Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/2 nk. 21-25
  • Kozala ya Klisto—Elimboli nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala ya Klisto—Elimboli nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eleko moko ya ntango molai
  • Koyeba elembo
  • Libota oyo ezali komona elembo
  • “Bókɛngɛlaka”
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ntango ya Kosɛnzɛla
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Babikisami na “libota oyo mabe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Pole engengi likoló na kozala ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/2 nk. 21-25

Kozala ya Klisto​—Elimboli nini mpo na yo?

“Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?”​—Mat. 24:3.

1. Motuna nini ya ntina mingi bantoma batunaki Yesu?

ELEKI sikoyo mbula pene na 2 000, bantoma minei ya Yesu batunaki ye motuna moko ntango azalaki kosolola na bango na Ngomba ya Olive. Batunaki boye: “Ntango nini makambo wana ekosalema, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:3) Na motuna yango, bantoma basalelaki maloba mibale oyo ezali kobenda likebi na biso: “kozala na yo” mpe “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Maloba yango elimboli nini?

2. Liloba “bosukisi” elimbolaka nini?

2 Na maloba ya mibale, tótalela liloba “bosukisi,” oyo ebongoli liloba ya Grɛki suntéléïa. Na Libongoli ya Mokili ya Sika, liloba yango ebongolami na bisika nyonso na “bosukisi,” mpe liloba ya Grɛki télos oyo ekokani na yango, ebongolami na “nsuka.” Mpo na komonisa bokeseni oyo ezali na ndimbola ya maloba yango mibale, tokoki kosalela ndakisa ya lisukulu oyo ezali kosalema na Ndako ya Bokonzi. Bosukisi ya lisukulu ezali eteni na yango ya nsuka, ntango molobi azongelaka makanisi ya ntina mpe amonisaka ndenge oyo tokoki kosalela yango. Nsuka ya lisukulu ezali ntango molobi azali kokita na estrade. Ndenge moko mpe, na Biblia, maloba “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” ezali eleko oyo ezali komema na nsuka.

3. Wapi mwa makambo oyo ezali kosalema na boumeli ya kozala ya Yesu?

3 Ezali boni mpo na liloba “kozala”? Yango ebongoli liloba ya Grɛki parousia.a Parousia to kozala ya Klisto ebandaki ntango akómaki Mokonzi na likoló na 1914 mpe ekokoba tii na ‘bolɔzi monene,’ ntango akoya koboma bato mabe. (Mat. 24:21) Makambo mingi, na ndakisa “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo, koyanganisama ya baponami, mpe kosekwa na bango mpo na kozala na bomoi na likoló, ezali kosalema na eleko ya kozala ya Yesu. (2 Tim. 3:1; 1 Kol. 15:23; 1 Tes. 4:15-17; 2 Tes. 2:1) Tokoki koloba ete eleko oyo ebengami “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” (suntéléïa) ekokani na eleko oyo ebengami kozala ya Klisto (parousia).

Eleko moko ya ntango molai

4. Na ndenge nini kozala ya Yesu ekokani na mikolo ya Noa?

4 Makambo oyo Yesu alobaki na ntina na kozala na ye emonisi ete parousia ezali eleko moko ya ntango molai. (Tángá Matai 24:37-39.) Tomoni ete Yesu akokanisaki te kozala na ye na mikolo oyo Mpela ya ntango ya Noa eumelaki. Kasi, akokanisaki kozala na ye na eleko ya ntango molai oyo ememaki tii na Mpela. Eleko yango esangisi ntango nyonso oyo Noa atongaki masuwa mpe azalaki kosakola tii ntango Mpela eyaki. Makambo nyonso wana esalemaki na boumeli ya bambula mingi. Ndenge moko mpe, kozala ya Klisto ezali eleko oyo, na boumeli na yango, makambo oyo ekomema na bolɔzi monene ezali kosalema.​—2 Tes. 1:6-9.

5. Ndenge nini maloba ya Emoniseli mokapo 6 ezali komonisa ete kozala ya Klisto ezali eleko moko ya ntango molai?

5 Bisakweli mosusu ya Biblia ezali mpe komonisa ete kozala ya Klisto ezali eleko moko ya ntango molai, kasi te bobele ntango oyo akoya koboma bato mabe. Mokanda ya Emoniseli elobeli Yesu afandi likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ mpe bapesi ye motole. (Tángá Emoniseli 6:1-8.) Nsima ya kokóma Mokonzi na 1914, Yesu “abimaki na kolonga mpe mpo na kosukisa bolongi na ye.” Na nsima, lisolo elobi ete batambwisi-mpunda oyo bazalaki na bampunda ya langi ekeseni babimaki nsima na ye. Yango ezali komonisa bitumba, nzala, bamaladi, oyo ezali kobima na boumeli ya eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.” Makambo yango ezali kokokisama lelo oyo.

6. Emoniseli mokapo 12 ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo nini na oyo etali kozala ya Klisto?

6 Emoniseli mokapo 12 emonisi mpe likambo mosusu na oyo etali kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Mokapo yango elobi ete etumba moko esalemaki na likoló. Mikaele, elingi koloba Yesu Klisto na likoló, ná baanzelu na ye babundaki na Zabolo ná bademo na ye. Satana Zabolo ná bademo na ye babwakamaki awa na mabelé. Lisolo ebakisi ete Zabolo akómaki na nkanda makasi, “mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.” (Tángá Emoniseli 12:7-12.) Na bongo, tomoni polele ete nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Klisto na likoló, eleko moko ya “mawa” mingi esengelaki koya mpo na mabelé mpe bafandi na yango.

7. Nzembo 2 elobeli nini, mpe libaku nini elobelami na nzembo yango?

7 Lisusu, Nzembo 2 esakoli kotyama ya Yesu lokola Mokonzi na Ngomba Siona ya likoló. (Tángá Nzembo 2:5-9; 110:1, 2.) Nzokande, nzembo yango emonisi mpe ete ezali na eleko moko oyo batikeli bakonzi ya mokili mpe bato na bango ntango mpo na kondima bokonzi ya Klisto. Balendisami ete ‘bázala na mayele’ mpe ‘báyoka toli.’ Na ntango yango, “baoyo bakomibomba epai na [Nzambe],” elingi koloba bakosalela Yehova mpe Mokonzi oyo aponi, “bakopambolama.” Nyonso wana emonisi ete Nzambe atikeli bato ntango ya kobongwana na eleko oyo Yesu azali koyangela.​—Nz. 2:10-12.

Koyeba elembo

8, 9. Banani bakoyeba elembo ya kozala ya Klisto mpe ndimbola na yango?

8 Ntango Bafalisai batunaki Yesu ntango oyo Bokonzi ekoya, ayanolaki bango ete Bokonzi ekoya “na ndenge ya komonana polele” te ndenge bango bazalaki kokanisa. (Luka 17:20, 21) Bato oyo bazangi kondima bakososola te. Lokola basosolaki te ete Yesu nde Mokonzi, bakoki mpe te kososola ntango oyo Bokonzi ekoya. Boye, banani bakoyeba elembo ya kozala ya Klisto mpe ndimbola na yango?

9 Yesu abakisaki ete bayekoli na ye bakomona elembo polele ndenge bato bamonaka “mokalikali, ntango epelaka, [ndenge] engɛngaka banda na esika moko na nse ya likoló tii na esika mosusu na nse ya likoló.” (Tángá Luka 17:24-29.) Matai 24:23-27 emonisi ete Yesu azalaki kolobela elembo ya kozala na ye.

Libota oyo ezali komona elembo

10, 11. (a) Ndenge nini liloba “libota” oyo elobelami na Matai 24:34 elimbolamaki na bambula eleki? (b) Banani na ntembe te bayekoli ya Yesu bakanisaki ete bazali mpe na kati ya “libota” wana?

10 Na bambula eleki, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki ete na ekeke ya liboso, maloba “libota oyo,” oyo ezali na Matai 24:34, elimbolaki “libota ya Bayuda ya kozanga kondima oyo bazalaki na bomoi na eleko moko.”b Ndimbola yango emonanaki malamu mpamba te na bisika mosusu nyonso oyo Yesu asalelaki liloba “libota,” alobelaki bato ya mabe, mpe mbala mingi Yesu azalaki koloba libota “ya mabe” ntango azali kolobela libota yango. (Mat. 12:39; 17:17; Mko. 8:38) Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete na kokokisama na yango na ntango na biso, Yesu azalaki kolobela “libota” mabe ya bato bazangi kondima oyo bakomona makambo oyo ekomonisa “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” (suntéléïa) mpe nsuka ya mokili (télos).

11 Ya solo, ntango Yesu alobelaki “libota” ya mabe, azalaki kolobela bato mabe ya ntango na ye. Kasi, yango elingi nde koloba ete ezali mpe bongo na maloba na ye oyo ezali na Matai 24:34? Tóbosana te ete bayekoli minei ya Yesu basololaki na ye “kaka bango moko.” (Mat. 24:3) Lokola Yesu abakisaki te “ya mabe” ntango alobelaki “libota oyo,” na ntembe te bantoma na ye basosolaki ete bango moko mpe baninga na bango bazalaki na kati ya “libota” oyo esengelaki koleka te ‘tii makambo wana nyonso [esengelaki] kobima.’

12. Lisolo mobimba emonisi ete Yesu alobelaki banani ntango asalelaki liloba “libota”?

12 Nini ekoki kotinda biso tókanisa bongo? Lisolo yango mobimba. Ndenge ekomami na Matai 24:32, 33, Yesu alobaki boye: “Nzokande bózwa liteya oyo na nzete ya figi lokola ndakisa: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómaka pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisaka nkasa, boyebaka ete eleko ya molunge ekómi pene. Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo wana nyonso, bóyeba ete azali pene, na bikuke.” (Talá mpe Malako 13:28-30; Luka 21:30-32.) Na nsima, na Matai 24:34, abakisaki boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete libota oyo ekoleka soki moke te tii makambo wana nyonso ekobima.”

13, 14. Mpo na nini tokoki koloba ete “libota” oyo Yesu alobelaki ezali bayekoli na ye?

13 Yesu alobaki ete bayekoli na ye, oyo mosika te balingaki kopakolama na elimo santu, nde basengelaki kososola ntango bakomona “makambo wana nyonso.” Na yango, emonani ete Yesu azalaki kolobela bayekoli na ye ntango alobaki ete: “Libota oyo ekoleka soki moke te tii makambo wana nyonso ekobima.”

14 Na bokeseni na bato oyo bazangi kondima, bayekoli ya Yesu basengelaki komona elembo, kasi mpe kososola ndimbola na yango. Basengelaki ‘kozwa liteya’ na makambo ndenge na ndenge ya elembo mpe ‘koyeba’ ndimbola na yango mpenza. Basengelaki koyeba ete “azali pene, na bikuke.” Bayuda oyo bazangaki kondima mpe baklisto bapakolami ya sembo bamonaki kokokisama ya maloba ya Yesu na ekeke ya liboso; kasi, kaka bayekoli na ye bapakolami na elimo na ntango wana nde bazwaki liteya na makambo yango, kaka bango nde bakangaki ntina ya solosolo ya makambo oyo bamonaki.

15. (a) Lelo oyo, banani bazali “libota” oyo Yesu alobelaki? (b) Mpo na nini tokoki te koyeba ntango boni “libota oyo” ekoumela? (Talá etanda na lokasa 25.)

15 Lelo oyo, bato oyo bazangi bososoli ya elimo bakanisaka ete likambo moko te esalemaki “na ndenge ya komonana polele” oyo emonisaki elembo ya kozala ya Yesu. Bamonaka ete makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaka banda kala. (2 Pet. 3:4) Nzokande, bandeko ya Klisto, bapakolami na elimo, bamoni elembo yango lokola kongɛnga ya mokalikali mpe basosoli ndimbola na yango. Lokola etuluku, baklisto yango bazali “libota” ya bato oyo bazali na bomoi na ntango oyo, oyo bakoleka te “tii makambo wana nyonso ekobima.”c Yango ezali komonisa ete bandeko mosusu ya Klisto, bapakolami na elimo, bakozala naino awa na mabelé ntango bolɔzi monene oyo esakolamaki ekobanda.

“Bókɛngɛlaka”

16. Bayekoli nyonso ya Klisto basengeli kosala nini?

16 Kasi, esengelaki kosuka kaka te na koyeba elembo. Yesu abakisaki boye: “Oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso, Bókɛngɛlaka.” (Mko. 13:37) Yango ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso lelo oyo, tózala na kati ya bapakolami to na ebele ya bato. Mbula koleka 90 eleki banda Yesu akómaki Mokonzi na likoló na 1914. Atako ezali pɛtɛɛ te, tosengeli komilɛngɛla mpe kokoba kokɛngɛla. Koyeba ete Klisto azali Mokonzi na likoló ezali kosalisa biso tósala yango. Ezali mpe kosalisa biso tóbosana te ete mosika te akoya koboma banguna na ye, “na ngonga oyo [tozali] kutu kokanisa te.”​—Luka 12:40.

17. Koyeba ndimbola ya kozala ya Klisto ezali kosala nini na mitema na biso, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?

17 Ndimbola oyo tozwi ya kozala ya Klisto ezali kosalisa biso tómona lisusu malamu ete mikolo etikali ya kotánga. Toyebi ete Yesu azali mpe abandaki koyangela na likoló na 1914. Etikali moke aya koboma bato mabe mpe kobongola mabelé oyo mobimba. Yango wana, tosengeli kozala na ekateli ya komipesa mingi na mosala oyo Yesu asakolaki ntango alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka [télos] ekoya.”​—Mat. 24:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tokoki mpe komona ndimbola ya parousia na bokeseni oyo ezali kati na “kozala” mpe ‘kozala te’ ya ntoma Paulo na 2 Bakolinti 10:10, 11 mpe na Bafilipi 2:12. Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá Étude perspicace, volimi 2, nkasa 648-651.

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1995, nkasa 11-15, 19, 30, 31.

c Emonani ete emonaneli ya liboso na mokanda ya Emoniseli ezali kokokisama na ntango ya libota yango. (Em. 1:10–3:22) Makambo yango oyo esengeli komonana na boumeli ya mokolo ya Nkolo ebandaki na 1914 mpe ekokoba tii ntango mopakolami ya sembo ya nsuka akosekwa.​—Talá Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! lokasa 24, paragrafe 4.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini toyebi ete kozala ya Yesu ezali eleko moko ya ntango molai?

• Banani bazali koyeba elembo ya kozala ya Yesu mpe ndimbola na yango?

• Na ntango na biso, libota oyo elobelami na Matai 24:34 ezali banani?

• Mpo na nini tokoki te koyeba ntango boni “libota oyo” ekoumela?

[Etanda na lokasa 25]

Tokoki koyeba ntango boni “libota oyo” ekoumela?

Mbala mingi, liloba “libota” esalelamaka mpo na kolobela bato ya bambula ekeseni oyo bazali na bomoi na eleko moko to ntango likambo moko esalemi. Na ndakisa, Exode 1:6 elobi boye: “Bongo Yozefe akufaki mpe bandeko na ye nyonso mpe libota yango nyonso.” Yozefe ná bandeko na ye bazalaki bato ya bambula ekeseni, kasi bango nyonso bamonaki makambo oyo elekaki na eleko moko. Na kati ya “libota yango” ezalaki na bandeko ya Yozefe oyo babotamaki liboso na ye. Bamosusu batikalaki na bomoi nsima ya liwa ya Yozefe. (Gen. 50:24) Bato mosusu ya “libota yango,” na ndakisa Benyamina, babotamaki nsima ya Yozefe mpe, ekoki kozala ete batikalaki na bomoi nsima ya liwa ya Yozefe.

Na bongo, ntango liloba “libota” esalelami mpo na kolobela bato oyo bazali na bomoi na eleko moko boye, ezali mpasi koloba na bosikisiki ntango boni ekoumela; atako bongo, eleko yango ezalaka na nsuka mpe ezalaka molai koleka te. Na bongo, ntango Yesu asalelaki maloba “libota oyo” na Matai 24:34, ayebisaki bayekoli na ye te likambo oyo ekoki kosalisa bango báyeba ntango nini “mikolo ya nsuka” ekosuka. Kutu, Yesu amonisaki lisusu ete bakoyeba te “mokolo yango mpe ngonga yango.”​—2 Tim. 3:1; Mat. 24:36.

[Elilingi na lokasa 22, 23]

Nsima ya kozwa bokonzi na 1914, Yesu abimaki na kolonga

[Elilingi na lokasa 24]

“Libota oyo ekoleka soki moke te tii makambo wana nyonso ekobima”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto