Mituna ya batángi
Lokola toyebi te ndenge nkombo ya Nzambe ezalaki kobengama, mpo na nini kosalela yango?
Lelo oyo, moto moko te ayebi ndenge mpenza oyo nkombo ya Nzambe ezalaki kobengama na Liebele ya kala. Nzokande, nkombo ya Nzambe ezali na bisika soki 7 000 na makomi ya Biblia. Yesu amonisaki nkombo ya Nzambe ntango azalaki awa na mabelé, mpe ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete nkombo yango esantisama. (Matai 6:9; Yoane 17:6) Nyonso wana endimisi likambo moko: ezali na ntina mingi ete baklisto básalelaka nkombo ya Nzambe. Kasi, mpo na nini ndenge oyo nkombo yango ezalaki kobengama eyebani te lelo oyo? Bantina ezali mibale.
Ya liboso, eleki mbula soki nkóto mibale, Bayuda bakómaki kokanisa ete kotánga nkombo ya Nzambe ezali lisumu. Ntango moto oyo azali kotánga Makomami amoni nkombo ya Nzambe, na esika atánga yango, azalaki kotánga “Nkolo.” Yango wana, nsima ya bankama ya bambula, lokola bazalaki lisusu kotánga nkombo ya Nzambe te, ndenge oyo ezalaki kobengama ebungaki.
Ya mibale, Liebele ya kala ezalaki kokomama na bavuayele te. Ntango moto azali kotánga, azalaki koyeba bavuayele oyo asengeli kosalela mpe azalaki kobakisa yango. Nsima ya bambula, babimisaki mayele moko mpo ebengeli ya maloba ya Liebele ebunga te. Bazalaki kobakisa mwa madodo mpe mikɔlɔtɔ na liloba mokomoko ya Liebele. Nzokande, mpo na nkombo ya Nzambe, bazalaki kobakisa bilembo yango na liloba “Nkolo” mpo motángi ayeba kobenga yango, to bazalaki kobakisa eleko te.
Lelo oyo, na makomi ya kala, nkombo ya Nzambe etikalá kaka na balɛtrɛ minei ya Liebele; diksionɛrɛ moko elobi ete yango ezali “balɛtrɛ minei ya Liebele oyo ebongolamaka YHWH to JHVH, oyo esali nkombo ya Nzambe.” Ezali mpasi te tómona ndenge oyo balɛtrɛ YHWH ekoki kotángama ntango babakisi mwa madodo oyo elakisaka ndenge ya kotánga yango; na Lingala, totángaka yango “Yehova.”
Kasi, bato mosusu ya mayele balobaka ete nkombo yango esengeli kobengama “Yawe.” Ekoki nde kozala ete ebengeli yango nde ekokani mingi na ebengeli oyo bazalaki kosalela na Liebele ya kala? Moto moko ayebi te. Kutu, bato mosusu ya mayele bamonisi bantina oyo tosengeli te kosalela ebengeli yango. Toyebi ete lelo oyo, ntango tolobaka bankombo ya bato oyo ezali na Biblia, tobengaka yango te ndenge oyo ezalaki kobengama na Liebele ya kala. Ezali bongo mpamba te bankombo yango ekɔtá na minɔkɔ na biso mpe tomesaná na yango bongo. Ezali mpe bongo mpo na nkombo Yehova.
Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kobengama ekólo mpo na nkombo ya Nzambe. Bazalaki koteya bato mosusu nkombo yango mpe bazalaki kolendisa bango básalelaka yango. (Misala 2:21; 15:14; Baloma 10:13-15) Nyonso wana emonisi ete mpo na Nzambe, ata soki tolobaka monɔkɔ nini, ezali na ntina tósalelaka nkombo na ye, tóyeba ndimbola na yango mpe tózala na etamboli oyo ezali kopesa nkombo yango lokumu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]
Nkombo ya Nzambe ezali na bisika soki 7 000 na makomi ya Biblia