Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/1 nk. 7-11
  • Zwá esengo na mosala ya kokómisa bato bayekoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zwá esengo na mosala ya kokómisa bato bayekoli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano oyo ekoki kosilisa biso esengo
  • Bongisá motema na yo
  • Loná na mokano ya kobuka
  • Ntango bato baboyi koyoka
  • Ezali mosala ya lisangá mobimba
  • Tólonga kobanga
  • Matomba oyo tokozwa
  • Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • ‘Bókende kokómisa bato bayekoli’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Kotika te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/1 nk. 7-11

Zwá esengo na mosala ya kokómisa bato bayekoli

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli.”​—MAT. 28:19.

1-3. (a) Ndenge nini basakoli mingi batalelaka libaku ya koyekola Biblia na moto? (b) Mituna nini tokotalela?

NDEKO mwasi moko na États-Unis, oyo azali na etuluku moko ya monɔkɔ ya Hindi akomaki boye: “Na boumeli ya pɔsɔ 11, nayekolaki Biblia na libota moko oyo bazali bato ya ekólo Pakistan. Na yango, tokómaki baninga. Natangisaka mai ya miso soki nakanisi ete mosika te bakozonga na Pakistan. Nalelaka kaka te mpo na ndenge bakokende kasi mpe mpo nakozala lisusu te na esengo oyo nayokaka ntango nazali koteya bango makambo ya Yehova.”

2 Lokola ndeko yango, yo mpe osilá koyoka esengo ya koyekola Biblia na moto? Yesu mpe bayekoli na ye ya liboso bazalaki kozwa esengo mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Ntango bayekoli 70 oyo Yesu atindaki mpo na kosakola bazongaki mpe bayebisaki ye na esengo nyonso ndenge mosala yango elekaki, Yesu mpe “atondaki na esengo na kati ya elimo santu.” (Luka 10:17-21) Ndenge moko mpe, bandeko mingi lelo oyo bazwaka esengo na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Kutu, na 2007, basakoli ya molende mpe ya esengo bayekolaki Biblia na bato soki milio 6 na ndambo sanza na sanza!

3 Nzokande, basakoli mosusu bazwi naino te esengo ya koyekola Biblia na moto. Mpo na basusu, eleki mwa bambula banda bayekolá Biblia na moto. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango ntango tozali kosala makasi mpo na koyekola na moto Biblia? Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano yango? Mpe mapamboli nini tokozwa soki tosali nyonso mpo na kotosa etinda ya Yesu oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”?​—Mat. 28:19.

Mikakatano oyo ekoki kosilisa biso esengo

4, 5. (a) Na mikili mosusu, ndenge nini bato batalelaka nsango na biso? (b) Mikakatano nini basakoli bakutanaka na yango na mikili mosusu?

4 Na mikili mosusu, bato bandimaka mbala moko mikanda na biso mpe basepelaka koyekola Biblia. Mwasi moko ná mobali na ye oyo bautaki na Australie mpe bakendaki kosakola na Zambie mpo na mwa ntango, bakomaki boye: “Makambo oyo toyokaka ezali mpenza solo. Kosakola na Zambie ezali mpenza paladiso. Kopesa litatoli na balabala ezali esengo mingi! Bato bayaka pembeni na biso, basusu kutu basɛngaka bazulunalo.” Na mbula moko oyo euti koleka, bandeko na Zambie bayekolaki Biblia na bato koleka 200 000, elingi koloba mosakoli mokomoko ayekolaki Biblia na moto moko to koleka.

5 Nzokande, na mikili mosusu bato bandimaka mpenza kozwa mikanda na biso te mpe ezalaka mpasi kozwa moto ya koyekola na ye Biblia mbala na mbala. Mpo na nini? Mbala mingi bato bazalaka na bandako na bango te ntango basakoli bakei kotala bango; mpe bamosusu oyo bazalaka na bandako bakipaka makambo ya losambo te. Mbala mosusu bakolá na mabota oyo bazalaki kokipe makambo ya losambo te to mpe baboyá kosambela mpo na makambo mabe oyo esalemaka na mangomba ya lokuta. Bato mingi balɛmbá makambo ya Nzambe mpo bateyi na bango bazokisá bango to mpe basundolá bango. (Mat. 9:36) Yango wana, bato yango bakoki koboya masolo ya Biblia.

6. Mikakatano nini basakoli mosusu bazali na yango?

6 Basakoli mosusu ya sembo bakutanaka na mokakatano ya ndenge mosusu oyo ekoki kolongola bango esengo. Atako bazalaki na molende mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli, lelo oyo bazali kokoka lisusu kosala mingi te mpo na maladi to bobange. Ezali mpe na mikakatano mosusu oyo ekoki kouta epai na biso moko. Na ndakisa, omonaka ete okokoka te koteya moto Biblia? Okoki komiyoka ndenge Moize ayokaki ntango Yehova atindaki ye akende kosolola na Falao. Moize alobaki boye: “Ee Nkolo na ngai, nazali moto ya maloba polele te; nazalaki boye kalakala mpe ata nsima.” (Ex. 4:10) Mbala mosusu, kobanga nde etindaka moto akanisa ete akolonga te. Tokoki kokanisa ete lokola toyebi koteya malamu te, tokokoka te kokómisa moto moyekoli. Mpo na yango tokoki komona malamu tóyekola Biblia ata na moto moko te. Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano yango?

Bongisá motema na yo

7. Nini ezalaki kotinda Yesu azala na molende na mosala na ye?

7 Likambo ya liboso ezali ya kobongisa motema na biso. Yesu alobaki boye: “Uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ . . . elobaka.” (Luka 6:45) Yesu azalaki na molende na mosala ya kosakola mpamba te azalaki komibanzabanza mpo na bolamu ya basusu. Na ndakisa, ntango amonaki ete Bayuda bazalaki babola na elimo, “ayokelaki bango mawa.” Alobaki na bayekoli na ye ete: “Bambuma ya kobuka ezali mingi . . . Bósɛnga na Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma ete atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma.”​—Mat. 9:36-38.

8. (a) Likambo nini tosengeli kobosanaka te? (b) Maloba ya mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia ekoki koteya biso nini?

8 Na mosala ya kokómisa bato bayekoli, tosengeli kokanisaka malamu matomba oyo tozwaki mpo na motema molai ya ndeko oyo ayekolaki na biso Biblia. Tókanisaka mpe bato oyo tokokutana na bango na mosala ya kosakola mpe matomba oyo bakozwa soki bayoki nsango oyo tomemeli bango. Mwasi moko akomelaki betele ya ekólo oyo afandi ete: “Nalingi koyebisa bino botɔndi oyo nazali na yango mpo na Batatoli oyo bayaka koteya ngai. Nayebi ete ntango mosusu bakoki kosilika mpo natunaka bango mituna mingi mpe mbala mingi nazwaka bango ntango mingi. Kasi, bamoniselaka ngai motema molai mpe bazalaka na mposa ya koyebisa ngai makambo oyo bango bayekolaki. Nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpe Yesu ndenge nakutanaki na bandeko yango.”

9. Yesu atyaki makanisi na ye na nini, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

9 Ya solo, moto nyonso te nde andimaki mateya ya Yesu. (Mat. 23:37) Bato mosusu balandaki ye mpo na mwa ntango mpe na nsima baboyaki mateya na ye, mpe “balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.” (Yoa. 6:66) Kasi, yango etindaki Yesu te akanisa ete nsango na ye ezangi ntina. Atako mboto mingi oyo alonaki ebotaki mbuma te, Yesu akobaki na mosala malamu oyo azalaki kosala. Ayebaki ete mbuma ya kobuka ezali mingi mpe azwaki esengo ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango ya kobuka mbuma. (Tángá Yoane 4:35, 36.) Na esika tómona kaka bisika oyo nsango malamu ezali kobota mbuma te, tosengeli kotya miso na bisika ya teritware na biso oyo ekoki kobota mbuma mingi. Tólobela ndenge oyo tokoki kobatela makanisi ya ndenge wana.

Loná na mokano ya kobuka

10, 11. Okoki kosala nini mpo na kobatela esengo na yo?

10 Mosali-elanga alonaka na mokano ya kobuka mbuma. Ndenge moko mpe tosengeli kosakolaka na mokano ya kobanda koyekola Biblia na bato. Ezali boni soki obimaka mbala na mbala na mosala ya kosakola kasi okutaka bato mingi te na bandako to okutanaka te na bato oyo bandimaki ozongela bango? Likambo yango ekoki kolɛmbisa. Yango esengeli kotinda yo olɛmba kosakolaka ndako na ndako? Te! Mpamba te yango ezali kaka lolenge eleki malamu ya kokutana na bato mingi.

11 Nzokande, mpo na kobatela esengo, okoki nde kosalela mayele mosusu ya kosakola, mbala mosusu koluka ndenge mosusu ya kokutana na bato mingi koleka? Na ndakisa, osilá komeka kosakola na balabala to kokende kokutana na bato na bisika na bango ya mosala? Okoki kosalela telefone mpo na kosolola na bato to kozwa banimero ya telefone ya baoyo oyebisaki bango nsango ya Bokonzi mpo okoka kobengaka bango? Soki ozali kolendendela mpe ozali komeka mayele ndenge na ndenge ya kosakola, okoki kozwa esengo ya kokutana na bato oyo bakondima nsango ya Bokonzi.

Ntango bato baboyi koyoka

12. Tokoki kosala nini soki bato mingi na teritware na biso bakipaka makambo ya Nzambe te?

12 Ezali boni soki bato mingi ya teritware na yo bakipaka makambo ya Nzambe te? Okoki nde kosalela mayele mosusu mpo na kobenda likebi na bango? Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti boye: “Epai ya Bayuda nakómaki lokola Moyuda . . . Epai ya baoyo bazangá mibeko nakómaki lokola nde nazangá mibeko, atako nazangi mibeko te epai ya Nzambe.” Paulo azalaki kosala bongo na mokano nini? Alobaki boye: “Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini nakoka kobikisa bamosusu.” (1 Kol. 9:20-22) Biso mpe tokoki koluka makambo oyo esepelisaka bato ya teritware na biso? Bato mingi oyo bakipaka makambo ya Nzambe te balukaka kobongisa bomoi ya libota na bango. Ekoki mpe kozala ete balukaka koyeba ntina ya bomoi. Tokoki koyebisa bato yango nsango ya Bokonzi na ndenge oyo ekosepelisa bango?

13, 14. Ndenge nini tokoki kosala mpo na kozwa esengo mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

13 Basakoli mingi bazali kozwa esengo mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli, ata na bisika oyo bato mingi bakipaka makambo ya Nzambe te. Ndenge nini? Bazali koyekola monɔkɔ mosusu. Mobali moko ná mwasi na ye oyo bakómi na mbula koleka 60 bamonaki ete na teritware ya lisangá na bango, ezalaki na bankóto ya bato ya Chine oyo bayaki kofanda kuna elongo na mabota na bango. Mobali alobi boye: “Mpo na yango, tomonaki ete tosengeli koyekola monɔkɔ ya Chinois. Atako yango esɛngaki kolekisaka ngonga mingi mokolo na mokolo mpo na koyekola monɔkɔ yango, nsukansuka toyekolaki Biblia na bato mingi ya Chine oyo bazali na teritware na biso.”

14 Ata soki ozali na likoki ya koyekola monɔkɔ mosusu te, okoki kosalela mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations ntango okutani na bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu. Okoki mpe kozwaka mbala na mbala mikanda na monɔkɔ ya bato oyo okutanaka na bango mingi na mosala ya kosakola. Ya solo, esɛngaka ntango mpe milende mingi mpo na kosolola na bato ya minɔkɔ mpe mimeseno mosusu. Kasi, kobosana te likambo oyo Liloba ya Nzambe elobi ete: “Moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi.”​—2 Kol. 9:6.

Ezali mosala ya lisangá mobimba

15, 16. (a) Na ndenge nini kokómisa bato bayekoli ezali likambo ya lisangá mobimba? (b) Mibange bazali na ntina nini?

15 Nzokande, moto akómaka moyekoli ya Yesu mpo na milende ya moto moko te. Kasi, ezali mpo na milende ya bandeko nyonso na lisangá. Mpo na nini tolobi bongo? Yesu alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Ntango bayekoli ya Biblia bakómaka koyangana na makita, mbala mingi bolingo oyo tomonisanaka na lisangá esimbaka motema na bango. Mwasi moko oyo ayekolaka Biblia akomaki boye: “Nasepelaka mingi koyangana na makita. Bandeko bayambaka ngai malamu!” Yesu alobaki ete baoyo bakokóma bayekoli na ye bakoki kokutana na botɛmɛli na mabota na bango. (Tángá Matai 10:35-37.) Nzokande, alakaki ete na kati ya lisangá bato yango bakozwa ebele ya “bandeko ya mibali mpe bandeko ya basi mpe bamama mpe bana” ya elimo.​—Mko. 10:30.

16 Mingimingi bandeko oyo bakómi mibange basalisaka bato oyo bazali koyekola Biblia bákola malamu na elimo. Na ndenge nini? Ata soki bandeko yango bakokaka lisusu koyekola Biblia na bato te, biyano kitoko oyo bapesaka na makita elendisaka kondima ya baoyo nyonso bayokaka yango. Komona ebele ya bambula oyo bazali kotambola na “nzela ya boyengebene” ebakisaka kitoko ya lisangá mpe ebendaka bato ya mitema sembo na lisangá ya Nzambe.​—Mas. 16:31.

Tólonga kobanga

17. Tokoki kosala nini mpo na kosilisa kobanga?

17 Osengeli kosala nini soki omonaka ete okokoka te koyekola Biblia na moto? Kobosana te ete Yehova asalisaki Moize na ndenge apesaki ye elimo santu mpe ndeko na ye Alona. (Ex. 4:10-17) Yesu alakaki ete elimo ya Nzambe ekosunga biso na mosala ya kopesa litatoli. (Mis. 1:8) Lisusu, ntango Yesu atindaki bayekoli bákende kosakola, akabolaki bango mibalemibale. (Luka 10:1) Yango wana, soki ozali na mokakatano mpo na koyekola Biblia na moto, bondelá mpo elimo ya Nzambe epesa yo bwanya mpe luká kosakolaka na ndeko moko oyo akɔmeli na elimo oyo akoki kosalisa yo. Koyeba ete Yehova aponaki bato mpamba, elingi koloba “biloko ya mokili oyo bizali ya bolɛmbu,” mpo na kokokisa mosala na ye, ekolendisa mpenza kondima na biso.​—1 Kol. 1:26-29.

18. Ndenge nini tokoki kolongola kobanga ete tokolonga te kokómisa moto moyekoli?

18 Tosengeli kosala nini soki tozali kobanga ete tokolonga te kokómisa moto moyekoli? Tosengeli kobosana te ete kokómisa moto moyekoli ezali te lokola kolamba, oyo ezalaka mingimingi mosala ya moto moko. Kokómisa moto moyekoli ezali mosala ya bato mingi. Moto ya libosoliboso oyo asalaka mosala monene ezali Yehova, ye oyo abendaka bato epai na ye. (Yoa. 6:44) Yo mpe bandeko mosusu ya lisangá bosalelaka mayele ya koteya mpo na kosalisa moyekoli akola na elimo. (Tángá 2 Timote 2:15.) Moyekoli mpe asengeli kosalela makambo oyo azali koyekola. (Mat. 7:24-27) Ya solo, tokoki kolɛmba nzoto ntango moto oyo tozalaki koyekola na ye Biblia atiki koyekola. Mposa na biso ezalaka ete moto oyo azali koyekola Biblia apona oyo ezali malamu, kasi tóbosana te ete moto na moto “akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.”​—Lom. 14:12.

Matomba oyo tokozwa

19-21. (a) Matomba nini tokoki kozwa ntango tozali koyekola Biblia na bato? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka bato nyonso oyo basalaka mosala ya kosakola?

19 Koyekola Biblia na bato esalisaka biso tókoba koluka liboso Bokonzi. Esalaka mpe ete mateya ya Liloba ya Nzambe efanda mpenza na makanisi mpe na mitema na biso. Na ndenge nini? Barak, ndeko moko oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Koyekola Biblia na bato etindaka mosakoli azala moyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe. Namonaka ete nasengeli komindimisa ngai moko liboso nakende koteya moto mosusu.”

20 Soki ozali te na moto oyo okoki koyekola na ye Biblia, yango elimboli nde ete Nzambe amonaka ete mosala na yo ezali na motuya te? Ezali bongo te! Yehova asepelaka mingi na milende oyo tosalaka mpo na kokumisa ye. Bato nyonso oyo babimaka na mosala ya kosakola “bazali kosala elongo na Nzambe.” Nzokande, koyekola Biblia na moto ebakisaka esengo wana tozali komona ndenge Nzambe azali kokolisa mboto oyo toloni. (1 Kol. 3:6, 9) Amy, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Komona ndenge moyekoli azali kokola, esalaka ete opesa Yehova botɔndi mingi na ndenge asaleli yo opesa moto yango likabo kitoko​—libaku ya koyeba Yehova mpe kozwa bomoi ya seko.”

21 Kosala milende mpo na kobanda koyekola Biblia na moto ekosalisa biso tókoba kosalela Nzambe mpe ekolendisa elikya na biso ya kokɔta na mokili ya sika. Na lisalisi ya Yehova, tokoki mpe kopesa bato oyo bazali koyoka biso libaku ya kobika. (Tángá 1 Timote 4:16.) Ekozala mpenza esengo!

Ozali koyeba lisusu?

• Makambo nini ekoki kopekisa basakoli mosusu báyekola Biblia na bato?

• Tokoki kosala nini soki bato mingi na teritware na biso bakipaka makambo ya Nzambe te?

• Matomba nini tokoki kozwa ntango tozali koyekola Biblia na moto?

[Bililingi na lokasa 9]

Osalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kokutana na bato ya mitema sembo na mosala ya kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto