Pusaná penepene na Nzambe
Yehova alobelaki bizaleli na ye moko
SOKI basɛngi yo olobela bizaleli ya Nzambe mpe misala na ye, okoloba nini? Kanisá sikoyo soki bapesi yo libaku ya kotuna Nzambe ye moko ayebisa yo bizaleli na ye mpe koyoka ye ntango azali kolobela yango. Mosakoli Moize azwaki libaku ya ndenge wana. Likambo ya esengo, elimo santu ya Nzambe esalisaki ye akoma makambo oyo esalemaki.
Na Ngomba Sinai, Moize asɛngaki Yehova ete: “Nabondeli yo, monisá ngai nkembo na yo.” (Exode 33:18) Mokolo oyo elandaki, Moize azwaki libaku ya komona mwa moke nkembo ya Nzambe.a Moize alobelaki te na mozindo makambo oyo amonaki na emonaneli wana ya kokamwa. Kasi, akomaki nde makambo ya ntina mingi oyo Nzambe ayebisaki ye. Tótalela makambo oyo Yehova alobaki, oyo ezali na Exode 34:6, 7.
Likambo ya liboso oyo Yehova alobaki na ntina na ye moko ezali ete azali “Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu.” (Vɛrsɛ 6) Moto moko ya mayele alobi ete liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mawa” emonisaka “mawa monene [ya Nzambe], lokola oyo tata azalaka na yango epai ya bana na ye.” Liloba oyo ebongolami na “ngɔlu” eyokani na verbe moko oyo “elobelaka moto oyo motema na ye etindaka ye asalisa moto oyo azali na bosɛnga.” Emonani polele ete Yehova alingi tóyeba ete amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye ndenge kaka baboti bamibanzabanzaka mpo na bana na bango, elingi koloba balingaka bango mpe balukaka kokokisa bamposa na bango.—Nzembo 103:8, 13.
Likambo ya mibale, Yehova alobaki ete ‘ayokaka nkanda noki te.’ (Vɛrsɛ 6) Asilikelaka basaleli na ye awa na mabelé noki te. Kasi, azalaka motema molai epai na bango, alandelaka mabunga na bango mpambampamba te mpe atikelaka bango ntango ya kobongwana.—2 Petelo 3:9.
Nzambe abakisaki ete “aleki na boboto mpe na solo.” (Vɛrsɛ 6) Boboto to bolingo ya sembo ezali ezaleli ya malamu mingi oyo etindaka Yehova azala na boyokani makasi na basaleli na ye. (Deteronome 7:9) Yehova azali mpe liziba ya solo. Akoki kokosa te mpe moto akoki kokosa ye te. Lokola azali “Nzambe ya solo,” tokoki kozala na kondima makasi ete makambo nyonso oyo alobaka, ezala mpe bilaka oyo apesi mpo na mikolo ezali koya, ekokokisama.—Nzembo 31:5, NW.
Likambo mosusu ya ntina mingi oyo Yehova alingi tóyeba na ntina na ye ezali ete alimbisaka “mabe mpe nkanza mpe lisumu.” (Vɛrsɛ 7) ‘Alimbisaka’ basumuki oyo babongoli motema. (Nzembo 86:5) Nzokande, Yehova akangaka miso na mabe te. Alobi ete “akolongisa mokiti soki moke te.” (Vɛrsɛ 7) Nzambe mosantu mpe ya sembo akozanga te kopesa bato oyo basalaka masumu na nko bitumbu. Ata ndɛlɛ, bakobuka mbuma mabe ya etamboli na bango.
Ndenge Yehova alobeli bizaleli na ye emonisi polele ete alingi tóyeba ye, bizaleli na ye mpe misala na ye. Motema na yo ezali te kotinda yo oyekola bizaleli mosusu kitoko ya Nzambe?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moize amonaki Yehova na miso boye te, mpo moto moko te akoki komona Nzambe mpe kotikala na bomoi. (Exode 33:20) Yehova alakisaki Moize nkembo na Ye na emonaneli, asololaki na ye na nzela ya anzelu.