Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
“Nkombo ya [Yehova] esanzolama.”—YOBO 1:21.
1. Ekoki kozala nani nde akomaki mokanda ya Yobo, mpe ntango nini?
MOIZE azalaki na mbula soki 40 ntango akimaki Ezipito mpo na nkanda ya Falao mpe akendeki kofanda na Midyani. (Mis. 7:23) Ntango azalaki kuna, ekoki kozala ete ayokaki lisolo ya minyoko ya Yobo, oyo azalaki kofanda mosika te, na mokili ya Usa. Bambula na nsima, ntango Moize mpe Bayisalaele bakómaki pembeni ya Usa na nsuka ya mobembo na bango na esobe, ekoki kozala ete Moize ayokaki makambo oyo Yobo akutanaki na yango na nsuka ya bomoi na ye. Masolo ya Bayuda elobaka ete Moize akomaki mokanda ya Yobo mwa moke nsima ya liwa ya Yobo.
2. Na ndenge nini mokanda ya Yobo elendisaka kondima ya basaleli ya Yehova ya ntango na biso?
2 Mokanda ya Yobo elendisaka kondima ya basaleli ya Nzambe ya ntango na biso. Na ndenge nini? Lisolo yango esalisaka biso tóyeba makambo ya ntina mingi oyo esalemaki na likoló mpe ebendaka likebi na biso na ntembe monene oyo ebimaki na ntina na lotomo ya Nzambe ya kozala Mokonzi na molɔ́ngɔ́ mobimba. Mokanda ya Yobo esalisaka mpe biso tóyeba soki kozala sembo elimboli mpenza nini mpe ntina oyo ntango mosusu Yehova atikaka nzela ete basaleli na ye bámona mpasi. Lisusu, mokanda ya Yobo emonisi ete Satana Zabolo azali monguna monene ya Yehova mpe ya bato. Mokanda yango emonisi mpe ete bato ya kozanga kokoka lokola Yobo bakoki kotikala sembo epai ya Yehova ata na komekama makasi. Tótalela mwa makambo oyo mokanda ya Yobo elobeli.
Satana ameki Yobo
3. Makambo nini toyebi na ntina na Yobo, mpe mpo na nini Satana amekaki ye?
3 Yobo azalaki moto ya bomɛngo, ya lokumu, mpe tata ya libota oyo azalaki na etamboli malamu. Azalaki mopesi-toli oyo bato bazalaki kopesa limemya mingi mpe azalaki kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga. Likambo eleki ntina, Yobo azalaki kobanga Nzambe. Biblia elobi ete Yobo azalaki moto ya “malamu bɛ mpe sembo. Atosaki Nzambe mpe aboyaki mabe.” Satana amekaki Yobo mpo na bosembo na ye epai ya Nzambe, kasi te mpo na bomɛngo to lokumu na ye.—Yobo 1:1; 29:7-16; 31:1.
4. Bosembo ezali nini?
4 Maloba ya ebandeli ya mokanda ya Yobo elobeli liyangani moko oyo esalemaki na likoló epai baanzelu bayaki liboso ya Yehova. Satana mpe azalaki wana, mpe afundaki Yobo. (Tángá Yobo 1:6-11.) Atako Satana alobelaki bozwi ya Yobo, mokano na ye ezalaki nde ya kolɛmbisa bosembo ya Yobo. Liloba “bosembo” epesaka likanisi ya kozala semba, kozanga litɔnɔ, kozala moyengebene, mpe kozanga mbeba. Na Biblia, liloba yango emonisaka ezaleli ya kokangama na Yehova na motema mobimba.
5. Satana alobaki nini na ntina na Yobo?
5 Satana alobaki ete Yobo azalaki kosambela Nzambe mpo na matomba na ye moko, kasi te mpo na bosembo. Satana akosaki ete Yobo akotikala sembo epai ya Yehova kaka soki Nzambe akobi kopambola mpe kobatela ye. Mpo na kopesa eyano na bifundeli wana ya Satana, Yehova apesaki Satana nzela ameka Yobo, moto ya sembo. Na yango, na mokolo moko mpamba, Yobo azwaki nsango ete bayibaki bibwɛlɛ na ye mpe babomaki misusu, babomaki basali na ye, mpe bana na ye zomi bakufaki. (Yobo 1:13-19) Komeka oyo Satana amekaki Yobo elɛmbisaki bosembo ya Yobo? Biblia emonisi ndenge Yobo alobaki ntango abungisaki biloko na ye nyonso: “[Yehova] apesaki, [Yehova] asili kolongola. Nkombo ya [Yehova] esanzolama.”—Yobo 1:21.
6. (a) Nini elekaki na liyangani mosusu oyo asalemaki na likoló? (b) Ntango Satana abɛtɛlaki bosembo ya Yobo epai ya Yehova ntembe, azalaki mpe kokanisa banani?
6 Na nsima, liyangani mosusu esalemaki na likoló. Na mbala yango mpe, Satana afundaki Yobo; alobaki boye: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye. Osembola lobɔkɔ na yo [sikoyo] mpe omama mikuwa na ye mpe mosuni na ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.” Tomoni ete Satana akɔtisaki bato mosusu na bifundeli na ye. Ntango alobaki ete “moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye,” Zabolo abɛtaki ntembe kaka mpo na bosembo ya Yobo te, kasi ya “moto” nyonso oyo asambelaka Yehova. Na nsima, Nzambe atikaki nzela ete Satana apesa Yobo maladi moko ya mabe. (Yobo 2:1-8) Kasi, komekama ya Yobo esukaki wana te.
Liteya oyo tokoki kozwa na ezaleli ya Yobo
7. Na ndenge nini mwasi ya Yobo mpe bato oyo bayaki kotala ye babakiselaki Yobo mpasi?
7 Na ebandeli, mwasi ya Yobo mpe azalaki koyoka mpasi lokola mobali na ye. Na ntembe te, liwa ya bana na ye mpe kobungisa bomɛngo na bango epesaki ye mpasi mingi. Ayokaki mpasi komona ndenge mobali na ye azalaki konyokwama na maladi moko ya mabe. Alobaki na Yobo ete: “Okangi naino boyengebene na yo makasi? Lakelá Nzambe mabe mpe kufá!” Na nsima, mibali misato: Elifaza, Biledada, mpe Sofala, bayaki lokola nde kobɔndisa Yobo. Nzokande, babimisaki makanisi ya lokuta mpe bamonanaki “babɔndisi mabe.” Na ndakisa, Biledada alobaki ete bana ya Yobo basalaki masumu yango wana babongaki kokufa. Maloba ya Elifaza emonisaki ete mpasi oyo Yobo azalaki komona ezalaki etumbu mpo na masumu oyo asalá. Amitunaki kutu soki bato oyo babatelaka bosembo na bango bazali ata na ntina na miso ya Nzambe! (Yobo 2:9, 11; 4:8; 8:4; 16:2; 22:2, 3) Ata na ntango wana ya mpasi makasi, Yobo abatelaki bosembo na ye. Ya solo, Yobo asalaki libunga ndenge “alongisaki molimo na ye moko liboso ya Nzambe.” (Yobo 32:2) Atako bongo, atikalaki sembo liboso ya mikakatano nyonso oyo akutanaki na yango.
8. Ndakisa malamu nini Elihu atiká mpo na bato oyo bapesaka toli lelo oyo?
8 Na nsima, Biblia elobeli Elihu, oyo ayaki mpe kotala Yobo. Elihu ayokaki naino makambo nyonso oyo Yobo mpe baninga na ye misato bazalaki koloba. Atako azalaki leki na bango nyonso minei, Elihu amonisaki mpenza bwanya. Asololaki na Yobo na limemya. Elihu apesaki Yobo longonya mpo na etamboli na ye ya malamu. Kasi, alobaki mpe ete Yobo azalaki koluka libosoliboso komimonisa sembo. Na nsima, Elihu ayebisaki Yobo ete kosalela Nzambe na bosembo ezalaka ntango nyonso na litomba. (Tángá Yobo 36:1, 11.) Oyo nde ndakisa kitoko mpo na bato oyo bapesaka toli lelo oyo! Elihu azalaki na motema molai, ayokaki na likebi, apesaki longonya ntango esengelaki, mpe apesaki toli ya kolendisa.—Yobo 32:6; 33:32.
9. Ndenge nini Yehova asalisaki Yobo?
9 Na nsuka, Yobo akutanaki na likambo ya nsɔmɔ! Biblia elobi boye: “[Yehova] azongisaki liloba epai na Yobo uta na mopɛpɛ makasi.” Na nzela ya mituna oyo Yehova atunaki Yobo, asalisaki ye asembola makanisi na ye. Yobo andimaki kosembolama na motema moko; alobaki boye: “Ngai nazali eloko mokemoke . . . Nabongoli motema na putulu mpe na putulu ya mɔtɔ.” Ntango Yehova asilisaki kosolola na Yobo, apamelaki baninga misato ya Yobo mpo balobaki ‘likambo na sembo te.’ Yobo abondelaki mpo na bango. Na nsima, “[Yehova] abongolaki nkaka ya Yobo wana ebondelaki ye mpo na baninga na ye. [Yehova] abakiselaki mpe Yobo kino mbala na mibale na yango ezalaki na ye liboso.”—Yobo 38:1; 40:4; 42:6-10.
Bolingo na yo mpo na Yehova ezali makasi ndenge nini?
10. Mpo na nini Yehova asukisaki Satana te to abomaki ye te?
10 Yehova azali Mozalisi mpe Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo na nini asukisaki ntembe ya Satana mbala moko te? Nzambe ayebaki ete kosukisa ntembe ya Satana to koboma ye mbala moko elingaki kopesa te eyano na ntembe oyo abimisaki. Zabolo alobaki ete Yobo, mosaleli ya Yehova ya sembo, akotikala sembo te soki bomɛngo na ye ekei. Yobo atikalaki sembo atako amekamaki. Satana alobaki mpe ete moto nyonso akoki kopesa Nzambe mokɔngɔ soki abɛli. Yobo abɛlaki, kasi abatelaki bosembo na ye. Na yango, Satana amonanaki ete azali mokosi mpo Yobo atikalaki sembo atako azalaki moto ya kozanga kokoka. Tokoloba boni mpo na basambeli mosusu ya Nzambe?
11. Ndenge nini Yesu apesaki mpenza eyano na ntembe ya Satana?
11 Mosaleli mokomoko ya Nzambe oyo abatelaka bosembo na ye ata soki Satana ameki ye ndenge nini amonisaka ete bifundeli ya monguna wana monene ezali lokuta. Yesu ayaki na mabelé mpe apesaki mpenza eyano na ntembe oyo Satana abimisaki. Yesu azalaki moto ya kokoka lokola tata na biso ya liboso, Adama. Bosembo ya Yesu tii na liwa emonisaki mpenza ete Satana azali mokosi mpe ete bifundeli na ye ezali lokuta.—Emon. 12:10.
12. Mosambeli mokomoko ya Yehova azali na libaku mpe mokumba nini?
12 Atako bongo, Satana atiki te komeka basambeli ya Yehova. Mokomoko na biso azali na libaku mpe mokumba ya kotikala sembo mpo na komonisa ete tosalelaka Yehova mpo tolingaka ye, kasi te mpo na matomba na biso moko. Ndenge nini totalelaka mokumba yango? Tomonaka ete ezali libaku ya komonisa bosembo na biso epai ya Yehova. Tozali mpe kobɔndisama lokola toyebi ete Yehova apesaka biso makasi ya koyika mpiko mpe ete atikaka te tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema, ndenge asalaki mpo na Yobo.—1 Kol. 10:13.
Satana—Monguna mpe Mopɛngwi monene
13. Makambo nini mokanda ya Yobo emonisi na ntina na Satana?
13 Makomami ya Liebele elobeli polele ndenge Satana atɛmɛlaki Yehova mpe ndenge apɛngwisaki bato. Makomami ya Grɛki ya boklisto elobeli makambo mosusu oyo etali ndenge Satana atɛmɛlaka Yehova, mpe mokanda ya Emoniseli emonisi ndenge Yehova akolongisa boyangeli na ye mpe ndenge Satana akobomama. Mokanda ya Yobo esalisi biso tóyeba makambo mosusu oyo etali botomboki ya Satana. Ntango Satana akɔtaki na mayangani oyo esalemaki na likoló, ezalaki te mpo na kokumisa Yehova. Zabolo azalaki na likanisi mpe mokano ya mabe mpenza. Nsima ya kofunda Yobo mpe kozwa ndingisa ya komeka ye, “Satana abimaki na liboso na [Yehova].”—Yobo 1:12; 2:7.
14. Makanisi nini Satana azalaki na yango mpo na Yobo?
14 Na yango, mokanda ya Yobo emonisi ete Satana azali monguna oyo azangá mawa. Biblia elobi te soki ntango boni elekaki kati na liyangani oyo elobelami na Yobo 1:6 mpe oyo elobelami na Yobo 2:1; na boumeli ya ntango yango Yobo azalaki komekama makasi. Bosembo ya Yobo epesaki Yehova likoki ya koloba na Satana ete: “[Yobo] azali naino kokanga boyengebene na ye makasi ata opesi ngai simbisi ete nabebisa ye na ntina te.” Kasi, Satana andimaki kaka te ete akoselaki Yobo makambo. Kutu, asɛngaki ete Yobo amekama lisusu makasi. Na yango, Zabolo amekaki Yobo ntango azalaki na bomɛngo mpe ntango bomɛngo na ye esilaki. Emonani polele ete Satana azalaka na mawa te mpo na babola mpe bato oyo bakutani na makama. Ayinaka bato ya bosembo. (Yobo 2:3-5) Atako bongo, bosembo ya Yobo emonisaki ete Satana azali mokosi.
15. Makambo nini ekokanisi bapɛngwi ya lelo ná Satana?
15 Satana azali ekelamu ya liboso oyo apɛngwaki. Bapɛngwi ya mikolo na biso basalaka makambo lokola Zabolo. Bakoki kobebisa makanisi na bango na ndenge balobaka mabe mpo na bandeko ya lisangá, bankulutu, to Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Bapɛngwi mosusu baboyaka ata bato básalela nkombo ya Nzambe, Yehova. Balingaka te koyekola makambo etali Yehova to kosalela ye. Lokola tata na bango Satana, bapɛngwi balukaka konyokola bato ya sembo. (Yoa. 8:44) Yango wana, basaleli ya Yehova bakimaka bango na ndenge nyonso!—2 Yoa. 10, 11.
Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
16. Ezaleli nini Yobo amonisaki liboso ya Yehova?
16 Yobo asalelaki mpe akumisaki nkombo ya Yehova. Ezala ntango bayebisaki ye ete bana na ye bakufi, Yobo asalaki likambo moko te ya mabe na miso ya Nzambe. Atako Yobo asalaki libunga ndenge alobaki ete Nzambe nde asalaki ete biloko na ye ebunga, kasi akumisaki nkombo ya Yehova. Yobo alobaki boye: “Kotosa [Yehova, NW], yango ezali mayele kolongwa na mabe, yango ezali bososoli.”—Yobo 28:28.
17. Nini esalisaki Yobo abatela bosembo na ye?
17 Nini esalisaki Yobo abatela bosembo na ye? Emonani polele ete liboso minyoko ekómela ye, Yobo azalaki na boyokani malamu na Yehova. Atako eloko moko te emonisi biso ete Yobo ayebaki ete Satana abɛtɛlaki Yehova ntembe, azalaki na ekateli ya kotikala sembo. Alobaki boye: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te.” (Yobo 27:5) Ndenge nini Yobo akómaki na boyokani ya malamu ndenge wana na Nzambe? Na ntembe te, abatelaki na motema masolo oyo ayokaki na ntina na makambo oyo Nzambe asalaki mpo na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, bandeko na ye oyo bazalaki na bomoi liboso na ye. Ekoki mpe kozala ete kotala biloko oyo Yehova akelá esalisaki Yobo amona bizaleli mingi ya Yehova.—Tángá Yobo 12:7-9, 13, 16.
18. (a) Ndenge nini Yobo amonisaki ete azalaki kolinga Yehova? (b) Na ndenge nini tokoki komekola ndakisa kitoko ya Yobo?
18 Makambo oyo Yobo ayekolaki ekolisaki mposa na ye ya kosepelisa Yehova. Lokola Yobo azalaki kobanga ete mbala mosusu bato ya libota na ye basali likambo moko ya mabe na miso ya Nzambe, to “balakeli Nzambe mabe na mitema na bango,” azalaki kopesa bambeka mbala na mbala. (Yobo 1:5) Ata ntango akutanaki na komekama makasi, Yobo akobaki koloba makambo ya malamu na ntina na Yehova. (Yobo 10:12) Atiká mpenza ndakisa ya malamu! Biso mpe tosengeli ntango nyonso koluka kokóma na boyebi ya solosolo ya Yehova mpe ya mikano na ye. Tosengeli kozala na programɛ ya malamu ya makambo ya elimo, na ndakisa, koyekola, koyangana na makita, kobondela, mpe kosakola nsango malamu. Longola yango, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyebisa bato nkombo ya Yehova. Mpe ndenge kaka bosembo ya Yobo esepelisaki Yehova, oyo ya basaleli na ye lelo mpe esepelisaka motema na ye. Tokotalela likambo yango na lisolo oyo elandi.
[Ozali koyeba lisusu?]
• Mpo na nini Satana atyelaki Yobo miso?
• Mikakatano nini Yobo akutanaki na yango, mpe asalaki nini?
• Nini ekosalisa biso tóbatela bosembo na biso, lokola Yobo?
• Makambo nini toyekoli na ntina na Satana na mokanda ya Yobo?
[Elilingi na lokasa 4]
Lisolo ya Yobo esalisaka biso tóyeba ntembe monene oyo ebimaki na ntina na lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi na molɔ́ngɔ́ mobimba
[Elilingi na lokasa 6]
Makambo nini ekoki kotya bosembo na yo na komekama?