Mabelé ekobebisama mokolo mosusu?
OSILÁ komituna soki ‘nini ekokómela mabelé?’ Soki batali makambo oyo ezali kosalema na mabelé kitoko oyo tofandi, bato mingi bakanisaka ete mabelé ekobebisama.
Ya solo, lokola bato bazali kobebisa biloko ya ntina mingi lokola mai, bazamba, mpe mopɛpɛ, mabelé ezali mpenza kobeba. Lisusu, bato mosusu ya siansi bazali koloba ete eloko moko ya monene oyo euti na likoló ekoki kokwea awa na nse, monzoto moko ekoki kopanzana to nguya ya moi ekoki kokita mpe ebebisi mabelé, mpe bikelamu nyonso ya bomoi ekufi.
Bato ya siansi bazali koloba ete mabelé ekobanda kobeba mokemoke, mpe mbala mosusu nsima ya bamiliare ya bambula, ekobungisa makoki na yango ya kobatela bomoi ya bato. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Mabelé ekokoba kaka kobeba mpe ekobonga lisusu te.”
Likambo ya esengo, Biblia eyebisi biso ete Yehova Nzambe akotika te ete mabelé ebebisama to ekóma esika oyo bato bakoki kofanda te. Mozalisi azali ‘na nguya monene.’ Yango wana, akoki kobatela molɔ́ngɔ́ libela na libela. (Yisaya 40:26) Boye, tokoki mpenza kondima maloba oyo: “[Nzambe atɛlɛmisaki] mokili likoló ya moboko na yango ete yango eningana [te] libela na libela.” “Bósanzola ye moi mpe sanza, bósanzola ye bino minzoto ya kongɛnga. . . . Mpo ete apesaki mobeko mpe yango esalamaki. Atɛlɛmisaki yango mpo na lobiko na lobiko.”—Nzembo 104:5; 148:3-6.
Mokano ya Nzambe mpo na mabelé
Nzambe akanaki ata mokolo moko te ete mabelé ebebisama ndenge ezali lelo oyo. Kutu, Nzambe akelaki mobali ná mwasi ya liboso, Adama ná Eva, mpe atyaki bango na elanga moko kitoko. Na yango, Paladiso ekokaki komibongisaka yango moko te. Nzambe apesaki bango mokumba ya “kotimola yango mpe kobatela yango.” (Genese 2:8, 9, 15) Apesaki bankɔkɔ na biso oyo bazalaki bato ya kokoka na ntango wana mosala moko ya malamu mingi mpe ya esengo!
Kasi, mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezalaki kaka te ete bábatelaka elanga yango. Alingaki ete mabelé mobimba ekóma paladiso. Yango wana, Nzambe alobaki na Adama ná Eva boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.”—Genese 1:28.
Nzokande, anzelu moko ya lolendo, oyo akómá lelo Satana, atɛmɛlaki mokano ya Nzambe. Mposa na ye ezalaki ete Adama ná Eva bákóma kosambela ye. Na nzela ya nyoka, Satana atindaki bango bátombokela bokonzi ya Nzambe. (Genese 3:1-6; Emoniseli 12:9) Na ntembe te, kozanga botɔndi na bango epesaki Mozalisi mpasi mpenza! Kasi, botomboki na bango ebongolaki te mokano ya Yehova Nzambe mpo na mabelé. Ye moko alobi boye: ‘Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai ekozonga epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.’—Yisaya 55:11.
Soki Yehova atikaki botomboki ya Satana tii lelo, ezali na ntina. Na ntango nyonso wana, bato bameki mitindo ekeseni ya boyangeli, kasi emonani ete botomboki oyo Satana abimisaki ememeli bato bolamu ata moke te.a—Yilimia 10:23.
Epai mosusu, na boumeli ya bankóto ya bambula oyo eleki, Nzambe apambolaki bato mosusu ya sembo. Akomisaki mpe na kati ya Biblia masolo oyo ezali komonisa matomba ya kotosa Nzambe mpe mbuma mabe ya koboya bokonzi na ye. Longola yango, Yehova asali makambo ya malamu mingi mpo na bolamu na biso na mikolo ezali koya. Na bolingo na ye, atindaki Mwana na ye ya bolingo, Yesu Klisto, lokola mobikisi mpo aya koteya biso lolenge ya bomoi oyo eleki malamu mpe akaba bomoi na ye mpo na biso. (Yoane 3:16) Lokola Yesu abongaki kokufa te, liwa na ye epesaki Nzambe likoki ya kosomba eloko oyo Adama ná Eva babungisaki, elingi koloba elikya ya bomoi ya seko na paladiso na mabelé.b Mpo na yango, Yehova Nzambe asali guvɛrnema moko kuna na likoló mpo na koyangela bato nyonso, mpe atye Mwana na ye Yesu Klisto, oyo asekwaki, Mokonzi ya Bokonzi yango. Na nzela ya ebongiseli kitoko wana, mokano ya Nzambe mpo na mabelé ekokokisama.—Matai 6:9, 10.
Yango wana, okoki mpenza kotya motema na bilaka kitoko oyo ya Biblia: “Basali ya mabe bakosuka, nde baoyo bakozelaka [Yehova] bakosangola mokili. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” “‘Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.’ Mpe Oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete: ‘Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.’”—Nzembo 37:9, 29; Emoniseli 21:3-5.
Biblia ezali mbeli ya mino mibale te
Kasi, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Soki bavɛrsɛ oyo euti kotángama awa ezali solo, mpo na nini bavɛrsɛ mosusu elobaka ete mabelé ekobebisama?’ Tótalela mwa bavɛrsɛ yango mpe tokomona ete Biblia ezali mbeli ya mino mibale te.
Bambula ebele liboso bato ya siansi bámona ete mokolo mosusu molɔ́ngɔ́ mobimba ekobebisama, mokomi moko ya nzembo alobaki boye: “Yo [Nzambe] otongaki miboko ya mokili mpe lola ezali mosala ya mabɔkɔ na yo. Yango ekosila, yo nde okoumelaka; ɛɛ, yango nyonso ekobeba [lokola] elamba, yo okobongola yango mpe ekobongwana. Kasi yo ozali motindo moko, mbula na yo ekosila te.”—Nzembo 102:25-27.
Maloba wana ya mokomi ya nzembo ezangi boyokani te na mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Azalaki nde komonisa bokeseni oyo ezali na kati ya Nzambe, oyo azali na bomoi libela na libela, mpe biloko oyo akelá, oyo ekoki kobeba. Soki na nguya ya Nzambe te, molɔ́ngɔ́ mobimba, ezala moi ná baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango, oyo ezali na ntina mpo na bomoi na biso, oyo epesaka pole mpe molunge, ekobeba mpe nsukansuka ekokufa. Na yango, soki Nzambe asundoli mabelé, “ekobeba” to ekokufa.
Ezali mpe na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo, soki totángi yango likolólikoló, ekoki komonana lokola eyokani te na mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Na ndakisa, Biblia elobi ete likoló mpe mabelé ‘ekoleka.’ (Emoniseli 21:1) Maloba yango ezali na boyokani na elaka ya Yesu oyo: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Kasi, na ndimbola nini Biblia elobi ete likoló mpe mabelé ‘ekoleka’?
Mbala mingi, Biblia esalelaka liloba “mabelé” to “mokili” mpo na kolobela bato. Na ndakisa, talá vɛrsɛ oyo: “Mokili mobimba ezalaki na lokota moko mpe na maloba na lolenge moko.” (Genese 11:1) Emonani polele ete “mokili” na vɛrsɛ yango elimboli bato oyo bazalaki awa na mabelé na ntango wana. Ndakisa mosusu ezali Nzembo 96:1, oyo elobi boye: “Bóyembela [Yehova], bino bato ya mokili mobimba.” Emonani polele ete na vɛrsɛ oyo mpe na bavɛrsɛ mosusu, liloba “mabelé” to “mokili” esalelami mpo na kolobela bato.—Nzembo 96:13.
Na bisika mosusu, Biblia esaleli liloba likoló to mpe biloko oyo ezali na likoló mpo na kolobela bakonzi ya mokili. Na ndakisa, bakonzi mabe ya Babilone babengamaki minzoto mpamba te bazalaki komitombola liboso ya bikólo mosusu oyo ezalaki zingazinga na bango. (Yisaya 14:12-14) Ndenge esakolamaki, “lola” to bakonzi, mpe “mokili,” elingi koloba bato oyo bazalaki kondima bakonzi yango, babomamaki na mobu 539 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). (Yisaya 51:6) Yango epesaki Bayuda oyo babongolaki motema nzela ya kozonga na Yelusaleme, epai “likoló ya sika,” elingi koloba bakonzi ya sika, bayangelaki “mabelé ya sika,” elingi koloba bato ya sembo.—Yisaya 65:17.
Emonani polele ete bavɛrsɛ oyo elobi ete likoló mpe mabelé ezali ‘koleka’ ezali nde kosakola nsuka ya baguvɛrnema mabe mpe bato oyo bazali kondima boyangeli na bango. (2 Petelo 3:7) Yango ekopesa guvɛrnema ya sika ya likoló nzela ya kopambola bato ya sembo, mpamba te “ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka [ya Nzambe], mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
Na yango, okoki kondima elaka oyo Nzambe apesi ete mabelé ekoumela seko. Longola yango, Biblia emonisi oyo osengeli kosala mpo yo mpe ozala wana ntango mabelé mobimba ekobongwana paladiso. Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Tozali kolendisa yo omityela mokano ya koyekola makambo oyo Biblia elobi mpo na avenire ya mabelé mpe ya bato. Batatoli ya Yehova na esika ozali bakosepela mingi kosalisa yo na likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki mabe ezala, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 106-114, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Mpo na kozwa bandimbola mosusu na ntina na mbeka ya Yesu, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 47-56.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Biblia elaki ete mabelé ekoumela seko
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Background globe: NASA/The Visible Earth (http://visibleearth.nasa.gov/); polar bear: © Bryan and Cherry Alexander Photography