Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/3 lok. 23
  • Ye oyo akoki kozongisa moto na bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ye oyo akoki kozongisa moto na bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • “Ekoki kosalema te!”
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Yesu asekwisi mwana ya mwasi oyo mobali akufá
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abondisi mwasi mokufeli-mobali
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Elikya ya lisekwa ekokokisama!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/3 lok. 23

Pusaná penepene na Nzambe

Ye oyo akoki kozongisa moto na bomoi

Luka 7:11-15

OSILÁ kokufela ndeko to moninga moko? Boye, okutanaki na moko ya makambo oyo epesaka mpasi mingi. Mozalisi na biso ayebi mpasi na yo. Kasi, akoki mpe kozongisa na bomoi bato oyo bakufá. Na kati ya Biblia, akomisaki masolo ya bato oyo asekwisaki mpo na komonisa ete azali kaka te Mopesi ya bomoi kasi mpe Ye oyo akoki kozongisa moto na bomoi. Tótalela lisolo ya lisekwa moko oyo Mwana na ye asalaki na nguya oyo apesaki ye. Lisolo yango ezali na Luka 7:11-15.

Ezalaki na mobu 31 ya ntango na biso (T.B.). Yesu azalaki kokende na Naini, engumba moko na etúká ya Galilai. (Vɛrsɛ 11) Ekoki kozala ete akómaki pembeni ya engumba yango na bampokwa. Biblia elobi boye: “Wana akómaki pene na ekuke ya engumba, ɛɛ, talá! ezalaki na mokufi moko oyo bazalaki komema na libándá, mwana mobotami-se-moko ya mama na ye. Lisusu, mama yango azalaki mwasi oyo akufelá mobali. Ebele mpenza ya bato oyo bautaki na engumba bazalaki mpe elongo na ye.” (Vɛrsɛ 12) Kanisá mawa oyo mwasi yango azalaki na yango! Mwana na ye ya mobali kaka moko akufaki; abungisaki mpo na mbala ya mibale moto oyo akokaki kosunga mpe kobatela ye.

Yesu atyaki likebi epai ya mwasi yango, oyo mbala mosusu azalaki kotambola pene ya bato oyo bamemaki ebembe ya mwana na ye. Lisolo elobi boye: “Ntango Nkolo amonaki ye, ayokelaki ye mawa, mpe alobaki na ye ete: ‘Tiká kolela.’” (Vɛrsɛ 13) Yesu ayokaki mawa mingi mpo na mwasi yango. Ekoki kozala ete akanisaki mama na ye moko, oyo mbala mosusu na ntango wana asilaki kokufela mobali, mpe oyo mosika te alingaki koyoka mawa makasi na liwa na ye.

Yesu apusanaki pembeni​—kasi te mpo na kokende na bango. “Asimbaki mbeto ya ebembe,” mpe ebele ya bato yango batɛlɛmaki. Na nsima, alobaki na mongongo ya moto oyo azali na nguya likoló ya liwa ete: “‘Elenge mobali, nalobi na yo, Tɛlɛmá!’ Mpe mokufi afandaki mpe abandaki koloba, mpe apesaki ye epai ya mama na ye.” (Vɛrsɛ 14, 15) Liwa ekabolaki elenge yango na mama na ye. Na yango, ntango Yesu “apesaki ye epai ya mama na ye,” bazongaki lisusu esika moko. Na ntembe te, mawa oyo mama yango azalaki na yango ebongwanaki esengo.

Ozalaka na mposa ya kokutana lisusu na bandeko to baninga oyo bakufá mpe koyoka esengo lokola oyo ya mwasi wana? Yebá ete Nzambe alingi mpe bongo. Ndenge oyo Yesu amityaki na esika ya mwasi wana emonisi motema-mawa ya Nzambe, mpamba te Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. (Yoane 14:9) Biblia eteyaka ete Nzambe azali na mposa makasi ya kozongisa na bomoi bakufi oyo bazali na makanisi na ye. (Yobo 14:14, 15) Biblia, Liloba na ye, epesi biso elikya kitoko ya kozala na bomoi na paladiso awa na mabelé mpe komona lisekwa ya bandeko mpe baninga oyo bakufá. (Luka 23:43; Yoane 5:28, 29) Tolendisi yo oyekola makambo mosusu na ntina na Ye oyo akoki kozongisa moto na bomoi mpe ndenge oyo yo mpe okoki kokóma na elikya ete bandeko mpe baninga oyo bakufá bakosekwa.

[Elilingi na lokasa 23]

“Mokufi afandaki mpe abandaki koloba, mpe apesaki ye epai ya mama na ye”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto