Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/5 lok. 27
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Yelusaleme na ntango ya Lisoló ya Biblia—Arkeoloji ezali komonisa makambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Kende kosukola na pisini ya Siloama”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mateya kitoko oyo tokoki kozwa na boyekoli ya Mokili ya Ndaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/5 lok. 27

Oyebaki yango?

Yelusaleme ezingamaki mpenza na makonzí ya nsɔngɛ, ndenge Yesu asakolaki yango?

Na esakweli oyo alobelaki kobomama ya Yelusaleme, Yesu alobaki mpo na engumba yango ete: “Mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi na makonzí ya nsɔngɛ mpe bakozingela yo mpe bakonyokola yo epai na epai.” (Luka 19:43) Maloba ya Yesu ekokisamaki na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.) ntango Baloma, oyo Titus azalaki kotambwisa, batongaki efelo moko mpo na kozinga engumba yango. Titus azalaki na mikano misato: kopekisa Bayuda bákima, kotinda bango bátika kobunda mpe báya epai na ye, mpe kokɔtisa nzala makasi na engumba yango mpo akɔta kuna kozanga mpasi.

Flavius Josèphe, moto moko ya istware na ekeke ya liboso, alobi ete ntango bazwaki ekateli ya kotonga efelo wana, bituluku ya basoda ya Baloma bawelanaki mpo na koyeba etuluku oyo ekosilisa liboso eteni ya efelo oyo bapesaki bango mpo na kotonga. Basoda ya Baloma bakataki banzete nyonso oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 16 zingazinga ya engumba yango, mpe batongaki efelo yango, oyo ezalaki na molai ya kilomɛtrɛ 7, na mikolo misato mpamba. Na yango, Josèphe alobi ete “Bayuda bazalaki na elikya lisusu te ya kokima.” Lokola nzala makasi ekɔtaki na engumba yango mpe bituluku ya bato oyo bazalaki na bibundeli bazalaki kobunda mpe kobomana, engumba yango ekweaki na mabɔkɔ ya Baloma sanza soki mitano na nsima.

Mokonzi Hizikiya atongaki mpenza nzela ya mai na Yelusaleme?

Hizikiya azalaki mokonzi ya Yuda na nsuka ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), eleko oyo Yuda ezalaki na matata ná Asulia, ekólo oyo ezalaki na nguya. Biblia emonisi ete asalaki nyonso mpo na kobatela Yelusaleme mpe asalaki ete bato ya mboka bázangaka mai te na ntango ya bitumba. Na kati ya biloko oyo atongaki, tokoki kotánga elekelo to nzela ya mai ya bolai ya mɛtrɛ 533 mpo na kokɔtisa mai na engumba.​—2 Mikonzi 20:20; 2 Ntango 32:1-7, 30.

Na ekeke ya 19, bamonaki nzela ya mai moko ya ndenge wana. Bakómaki kobenga yango nzela ya mai ya Hizikiya, to nzela ya mai ya Siloama. Na kati ya nzela yango bato ya arkeoloji bakutaki etanda moko oyo ezali kolobela misala ya nsuka oyo esalemaki ntango batongaki nzela yango. Ndenge balɛtrɛ ekomamaki mpe ndenge ezalaki komonana na etanda yango etindaki bato mingi ya mayele báloba ete ekomamaki na ntango ya Hizikiya. Kasi, eleki mbula zomi, bato mosusu ya mayele balobaki ete nzela ya mai yango etongamaki mbula soki 500 nsima ya dati oyo bakanisaki. Na 2003, bato ya siansi ya Yisalaele balobelaki makambo oyo bamonaki na bolukiluki oyo basalaki mpo na koyeba ntango mpenza oyo batongaki nzela ya mai wana. Balobaki nini?

Amos Frumkin, profɛsɛrɛ ya iniversite moko (université hébraïque de Jérusalem), alobi ete mayele ndenge na ndenge oyo basalelaki ntango bazalaki kosala bolukiluki emonisi ete batongaki nzela ya mai wana na ntango ya Hizikiya. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko ya siansi (Nature) ebakisi boye: “Bilembeteli wana misato​—boyekoli ya badati ya biloko oyo basalelaki mpo na kotonga nzela wana, boyekoli ya makomi oyo ezalaki na etanda mpe masolo ya kala—​nyonso emonisi ete biloko yango esalelamaki na mobu soki 700 L.T.B.; na yango, na biloko nyonso oyo Biblia elobi ete batongaki na eleko oyo babengaka Âge de fer, nzela ya mai ya Siloama ezali eloko oyo etongamá, oyo dati na yango elobelami malamu tii sikoyo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto