
[Elilingi na lokasa 28]
Baklisto mibale bakoki kokutana na mokakatano ndenge moko, kasi kozwa bikateli ekeseni