Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/4 nk. 17-20
  • Akengelaki mpe azelaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Akengelaki mpe azelaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Molende na libondeli
  • Azalaki kokɛngɛla na elikya mpenza
  • Yehova asungaka mpe apambolaka
  • Asɛnzɛlaki, mpe azelaki
    Mekolá kondima na bango
  • Nzambe na ye apesaki ye makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe na ye abɔndisaki ye
    Mekolá kondima na bango
  • Alongisaki losambo ya solo
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/4 nk. 17-20

Mekolá kondima na bango

Akɛngɛlaki mpe azelaki

ELIYA azalaki na mposa ya kotikala ye moko mpo na kosolola na Tata na ye ya likoló. Nzokande, ebele ya bato oyo bazingaki ye bautaki komona mosakoli yango ya solo akitisi mɔtɔ uta na likoló, mpe na ntembe te mingi na bango bazalaki koluka kozwa mapamboli epai na ye. Liboso Eliya amata likoló ya Ngomba Kalemele mpo na kobondela Yehova Nzambe, asengelaki kosala likambo moko oyo akokaki kosepela na yango ata moke te: kosolola na Mokonzi Ahaba.

Ahaba ná Eliya bakesanaki makasi. Ahaba alataki bilamba kitoko ya mokonzi, azalaki lokoso mpe mopɛngwi ya motó makasi. Eliya alataki kaka elamba na ye ya mosakoli, oyo ntango mosusu esalemaki na mposo ya nyama to na nsuki ya ntaba. Azalaki mobali moko ya mpiko, moto ya sembo mpe ya kondima. Mokolo wana, oyo ekómaki kokende na nsuka, emonisaki mpenza bomoto ya mokomoko na bango.a

Ezalaki mokolo mabe mpenza mpo na Ahaba mpe basambeli mosusu ya Baala. Losambo ya bapakano oyo Ahaba ná mwasi na ye Yezabele batombolaki na Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, emonanaki polele ete ezali losambo ya lokuta. Emonanaki polele ete Baala azali nzambe ya lokuta. Atako basakoli na ye babomaki nzoto na kobondela, kobina mpe komizokisa bampota mpo ayokela bango, nzambe yango oyo azali na bomoi te apelisaki ata mɔtɔ ya mpamba te. Babomaki basambeli na ye 450 mokolo wana, kasi ye asalaki ata eloko te mpo na kobikisa bango. Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo nzambe yango ya lokuta alongaki te kosala, mpe etikalaki moke akóma na nsuka. Na boumeli ya mbula misato na ndambo, basakoli ya Baala babondelaki nzambe na bango asukisa elanga oyo ebɛtaki mokili na bango, kasi Baala akokaki kosala yango te. Mosika te, Yehova asengelaki kosukisa elanga yango mpo na komonisa ete ye nde Nzambe ya solo.​—1 Mikonzi 16:30–17:1; 18:1-40.

Kasi, ntango nini Yehova asengelaki kosala yango? Mpe Eliya asengelaki kosala nini ntango azali kozela ete Yehova amonisa nguya na ye? Mpe liteya nini tokoki kozwa epai ya mobali wana ya kondima? Tótalela lisolo oyo ezali na 1 Mikonzi 18:41-46 mpo na kozwa biyano.

Molende na libondeli

Eliya akendaki epai na Ahaba mpe alobaki na ye ete: “Butá, lyá mpe mɛlá, zambi ezali na lokito ya mbula makasi.” (Vɛrsɛ 41) Mokonzi yango ya mabe azwaki nde liteya na makambo oyo esalemaki mokolo wana? Biblia eyebisi biso eloko te, kasi tomoni ata esika moko te ete abongolaki motema to asɛngaki mosakoli asalisa ye mpo asɛnga Yehova bolimbisi. Ahaba asalaki eloko te, kasi “abutaki ete alya mpe amɛla.” (Vɛrsɛ 42) Kasi, Eliya asalaki nini?

“Eliya akendaki kino epai ya likoló ya Kalemele; agumbamaki na mabelé mpe atyaki elongi na ye kati na mabɔlɔngɔ na ye.” Wana Ahaba akendaki kotondisa libumu na ye, Eliya amonaki yango nde libaku ya kobondela Tata na ye. Ndenge Biblia emonisi yango, Eliya afukamaki na mabelé mpe atyaki motó na nse tii pene na mabɔlɔngɔ na ye. Azalaki kosala nini? Ezali na ntina te tóluka eyano. Biblia eyebisi biso na Yakobo 5:18 ete Eliya abondelaki mpo elanga esila. Na ntembe te, asalaki libondeli yango likoló ya Ngomba Kalemele.

Liboso na yango, Yehova alobaki na ye boye: “Nakotinda mbula likoló na mabelé.” (1 Mikonzi 18:1) Na yango, Eliya abondelaki ete Tata na ye akokisa mokano na ye, ndenge Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka, soki mbula nkóto na nsima.​—Matai 6:9, 10.

Ndakisa ya Eliya epesi biso mateya mingi na ntina na libondeli. Na makanisi ya Eliya, kokokisama ya mokano ya Tata na ye nde ezalaki na esika ya liboso. Ntango tozali kobondela, ezali malamu tóbosanaka te ete “ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Emonani polele ete soki tolingi Nzambe ayokaka mabondeli na biso, tosengeli koyeba mokano na ye. Yango wana, ezali mpenza na ntina tóyekolaka Biblia mokolo na mokolo. Na ntembe te, Eliya alingaki mpe ete elanga yango esila, mpamba te bato ya mboka na ye bazalaki konyokwama mingi. Ekoki kozala ete atɔndaki mpenza Yehova ntango amonaki likamwisi oyo asalaki mokolo wana. Biso mpe ntango tozali kobondela tosengeli kokanisaka basusu mpe kotɔndaka Yehova.​—2 Bakolinti 1:11; Bafilipi 4:6.

Azalaki kokɛngɛla na elikya mpenza

Eliya azalaki na elikya mpenza ete Yehova akosilisa elanga yango, kasi ayebaki te ntango nini akosala yango. Asalaki nini na ntango wana? Yoká ndenge vɛrsɛ 43 elobi: “Alobaki na mosali na ye ete, Butá [sikoyo], talá kino mai-ya-monana. Abutaki mpe atalaki mpe alobaki ete, Eloko ezali te. Alobaki ete, Buta lisusu, mbala nsambo.” Ndakisa ya Eliya epesi biso mateya soki mibale. Ya liboso, mosakoli azalaki mpenza na elikya. Ya mibale, azalaki kokɛngɛla.

Eliya alingaki komona bilembeteli ete Yehova alingi kosala, yango wana atindaki mosali na ye amata na esika moko ya likoló mpenza mpo na kotala soki likoló ezali komonisa ete mbula ezali koya. Ntango mosali azongaki, apesaki ye nsango moko oyo ekokaki kolendisa ye te: “Eloko ezali te.” Likoló ezalaki polele mpe mapata eyindaki te. Kasi, likambo nini ekoki kokamwisa biso epai na Eliya? Tóbosana te ete Eliya alobaki na Mokonzi Ahaba ete: “Ezali na lokito ya mbula makasi.” Ndenge nini mosakoli akokaki koloba likambo ya ndenge wana na ntango amonaki ata mwa elembo te ete mbula ekoki kobɛta?

Eliya ayebaki elaka ya Yehova. Lokola azalaki mosakoli mpe momonisi ya Yehova, azalaki mpenza na elikya ete Nzambe na ye akokokisa maloba na Ye. Elikya makasi oyo Eliya azalaki na yango etindaki ye amona lokola mbula esili kobɛta. Na ntembe te, tobosani te likambo oyo Biblia elobi mpo na Moize: “Atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” Yo mpe ondimaka mpenza ete Nzambe azali? Apesi biso ebele ya bilembeteli oyo ekoki kosalisa biso tóndima mpenza ete azali mpe akokokisa bilaka na ye.​—Baebele 11:1, 27.

Tótala sikoyo ndenge Eliya akɛngɛlaki. Atindaki mosali na ye mbala moko to mibale kaka te, kasi mbala nsambo mobimba! Ekoki kozala ete mosali yango alɛmbaki kozonga mbala na mbala, kasi lokola Eliya azalaki mpenza na mposa ya komona elembo, alɛmbaki te kotinda ye. Nsukansuka, na mbala ya nsambo, mosali ayebisaki ye ete: “Talá lipata moke lokola [lobɔkɔ] ya moto ezali kobima na mai.” (Vɛrsɛ 44) Kanisá naino ndenge mosali yango asembolaki lobɔkɔ mpe azali kosala mwa elembo na lobɔkɔ yango mpo na komonisa ye bonene ya lipata oyo amonaki ezali kobima na Mai Monene!b Ekoki kozala ete mosali yango amonaki mwa lipata yango eloko mpamba. Kasi mpo na Eliya, lipata yango ezalaki na ntina monene. Na ntango wana, atindaki mosali na ye nokinoki. Alobaki na ye boye: “Butá, lobá na Ahaba ete, Bongisá likalo na yo mpe kitá ete mbula epekisa yo te.”

Na likambo wana mpe, Eliya atikelá biso ndakisa moko ya malamu mpenza. Biso mpe tokómi pene na ntango oyo Nzambe akosala mpo na kokokisa mokano na ye. Eliya azalaki kozela nsuka ya elanga; basaleli ya Nzambe lelo oyo bazali kozela nsuka ya mokili oyo ya mabe. (1 Yoane 2:17) Wana tozali kozela mokolo yango, tosengeli kokɛngɛla, ndenge Eliya akɛngɛlaki. Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.” (Matai 24:42) Yesu alingaki nde koloba ete bayekoli na ye bakoyeba ata moke te ntango oyo nsuka ekoya? Te, mpamba te ayebisaki bango makambo mingi oyo ekokaki kosalisa bango báyeba ete nsuka ekómi pene. Mokomoko na biso azali na likoki ya koyeba makambo oyo esengelaki komonisa ete tokómi na nsuka ya “ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”​—Matai 24:3-7.c

Likambo mokomoko ya elembo yango emonisaka mpenza ete tokómi na nsuka. Bilembeteli yango ekoki mpenza kotinda biso tólala mpɔngi te? Mwa lipata ya moke oyo mosali ya Eliya amonaki ezali kobima na mai endimisaki Eliya ete Yehova alingi kosala. Elikya ya mosakoli ekendaki nde na mai?

Yehova asungaka mpe apambolaka

Lisolo yango ekobi boye: “Na ntango moke, [likoló] eyaki moindo na mapata mpe na mopɛpɛ, mbula makasi enɔkaki. Mpe Ahaba atambolaki mpe akendaki na Yizelele.” (Vɛrsɛ 45) Nyonso elekaki mpenza nokinoki. Ntango mosali ya Eliya azalaki koyebisa Ahaba nsango ya mosakoli, mwa lipata wana ya moke ekómaki monene mpe eyindisaki likoló mobimba. Mopɛpɛ makasi ebɛtaki. Nsukansuka, nsima ya mbula misato na ndambo mbula ebɛtaki na Yisalaele.d Mabelé oyo ekaukaki makasi emɛlaki mai ya mbula. Ntango mbula ekómaki monene, mai ya Kisoni etondaki, mpe na ntembe te ememaki makila ya basakoli ya Baala oyo babomamaki. Yehova apesaki mpe Bayisalaele oyo babungaki nzela libaku ya kopɛtola mpenza ekólo na losambo ya Baala.

Na ntembe te, Eliya azalaki na elikya ete ekosalema mpenza bongo! Ahaba akobongola nde motema mpe akotika losambo wana ya mbindo ya Baala? Makambo oyo esalemaki mokolo wana esengelaki mpenza kotinda ye asala bongo. Toyebi te soki Ahaba azalaki kokanisa nini na ntango wana. Biblia eyebisi biso kaka ete mokonzi “atambolaki mpe akendaki na Yizelele.” Azwaki nde liteya? Azwaki nde ekateli ya kobongwana? Makambo oyo esalemaki na nsima emonisi ete abongwanaki te. Kasi, mokolo esilaki naino te mpo na Ahaba mpe mpo na Eliya.

Mosakoli ya Yehova abandaki mpe kokende kaka na nzela oyo Ahaba akendeki. Asengelaki kosala mobembo moko ya molai na kati ya malili mpe molili. Kasi, likambo moko ya kokamwa esalemaki na nsima.

“Lobɔkɔ ya [Yehova ezalaki] likoló ya Eliya. Akangaki loketo na ye mpe apotaki liboso na Ahaba kino ekɔtelo ya Yizelele.” (Vɛrsɛ 46) Emonani mpenza ete “lobɔkɔ ya [Yehova]” ezalaki kosala epai ya Eliya na ndenge moko ya kokamwa. Yizelele ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30, mpe Eliya azalaki elenge te.e Kanisá naino mosakoli yango na bilamba na ye ya molai, akangi yango na loketo mpo etyaka ye nkaka na makolo te, mpe azali kokima mbangu na nzela wana oyo etondaki na mai ya mbula; akimi mpenza makasi tii akei kokanga likalo ya mokonzi mpe aleki yango!

Yango ezalaki mpenza lipamboli monene mpo na Eliya! Na ntembe te, azalaki na esengo mingi mpo na makasi mpe nguya oyo akómaki na yango mokolo wana, oyo mbala mosusu elekaki ata oyo azalaki na yango na bolenge na ye. Yango ekoki kotinda biso tókanisa bisakweli oyo elobi ete bato ya sembo bakokóma na makasi mpe na nguya ya kokoka na Paladiso awa na mabelé. (Yisaya 35:6; Luka 23:43) Na ntembe te, ntango Eliya azalaki kokima mbangu na nzela wana oyo etondaki na mai ya mbula, ayebaki ete Tata na ye Yehova, Nzambe kaka moko ya solo, azali na ye!

Yehova asepelaka mpenza kopambola bato. Mpo na kozwa mapamboli yango, tosengeli kosala milende. Lokola Eliya, tosengeli kokɛngɛlaka, kososola ete Yehova alingi kosala na ntango oyo ya mabe mpenza. Lokola Eliya, tosengeli mpenza kotya motema na bilaka ya Yehova, “Nzambe ya sembo.”​—Nzembo 31:5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba lisusu makambo mingi, talá lisolo “Alongisaki losambo ya solo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2008.

b Lelo oyo, Mai Monene eyebani na nkombo Meditelane.

c Mpo na koyeba makambo mingi lisusu oyo ezali komonisa ete maloba ya Yesu ezali kokokisama lelo oyo, talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

d Bato mosusu bamitunaka soki Biblia ezali bongolabongola te mpo na oyo etali eleko oyo elanga yango eumelaki. Talá etanda na lokasa 19.

e Mwa moke na nsima, Yehova atindaki Eliya alakisa Elisa mosala. Na nsima, Elisa ayebanaki lokola “ye oyo asopaki mai na mabɔkɔ ya Eliya.” (2 Mikonzi 3:11) Elisa akómaki mosali ya Eliya, mpe na ntembe te asungaki mobange yango mingi.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 19]

Elanga ya ntango ya Eliya eumelaki mbula boni?

Eliya, mosakoli ya Yehova ayebisaki Mokonzi Ahaba ete etikali moke elanga wana oyo eumelaki mingi ekóma na nsuka. Alobaki na ye bongo “na [mbula] ya misato”​—na ntembe te kobanda na mokolo oyo Eliya asakolaki ete mbula ekobɛta lisusu te. (1 Mikonzi 18:1) Mwa moke na nsima, Yehova atindaki mbula, ndenge kaka Eliya alobaki yango. Moto mosusu akoki kokanisa ete elanga yango esukaki na mbula ya misato, na maloba mosusu, ekokisaki kutu mbula misato te. Nzokande, Yesu mpe Yakobo balobaki ete mbula enɔkaki te na boumeli ya “mbula misato ná sanza motoba.” (Luka 4:25; Yakobo 5:17) Biblia ezali nde bongolabongola na likambo yango?

Ata moke te! Na ntango ya kala na Yisalaele, elanga ezalaki koumela mingi, mbala mosusu ata mpe sanza motoba. Na ntembe te ntango Eliya akendaki koyebisa Ahaba ete mbula ekobɛta lisusu te, elanga esilaki koumela ntango molai koleka ndenge ezalaki koumela mpe ezalaki makasi. Kutu, elanga yango esilaki koumela sanza pene na motoba. Na yango, banda ntango Eliya asakolaki elanga yango tii ntango ayaki kosakola “na mbula ya misato” ete elanga ekosila, elanga yango esilaki koumela pene na mbula misato na ndambo. “Mbula misato na sanza motoba” esilaki koleka ntango bato bayanganaki na Ngomba Kalemele mpo na komona bokasi ya Yehova.

Kanisá sikoyo ndenge bato bayokaki ntango Eliya ayebisaki Ahaba ete mbula ekobɛta te. Bato bazalaki kokanisa ete Baala azalaki “motambwisi ya mapata,” nzambe oyo akokaki kobɛtisa mbula mpo na kosilisa elanga. Soki elanga eumelaki koleka ndenge oyo emesanaki, na ntembe te bazalaki komituna: ‘Baala azali wapi? Ntango nini akonɔkisa mbula?’ Ntango Eliya alobaki ete mbula to mamwɛ ekokita te tii ntango ye moko akoloba ekita, basambeli ya Baala bayokaki yango lokola nkake na matoi na bango.​—1 Mikonzi 17:1.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Elilingi na lokasa 18]

Mabondeli ya Eliya emonisaki mpenza mposa makasi oyo azalaki na yango ya komona kokokisama ya mokano ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto