Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/11 nk. 22-26
  • Liloba ya Yehova ezangaka kokokisama te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liloba ya Yehova ezangaka kokokisama te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova abikisi basaleli na ye
  • Yehova abateli basaleli na ye
  • Yehova asungi basaleli na ye
  • Ndenge Yehova azali kobikisa lelo oyo
  • Ndenge Yehova azali kobatela lelo oyo
  • Yehova azali kosunga basaleli na ye lelo oyo
  • Makambo oyo Yosua abosanaki te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mokokisi ya bilaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mokanda ya Biblia nimero 6—Yosua
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yosua 1:9​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/11 nk. 22-26

Liloba ya Yehova ezangaka kokokisama te

“Ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe alobaki na bino. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino.”​—Yosua 23:14, NW.

1. Yosua azalaki nani, mpe asalaki nini na nsuka ya bomoi na ye?

AZALAKI mokonzi ya basoda ya makasi, oyo azalaki kobanga te; mobali ya kondima mpe ya bosembo. Atambolaki elongo na Moize mpe Yehova aponaki ye abimisa ekólo ya Yisalaele na esobe ya nsɔmɔ mpe akɔtisa bango na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi. Mobali yango nani? Ezali Yosua. Na nsuka ya bomoi na ye, asangisaki mikóló ya Yisalaele mpe alobaki na bango maloba ya kolendisa. Na ntembe te, lisolo wana elendisaki mpenza kondima ya baoyo bayokaki ye. Ekoki mpe kolendisa yo.

2, 3. Ntango Yosua asololaki na mikóló ya Yisalaele, makambo ezalaki ndenge nini na Yisalaele, mpe Yosua alobaki nini?

2 Meká kokanisa ndenge makambo elekaki. Biblia elobi ete: “Na nsima ya ntango molai, wana esilaki [Yehova] kopesa kimya na Yisalaele na ntina na bayini na bango bazingaki bango, mpe Yosua anunaki mpe azalaki na mbula mingi, Yosua abengaki Yisalaele nyonso, mikóló na bango mpe bato ya liboso mpe basambisi na bango mpe bakapita na bango, mpe alobelaki bango ete, Ngai nanuni mpe nazali na mbula mingi.”​—Yosua 23:1, 2.

3 Yosua akómaki na mbula pene na 110, alekisaki bomoi na ye na eleko oyo libota ya Yisalaele ezalaki na yikiyiki. Amonaki na miso makambo minene oyo Nzambe asalaki, mpe amonaki kokokisama ya bilaka mingi oyo Yehova apesaki bango. Yango wana, na motema mobimba alobaki boye: “Boyebi malamu na mitema na bino mobimba mpe na milimo na bino nyonso ete ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe alobaki na bino. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te na kati na yango ezangaki kokokisama.”​—Yosua 23:14, NW.

4. Makambo nini Yehova alakaki Bayisalaele?

4 Maloba nini ya Yehova ekokisamaki na eleko ya Yosua? Tokolobela makambo misato oyo Yehova alakaki Bayisalaele. Ya liboso, Nzambe asengelaki kosikola bango na boombo. Ya mibale, asengelaki kobatela bango. Ya misato, asengelaki kosunga bango. Yehova alaki mpe basaleli na ye lelo oyo makambo yango, mpe tozali komona kokokisama na yango. Kasi, liboso tólobela makambo oyo Yehova asali na mikolo na biso, tólobela naino oyo asalaki na eleko ya Yosua.

Yehova abikisi basaleli na ye

5, 6. Ndenge nini Yehova asikolaki Bayisalaele na Ezipito, mpe likambo yango emonisaki nini?

5 Ntango Bayisalaele babelelaki ye ntango bazalaki konyokwama na boombo na Ezipito, Yehova ayokaki. (Exode 2:23-25) Na nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ, Yehova alobaki na Moize boye: “Nakiti mpo na kobikisa bango na mabɔkɔ ya Baezipito mpe mpo na kolongola bango na mokili yango mpe kobutisa bango na mokili malamu mpe monene, mokili moleki na mabele mpe na mafuta ya nzoi.” (Exode 3:8) Kanisá naino esengo oyo bazalaki na yango ntango Yehova akokisaki elaka wana! Ntango Falao aboyaki kotika Bayisalaele bábima na Ezipito, Moize ayebisaki ye ete Nzambe akobongola mai ya Ebale Nil makila. Liloba ya Yehova ekokisamaki. Mai ya Ebale Nil ebongwanaki makila. Mbisi ekufaki, mpe bato bakokaki komɛla mai yango te. (Exode 7:14-21) Falao azalaki kaka motó makasi, mpe Yehova ayeisaki bitumbu mosusu libwa, mpe azalaki koyebisa liboso ndenge etumbu mokomoko ekozala. (Exode, mokapo 8 tii 12) Nsima ya etumbu ya zomi, oyo ebomaki bana ya liboso ya Ezipito, Falao atikaki Bayisalaele bákenda, mpe bakendaki!​—Exode 12:29-32.

6 Kosikolama wana epesaki Yehova nzela azwa Yisalaele lokola ekólo na ye mpenza. Likambo yango epesaki Yehova nkembo mpe emonisaki ete azali Mokokisi ya bilaka, mpe ete liloba na ye ezangaka kokokisama te. Emonisaki mpe ete Yehova aleki banzambe ya bikólo mosusu mosika. Kotánga lisolo wana oyo Yehova asikolaki Bayisalale ekoki kolendisa kondima na biso. Kanisá ndenge olingaki koyoka soki ozalaki na kati ya Bayisalaele! Na ntembe te, Yosua amonaki ete Yehova azali “Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.”​—Nzembo 83:18.

Yehova abateli basaleli na ye

7. Ndenge nini Yehova abatelaki Bayisalaele liboso ya basoda ya Falao?

7 Ezali boni mpo na elaka ya mibale oyo Yehova Nzambe apesaki ete akobatela basaleli na ye? Elaka wana ezalaki mpe na kati ya elaka oyo Yehova apesaki ete akosikola Bayisalaele na Ezipito mpe akokɔtisa bango na Mokili ya Ndaka. Kanisá ndenge Falao asilikaki mpe alandaki Bayisalaele na basoda na ye ya nguya, oyo bazalaki na ebele ya makalo. Mokonzi wana ya lolendo amonaki mpenza ete Bayisalaele basuki, mingimingi lokola ayebaki ete bangomba mpe mai ezali liboso na bango mpe bakokoka kokima te. Na ntango wana, Nzambe atɛlɛmaki mpo na kobatela basaleli na ye. Abimisaki lipata moko na katikati ya Bayisalaele mpe Baezipito. Molili ezalaki na ngámbo ya Baezipito mpe pole ezalaki na ngámbo ya Bayisalaele. Na ntango lipata wana ezalaki kopekisa Baezipito bápusana pene na Bayisalaele, Moize atombolaki lingenda na ye mpe mai ya Mbu Motane ekabwanaki mpe epesaki Bayisalaele nzela ya kokima, kasi ekómaki motambo mpo na Baezipito. Yehova abomaki basoda ya Falao nyonso, kasi abatelaki basaleli na ye.​—Exode 14:19-28.

8. Ndenge nini Yehova abatelaki Bayisalaele (a) na lisobe mpe (b) ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka?

8 Nsima ya kokatisa Mbu Motane, Bayisalaele bazalaki koyengayenga na kati ya mokili oyo Biblia ebengi “lisobe monene mpe ya nsɔmɔ, na nyoka ya ngɛngɛ mabe mpe na bankoto na yango, mpe mokili mokauki mozalaki na mai te.” (Deteronome 8:15) Kuna mpe, Yehova abatelaki basaleli na ye. Ezali boni mpo na elaka ya kokɔta na Mokili ya Ndaka? Mampinga ya basoda ya nguya ya Kanana batɛmɛlaki bango. Kasi, Yehova alobaki na Yosua boye: “Tɛlɛmá mpe katá ngámbo ya Yaladene oyo, yo mpe bato oyo nyonso, kokɔta na mokili oyo ezali ngai kopesa na bango, na bato ya Yisalaele. Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo mikolo nyonso ya bomoi na yo. Lokola nazalaki na Moize elongo, boye nakozala na yo elongo. Nakotika yo te mpe nakolongwa na yo te.” (Yosua 1:2, 5) Maloba wana ya Yehova ekokisamaki. Soki mbula motoba na nsima, Yosua alongaki bakonzi 31 mpe azwaki biteni ya minene ya Mokili ya Ndaka. (Yosua 12:7-24) Akokaki kolonga ndenge wana te soki Yehova abatelaka bango te.

Yehova asungi basaleli na ye

9, 10. Ndenge nini Yehova asungaki bato na ye na esobe?

9 Tótalela sikoyo elaka ya misato: Yehova asengelaki kosunga basaleli na ye. Mwa moke nsima ya kosikola bango na Ezipito, Nzambe apesaki Bayisalaele elaka ete: “Talá, nakonɔkisela bino [mampa, NW] longwa na likoló, mpe bato bakobima mpe bakolɔkɔta mokolo na mokolo yango ekoki.” Mpe Nzambe akitiselaki bango ‘mampa longwa na likoló,’ ndenge kaka alakaki. “Emonaki bato ya Yisalaele yango balobanaki ete, Oyo nini?” Ezalaki mana, mampa oyo Yehova alakaki bango.​—Exode 16:4, 13-15.

10 Na boumeli ya mbula 40 oyo bana ya Yisalaele basalaki na esobe, Yehova azalaki kokokisa bamposa na bango, kopesa bango bilei mpe mai. Abatelaki kutu bilamba na bango mpo ekufa te mpe makolo na bango mpo evimba te. (Deteronome 8:3, 4) Yosua amonaki makambo nyonso wana na miso. Yehova abikisaki, abatelaki mpe asungaki bato na ye, ndenge kaka alakaki bango.

Ndenge Yehova azali kobikisa lelo oyo

11. Nini esalemaki na 1914 na Brooklyn, na New York, mpe ntango ekokaki mpo na likambo nini?

11 Ezali boni mpo na ntango na biso? Mokolo ya mitano na ntɔngɔ, mwa 2 Ɔkɔtɔbɛ 1914, Charles Taze Russell, oyo azalaki kokamba Bayekoli ya Biblia na ntango wana, akɔtaki na ndako ya kolya na Betele ya Brooklyn, na New York mpe alobaki na esengo nyonso ete: “Mbote na bino nyonso!” Na nsima, liboso ya kofanda, alobaki na esengo mpenza boye: “Elaka ya mabota ekoki, bakonzi basuki.” Ntango ekokaki lisusu mpo Yehova, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, abikisa basaleli na ye. Mpe asalaki yango!

12. Kosikolama nini esalemaki na 1919, mpe yango efungolaki nzela mpo na likambo nini?

12 Mbula mitano ya mpamba na nsima, Yehova asikolaki basaleli na ye na boombo ya “Babilone Monene,” lisangá ya nguya mpenza ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Emoniseli 18:2) Mingi te na kati na biso bazalaki ntango likambo yango ya esengo esalemaki. Kasi, tozali komona matomba na yango. Yehova azongisaki losambo ya solo mpe asangisaki bato oyo bazalaki na mposa ya kosambela ye. Mosakoli Yisaya asakolaki likambo yango: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka, ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló ya nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana.”​—Yisaya 2:2.

13. Bokoli nini omoni na kati ya lisangá ya Yehova?

13 Maloba ya Yisaya ekokisamaki. Na 1919, batikali bapakolami babandaki kosakola na molende mpenza, mpe yango etombolaki losambo ya Nzambe ya solo na likoló mpenza. Na bambula ya 1930, eyebanaki ete “bampate mosusu” babandi koyanganisama. (Yoane 10:16) Bankóto ya bato babandaki koya na losambo ya solo, na nsima bakómaki bankama ya bankóto mpe lelo oyo bazali bamilio! Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki ete bato yango bazali “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Makambo nini yo moko omoni na miso? Batatoli ya Yehova bazalaki boni na mokili mobimba ntango oyekolaki solo? Lelo oyo, basaleli ya Yehova baleki 6 700 000. Ntango Yehova asikolaki basaleli na ye na boombo ya Babilone Monene, afungolaki nde nzela mpo na bokoli oyo tozali komona lelo na mokili mobimba.

14. Kosikolama nini tozali kozela?

14 Kosikolama mosusu ezali koya mpo na bato nyonso awa na mabelé. Yehova akosalela nguya na ye mpo na kokɔmbɔla bato nyonso oyo bazali kotɛmɛla ye, akosikola basaleli na ye mpe akokɔtisa bango na mokili ya sika, oyo ekotonda na boyengebene. Oyo nde esengo tokozala na yango ntango mabe ekosila mpe tokokɔta na eleko moko ya nkembo na bomoi ya bato!​—Emoniseli 21:1-4.

Ndenge Yehova azali kobatela lelo oyo

15. Mpo na nini basaleli ya Yehova na ntango na biso bazalaki na mposa Yehova abatela bango?

15 Ndenge tomoni yango, Bayisalaele ya ntango ya Yosua bazalaki na mposa ya libateli ya Yehova. Tokoki nde koloba ete basaleli ya Yehova lelo oyo bakeseni na bango? Soki moke te! Yesu akebisaki bayekoli na ye boye: “Bato bakokaba bino na bolɔzi mpe bakoboma bino, mpe bokozala biloko ya koyinama na bikólo nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Na boumeli ya ebele ya bambula, Batatoli ya Yehova na bikólo mingi bakutani na botɛmɛli mpe minyoko ya makasi. Kasi, emonani mpenza ete Yehova azali na bato na ye. (Baloma 8:31) Liloba na ye elaki biso ete ‘ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kotɛmɛla biso’ ekolonga kopekisa mosala na biso ya kosakola Bokonzi mpe koteya bato Biblia.​—Yisaya 54:17.

16. Makambo nini endimisi yo ete Yehova azali kobatela basaleli na ye?

16 Atako mokili ezali koyina bango, basaleli ya Yehova bazali se kokóma ebele. Motángo ya basaleli ya Yehova ezali se kobakisama na mikili 236, mpe yango emonisi mpenza ete Yehova azali na biso mpo na kobatela biso na mabɔkɔ ya bato oyo balingi konyata biso to kokanga biso minɔkɔ. Ozali koyeba lisusu bankombo ya bakonzi ya nguya mpenza ya politiki to ya mangomba oyo banyokolaki basaleli ya Nzambe mabemabe na bomoi na yo? Nini ekómelaki bango? Bazali wapi lelo oyo? Mingi kati na bango basukaki lokola Falao na ntango ya Moize mpe Yosua. Ezali boni mpo na basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso oyo bazali kokufa sembo? Yehova azali kobatela bango na makanisi na ye. Ezali na esika oyo bakoki kobatelama koleka wana te. Emonani mpenza ete Yehova azali kokokisa elaka oyo apesaki basaleli na ye ete akobatela bango.

Yehova azali kosunga basaleli na ye lelo oyo

17. Yehova alakaki nini mpo na bilei ya elimo?

17 Yehova asungaki basaleli na ye na esobe, mpe azali kosala yango lelo oyo. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali koleisa biso na elimo. (Matai 24:45) Tozali koyeba makambo mosusu ya Nzambe oyo ezalaki sɛkɛlɛ epai ya bato na boumeli ya bankóto ya bambula. Anzelu alobaki na Danyele ete: “Zipá maloba mpe kangá mokanda na elembo, kino elaka ya nsuka. Bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka.”​—Danyele 12:4.

18. Mpo na nini tokoki koloba ete boyebi ya solo ekómi ebele lelo oyo?

18 Tozali sikoyo na ntango ya nsuka, mpe boyebi ya solo ekómi mpenza mingi. Na mokili mobimba, elimo santu esalisi bato oyo balingaka solo báyeba mpenza Nzambe ya solo mpe mikano na ye. Biblia mpe mikanda oyo ezali kosalisa bato báyeba mateya na yango ya motuya mingi etondi mpenza kotonda lelo oyo na mokili mobimba. Na ndakisa, talá na lokasa oyo elobi makambo mazali na kati na buku Biblia eteyaka mpenza nini?,a oyo ebongisami mpo na kosalisa bato báyekola Biblia. Okomona mikapo lokola oyo: “Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?,” “Bato oyo bakufá bazali wapi?,” “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?,” mpe “Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?” Bato bazalaki komituna mituna wana banda bankóto ya bambula. Sikoyo bakoki kozwa biyano na mituna yango. Atako bato bazangaki boyebi na boumeli ya bikeke mpe mangomba ya boklisto ya lipɛngwi ezalaki koteya mateya ya lokuta, Liloba ya Nzambe elongi kaka, mpe ezali kosalisa bato oyo balingi mpenza kosalela Yehova.

19. Bilaka nini ya Nzambe ekokisamá na miso na yo, mpe okoki koloba nini sikoyo?

19 Na ntembe te, makambo oyo tomoni na miso esengeli kotinda biso tóloba: “Ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe alobaki na bino. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te na kati na yango ezangaki kokokisama.” (Yosua 23:14) Yehova abikisaka, abatelaka mpe asungaka basaleli na ye. Okoki kotánga ata elaka na ye moko oyo azangaki kokokisa na ntango na yango? Soki moke te. Tokomonisa mpenza bwanya soki tozali kotyela Liloba ya Nzambe motema.

20. Mpo na nini tokoki kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya?

20 Ezali boni mpo na mikolo ekoya? Yehova alaki ete mingi kati na biso bakoki kozala na bomoi awa na mabelé oyo ekobongwana paladiso. Mwa ndambo bazali na elikya ya kokende koyangela elongo na Klisto na likoló. Ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé to ya kokende na likoló, tozali mpenza na ntina ya kotikala sembo lokola Yosua. Ata ndɛlɛ, elikya na biso ekokokisama. Na ntango wana, soki tokanisi lisusu bilaka nyonso oyo Yehova apesá biso, tokoloba mpe ete: “Yango nyonso ekokisamaki.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki kolimbola?

• Yosua amonaki kokokisama ya bilaka nini ya Yehova?

• Bilaka nini ya Nzambe omoni kokokisama na yango na miso?

• Elikya nini tokoki kozala na yango mpo na liloba ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 23]

Yehova atɛlɛmaki mpo na kobikisa basaleli na ye

[Elilingi na lokasa 23]

Ndenge nini Yehova abatelaki basaleli na ye na Mbu Motane?

[Elilingi na lokasa 24]

Ndenge nini Yehova asungaki basaleli na ye na esobe?

[Bililingi na lokasa 25]

Yehova azali kosunga basaleli na ye lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto