Tómekola Moteyi Monene
“Bókeba na ndenge bozali koyoka.”—LUKA 8:18.
1, 2. Mpo na nini tosengeli koyeba ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bato na mosala na ye ya kosakola?
YESU KLISTO, Moteyi Monene, azalaki kokokisa mokumba na ye ya kokómisa bato bayekoli ntango alobaki boye: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.” (Luka 8:16-18) Etinda yango etaleli mpe biso na mosala na biso ya kosakola. Soki tozali koyoka na likebi malako etali mosala ya Nzambe, tokosalela yango mpe tokozala basakoli malamu. Ya solo, tokoki koyoka mongongo ya Yesu te lelo oyo, kasi tokoki kotánga makambo oyo alobaki mpe oyo asalaki, ndenge ekomami na kati ya Biblia. Makambo yango emonisi nini na ndenge Yesu azalaki kotalela bato ntango azalaki kosala mosala na ye?
2 Yesu azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu mpe moteyi monene ya Makomami. (Luka 8:1; Yoane 8:28) Mosala ya kokómisa bato bayekoli esɛngaka kosakola mpe koteya; nzokande, baklisto mosusu oyo basakolaka na molende bazalaka na mokakatano mpo na koteya bato malamu. Kosakola esɛngaka kopalanganisa nsango moko; nzokande, koteya bato makambo ya Yehova mpe mikano na ye esɛngaka ete mosakoli amesana na bato yango. (Matai 28:19, 20) Mpo na kosala yango, tosengeli komekola Moteyi Monene, Yesu Klisto.—Yoane 13:13.
3. Soki tozali komekola Yesu, mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli ekozala ndenge nini?
3 Soki ozali komekola mayele oyo Yesu azalaki kosalela mpo na koteya bato, okotosa toli oyo ya ntoma Paulo: “Bókoba kotambola na bwanya na oyo etali bato ya libándá, komisombeláká ntango oyo ebongi. Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto moko na moko eyano.” (Bakolose 4:5, 6) Tosengeli kosala milende mpo na komekola Yesu na mosala ya kokómisa bato bayekoli, kasi yango ekosala ete tóteyaka malamu mpamba te ekosalisa biso tóyeba ndenge ya “kopesa moto moko na moko eyano” na kolanda bamposa na ye.
Yesu azalaki kolendisa basusu báloba
4. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki moyoki malamu?
4 Banda bomwana na ye, Yesu azalaki na momeseno ya koyoka bato mpe kolendisa bango bábimisa makanisi na bango. Na ndakisa, ntango azalaki na mbula 12, baboti na ye bakutaki ye na kati ya bateyi na tempelo, “azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.” (Luka 2:46) Soki Yesu akendaki na tempelo, ezalaki te mpo na kolakisa bateyi ete ye ayebi mingi. Akendaki mpo na koyoka atako azalaki mpe kotuna mituna. Na ntembe te, lokola Yesu azalaki moyoki malamu, yango esalaki ete azwa boboto epai ya Nzambe mpe epai ya bato.—Luka 2:52.
5, 6. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki koyoka makanisi ya bato oyo azalaki koteya?
5 Nsima ya kozwa batisimo mpe kopakolama na elimo lokola Masiya, Yesu abatelaki ezaleli na ye ya koyoka bato. Azalaki kokanisa kaka te makambo oyo azalaki koloba, kasi azalaki mpe kokanisa bato oyo azalaki koyebisa makambo yango. Mbala mingi, azalaki kopema mwa moke, kotuna makanisi na bango, mpe koyoka bango. (Matai 16:13-15) Na ndakisa, nsima ya liwa ya Lazalo, ndeko ya Malata, Yesu ayebisaki ye boye: “Moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali komonisa kondima na kati na ngai akokufa ata mokolo moko te.” Na nsima, atunaki Malata boye: “Ondimi yango?” Na ntembe te, Yesu azalaki koyoka ntango Malata ayanolaki ete: “Ɛɛ, Nkolo; nasilá kondima ete yo ozali Klisto Mwana ya Nzambe.” (Yoane 11:26, 27) Ya solo, Yesu asepelaki mpenza koyoka ndenge Malata amonisaki kondima na ye!
6 Ntango bayekoli mingi batikaki kolanda ye, Yesu alukaki koyeba makanisi ya bantoma na ye. Atunaki bango boye: “Bino mpe bolingi nde kokende?” Simona Petelo ayanolaki ye ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko; mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.” (Yoane 6:66-69) Na ntembe te, maloba yango esepelisaki Yesu! Ekozala mpe bongo mpo na biso soki moyekoli moko ya Biblia amonisi kondima na ye na maloba ya ndenge wana.
Azalaki koyoka na limemya
7. Mpo na nini Basamalia mingi bandimelaki Yesu?
7 Likambo mosusu oyo ezalaki kosala ete Yesu azala moteyi malamu ezali ete azalaki kotyela bato likebi mpe koyoka bango na limemya. Na ndakisa, mokolo moko, Yesu apesaki mwasi moko Mosamalia litatoli na libulu ya Yakobo, na engumba Sikala. Na libaku yango, kaka Yesu te nde azalaki koloba; azalaki mpe koyoka mwasi yango. Ntango mwasi yango azalaki koloba, Yesu amonaki ete azalaki kosepela mingi na losambo; yango wana alobaki na ye ete Nzambe azali koluka bato oyo bakosambela ye na elimo mpe na solo. Yesu amonisaki limemya mpe komibanzabanza mpo na mwasi yango; yango wana mwasi yango abɛtaki lisolo ya Yesu epai ya bato mosusu mpe “Basamalia mingi ya engumba wana bandimelaki ye mpo na liloba ya mwasi wana.”—Yoane 4:5-29, 39-42.
8. Ndenge nini mposa oyo bato bazalaka na yango ya komonisa makanisi na bango ekoki kosalisa yo obanda masolo na mosala ya kosakola?
8 Mbala mingi bato basepelaka komonisa makanisi na bango. Na ndakisa, bato ya Atene ya kala bazalaki kosepela koyebisa makanisi na bango to koyoka likambo moko ya sika. Yango epesaki ntoma Paulo libaku ya kosala lisukulu moko na Aleopaji, na engumba yango. (Misala 17:18-34) Na mosala ya kosakola, okoki kobanda lisolo boye: “Nazali kosolola na bato mpo na koyeba makanisi na bango mpo na [tángá likambo moko].” Yoká makanisi ya moto yango, pesá ye longonya to tuná motuna mpo na yango. Na nsima, monisá ye na boboto nyonso oyo Biblia elobi na likambo yango.
Yesu ayebaki oyo asengeli koloba
9. Yesu asalaki nini liboso afungolela Keleopasi ná moninga na ye Makomami polelepolele?
9 Yesu azalaki kolukaluka te soki asengeli koloba nini. Azalaki moyoki malamu, mpe mbala mingi azalaki koyeba oyo bato bazalaki kokanisa mpe ayebaki malamumalamu makambo oyo asengeli koloba. (Matai 9:4; 12:22-30; Luka 9:46, 47) Na ndakisa, mwa moke nsima ya lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye mibale bautaki na Yelusaleme mpo na kokende na Emausi. Lisolo elobi boye: “Ntango bazalaki kosolola mpe kolobana, Yesu ye moko apusanaki penepene mpe abandaki kotambola elongo na bango; kasi miso na bango ezipamaki mpo báyeba ye te. Alobaki na bango ete: ‘Makambo yango nini oyo bozali kosolola na kati na bino wana bozali kotambola na nzela?’ Batɛlɛmaki na bilongi ya mawa. Moko na bango na nkombo Keleopasi azongiselaki ye ete: ‘Ofandi nde na esika ya yo moko lokola mopaya na Yelusaleme mpo oyeba te makambo oyo esalemi kuna mikolo oyo?’ Mpe ye alobaki na bango ete: ‘Makambo nini?’” Moteyi Monene ayokaki bango wana bazalaki kolimbola ndenge oyo Yesu Monazalete ateyaki bato, asalaki makamwisi, mpe abomamaki. Mpe ndenge oyo bato mosusu bazalaki koloba ete asekwaki. Yesu atikaki Keleopasi ná moninga na ye báloba. Na nsima, alimbwelaki bango makambo oyo basengelaki koyeba, ‘afungolelaki bango Makomami polelepolele.’—Luka 24:13-27, 32.
10. Ndenge nini okoki koyeba bindimeli ya moto oyo okutani na ye na mosala ya kosakola?
10 Ekoki kozala ete oyebi te bindimeli ya moto oyo ozali kosolola na ye. Mpo na koyeba yango, okoki komonisa ete ozali koluka koyeba makanisi ya bato mpo na libondeli. Na nsima, okoki kotuna boye, “Okanisi ete Nzambe ayokaka mpenza mabondeli?” Eyano ya moto yango ekoki kosalisa yo oyeba bindimeli mpe lingomba na ye. Soki azali moto oyo asepelaka na makambo ya Nzambe, okoki kotuna ye lisusu boye: “Okanisi ete Nzambe ayokaka mabondeli nyonso to ezali na mabondeli oyo andimaka te?” Mituna yango ekoki kopesa yo nzela ya kosolola na ye malamu. Soki omoni malamu otánga na ye vɛrsɛ moko na Biblia, kebá ete obimisa ntembe te na bindimeli na ye. Soki asepeli na lisolo yango, akondima ozongela ye lisusu. Kasi, okosala nini soki atuni motuna moko oyo okoki koyanola te? Okoki kolaka ye ete okoya kopesa ye eyano mpe salá bolukiluki mpo na komonisa ye ‘ntina ya elikya na yo, na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.’—1 Petelo 3:15.
Yesu azalaki koteya bato oyo babongi
11. Nini ekosalisa biso tómona bato oyo babongi koteyama?
11 Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki na bososoli oyo ezalaki kosalisa ye ayeba bato oyo babongi koteyama. Mpo na biso, ezali pɛtɛɛ te koyeba bato oyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ (Misala 13:48) Ezalaki mpe bongo mpo na bantoma; yango wana Yesu alobaki na bango boye: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani kati na yango abongi.” (Matai 10:11) Na ndakisa ya bantoma ya Yesu, biso mpe tosengeli koluka bato oyo bakondima koyoka mpe koyekola solo ya Biblia. Mpo na komona bango, tosengeli koyoka moto mokomoko mpe kotalela ndenge oyo azali koyamba nsango malamu.
12. Ndenge nini okoki kokoba kosalisa moto oyo asepeli na nsango malamu?
12 Nsima ya kosolola na moto oyo asepeli na nsango malamu, ekozala malamu okoba kokanisa bamposa na ye ya elimo. Soki okomi na papye makambo oyo omoni epai ya moto yango nsima ya kosolola na ye, yango ekosalisa yo okoba kosalisa moto yango na elimo. Ntango ozali kozongela moto yango mbala na mbala, osengeli koyokaka ye malamu mpo na koyeba bindimeli na ye, makanisi na ye, mpe bomoi na ye.
13. Nini ekoki kosalisa yo oyeba ndenge oyo moto atalelaka Biblia?
13 Ndenge nini okoki kolendisa bato bámonisa ndenge oyo batalelaka Liloba ya Nzambe? Na bisika mosusu, ezalaka malamu kotuna boye: “Omonaka ete ezali mpasi koyeba Biblia?” Mbala mingi, eyano na motuna yango emonisaka ndenge oyo moto atalelaka makambo ya Nzambe. Lolenge mosusu ezali ya kotángela moto vɛrsɛ moko ya Biblia mpe kotuna ye boye: “Okanisi nini mpo na maloba yango?” Lokola Yesu, okoki kosala mosala malamu soki ozali kotuna mituna oyo ebongi. Kasi, osengeli kokeba.
Yesu azalaki kotuna mituna malamu
14. Ndenge nini okoki koyeba makanisi ya moto kozanga ete otuna ye mituna lokola nde ozali kosambisa ye?
14 Luká koyeba makanisi ya moto kozanga koyokisa ye nsɔni. Landá ndakisa ya Yesu. Azalaki kotuna mituna te lokola nde azali kosambisa moto, kasi azalaki koluka ete moto abimisa makanisi na ye. Yesu azalaki mpe koyoka bato na boboto, azalaki kolendisa bango mpe kosala ete bábanga te. (Matai 11:28) Moto nyonso azalaki kobanga te koyebisa Yesu mikakatano na ye. (Malako 1:40; 5:35, 36; 10:13, 17, 46, 47) Soki olingi ete bato bábangaka te koyebisa yo ndenge oyo batalelaka Biblia mpe mateya na yango, osengeli te kotunaka bango mituna lokola nde ozali kosambisa bango.
15, 16. Ndenge nini okoki kopesa moto mposa ya kosolola makambo ya Nzambe?
15 Longola kotuna mituna malamu, okoki kopesa moto mposa ya kosolola soki olobi likambo moko oyo ekobenda likebi na ye mpe na nsima, oyoki soki akoloba nini. Na ndakisa, mokolo moko Yesu alobaki na Nikodeme boye: “Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Maloba yango ebendaki mpenza likebi ya Nikodeme, yango wana atunaki Yesu motuna mpe ayokaki eyano na ye. (Yoane 3:4-20) Yo mpe okoki kosalela mayele yango.
16 Lelo oyo, na bisika lokola Afrika, mikili mosusu ya Mpoto mpe na Amerika ya Sudi, bato bazali kolobela mingi mangomba ya sika. Na bisika yango, okoki kobanda lisolo boye: “Nazali komitungisa ndenge mangomba ekómi mingi. Kasi, nazali na elikya ete mosika te bato ya bikólo nyonso bakosangana na losambo kaka moko ya solo. Yo mpe okosepela na likambo yango?” Soki olobeli elikya moko oyo ekoki kokamwisa moto, okoki kopesa ye mposa abimisa makanisi na ye. Lisusu, ezalaka pɛtɛɛ koyanola na motuna oyo esɛngaka kopona eyano moko. (Matai 17:25) Nsima ya koyoka makanisi ya moto oyo ozali kosolola na ye, okoki kotánga vɛrsɛ moko to mibale oyo ekoyanola na motuna yango. (Yisaya 11:9; Sefania 3:9) Soki ozali koyoka na likebi mpe koyeba makanisi ya moto oyo ozali kosolola na ye, okozala na likoki ya kopona likambo oyo okolobela na mbala ya nsima.
Yesu azalaki koyoka bana mike
17. Nini emonisi ete Yesu azalaki kotyela bana mike likebi?
17 Yesu azalaki mpe kotyela bana mike likebi. Ayebaki masano oyo bana bazalaki kosala mpe makambo oyo bazalaki koloba. Na bantango mosusu azalaki kobenga bana pembeni na ye. (Luka 7:31, 32; 18:15-17) Bana bazalaki mpe na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki koyoka mateya ya Yesu. Ntango bilenge mibali bazalaki koganga mpo na kokumisa ye, Yesu ayokaki mpe amonisaki ete Biblia esakolaki likambo yango. (Matai 14:21; 15:38; 21:15, 16) Lelo oyo, bana mingi bazali kokóma bayekoli ya Yesu. Na yango, ndenge nini okoki kosalisa bango?
18, 19. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo na elimo?
18 Mpo na kosalisa mwana na yo akola malamu na elimo, osengeli koyokaka ye. Osengeli koyeba makanisi nini azali na yango oyo eyokani te na makanisi ya Yehova. Ata soki mwana alobi nini, osengeli naino kopesa ye longonya. Na nsima, okoki kosalela bavɛrsɛ oyo ebongi mpo na kosalisa ye ayeba makanisi ya Yehova na likambo yango.
19 Kotuna mituna ezali na ntina. Kasi, ndenge moko na mikóló, bana mpe balingaka te bátuna bango mituna lokola nde bazali kosambisa bango. Na esika opesa mwana na yo mosala ya koyanola na mituna ya makasi, eleki malamu obɛtela ye lisolo ya likambo moko oyo ekomelaki mpe yo. Na kotalela likambo oyo bozali kolobela, okoki koyebisa ye ndenge ozalaki koyoka mpo na yango mpe mpo na nini ozalaki koyoka bongo. Na nsima, okoki kotuna ye boye: “Yo mpe oyokaka bongo?” Eyano ya mwana na yo ekoki kopesa yo nzela ya kosalela lisolo moko ya Biblia oyo ekosalisa ye mpe ekolendisa ye.
Tókoba komekola Moteyi Monene
20, 21. Na mosala ya kokómisa bato bayekoli, mpo na nini tosengeli kozalaka bayoki malamu?
20 Ntango ozali kosolola na mwana na yo to na moto mosusu, ezali na ntina mingi oyeba koyoka. Kutu, yango emonisaka bolingo. Ntango ozali koyoka moto, emonisaka ete ozali na komikitisa mpe ete ozali kopesa limemya na moto oyo azali koloba. Koyoka moto esɛngaka mpe kotya likebi na maloba na ye.
21 Na mosala ya kosakola, yokáká na likebi bato oyo ozali kosolola na bango. Soki ozali koyoka malamu makambo oyo bazali koloba, okoyeba mateya ya Biblia oyo ekosepelisa bango mpenza. Na nsima, mekolá mayele ndenge na ndenge ya koteya oyo Yesu azalaki kosalela mpo na kosalisa bato yango. Na ndenge yango, okoyoka esengo mpamba te ozali komekola Moteyi Monene.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Yesu azalaki kolendisa bato bámonisa makanisi na bango?
• Mpo na nini Yesu azalaki koyoka bato oyo azalaki koteya?
• Ndenge nini tokoki kosalela mituna na mosala ya kosakola?
• Okoki kosala nini mpo na kosalisa bana mike bákola malamu na elimo?
[Elilingi na lokasa 28]
Na mosala ya kosakola, yokáká bato malamu
[Elilingi na lokasa 30]
Tomekolaka Yesu ntango tozali kosalisa bana mike