Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/12 nk. 4-7
  • Bóyokelaka basusu “mawa mingi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bóyokelaka basusu “mawa mingi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Matomba ya motema mawa
  • Misala oyo euti na komonisela basusu motema mawa
  • Kangamá na bato oyo bayokelaka basusu mawa
  • Bózalaka na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mekolá motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Mawa monene ya Nzambe na biso”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Yehova azali koyangela na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/12 nk. 4-7

Bóyokelaka basusu “mawa mingi”

LELO oyo, koleka na eleko nyonso mosusu, bato bazali na mposa báyokela bango mawa mpamba te bazali kokutana na mikakatano lokola nzala, maladi, bobola, mobulu, bitumba, mpe makama ndenge na ndenge. Koyokela moto mawa elimboli koyeba mpasi to mokakatano na ye mpe kozala na mposa ya kosunga ye. Komonisela moto oyo azali na mpasi motema mawa ekoki kobɔndisa ye, kokitisa mpasi na ye mpe kopesa ye makasi.

Tokoki komonisa basusu ete tozali koyokela bango mawa na maloba mpe na misala na biso; komibanzabanza mpo na bango mpe kosalisa bango ntango bazali na mpasi. Tosengeli te kosala yango kaka epai ya bandeko na biso, baninga na biso, to bato oyo toyebani na bango. Tokoki koyokela mawa ata bato oyo toyebi te. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu Klisto atunaki boye: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bozali na yango?” Moto yango oyo azalaki koyokela basusu mawa abakisaki boye: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”​—Matai 5:46, 47; 7:12.

Okoki kotánga maloba yango na Biblia. Bato mingi bandimaka ete Biblia ezali na mateya eleki malamu na oyo etali koyokela basusu mawa. Na bisika mingi, Biblia emonisi biso ete tosengeli kosalisa bato oyo bazali na mposa ya lisalisi. Biblia elobi ete Yehova Nzambe, Mobandisi na yango mpe Mozalisi na biso, azali ye oyo aleki koyokela bato mawa.

Na ndakisa, tozali kotánga boye: “[Nzambe] akotelaka bana etike pe basi bakufelá mibali, alingaka bapaya oyo bayei kofanda epai na bino, apesaka bango bilei pe bilamba.” (Kozongela mibeko 10:18, Bible na Lingala ya lelo oyo) Biblia elobi mpe ete Yehova Nzambe “akokata makambo ya batungisami alima, ye oyo akoleisa baoyo na [nzala].” (Nzembo 146:7) Yehova apesaki Bayisalaele mobeko oyo: “Mopaya . . . akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza.”​—Levitike 19:34.

Nzokande, koyokela basusu mawa ezalaka ntango mosusu mokakatano. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Kolose boye: “Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika engebene elilingi ya Oyo azalisaki yango . . . Lokola baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami, bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa.”​—Bakolose 3:9, 10, 12.

Na yango, kolona ezaleli ya komonisela basusu motema mawa esɛngaka milende. Ezaleli yango ezali na kati ya “bomoto ya sika” oyo baklisto basengeli kolata. Paulo afandaki na mokili oyo Loma ezalaki koyangela, oyo etondaki na bato bazangá mawa. Alendisaki baninga na ye bandimi ete bábongola mpenza bomoto na bango mpo bákóma bato oyo bayokelaka basusu mawa.

Matomba ya motema mawa

Bato mosusu bakanisaka ete komonisela basusu motema mawa ezali bolɛmbu. Likanisi yango ezali solo?

Te! Ezaleli oyo etindaka moto amonisela basusu motema mawa ezali bolingo, ezaleli ya libosoliboso ya Nzambe. “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:16) Yehova abengami “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakolinti 1:3) Maloba oyo ebongolami na “motema mawa mingi” elimboli mpenzampenza “mawa mpo na mpasi ya basusu.” Yehova “azali na boboto epai ya bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe”!​—Luka 6:35.

Mozalisi na biso alingi ete tómonisaka bizaleli malamu, na ndakisa komonisela basusu motema mawa. Na Mika 6:8, tozali kotánga boye: “E moto, asili koyebisa yo oyo ezali malamu! [Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto.” Masese 19:22 elobi boye: “Yango elingami kati na moto ezali boboto na ye.” Ndenge moko mpe, Yesu Klisto, moto oyo amonisaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.” (Luka 6:36) Bible na Lingala ya lelo oyo ebongoli maloba yango boye: “Bóyokelaka bato mawa, ndenge Tata na bino ayokelaka bango mawa.”

Ebongi mpenza tómoniselaka basusu motema mawa mpamba te ezaleli yango ememaka matomba mingi. Mbala mingi, tomonaka ete Masese 11:17 elobi solo ete: “Moto ya boboto akosunga molimo na ye moko.” Ntango tosalisi moto oyo azali na mpasi, Nzambe amonaka ete tosali malamu yango epai na ye. Azwaka mokumba ya kopambola mosambeli na ye oyo amoniseli moto motema mawa. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisela [Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.” (Masese 19:17) Paulo mpe akomaki boye: “Boyebi ete moto na moto, malamu nyonso oyo ye akosala, akozwa yango lisusu epai ya Yehova.”​—Baefese 6:8.

Motema mawa ebatelaka kimya mpe esalisaka mpo na kosilisa matata. Ememaka bato báyokana mpe bálimbisana. Matata ekoki kobima na kati ya bato mpamba te na bantango mosusu tolobaka to tomonisaka mayoki na biso na ndenge oyo tokanisaki te, to mpe bato mosusu bakoki kokanisela biso mabe. Na ntango wana nde ezaleli ya komonisela basusu motema mawa ezalaka na ntina mpo na kobatela kimya. Ezalaka mpasi te kolimbisa moto oyo toyebi ete amoniselaka basusu motema mawa. Komonisela basusu motema mawa esalisaka biso tólanda toli oyo Paulo apesaki baklisto: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​—Bakolose 3:13.

Misala oyo euti na komonisela basusu motema mawa

Komonisela bato oyo bazali na mpasi mawa ekoki kokitisa mpasi na bango. Ndenge tomonaki yango, ezaleli yango elimbolaka komitya na esika ya bato oyo bazali na mpasi mpe konyokwama elongo na baoyo bazali konyokwama. Koyokela bato oyo bazali na mpasi mawa esɛngaka kotyela bango likebi mpe kosalisa bango.

Baklisto bamekolaka Yesu ntango bamityaka na esika ya basusu. Yesu azalaki kozanga ntango te ya kosalisa bato, ezala na mosuni to na elimo. Ntango amoni bato oyo bazali na mpasi, azalaki koyokela bango mawa mpe kosalisa bango.

Tótalela ndenge oyo Yesu ayokaki ntango amonaki ebele ya bato oyo bazalaki babola na elimo: “Ntango amonaki bibele wana ya bato ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobi ete liloba oyo ebongolami na ‘koyokela mawa’ na vɛrsɛ yango, emonisaka “mpasi oyo moto ayokaka tii na kati ya motema na ye mpenza.” Kutu, balobaka ete liloba yango “ezali liloba ya Grɛki oyo eleki makasi mpo na kolobela mawa.”

Ndenge moko mpe, baklisto oyo bayokelaka basusu mawa basalaka nyonso mpo na kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga na mosuni to na elimo. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi.” (1 Petelo 3:8) Na ndakisa, ntango libota moko ya baklisto oyo bazali babola bakendaki kofanda na mboka mosusu mpo na maladi, bandeko na bango ya elimo na mboka yango bapesaki bango ndako oyo bafandaki kozanga kofuta na boumeli ya sanza motoba. Mobali alobi boye: “Mokolo na mokolo bazalaki koya kotala biso mpo na koyeba soki tozali ndenge nini, mpe maloba na bango ya kolendisa esalisaki biso tómiyoka te ete tozali bapaya.”

Baklisto ya solo basalisaka mpe bato oyo bayebi te. Bandimaka kopesa ntango na bango, makasi na bango, ata mpe biloko na bango mpo na kosalisa basusu. Bato oyo tolobelaki na lisolo eleki, oyo balongolaki banzete oyo ekwelaki ndako moko, bazalaki Batatoli ya Yehova.

Yango wana, lisangá ya boklisto etondi na bato oyo bayokelaka basusu mawa mpe bazali na motema-boboto. Bolingo etindaka bandeko na lisangá bákanisa ndenge oyo bakoki kosalisa basusu. Na kati ya lisangá, bitike mpe basi oyo bakufelá mibali bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na mikakatano ndenge na ndenge oyo bakoki kozala na yango. Okoki nde kosalisa bato yango oyo bazali babola, bazali na mposa ya lisalisi ya monganga, bazangi esika ya kolala, to bazali na mikakatano mosusu?

Tózwa ndakisa ya mobali moko ná mwasi na ye na Grèce. Mobali yango abɛlaki makasi. Bamemaki ye na lopitalo moko mosika. Nzokande, mpo na kozwa mwa mbongo, basengelaki kobuka malala na bango mpe kotɛkisa yango. Nani akokaki kosala yango lokola mwasi azalaki kokɛngɛla mobali na ye na lopitalo? Bandeko ya lisangá na bango basalisaki bango. Babukaki malala mpe batɛkaki yango; yango epesaki babalani yango likoki ya kozwa mbongo oyo basengelaki na yango, mpe esalisaki bango bámitungisa te.

Ezali na bandenge mingi ya komonisela basusu motema mawa. Na ndakisa, baklisto oyo bayokelaka basusu mawa bayebaka ete ntango mosusu moto oyo azali na mpasi azalaka na mposa bákende kotala ye, báyoka ye na boboto, bámitya na esika na ye, mpe bábɔndisa ye na lisalisi ya Biblia.​—Baloma 12:15.

Kangamá na bato oyo bayokelaka basusu mawa

Lisangá ya Yehova ezali esika oyo moto akoki kozwa kimya mpe libɔndisi mpamba te esangisi bato oyo bamoniselaka basusu motema mawa mpe bazali na boboto. Baklisto ya solo bayebi ete moto nyonso asepelaka na bato oyo bayokelaka basusu mawa, kasi akimaka baoyo basalelaka basusu makambo na nko. Yango wana, basalaka makasi bámekola Tata na bango ya likoló mpe basalaka makambo oyo emonisaka ete ‘bayokelaka basusu mawa mingi.’

Batatoli ya Yehova bazali kolendisa yo osangana na bango mpo na komona ndenge oyo batondi na misala ya motema mawa, bamibanzabanzaka mpo na basusu, mpe bazali na bolingo. Bazali na elikya ete okosepela mingi na makambo oyo okomona epai na bango.​—Baloma 15:7.

[Elilingi na lokasa 5]

Paulo alendisaki baklisto ya Kolose bálata bolingo ya motema oyo euti na mawa

[Bililingi na lokasa 7]

Yesu azalaki koyokela bato oyo bazali na bosɛnga mawa mpe azalaki kosalisa bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto