Yesu ateyi biso
Ndenge ya kofanda na basusu
Mpo na nini kozala na boboto?
Ozalaka na boboto ata soki bato oyo ofandi na bango bazali na boboto te? Soki tolingi kolanda ndakisa ya Yesu, tosengeli kozalaka na boboto ata epai ya bato oyo bayinaka biso. Yesu alobaki boye: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Mpo ata basumuki mpe balingaka baoyo balingaka bango. . . . Nzokande, bino bókoba kolinga banguna na bino . . . , mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló, mpamba te ye azali na boboto epai ya bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe.”—Luka 6:32-36; 10:25-37.
Mpo na nini kolimbisaka?
Soki tosali mabunga, tolingaka Nzambe alimbisa biso. Yesu ateyaki ete ebongi tósɛngaka Nzambe bolimbisi. (Matai 6:12) Kasi, alobaki mpe ete Nzambe akolimbisa biso kaka soki biso mpe tozali kolimbisa basusu. Alobaki boye: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.”—Matai 6:14, 15.
Ndenge nini mabota bakoki kozala na esengo?
Atako Yesu abalaki te, tokoki koyekola makambo mingi epai na ye, oyo ekosalisa biso tózala na esengo na mabota na biso. Ezala na maloba mpe na makambo oyo azalaki kosala, Yesu atikelá biso ndakisa ya malamu mpenza oyo tosengeli kolanda. Tótalela makambo misato oyo elandi:
1. Mobali asengeli kolingaka mwasi na ye lokola nzoto na ye moko. Yesu atikelá mibali ndakisa. Alobaki na bayekoli na ye boye: “Nazali kopesa bino [mobeko] ya sika, ete bólinganaka bino na bino.” Na ndenge nini? alobaki ete: “Ndenge ngai nalingaki bino.” (Yoane 13:34) Mpo na kolakisa mibali ndenge ya kosalela toli wana, Biblia elobi boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango . . . Na ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Klisto mpe asalaka epai ya lisangá.”—Baefese 5:25, 28, 29.
2. Mwasi ná mobali basengeli kozala sembo moko epai ya mosusu. Kosangisa nzoto ná moto oyo azali molongani na yo te ezali lisumu na miso ya Nzambe mpe ebebisaka mabota. Yesu alobaki boye: “Botángá te . . . ‘Mpo na ntina yango nde moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka’? Na bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka. Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te. . . . Nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo abomi libala ná mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”—Matai 19:4-9.
3. Bana basengeli kotosaka baboti na bango. Atako Yesu azalaki moto ya kokoka mpe baboti na ye bazalaki bato ya kozanga kokoka, lokola azalaki mwana, azalaki kaka kotosa bango. Biblia elobi mpo na ye ntango azalaki na mbula 12 ete: “Akitaki elongo na bango [baboti na ye] mpe akómaki na Nazalete, mpe azalaki kaka kotosa bango.”—Luka 2:51; Baefese 6:1-3.
Mpo na nini tosengeli kolanda malako wana?
Mpo na mateya oyo ateyaki bayekoli na ye, Yesu alobaki boye: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.” (Yoane 13:17) Soki tolingi kozala baklisto ya solo, tosengeli kolanda toli oyo Yesu apesaki mpo na ndenge ya kofanda na basusu. Alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”—Yoane 13:35.
Soki olingi koyeba makambo mingi lisusu, talá na mokapo 14 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 16]
Lisese oyo Yesu apesaki ya mwana ya kilikili esalisi biso tómona ntina ya kozala boboto mpe kolimbisaka.—Luka 15:11-32
[Elilingi na lokasa 17]
Mwasi ná mobali basengeli kozala sembo moko epai ya mosusu