Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/2 nk. 12-16
  • Yesu Klisto—Misionere Monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu Klisto—Misionere Monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu azalaki na elimo ya komipimela
  • Moteyi oyo abongisamaki malamu
  • Ndenge oyo Yesu azalaki koteya
  • Bizaleli oyo ezalaki kobenda bato epai ya Yesu
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yesu Klisto azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/2 nk. 12-16

Yesu Klisto​—Misionɛrɛ Monene

“Nazali momonisi oyo auti epai na ye, mpe Moto wana nde atindaki ngai.”​—Yoa. 7:29.

1, 2. Nkombo misionɛrɛ elimboli nini, mpe nani akoki kobengama Misionɛrɛ monene?

LIKANISI nini eyelaka yo liboso ntango oyokaka nkombo “misionɛrɛ”? Bato mosusu bakanisaka bamisionɛrɛ ya mangomba ya boklisto, oyo mingi kati na bango bamikɔtisaka na makambo ya politiki mpe ya nkita na bikólo oyo batindaka bango. Nzokande, lokola ozali Motatoli ya Yehova, na ntembe te nkombo yango etindaka yo okanisa bandeko oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaka na mikili ndenge na ndenge mpo na kosakola nsango malamu. (Mat. 24:14) Bamisionɛrɛ yango bapesaka ntango na bango mpe basalaka na molende mpo na kosalisa bato bápusana penepene na Yehova Nzambe mpe bákóma baninga na ye.​—Yak. 4:8.

2 Liloba “misionɛrɛ” ezali te na kati ya Libongoli ya Mokili ya Sika. Nzokande, na maloba ya nse ya lokasa na Efese 4:11, Biblia Traduction du monde nouveau​—avec notes et références emonisi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bapalanganisi ya nsango malamu” ekoki mpe kobongolama na “bamisionɛrɛ.” Yehova azali Mopalanganisi Monene ya nsango malamu, kasi akoki te kobengama Misionɛrɛ monene, mpamba te moto moko te asilá kotinda ye. Nzokande, Yesu alobaki mpo na Tata na ye boye: “Nazali momonisi oyo auti epai na ye, mpe Moto wana nde atindaki ngai.” (Yoa. 7:29) Mpo na komonisa bolingo monene oyo azali na yango mpo na bato, Yehova atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko awa na mabelé. (Yoa. 3:16) Yesu akoki kobengama Misionɛrɛ monene, to Misionɛrɛ ya libosoliboso, mpamba te moko na bantina oyo atindamaki awa na mabelé ezalaki mpo na ‘kopesa litatoli na ntina etali solo.’ (Yoa. 18:37) Yesu asalaki malamu mpenza mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, mpe matomba ya mosala na ye ezali tii lelo. Na ndakisa, tózala bamisionɛrɛ to te, na mosala na biso ya kosakola, tokoki kosalela mayele na ye ya koteya.

3. Tokotalela mituna nini?

3 Mokumba ya Yesu lokola mosakoli ya Bokonzi ezali kobimisa mituna lokola oyo: Makambo nini Yesu akutanaki na yango awa na mabelé? Mpo na nini azalaki moteyi ya malamu? Mpe nini esalaki ete mosala na ye ebota mbuma mingi?

Yesu azalaki na elimo ya komipimela

4-6. Wapi mwa makambo oyo ezalaki mbongwana mpo na Yesu ntango ayaki awa na mabelé?

4 Lelo oyo, ekoki kosɛnga na bamisionɛrɛ mpe bandeko mosusu oyo bakendaka kosakola na bisika oyo basakoli bazali mingi te, bámesana na makambo ya sika mpe na bomoi ya mpasi koleka oyo bazalaki na yango. Kasi, ezalaki mbongwana monene koleka mpo na Yesu na ndenge atikaki bomoi oyo azalaki na yango na likoló mpe ayaki awa na mabelé, mpamba te kuna azalaki elongo na Tata na ye mpe baanzelu oyo basalelaka Yehova na bosembo. (Yobo 38:7) Akutanaki na makambo ekeseni mpenza ntango ayaki awa na mabelé mpe afandaki na kati ya bato ya masumu! (Mko. 7:20-23) Kutu, ata bayekoli oyo azalaki kotambola na bango bazalaki kowelana. (Luka 20:46; 22:24) Atako bongo, asalaki mosala na ye na ndenge oyo ebongi mpenza.

5 Yesu akómaki koloba monɔkɔ ya bato na ndenge ya likamwisi te; ayekolaki yango lokola mwana nyonso. Yango ezalaki mbongwana monene mpo na ye oyo azalaki kotambwisa baanzelu na likoló! Awa na mabelé, Yesu ayebaki koloba monɔkɔ moko to minɔkɔ mingi kati na “minɔkɔ ya bato.” Monɔkɔ to minɔkɔ yango ekesenaki mpenza na oyo “ya baanzelu.” (1 Kol. 13:1) Atako bongo, Yesu azalaki koloba maloba kitoko na ndenge oyo moto mosusu alobaki te.​—Luka 4:22.

6 Tótalela mpe makambo mosusu oyo ezalaki mbongwana monene mpo na Mwana ya Nzambe ntango ayaki awa na mabelé. Atako azalaki na lisumu ya Adama te, abotamaki lokola moto, lokola baoyo bakómaki “bandeko” na ye, elingi koloba baklisto bapakolami. (Tángá Baebele 2:17, 18.) Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu aboyaki kosɛnga Tata na ye “mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu.” Kanisá ebele ya baanzelu oyo azalaki kotambwisa ntango azalaki Mikaele anzelu-mokonzi! (Mat. 26:53; Yuda 9) Ya solo, Yesu asalaki makamwisi awa na mabelé, kasi yango ezalaki eloko te soki tokokanisi yango na oyo akokaki kosala ntango azalaki na likoló.

7. Ndenge nini Bayuda bazalaki kotalela Mibeko?

7 Liboso Yesu aya awa na mabelé, ntango azalaki “Liloba,” na ntembe te ye nde azalaki Molobeli ya Nzambe oyo akambaki Bayisalalele na esobe. (Yoa. 1:1; Ex. 23:20-23) Bayisalaele yango ‘bazwaki Mibeko ndenge epesamaki na nzela ya baanzelu kasi batosaki yango te.’ (Mis. 7:53; Ebe. 2:2, 3) Kutu, na ekeke ya liboso, bakonzi ya mangomba ya Bayuda bamonisaki ete bakangaki ntina ya Mibeko te. Tózwa ndakisa ya mobeko ya Sabata. (Tángá Malako 3:4-6.) Bakomeli mpe Bafalisai ‘batyolaki makambo ya Mibeko oyo ezalaki na ntina mingi, elingi koloba, bosembo mpe motema mawa mpe kondima.’ (Mat. 23:23) Atako bongo, Yesu alɛmbaki te mpe atikaki te kosakola solo.

8. Mpo na nini Yesu azali na likoki ya kosalisa biso?

8 Yesu azalaki na elimo ya komipimela. Azalaki kolinga bato mpe azalaki na mposa makasi ya kosalisa bango. Abatelaki elimo ya mopalanganisi ya nsango malamu. Lokola atikalaki sembo epai ya Yehova awa na mabelé, Yesu “akómaki moto oyo azwi mokumba ya lobiko ya seko mpo na baoyo nyonso bazali kotosa ye.” Lisusu, “lokola ye moko amonaki mpasi ntango azalaki komekama, azali na likoki ya koya kosalisa baoyo [lokola biso] bazali komekama.”​—Ebe. 2:18; 5:8, 9.

Moteyi oyo abongisamaki malamu

9, 10. Formasyo ya ndenge nini Yesu azwaki liboso aya awa na mabelé?

9 Lelo oyo, liboso bamisionɛrɛ bátindama na mikili mosusu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bibongiseli mpo na kopesa bango formasyo. Yesu Klisto azwaki mpe formasyo? Ɛɛ, kasi, akɔtaki te na biteyelo ya Balabi liboso apakolama lokola Masiya; alandaki mpe te mateya ya bakonzi minene ya Bayuda. (Yoa. 7:15; talá mpe Misala 22:3.) Kasi, mpo na nini Yesu azalaki moteyi ya malamu mpenza?

10 Ata soki mama na ye Malia, mpe tata-mobɔkɔli na ye Yozefe bateyaki ye, Yehova nde abongisaki Yesu mpo na mosala ya kosakola. Mpo na formasyo oyo azwaki, Yesu alobaki boye: “Nalobaki na ndenge na ngai moko te, kasi Tata moto atindaki ngai apesaki ngai komandema na oyo etali makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba.” (Yoa. 12:49) Tomoni ete Mwana ya Nzambe azwaki malako ya sikisiki na oyo etali makambo oyo asengelaki koteya. Na ntembe te, liboso aya awa na mabelé, Yesu alekisaki ntango mingi na koyoka malako ya Tata na ye. Azwaki mpenza formasyo oyo eleki malamu!

11. Na meko nini Yesu amekolaki ndenge oyo Tata na ye atalelaka bato?

11 Banda ntango azalisamaki, Mwana ya Nzambe azalaki na boyokani makasi na Tata na ye. Ntango azalaki naino na likoló, Yesu ayebaki ndenge oyo Yehova atalelaka bato mpo azalaki komona makambo oyo Nzambe azalaki kosala epai na bango. Mwana ya Nzambe amonisaki mpenza bolingo ya Tata na ye, yango wana akokaki koloba boye: “Esengo na ngai ezalaki kati na bana ya bato.”​—Mas. 8:22, 31.

12, 13. (a) Yesu ayekolaki nini na komona ndenge oyo Tata na ye asalaki liboso ya Bayisalaele? (b) Ndenge nini Yesu asalelaki formasyo oyo azwaki?

12 Mwana ya Nzambe ayekolaki mpe na komona ndenge oyo Tata na ye azalaki kosala liboso ya makambo ya mabe. Na ndakisa, tótalela ndenge Yehova asalaki liboso ya Bayisalaele oyo bazalaki bato ya motó makasi. Nehemia 9:28 elobi boye: “Wana esili bango koumela, basalaki mabe liboso na yo [ Yehova] lisusu; bongo, otikaki bango na lobɔkɔ ya bayini na bango ete bázala bankolo likoló na bango. Kasi ebutwaki bango mpe elelaki bango epai na yo, oyokaki longwa na lola; mbala mingi obikisaki bango lokola ezali mawa na yo.” Lokola Yesu azalaki elongo na Tata na ye, amonisaki motema mawa ya ndenge wana epai ya bato oyo azalaki koteya.​—Yoa. 5:19.

13 Yesu asalelaki formasyo oyo azwaki na ndenge azalaki komonisela bayekoli na ye motema mawa. Na butu ya nsuka liboso akufa, bantoma nyonso, bato oyo alingaki mingi, “basundolaki ye mpe bakimaki.” (Mat. 26:56; Yoa. 13:1) Kutu, ntoma Petelo awanganaki Klisto mbala misato! Atako bongo, Yesu apesaki bantoma yango libaku ya kozonga epai na ye. Ayebisaki Petelo boye: “Nasili kosala lilɔmbɔ mpo na yo ete kondima na yo elɛmba te; mpe yo, ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32) “Bantoma mpe basakoli” bazali moboko ya Yisalaele ya elimo, mpe mabanga ya moboko ya efelo ya Yelusaleme ya Sika ezali na bankombo ya bantoma zomi na mibale ya sembo ya Mwana-Mpate, Yesu Klisto. Tii lelo oyo, baklisto bapakolami elongo na baninga na bango “bampate mosusu,” basali lisangá ya basakoli ya Bokonzi oyo ezali kokende liboso na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe mpe na litambwisi ya Mwana na ye molingami.​—Ef. 2:20; Yoa. 10:16; Emon. 21:14.

Ndenge oyo Yesu azalaki koteya

14, 15. Nini emonisi ete ndenge oyo Yesu azalaki koteya ekesenaki mpenza na ndenge oyo Bafalisai mpe bakomeli bazalaki koteya?

14 Ndenge nini Yesu asalelaki formasyo oyo azwaki mpo na koteya bayekoli na ye? Soki tokokanisi ndenge oyo Yesu azalaki koteya na ndenge oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki koteya, tokomona polele ete Yesu alekaki bango mosika. Bakomeli mpe Bafalisai ‘bakómisaki liloba ya Nzambe eloko ya mpamba mpo na mimeseno na bango.’ Nzokande, makambo oyo Yesu azalaki koteya ezalaki kouta epai na ye moko te; azalaki koteya liloba to nsango ya Nzambe. (Mat. 15:6; Yoa. 14:10) Biso mpe tosengeli kosalaka bongo.

15 Ezali mpe na likambo mosusu oyo ekesenisaki mpenza Yesu na bakonzi ya mangomba. Na ntina na bakomeli mpe Bafalisai, alobaki boye: “Makambo nyonso oyo bazali koyebisa bino, bósala mpe bótosa, kasi bósala te engebene misala na bango, mpo balobaka kasi bakokisaka te.” (Mat. 23:3) Yesu azalaki kosalela makambo oyo azalaki koteya. Tótalela ndakisa moko oyo emonisi likambo yango.

16. Mpo na nini okoki koloba ete Yesu asalelaki toli oyo apesaki na Matai 6:​19-21?

16 Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘bámibombela biloko ya motuya na likoló.’ (Tángá Matai 6:19-21.) Yesu ye moko asalelaki toli yango? Ɛɛ, alobaki boye: “Bagambala bazalaka na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló bazalaka na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” (Luka 9:58) Yesu azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Amipesaki libosoliboso na kosakola nsango malamu ya Bokonzi, mpe bomoi na ye emonisaki ndenge nini kokima mitungisi oyo eyaka na komibombela biloko ya motuya awa na mabelé. Yesu amonisaki ete eleki malamu komibombela biloko ya motuya na likoló, “epai nsɛlɛlɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi te mpe bayibaka te.” Yo mpe olandaka toli Yesu apesaki ya komibombela biloko ya motuya na likoló?

Bizaleli oyo ezalaki kobenda bato epai ya Yesu

17. Bizaleli nini esalaki ete Yesu azala mopalanganisi ya nsango malamu oyo akeseni na basusu?

17 Nini esalaki ete Yesu azala mopalanganisi ya nsango malamu oyo akeseni na basusu? Moko na yango ezali ndenge oyo azalaki kotalela bato oyo azalaki koteya. Na kati ya bizaleli ya Yehova oyo Yesu azalaki komonisa, tokoki kotánga komikitisa, bolingo, mpe motema mawa. Tótalela ndenge oyo bizaleli yango ezalaki kobenda bato mingi epai ya Yesu.

18. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki na komikitisa?

18 Lokola andimaki koya awa na mabelé, Yesu “amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato.” (Filp. 2:7) Yango ezalaki mpenza komikitisa. Lisusu, Yesu azalaki komitombola te liboso ya bato. Azalaki koloba na bato te ete lokola ye autaki na likoló, esengeli báyoka ye. Na bokeseni na bamasiya ya lokuta, Yesu azalaki te kobɛta ntangwa ete ye nde Masiya ya solosolo. Kutu, na bantango mosusu azalaki kopekisa bato báyebisa basusu soki azali nani to báyebisa te makambo oyo asalelaki bango. (Mat. 12:15-21) Yesu alingaki ete bato bázwa bango moko ekateli ya kolanda ye na kotalela makambo oyo bango moko bamonaki. Bayekoli bazalaki mpenza na esengo ya kozala na Nkolo oyo azalaki koluka te ete bázala bato ya kokoka lokola baanzelu na likoló!

19, 20. Ndenge nini bolingo mpe motema mawa etindaki Yesu ateya bato?

19 Yesu Klisto azalaki mpe na bolingo—ezaleli ya libosoliboso ya Tata na ye. (1 Yoa. 4:8) Yesu azalaki koteya bato mpo alingaki bango. Na ndakisa, tótalela ndenge oyo atalelaki elenge mozwi moko. (Tángá Malako 10:17-22.) Yesu alingaki ye mpe azalaki na mposa ya kosalisa ye, kasi elenge mozwi yango asepelaki te kotika bozwi na ye mpo na kolanda Klisto.

20 Yesu azalaki mpe na motema mawa. Bato oyo bazalaki koyoka mateya na ye bazalaki na mikakatano lokola bato nyonso. Yesu ayebaki yango mpe azalaki komonisa motema mawa ntango azalaki koteya bango. Tózwa ndakisa moko: Mokolo moko, Yesu ná bantoma na ye bazalaki na mosala mingi na boye ete bazwaki ata ntango ya kolya te. Kasi, Yesu asalaki nini ntango amonaki ebele ya bato bayangani pembeni na ye? Biblia elobi ete “mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate bazangi mobateli. Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.” (Mko. 6:34) Yesu amonaki mpasi oyo bato bazalaki na yango mpe asalaki nyonso mpo na koteya bango mpe asalaki makamwisi mpo na kosalisa bango. Bato yango mosusu babendamaki na bizaleli na ye ya malamu, maloba na ye esimbaki mitema na bango, mpe bakómaki bayekoli na ye.

21. Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?

21 Lisolo oyo ekolanda ekomonisa biso makambo mosusu oyo tokoki koyekola na mosala ya Yesu awa na mabelé. Na makambo nini mosusu tokoki kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, Misionɛrɛ monene?

Okopesa eyano nini?

• Formasyo nini Yesu azwaki liboso aya awa na mabelé?

• Nini emonisi ete ndenge oyo Yesu azalaki koteya elekaki ndenge oyo Bafalisai mpe bakomeli bazalaki koteya?

• Bizaleli nini ezalaki kobenda bato epai ya Yesu?

[Elilingi na lokasa 15]

Ndenge nini Yesu azalaki koteya bato?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto