“Bózala ekɛngɛ”
“Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. . . . Bózala ekɛngɛ na oyo etali mabondeli.”—1 PET. 4:7.
1. Motó ya likambo ya mateya ya Yesu ezalaki nini?
NTANGO Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, Bokonzi ya Nzambe ezalaki motó ya likambo ya mateya na ye. Na nzela ya Bokonzi yango, Yehova akolongisa lotomo na ye ya kozala mokonzi na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe akosantisa nkombo na ye. Yango wana, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Mat. 4:17; 6:9, 10) Etikali moke, Bokonzi yango ekosukisa mokili ya Satana mpe ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mokili mobimba. Ndenge Danyele asakolaki yango, Bokonzi ya Nzambe “ekobuka mpe ekosilisa makonzi [nyonso ya lelo oyo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Dan. 2:44.
2. (a) Ndenge nini bayekoli ya Yesu bakokaki koyeba ete abandi koyangela? (b) Elembo yango esengelaki mpe komonisa nini?
2 Lokola koya ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki na ntina mingi mpo na bayekoli ya Yesu, batunaki ye boye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:3) Lokola bato awa na mabelé bakokaki te komona Klisto ntango abandi koyangela na likoló, ezalaki na elembo moko oyo ekokaki komonisa bango yango. Elembo yango esengelaki kozala na makambo ndenge na ndenge oyo Makomami esakolaki. Mpo na yango, bayekoli ya Yesu oyo bazalaki na bomoi na ntango yango bakokaki kososola ete abandi koyangela na likoló. Elembo yango esengelaki mpe komonisa ebandeli ya eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe oyo ezali lelo koyangela mabelé.—2 Tim. 3:1-5, 13; Mat. 24:7-14.
Bózala ekɛngɛ na mikolo oyo ya nsuka
3. Mpo na nini Baklisto basengeli kozala ekɛngɛ?
3 Ntoma Petelo akomaki boye: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. Boye, bózala bato ya makanisi malamu mpe bózala ekɛngɛ na oyo etali mabondeli.” (1 Pet. 4:7) Bayekoli ya Yesu basengelaki kozala ekɛngɛ, kolandela na likebi makambo oyo ezali komonisa ete Yesu abandi koyangela. Mpe basengeli kobakisa bokɛngi na bango awa nsuka ya mokili ekómi pene. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókɛngɛlaka, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya [kosambisa mokili ya Satana].”—Mko. 13:35, 36.
4. Monisá bokeseni kati na bato ya mokili ya Satana mpe basaleli ya Yehova. (Lobelá mpe etanda.)
4 Bato mingi na mokili bazali kotambwisama na Satana, mpe bazali kotya likebi te na makambo oyo ezali koleka na mokili. Bazali kososola te ete Klisto abandi koyangela. Kasi, bayekoli ya solo ya Klisto bazali ekɛngɛ mpe basosolaki ntina ya makambo oyo esalemaki na mokili na ekeke oyo eleki. Kobanda 1925, Batatoli ya Yehova basosolaki ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe makambo oyo elandaki na nsima ezalaki elembo oyo emonisaki ete Klisto abandaki koyangela na likoló na 1914. Na ndenge yango, mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe ya Satana ebandaki. Bato mingi ya mokili, atako bayebi te ndimbola ya makambo oyo ezali koleka na mokili, bandimaka ete bokeseni makasi ezali kati na bambula oyo ezalaki liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe bambula oyo eyaki na nsima.—Talá etanda “Eleko ya yikiyiki ebandi.”
5. Mpo na nini ezali na ntina ete tókoba kokɛngɛla?
5 Makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema na mokili banda mbula soki 100 ezali komonisa ete tokómi na mikolo ya nsuka. Etikali moke Yehova atinda Klisto ná baanzelu mpo na koboma mokili ya Satana. (Emon. 19:11-21) Biblia elendisi Baklisto ya solo bákɛngɛlaka. Na yango, esengeli mpenza tókoba kokɛngɛlaka awa nsuka ya mokili oyo ekómi pene. (Mat. 24:42) Tosengeli kokɛngɛlaka, mpe kolanda litambwisi ya Klisto mpo na kokokisa mosala moko oyo esengeli kosalema na mokili mobimba.
Mosala ya kosakola na mokili mobimba
6, 7. Ndenge nini mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokola na mikolo oyo ya nsuka?
6 Mosala oyo basaleli ya Yehova bazali kosala esakolamaki kati na elembo oyo ezali komonisa ete tokómi na mikolo ya nsuka ya mokili oyo ya mabe. Yesu alobelaki mosala yango ntango atángaki makambo ndenge na ndenge oyo esengelaki kosalema na mikolo ya nsuka. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”—Mat. 24:14.
7 Tótalela mpe makambo mosusu oyo ezali na boyokani na likambo yango oyo Yesu asakolaki. Bato oyo bazalaki kosakola nsango malamu ntango mikolo ya nsuka ebandaki na 1914 bazalaki moke mpenza. Kasi, sikoyo bato yango bakómi mingi mpenza. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova koleka 7 000 000 bazali kosakola na mokili mobimba, mpe bazali na masangá koleka 100 000. Na 2008, bato 10 000 000 bayanganaki na Batatoli ya Yehova na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Bato mingi mpenza babakisamaki na motángo ya bato oyo bayanganaki na 2007.
8. Mpo na nini botɛmɛli ezali kolonga te kopekisa mosala na biso ya kosakola?
8 Litatoli monene ezali kopesama mpo na Bokonzi ya Nzambe na bikólo nyonso liboso ete nsuka ya mokili oyo ekóma. Mosala yango ezali kosalema atako Satana azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Kol. 4:4) Makambo nyonso oyo ezali koleka na mokili, ezala makambo ya politiki, ya mangomba, mimbongo to mpe makambo oyo ezali koleka na batelevizyo to na baradio, ezali kotambwisama na Satana. Kasi, ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali kolonga na mosala na bango ya kosakola? Na ntembe te, Yehova azali kosunga bango. Na yango, mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokende liboso atako Satana azali koluka kosukisa yango.
9. Mpo na nini tokoki koloba ete bokoli oyo ezali kosalema na elimo ezali mpenza likamwisi?
9 Tokoki koloba ete ndenge mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokende liboso mpe ndenge basaleli ya Yehova bazali se kobakisama ezali mpenza likamwisi. Soki Nzambe azalaki kosunga mpe kobatela basaleli na ye te, mosala ya kosakola elingaki kosalema te. (Tángá Matai 19:26.) Tokoki kozala na elikya ete na nguya ya elimo santu ya Nzambe oyo ezali kosimba mitema ya basaleli na ye oyo bazali kokɛngɛla mpe bandimi kosalela ye, mosala yango ya kosakola ekokoba kokende liboso tii ekosila, “mpe bongo nsuka ekoya.” Ntango yango ezali koya mbangu mpenza.
“Bolɔzi monene”
10. Yesu alobaki nini mpo na bolɔzi monene oyo ezali koya?
10 Nsuka ya mokili oyo mabe ekoya na “bolɔzi monene.” (Emon. 7:14) Biblia elobi te ntango boni yango ekoumela, kasi Yesu alobaki boye: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te.” (Mat. 24:21) Soki tokanisi mpasi oyo mokili ekutanaki na yango, na ndakisa na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba oyo ebomaki bato soki milio 50 to 60, tokoki koloba ete bolɔzi monene ekozala nsɔmɔ mpenza. Ekosuka na etumba ya Armagedona. Ezali na ntango yango nde Yehova akotinda baanzelu na ye báboma bibongiseli nyonso ya mokili ya Satana.—Emon. 16:14, 16.
11, 12. Likambo nini ekomonisa ete bolɔzi monene ebandi?
11 Bisakweli ya Biblia epesi dati te oyo bolɔzi monene ekobanda, kasi eyebisi biso likambo oyo ekomonisa ete ebandi. Likambo yango ezali kobomama ya mangomba nyonso ya lokuta na bakonzi ya politiki. Bisakweli oyo ezali na Emoniseli mokapo 17 mpe mokapo 18, ekokanisi mangomba ya lokuta na mwasi ya ndumba oyo azali kosala pite na bakonzi ya politiki ya mokili oyo. Emoniseli 17:16 emonisi ete etikali moke bakonzi yango ya politiki “bakoyina mwasi wana ya ndumba mpe bakopanza ye mpe bakotika ye bolumbu, mpe bakolya misuni na ye mpe bakozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.”
12 Ntango ngonga yango ekokoka, Nzambe akotya “yango na mitema na bango [bakonzi ya politiki] mpo na kokokisa likanisi na ye” ya koboma lingomba ya lokuta. (Emon. 17:17) Na ndenge yango, tokoki koloba ete kobomama yango ekouta epai ya Nzambe. Ezali etumbu oyo akopesa na mangomba yango ya lokuta, oyo na boumeli ya bambula mingi eteyaki mateya oyo eyokani te na mokano ya Nzambe mpe enyokolaki basaleli na ye. Bato ya mokili bazali koyeba te libebi oyo ezali koyela mangomba ya lokuta. Kasi, basaleli ya sembo ya Yehova bayebi yango. Mpe na mikolo oyo ya nsuka, bazali koyebisa bato likambo yango.
13. Nini emonisi ete nsuka ya mangomba ya lokuta ekosalema nokinoki?
13 Bato bakoyoka mpasi mpenza ntango mangomba ya lokuta ekobomama. Esakweli ya Biblia emonisi ete ata “bakonzi ya mabelé” bakoloba ete: “Mawa mingi, mawa mingi, . . . mpamba te na ngonga kaka moko lisambisi na yo eyei!” (Emon. 18:9, 10, 16, 19) Ndenge Biblia esaleli maloba “ngonga kaka moko,” yango emonisi ete likambo yango ekosalema nokinoki.
14. Ntango banguna ya Yehova bakoluka kosimba basaleli na ye, Yehova akosala nini?
14 Toyebi ete mwa moke nsima ya kobomama ya mangomba ya lokuta, banguna bakoluka kosimba basaleli ya Yehova, baoyo bazali kosakola nsango ya kosambisa na ye. (Ezek. 38:14-16) Ntango bakoluka kosala yango, banguna yango bakobunda nde na Yehova oyo alaki ete akobatela basaleli na ye ya sembo. Yehova alobi boye: “Nalobi oyo na kati na zuwa na ngai mpe na kopela na nkɛlɛ na ngai . . . Mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].” (Tángá Ezekiele 38:18-23.) Nzambe alobi boye: “Moto oyo azali kosimba bino [basaleli na ye ya sembo] azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zek. 2:8, NW) Na yango, ntango banguna bakoluka kosilisa basaleli ya Yehova na mokili mobimba, Yehova akokanga mabɔkɔ te. Akotɛlɛma, mpe yango ekomema na Armagedona, eteni ya nsuka ya bolɔzi monene. Baanzelu ya nguya oyo bakotambwisama na Klisto bakokitisa bitumbu ya Yehova likoló ya mokili ya Satana.
Oyo tosengeli kosala
15. Koyeba ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene esengeli kotinda biso tósala nini?
15 Tosengeli kosala nini lokola toyebi ete nsuka ya mokili oyo ezali koya nokinoki? Ntoma Petelo akomaki boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe!” (2 Pet. 3:11) Maloba yango emonisi ntina ya kokɛngɛla lisusu makasi, mpo na komindimisa ete etamboli na biso ezali na boyokani na mibeko ya Nzambe mpe ete tozali kosala misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Yehova mpe ete tolingaka Ye. Misala yango esangisi komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi liboso ete nsuka eya. Petelo akomaki lisusu boye: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. . . . Bózala ekɛngɛ na oyo etali mabondeli.” (1 Pet. 4:7) Tokopusana penepene na Yehova mpe tokomonisa ete tolingaka ye soki tozali kobondela ye ntango nyonso, kosɛnga ye atambwisa biso na nzela ya elimo santu mpe ya lisangá na ye.
16. Mpo na nini tosengeli kolanda mpenza toli ya Nzambe?
16 Na ntango oyo ya mpasi, tosengeli kokangama na toli ya Liloba ya Nzambe oyo: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi, mpamba te mikolo ezali mabe.” (Ef. 5:15, 16) Mabe etondi lelo oyo na mokili koleka na bileko mosusu nyonso. Satana azali kobimisa makambo mingi mpo na kopekisa bato básala mokano ya Yehova to mpe mpo na kolongola likebi na bango na makambo ya Nzambe. Biso basaleli ya Nzambe toyebi yango, mpe tolingi kotika ata likambo moko te ekabola biso na Nzambe. Toyebi mpe likambo oyo ekosalema mosika te, mpe totye elikya na biso nyonso epai ya Yehova mpe na mikano na ye.—Tángá 1 Yoane 2:15-17.
17. Lobelá esengo oyo bato oyo bakobika na Armagedona bakozala na yango ntango lisekwa ekosalema.
17 Na nsima, elaka kitoko oyo Nzambe apesi ya kozongisa bakufi na bomoi ekokokisama, mpamba te Biblia elobi ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Yoká ndenge elaka yango elobi: “Ekozala na lisekwa moko”! Tokoki kotya ntembe te na likambo yango, mpo Yehova nde alaki yango! Yisaya 26:19 (NW) elobi boye: “Bakufi na yo bakobika. . . . Bólamuka mpe bóganga na esengo, bino baoyo bofandi na putulu! . . . Mabelé yango moko ekobimisa ata baoyo bazangi makasi kati na liwa.” Maloba yango ekokisamaki liboso, ntango Bayisalaele bazongaki na mokili na bango, mpe epesi biso elikya ete ekokokisama na mobimba na yango na mokili ya sika. Ekozala mpenza esengo monene ntango basekwi bakozala lisusu elongo na bandeko na bango! Ya solo, nsuka ya mokili ya Satana ekómi pene, mpe mokili ya sika ya Nzambe ebɛlɛmi. Ezali mpenza na ntina tókɛngɛlaka!
[Ozali koyeba lisusu]
• Motó ya likambo ya mateya ya Yesu ezalaki nini?
• Nsango ya Bokonzi ezali kosakolama tii wapi lelo oyo?
• Mpo na nini ezali na ntina tókɛngɛlaka?
• Ndenge nini elaka oyo ezali na Misala 24:15 ezali kolendisa yo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 16]
ELEKO YA YIKIYIKI EBANDI
Na 2007, Alan Greenspan abimisaki buku moko (The Age of Turbulence: Adventures in a New World). Na boumeli ya mbula soki 20, azalaki mokambi ya ebongiseli moko oyo etalelaka babanki ya États-Unis (Réserve Fédérale). Greenspan amonisi bokeseni monene oyo ezali na kati ya bambula oyo ezalaki liboso ya 1914 mpe bambula oyo eyaki na nsima:
“Masolo ndenge na ndenge emonisi ete liboso ya 1914 makambo ezalaki kotambola malamu, bato bazalaki mpenza komemyana, mpe emonanaki ete mokili ekobonga mpenza. Ekeke ya zomi na libwa esukisaki likambo ya kotɛka baombo. Emonanaki mpe ete makambo ya mabe ekómaki kosila. . . . Na boumeli ya ekeke ya zomi na libwa, siansi ekolaki mpe biloko ya sika lokola banzela ya bingbunduka, telefone, kura, bafilme, mituka, mpe biloko ndenge na ndenge ya ndako mpe biloko mosusu ebimaki. Mayele ya minganga ekolaki, bato bakómaki kolya malamu mpe bazalaki na mai ya pɛto; nyonso wana esalaki ete bato bákóma koumela mwa mingi na bomoi . . . Bato nyonso na mokili bakómaki na elikya ete makambo ekokoba kobonga.”
Kasi . . . “Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebebisaki mpenza makambo koleka Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, atako yango ebomaki bato mingi koleka: Etumba ya liboso ebebisaki nde makanisi ya bato. Nakoki kobosana te makanisi oyo bato bazalaki na yango liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ntango ezalaki komonana ete mayele ya moto ezali se kokola mpe makambo ekokoba se kokende liboso. Na bokeseni na ekeke oyo eleki, lelo oyo bato bakómá kotalela makambo ndenge mosusu mpenza; ekoki kozala ete bakómá kotalela makambo ndenge ezali mpenza. Terorisme, kobakisama ya molunge na mokili, to bato oyo bakɔtelaka babola ekobebisa nde lisusu makambo ndenge Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esalaki? Moto moko te akoki koyeba.”
Greenspan akanisi lisusu maloba ya Benjamin Anderson (1886-1949), profɛsɛrɛ moko oyo atángisaki ye na iniversite. Anderson alobaki boye: “Bato oyo bazalaki na mwa mayele ya koyeba makambo liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba bakoki koyeba lisusu ndenge makambo ezalaki na ntango wana. Mokili ezalaki na kimya mpenza koleka bileko mosusu nyonso.”—Economics and the Public Welfare.
Gerald Meyer, apesi mpe likanisi ya ndenge wana na buku moko (A World Undone) oyo ebimisamaki na 2006. Totángi boye: “Mbala mingi, bato balobaka ete makambo oyo eleki na mokili ‘ekɔtisi mbongwana monene mpenza.’ Yango ezali mpenza solo mpo na Etumba Monene [1914-1918]. Etumba yango ebongolaki mpenza makambo nyonso: ebongolaki kaka te bandelo oyo ekaboli bikólo, baguvɛrnema, mpe mikano ya bikólo, kasi ebongolaki mpe ndenge oyo bato bazalaki kotalela mokili mpe ndenge bazalaki komitalela bango moko. Ebimisaki nde mokili moko oyo ekesanaki mpenza na oyo ya kimya oyo ezalaki liboso.”
[Elilingi na lokasa 18]
Na Armagedona, Yehova akotinda baanzelu na ye ya nguya