Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye ya mibange
“Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.”—Ebe. 6:10.
1, 2. (a) Komona moto oyo azali na nsuki mpɛmbɛ ekoki kotinda yo okanisa nini? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka baklisto ya mibange?
NTANGO omonaka mibange na kati ya lisangá, okanisaka lisolo moko oyo ezali na mokanda ya Danyele? Na emonaneli moko oyo Yehova Nzambe apesaki mosakoli Danyele, amimonisaki lokola moto oyo azali na nsuki mpɛmbɛ. Danyele akomaki boye: “Nakobaki kotala tii ntango bakiti ya bokonzi etyamaki mpe Mokóló ya Mikolo afandaki. Bilamba na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ, mpe nsuki ya motó na ye ezalaki lokola lɛni ya pɛto.”—Dan. 7:9, NW.
2 Mbala mingi, lɛni to nsuki ya mpate ezalaka mpɛmbɛ. Na yango, nsuki mpɛmbɛ mpe nkombo “Mokóló ya Mikolo,” emonisi ete Nzambe azali na mikolo ebele mpenza mpe atondi na bwanya; yango ezali kosɛnga ete tópesa ye limemya mingi. Kasi, ndenge nini Yehova, Mokóló ya Mikolo, atalelaka basaleli na ye ya sembo oyo bakómi mibange? Liloba ya Nzambe elobi ete “motó ya pɛɛ ezali motole ya nkembo, [ntango, NW] ezwami na nzela ya boyengebene.” (Mas. 16:31) Ntango moklisto moko ya sembo akómi mobange mpe motó na ye etondi na nsuki mpɛmbɛ, amonanaka kitoko na miso ya Nzambe. Yo mpe otalelaka baklisto ya mibange ndenge Yehova atalelaka bango?
Mpo na nini bazali na motuya?
3. Mpo na nini bandeko mibange bazali na motuya mingi?
3 Kati na basaleli yango ya Nzambe oyo bakómi mibange, tokoki kotánga bandeko oyo bazali na kati ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bandeko oyo bazali to bazalaká bakɛngɛli-batamboli, babongisi-nzela ya molende, mpe basakoli mosusu oyo bakɔmeli na elimo, oyo bazali kosala na bosembo nyonso na masangá. Okoki koyeba bandeko yango mosusu oyo basakolaka nsango malamu na molende banda bambula mingi mpe ndakisa na bango ezali kolendisa bilenge bábongisa bomoto na bango. Bandeko mosusu ya mibange bakokisi mikumba minene na kati ya lisangá mpe bayiki mpiko na botɛmɛli mpo na nsango malamu. Yehova mpe “moombo ya sembo mpe ya mayele” batalelaka na motuya makambo oyo mibange yango basalaki mpe oyo bazali kosala na mosala ya Bokonzi.—Mat. 24:45.
4. Mpo na nini tosengeli komemyaka mibange baklisto mpe kobondelaka mpo na bango?
4 Tosengeli kozala na botɔndi epai ya bandeko yango mpe komemya bango. Kutu, Mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela ya Moize emonisaki ete komemya mibange ezali na boyokani na kobanga Yehova. (Lev. 19:32) Tosengeli mbala na mbala kobondelaka mpo na basaleli yango ya sembo mpe kotɔnda Nzambe mpo na mosala mpe bolingo na bango. Ntoma Paulo abondelaki mpo na baninga na ye ya mosala, ezala bilenge to mibange.—Tángá 1 Batesaloniki 1:2, 3.
5. Ndenge nini tokoki kozwa matomba na kozala elongo na mibange oyo bazali kosalela Yehova?
5 Lisusu, biso nyonso na kati ya lisangá tokoki kozwa matomba na kozala elongo na mibange baklisto. Mibange oyo bazali kosalela Yehova na bosembo bazwi boyebi mingi na nzela ya boyekoli ya Biblia, ya makambo oyo bamoná, mpe ya makambo oyo bakutaná na yango. Bandeko yango bayekoli motema molai, komitya na esika ya basusu, mpe koyebisa makambo yango epai ya bilenge epesaka bango esengo mingi. (Nz. 71:18) Bilenge, bózala na bwanya mpe bótoka boyebi epai ya mibange yango ndenge moto atokaka mai na libulu mozindo.—Mas. 20:5.
6. Ndenge nini okoki komonisa mibange ete ozwaka bango na motuya mpenza?
6 Omonisaka mibange ete olingaka bango ndenge Yehova alingaka bango? Ndenge moko oyo okoki kosala yango ezali koyebisa bango ete olingaka bango mingi mpo na bosembo na bango mpe osepelaka mingi na makanisi na bango. Longola yango, soki ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola epai na bango, okomonisa ete omemyaka bango mpenza. Baklisto mingi oyo bakómi mibange bakoki koyeba lisusu toli ya bwanya oyo mibange baklisto bapesaki bango ntango bazalaki naino bilenge mpe ndenge oyo toli yango esalisaki bango.a
Monisá bolingo yango na misala
7. Yehova apesi mokumba ya kosalisa mibange libosoliboso epai ya banani?
7 Nzambe apesi mokumba ya kosalisa mibange libosoliboso epai ya bana mpe bankɔkɔ na bango. (Tángá 1 Timote 5:4, 8.) Yehova asepelaka ntango bana bazali kosalisa baboti na bango oyo bakómi mibange mpe na ndenge yango, bamonisaka ete bazali komekola Nzambe oyo amibanzabanzaka mpo na mibange. Nzambe asungaka mpe apambolaka bana yango mpo na milende na bango mpe elimo na bango ya komipimela.b
8. Mpo na nini bandeko na lisangá basengeli komibanzabanzaka mpo na mibange baklisto?
8 Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango bandeko na lisangá bazali kosalisa baklisto ya mibange oyo bazali na bosɛnga kasi bazali na bana te to bandeko ya libota oyo bazali baklisto to oyo bandimaka kosalisa bango. (1 Tim. 5:3, 5, 9, 10) Na ndenge yango, bandeko na lisangá bamonisaka ete bamityaka na esika ya basusu, bazali na bolingo ya bondeko, mpe bayokelaka mibange mawa. (1 Pet. 3:8) Komibanzabanza na bango mpo na mibange eyokani na likanisi oyo ntoma Paulo amonisaki ntango alobaki ete soki enama moko ya nzoto ezali na mpasi, “binama nyonso mosusu ezali mpe koyoka mpasi elongo na yango.” (1 Kol. 12:26) Kosala makambo oyo ezali komonisa ete tozali koyokela mibange mawa emonisaka ete tozali kokokisa etinda oyo ezali na toli oyo ya Paulo: “Bókoba komemelana kilo bino na bino, mpe na ndenge yango bókokisa mobeko ya Klisto.”—Gal. 6:2.
9. Kilo nini mibange bakoki kozala na yango?
9 Kilo nini mibange baklisto bamemaka? Mingi kati na bango balɛmbaka noki. Bakoki kozanga makasi ya kosala makambo mosusu ya ntina, na ndakisa kokende epai ya monganga, kobongisa ndako to kolamba. Lokola mibange bazalaka lisusu na mposa mingi te ya kolya to komɛla mai, bakoki kokanisa ete ezali na ntina te ete bálya to bámɛla mai ndenge esengeli. Bakoki mpe kokanisa bongo mpo na kolya bilei ya elimo. Mibange bakoki kozala na mokakatano ya kotánga mpe koyoka na makita; ata komibongisa mpo na kokende na makita. Bandeko na lisangá bakoki kosala nini mpo na mibange yango?
Ndenge ya kosalisa bango
10. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa mibange?
10 Na masangá mingi, mibange babatelamaka malamu mpenza. Bandeko mibali mpe basi basalisaka bango na kosomba biloko, kolamba, mpe kobongisa ndako. Basalisaka mibange báyekola, bámibongisa mpo na makita, mpe básakolaka sanza na sanza. Batatoli oyo bazali bilenge bakendaka kozwa bango to bamemaka bango na mituka na bango. Soki ezali na mibange oyo bakɔtá ndako, bibongiseli ezwamaka mpo bálandaka makita na nzela ya telefone to mpo na kokɔtisela bango masolo na kasɛti. Bankulutu bazwaka bibongiseli oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya mibange oyo bazali na lisangá na bango.c
11. Lobelá ndenge libota moko esalisaki ndeko moko ya mobange.
11 Lisusu, ndeko mokomoko na kati ya lisangá akoki komonisa elimo ya koyamba mibange to ya kokabela bango. Ntango ndeko moko ya mobange akufelaki mwasi, azalaki na likoki te ya kofutela ndako ye moko. Ye ná mwasi na ye bayekolaká Biblia na libota moko—tata, mama, mpe bana basi mibale ya bilenge—oyo bazalaki na ndako moko monene. Libota yango eyambaki ndeko yango na ndako na bango. Na boumeli ya mbula 15 oyo afandaki na bango, bazalaki kolya elongo, kosɛka, mpe komonisela ye bolingo ya bondeko. Bana ya libota yango bazwaki matomba mingi na ndakisa na ye ya kondima mpe bwanya na ye; ye mpe asepelaki mingi kozala na bango elongo. Ndeko yango afandaki na libota wana tii liwa na ye, ntango akómaki na mbula 89. Tii lelo oyo, libota yango bapesaka Nzambe matɔndi mpo na ebele ya mapamboli oyo bazwaki na ndenge bafandaki na ndeko yango. Lokola basalisaki ndeko na bango moyekoli ya Yesu Klisto, ‘babungisaki mbano na bango’ te.—Mat. 10:42.d
12. Okoki kosala nini mpo na komonisa bolingo epai ya bandeko oyo bazali mibange?
12 Mbala mosusu ozali te na likoki ya kosalisa ndeko moko ya mobange ndenge libota wana esalaki, kasi okoki kosalisa ndeko moko ya mobange mpo na kokende na makita to kobima na mosala ya kosakola. Okoki mpe kobengisa mibange na ndako na yo to mpe kobengisa bango ntango bokei kominanola. Okoki kokende kotala bango, mingimingi baoyo bazali na maladi mpe baoyo bakɔtá ndako. Longola yango, osengeli soki moke te kotalelaka bango lokola bana mike. Soki makoki na bango ya kokanisa ezali naino malamu, esengeli kotunaka makanisi na bango liboso ya kozwa bikateli oyo etali bango. Ata mibange oyo makoki na bango ya kokanisa ezali lisusu malamu te, bakoki komona ete tozali komemya bango mpe kobatela lokumu na bango.
Yehova akobosana mosala na yo te
13. Mpo na nini koyeba komitya na esika ya mibange ezali na ntina?
13 Ezali na ntina mingi tóyebaka komitya na esika ya mibange. Mbala mingi, mibange bayokaka mawa mpo bazali lisusu te na likoki ya kosala makambo oyo bazalaki kosala ntango bazalaki naino bilenge mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Na ndakisa, ndeko mwasi moko oyo asalelaki Yehova na molende na boumeli ya mbula soki 50 mpe azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, abɛlaki makasi mpe akómaki na mokakatano mpo na koyangana na makita. Ntango akanisaki ndenge oyo azalaki kosala kala, abandaki kolela. Akitisaki motó mpe alobaki boye: “Nazali lisusu kosala eloko moko ya malonga te.”
14. Ndenge nini maloba oyo ezali na mokanda ya Nzembo ekoki kolendisa mibange oyo basalelaka Yehova?
14 Soki ozali mobange, yo mpe oyokaka ndenge wana? To omonaka na bantango mosusu ete Yehova asundolá yo? Ekoki kozala ete mokomi ya nzembo azalaki na makanisi ya ndenge wana ntango akómaki mobange, mpamba te ayebisaki Yehova boye: “Boyá ngai na ntango ya konuna te, tiká ngai te wana nguya na ngai elɛmbi. . . . Kino ntango ya konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, ee Nzambe, tiká ngai te.” (Nz. 71:9, 18) Yehova azalaki te na makanisi ya kosundola mokomi ya nzembo yango, akosundola mpe yo te. Na nzembo mosusu, Davidi amonisaki elikya oyo azalaki na yango na lisungi ya Nzambe. (Tángá Nzembo 68:19.) Yebá ete soki ozali mobange ya sembo, Yehova azali elongo na yo mpe akokoba kosunga yo mokolo na mokolo.
15. Nini ekoki kosalisa mibange bázala na makanisi ya malamu?
15 Mibange Batatoli ya Yehova, bóyeba ete Nzambe akobosana ata mokolo moko te makambo nyonso oyo bosili kosala mpe oyo bozali kosala mpo na nkembo na Ye. Biblia elobi boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.” (Ebe. 6:10) Yango wana, bókóma te na makanisi ya mabe, bókanisaka te ete lokola bokómi mibange, bozali lisusu na ntina te na miso ya Yehova. Bózalaka nde na makanisi ya malamu. Bósepelaka na mapamboli mpe elikya oyo bozali na yango mpo na mikolo ezali koya! Tozali na “elikya” oyo eleki malamu mpo na mikolo ezali koya mpe Mozalisi apesi biso ndanga ete ekokokisama. (Yil. 29:11, 12; Mis. 17:31; 1 Tim. 6:19) Bókanisaka elikya yango, bósala makasi bótikala bilenge na mitema mpe na makanisi na bino, mpe bóbosanaka te ete bozali na ntina mingi na kati ya lisangá!e
16. Mpo na nini ndeko moko ya mobange amonaki ete asengeli lisusu kozala nkulutu te, kasi ndenge nini baninga na ye bankulutu balendisaki ye?
16 Tótalela ndakisa ya Johan, oyo azali na mbula 80, mpe abatelaka Sannie,f mwasi na ye oyo akokaka lisusu kosala makambo ye moko te mpo na maladi. Bandeko basi bakendaka kotikala na Sannie mpo Johan azwaka likoki ya kokende na makita mpe kobima na mosala ya kosala. Nzokande, eumeli naino mingi te, Johan ayokaki lokola nde akómi na nsuka mpe akómaki kokanisa ete akokoka lisusu te kozala nkulutu na lisangá. Na mai na miso, alobaki boye: “Ntina nini nazali nkulutu? Nasalaka lisusu eloko moko te ya malonga mpo na lisangá.” Baninga na ye bankulutu bayebisaki ye ete mayele na ye mpe makanisi oyo apesaka ezalaka na ntina mingi mpo na lisangá. Balendisaki ye akoba kosala lokola nkulutu, atako azali kosala lisusu mingi te lokola liboso. Nsima ya kolendisama ndenge wana, Johan akobaki kosala lokola nkulutu mpe yango ezalaki lipamboli mpo na lisangá.
Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na mibange
17. Elikya nini Biblia epesi mibange baklisto?
17 Biblia emonisi polele ete mibange bakoki kokoba kobota mbuma na mosala ya Yehova atako bobange ezalaka na mikakatano mingi. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Baoyo bakonami kati na ndako ya [Yehova] . . . bakobota naino na ntango ya konuna, bakotonda na mafuta, bakokauka te.” (Nz. 92:13, 14) Ntoma Paulo, oyo mbala mosusu azalaki na mokakatano moko na nzoto, ‘atikaki te, ata soki bomoto na ye ya libándá ezalaki kobeba.’—Tángá 2 Bakolinti 4:16-18.
18. Mpo na nini tosengeli kosunga mibange mpe bato oyo basalisaka bango?
18 Bandakisa mingi lelo oyo ezali komonisa ete mibange bakoki ‘kobota naino.’ Kasi, maladi mpe mikakatano ya bobange ekoki kolɛmbisa ata mibange oyo bato ya libota na bango basalisaka bango. Ata bato oyo basalisaka bango bakoki kolɛmba nzoto. Lisangá ezali na libaku malamu mpe na mokumba ya komonisa bolingo epai ya mibange mpe baoyo basalisaka bango. (Gal. 6:10) Kosala bongo emonisaka ete tozali te koloba na bango ete bókende mpe “bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu” kozanga ete tósala likambo moko mpo na kosunga bango.—Yak. 2:15-17.
19. Mpo na nini mibange baklisto oyo bazali sembo bakoki kozala na elikya mpo na mikolo ekoya?
19 Bobange ekoki kobongola ndenge oyo moklisto azalaki kosalela Yehova, kasi bolingo ya Yehova mpo na mibange oyo basalelaka ye na bosembo ekitaka te. Kutu, baklisto yango ya sembo bazali na motuya na miso na ye mpe akotika bango ata mokolo moko te. (Nz. 37:28; Yis. 46:4) Yehova akokoba kosunga mpe kotambwisa bango ata na bobange makasi.—Nz. 48:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Mibange bazali lipamboli mpo na bilenge,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 2007.
c Na mikili mosusu, ekoki mpe kosɛnga kosalisa mibange bázala na likoki ya kozwa lisungi ya Leta. Talá lisolo “Nzambe asalisaka mibange” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 2006.
d Talá lisolo “Yehova atyelaka biso likebi ntango nyonso,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 2003.
e Talá lisolo “Kitoko ya nsuki mpembe,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1993.
f Topesi bango bankombo mosusu.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini otalelaka mibange baklisto na motuya mingi?
• Ndenge nini tokoki komonisa bolingo mpo na bandeko oyo bazali mibange?
• Nini ekoki kosalisa basaleli ya Yehova oyo bazali mibange bábungisa elikya te?
[Bililingi na lokasa 18]
Bandeko ya lisangá bazwaka mibange na motuya mingi