Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/3 nk. 13-16
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo elɛmbisaka nzoto
  • Tótya makanisi na likambo oyo tokoki kosala
  • Ndenge malamu ya kotalela kolɛmba nzoto
  • Tómibongisa banda sikoyo
  • Olɛmbi Nzambe mpo na bampasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Telema ngwi”—kokwea te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mpo na nini tosengeli te kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Ozali na mposa ya kosala mingi koleka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/3 nk. 13-16

Okoki kozala na esengo atako olɛmbi nzoto

MOTO nyonso asilá kokutana na makambo oyo elɛmbisaki ye nzoto. Kutu, ata Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló, akutaná na makambo oyo eyokisaki ye mpasi na motema. Na ndakisa, alongolaki bana ya Yisalaele na boombo na Ezipito mpe apambolaki bango mingi. Kasi, Biblia elobi boye: “Babandaki lisusu komeka Nzambe mpe koyokisa Mosantu wa Israel mawa.” (Nzembo 78:41, Liloba lya Nzambe) Atako bongo, Yehova azali kaka “Nzambe ya esengo.”​—1 Timote 1:11.

Ezali na makambo mingi oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Tokoki kosala nini mpo makambo yango elongola biso esengo te? Ndenge oyo Yehova Nzambe asalaki liboso ya makambo oyo eyokisaki ye mpasi ekoki koteya biso nini?

Makambo oyo elɛmbisaka nzoto

Liloba ya Nzambe elobi ete “ntango mpe likambo oyo ekanami te” ekómelaka biso nyonso. (Mosakoli 9:11, NW) Likama to maladi ekoki kotungisa biso mingi mpe kolɛmbisa biso nzoto. Lisusu, Biblia elobi boye: “Elikya oyo ezelisami epesi motema mpasi.” (Masese 13:12) Toyokaka esengo mingi ntango tozali kozela likambo moko ya malamu, kasi soki likambo yango ezali koya te, tokoki kolɛmba nzoto. Tózwa ndakisa ya Duncan,a ndeko moko oyo alingaki mingi mosala ya misionɛrɛ; kasi nsima ya mwa bambula na mosala yango, esengelaki ete ye ná mwasi na ye bátika mosala yango mpe bázonga na mboka na bango. Ndeko yango alobi boye: “Ezalaki mbala ya liboso oyo nayokaki ete bomoi na ngai ezali na ntina te. Nazalaki na mokano moko te. Makambo nyonso ezalaki lisusu na ntina te.” Mpasi oyo moto ayokaka ntango alɛmbi nzoto ekoki koumela ntango molai, ndenge ndakisa ya Claire emonisi yango. Alobi boye: “Nazalaki na zemi mpe ntango ekokisaki sanza nsambo, zemi yango elongwaki. Likambo yango esalemaki eleki bambula mingi, kasi tii sikoyo, soki namoni mwana moko ya mobali azali kosala lisolo na Ndako ya Bokonzi, nalobaka na nse ya motema ete, ‘Lelo oyo mbɛlɛ mwana na ngai mpe akómi boye.’”

Tokoki mpe koyoka mpasi na motema mpe kolɛmba nzoto ntango toboyani na moto oyo toyokanaki tóbalana na ye, ntango matata ezali na libala na biso, ntango mwana na biso akómi motomboki, to ntango moninga moko abebisi konfianse oyo totyelaki ye, to moninga moko andimi te bolamu oyo tosalelaka ye. Lokola tozali biso nyonso bato ya kozanga kokoka mpe tozali na bantango ya mpasi, makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto ezali ebele mpenza.

Tokoki mpe kolɛmba nzoto soki tolongi te na likambo moko. Na ndakisa, ntango tozwi te na kelasi, to bazwi biso te na mosala moko oyo tolingaki, to mpe tosepeli na moto moko kasi ye alingi biso te, tokoki komiyoka lokola nde tozali na ntina moko te. Tokoki mpe kolɛmba nzoto ntango moninga to ndeko moko azali lisusu komipesa na makambo ya Nzambe te. Mary alobi boye: “Mwana na ngai ya mwasi azalaki molende na makambo ya Nzambe. Nazalaki komona ete napesaki ye ndakisa ya malamu mpenza. Kasi, ntango apesaki Yehova mokɔngɔ mpe atikaki kolanda mitinda oyo toteyaki ye na libota, namiyokaki lokola nde nasalaki ata eloko moko te. Ata makambo mosusu ya malamu oyo nasalaki ekokaki kobosanisa ngai te likambo ya mwana na ngai. Nalɛmbaki mpenza nzoto.”

Ndenge nini tokoki kolonga makanisi ya kolɛmba nzoto? Mpo na kozwa eyano, tótalela ndakisa ya Yehova.

Tótya makanisi na likambo oyo tokoki kosala

Na bolingo na ye, Yehova Nzambe apesaki mobali mpe mwasi ya liboso nyonso oyo basengelaki na yango; kasi, bango bazangaki botɔndi mpe bakómaki batomboki. (Genese, mokapo 2 mpe 3) Na nsima, mwana na bango Kaina akómaki na makanisi ya mabe. Kaina aboyaki koyoka makebisi ya Yehova mpe abomaki ndeko na ye. (Genese 4:1-8) Kanisá mpasi oyo Yehova ayokaki mpo na makambo yango!

Mpo na nini makambo yango elongolaki Nzambe esengo te? Mpamba te azalaki na mokano ya kotondisa mabelé na bato ya kokoka mpe akobaki kosala mpo na kokokisa mokano na ye. (Yoane 5:17) Mpo na yango, apesaki mbeka mpo na kobikisa bato mpe atyaki Bokonzi na ye. (Matai 6:9, 10; Baloma 5:18, 19) Yehova Nzambe atyaki makanisi na ye na mokakatano te, kasi na likambo oyo akokaki kosala mpo na kosilisa yango.

Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tótyaka makanisi na biso na makambo ya malamu na esika tókanisaka makambo oyo tolongaki te. Elobi boye: “Makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kosanzolama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.”​—Bafilipi 4:8.

Ndenge malamu ya kotalela kolɛmba nzoto

Tokoki kokutana na makambo oyo ekoki kobongola mpenza bomoi na biso. Na ndakisa, tokoki kobungisa mosala na biso na mbalakaka, tokoki kobungisa molongani na biso, to mpe kobungisa mikumba oyo tozalaki na yango. Tokoki kobela, kozanga esika ya kofanda, to mpe kobungisa baninga. Tosengeli kosala nini ntango tokutani na makambo ya ndenge yango?

Bato mosusu bamonaki ete kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso esalisaki bango mpenza. Duncan, oyo tolobelaki mwa liboso, alobi boye: “Ntango ngai ná mwasi na ngai tomonaki ete tokozwa lisusu te libaku ya kosala mosala ya misionɛrɛ, tolɛmbaki mpenza nzoto. Nsukansuka, tokanisaki makambo mibale oyo tosengelaki kotya na esika ya liboso: kosalisa Mama mpe soki likoki ezali, komipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Soki tolingi kozwa ekateli moko, totalelaka soki ekobebisa te makambo wana mibale. Yango esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu.”

Mingi kati na biso totyaka makanisi kaka na makambo oyo elɛmbisi biso nzoto. Na ndakisa, ntango mosusu milende oyo tosalaki mpo na kobɔkɔla mwana, mpo na kozwa mosala moko boye, to mpo na kosakola nsango malamu na mboka mopaya, eboti mbuma te ndenge oyo tokanisaki. Na ntango wana, tokoki kokanisa ete tozali na ntina moko te. Kasi, lokola tokoki koloba te ete Nzambe alongaki te mpo bato ya liboso oyo akelaki babebisaki, tosengeli mpe koloba te ete tozali na ntina moko te kaka mpo milende na biso eboti mbuma te.​—Deteronome 32:4, 5.

Mbala mingi motema na biso etindaka biso tósilika mpe tóbomba nkanda ntango moto moko asali likambo moko oyo elɛmbisi biso nzoto. Kasi, Yehova asalaka bongo te. Mokonzi Davidi ayokisaki Yehova mpasi na motema ntango asalaki ekobo na mwasi moko mpe na nsima abomisaki mobali ya mwasi yango. Kasi, Yehova amonaki ete Davidi abongolaki mpenza motema mpe atikaki Davidi akoba kosalela ye. Ndenge moko mpe, Yosafata, mokonzi moko ya sembo, asalaki libunga na ndenge asalaki boyokani na banguna ya Nzambe. Mosakoli ya Nzambe alobaki na ye boye: “Yango wana, nkanda euti na [Yehova] ekweli yo. Kasi makambo malamu mamonani epai na yo.” (2 Ntango 19:2, 3) Yehova amonaki te ete Yosafata apesaki ye mokɔngɔ kaka mpo asalaki libunga wana. Biso mpe, tokobebisa te boyokani na baninga na biso soki tozali te kosilika koleka ndelo mpe kobomba nkanda ntango basali libunga moko. Moninga moko oyo asali likambo oyo elɛmbisi biso nzoto akoki kozala na bizaleli mosusu ya malamu mingi.​—Bakolose 3:13.

Makambo oyo elɛmbisaka nzoto ezali mabaku oyo ekoki kozanga te na nzela oyo ezali komema biso na bolongi. Tokoki kolɛmba nzoto ntango tosali lisumu. Kasi, tokoki kozwa lisusu makasi soki tobongoli motema mpe tosali milende mpo na kokende liboso. Ntango Mokonzi Davidi alɛmbaki nzoto, akomaki boye: “Nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. . . . Nayebisaki yo [Yehova] masumu na ngai . . . , mpe yo olimbisi mabe ya masumu na ngai.” (Nzembo 32:3-5) Soki tosali likambo moko ya mabe na miso ya Nzambe, tosengeli kosɛnga ye bolimbisi mpe kobongola etamboli na biso mpe kozwa ekateli ya kolanda toli ya Nzambe malamumalamu.​—1 Yoane 2:1, 2.

Tómibongisa banda sikoyo

Biso nyonso tokokutana na makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na yango? Bruno, moklisto moko ya mobange oyo akutanaki na makambo oyo ebongolaki mpenza bomoi na ye, alobaki likambo moko ya ntina mingi. Alobaki boye: “Mpo na ngai, lisalisi monene mpo na kolonga kolɛmba nzoto ezalaki ete nakobaki kosala makambo oyo nazalaki kosala liboso mpo na kolendisa elimo na ngai. Nayebi ntina oyo Nzambe abomi naino mokili oyo mabe te. Nalekisaki bambula ebele mpo na kokolisa boninga na Yehova. Nazalaki na esengo mingi ndenge nasalaki milende wana. Koyeba ete Yehova azali penepene na ngai ezalaki kosalisa ngai nayika mpiko ntango nazalaki konyokwama na makanisi.”

Tosengeli kobosana likambo oyo te: Atako biso moko to mpe bato mosusu bakoki kosala makambo oyo ekolɛmbisa biso nzoto, ata mokolo moko te Nzambe akosala likambo oyo ekolɛmbisa biso nzoto. Kutu, Nzambe alobaki ete nkombo na ye Yehova, elimboli “Nakozala oyo nakozala.” (Exode 3:14, NW) Likambo yango ezali kopesa biso elikya ete Nzambe akokóma nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa makambo oyo alaki. Alaki ete na nzela ya Bokonzi na ye, mokano na ye ekokokisama “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” Yango wana, ntoma Paulo akomaki ete: “Nandimi solo ete ezala liwa to bomoi to baanzelu to baguvɛrnema . . . to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso ná bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu.”​—Matai 6:10; Baloma 8:38, 39.

Tokoki kozela na elikya nyonso likambo oyo Nzambe alakaki na nzela ya mosakoli Yisaya: “Talá, nazali kotonga lola ya sika mpe mokili ya sika; mpe makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” (Yisaya 65:17) Ezali mpenza esengo monene koyeba ete mosika te makambo nyonso oyo ezali kolɛmbisa biso nzoto ekokóma makambo ya kala!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

Tosengeli te koloba ete tozali na ntina moko te kaka mpo milende na biso eboti mbuma te

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tótyaka makanisi na biso na makambo ya malamu na esika tókanisaka makambo oyo tolongaki te

[Bililingi na lokasa 15]

Atako bato basalaki makambo oyo eyokisaki ye mpasi, Nzambe azali na esengo mpo ayebi ete mokano na ye ekokokisama

[Elilingi na lokasa 16]

Kotya makambo ya elimo na esika ya liboso ekoki kosalisa ntango tokutani na makambo oyo elɛmbisaka nzoto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto