Osengeli kozala wapi ntango nsuka ekoya?
NA ARMAGEDONA ntango Yehova akoboma ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, nini ekokómela bato ya sembo? Masese 2:21, 22 elobi boye: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakobikolama wana.”
Kasi, ndenge nini bato ya sembo bakotikala na mabelé? Bakokende komibomba na esika moko boye? Bato ya sembo bakozala wapi ntango nsuka ekoya? Masolo minei ya Biblia oyo elobeli ndenge basembwi babikaki ntango Nzambe abomaki bato mabe ekopesa eyano na mituna wana.
Ntango esika ezalaki na ntina
Mpo na kobikisama ya Noa ná ya Lota, 2 Petelo 2:5-7 elobi boye: “[Nzambe] amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu, kasi abatelaki Noa, mosakoli moko ya boyengebene, elongo na bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela likoló ya mokili moko ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe; mpe na kokómisáká bingumba ya Sodoma mpe Gomola putulu ya mɔtɔ akweisaki yango, kopesáká bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya; mpe abikisaki moyengebene Lota, oyo atungisamaki makasi mpo na babuki-mibeko oyo bamipesaki na etamboli ya mbindo.”
Ndenge nini Noa abikaki na Mpela? Nzambe ayebisaki Noa boye: “Nasili kokana kosilisa bato nyonso, mpo ete mokili etondi na yauli mpo na bango. Mpe nakobebisa bango na mokili elongo moko. Sala masuwa mpo na yo na nzete ya gofele.” (Genese 6:13, 14) Noa atongaki masuwa kaka ndenge Yehova ayebisaki ye. Mikolo nsambo liboso Mpela ebanda, Yehova ayebisaki Noa akɔta na masuwa elongo na libota na ye mpe banyama nyonso. Na mokolo ya nsambo, porte ya masuwa ekangamaki, mpe “mbula enɔkaki likoló ya mokili mikolo ntuku minei mpe butu ntuku minei.” (Gen. 7:1-4, 11, 12, 16) Noa ná libota na ye “bamemamaki kozanga likama na mai.” (1 Pet. 3:20) Mpo bábika, basengelaki kozala na kati ya masuwa, esika mosusu te.—Gen. 7:19, 20.
Lota azwaki malako ya ndenge mosusu. Baanzelu mibale bayebisaki ye esika oyo asengelaki te kozala. Baanzelu yango mibale balobaki na ye boye: “Moto na yo nyonso oyo azali na engumba [Sodoma], bimisá [ye] na esika oyo! Mpo tozali kobebisa esika oyo.” Basengelaki ‘kokima na etúká ya ngombangomba.’—Gen. 19:12, 13, 17, NW.
Lisolo ya Noa mpe ya Lota emonisi ete “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kasi kobomba mpo na mokolo ya lisambisi bato oyo bazangi boyengebene.” (2 Pet. 2:9) Na mabaku yango mibale, basembwi basengelaki kozala na esika moko boye mpo na kobika. Noa asengelaki kokɔta na masuwa; Lota asengelaki kobima na Sodoma. Kasi, ezalaka ntango nyonso bongo? Yehova akoki kobikisa basembwi esika nyonso oyo bazali, kozanga asɛnga bango bákende na esika moko boye? Mpo na koyanola na motuna yango, tótalela masolo mibale mosusu oyo emonisi ndenge Nzambe abikisaki basembwi, ntango abomaki bato mabe.
Esika ezalaka ntango nyonso na ntina?
Liboso Yehova atinda bolɔzi ya zomi na Ezipito na ntango ya Moize, asɛngaki Bayisalaele bápakola makila ya mwana-mpate ya Elekeli na likoló mpe na mipanzi ya baporte ya bandako na bango. Mpo na nini? Mpo ‘ntango Yehova akoleka mpo na kobɛta Baezipito na bolɔzi mpe akomona makila na libaya ya likoló oyo esimbaka porte mpe na makonzí mibale, aleka mpenza likoló ya monɔkɔ ya ndako, mpe apesa nzela te ete libebi ekɔta na bandako na bango mpo na kobɛta bango na bolɔzi.’ Na butu yango, “Yehova abomaki mwana nyonso ya liboso na mokili ya Ezipito, banda na mwana ya liboso ya Falao oyo azali kofanda na kiti na ye ya bokonzi tii na mwana ya liboso ya mokangami oyo azalaki na libulu ya bolɔkɔ, mpe mwana nyonso ya liboso ya nyama.” Bana nyonso ya liboso ya Bayisalaele babikaki kozanga ete bálongwa na esika bazalaki.—Ex. 12:22, 23, 29, NW.
Tózwa mpe ndakisa ya Laaba, mwasi moko ya ndumba oyo azalaki kofanda na Yeliko. Bayisalaele basengelaki kobanda kozwa Mokili ya Ndaka. Ntango Laaba amonaki ete Yeliko ekobomama, ayebisaki banɔngi mibale ya Yisalaele ete nsɔmɔ ekwelaki bato nyonso ya engumba yango ntango bamonaki ete Bayisalaele bakómi pene. Laaba abombaki banɔngi yango mpe asɛngaki bango bálapa ndai ete bakobikisa ye ná libota na ye ntango bakozwa Yeliko. Banɔngi yango basɛngaki Laaba ayanganisa libota na ye mobimba na ndako na ye, oyo etongamaki na efelo ya engumba. Soki babimi na ndako, basengelaki kobomama lokola bato mosusu nyonso ya engumba yango. (Yos. 2:8-13, 15, 18, 19) Kasi, na nsima Yehova ayebisaki Yosua ete “efelo ya engumba ekokwea mobimba na nse.” (Yos. 6:5, NW) Emonanaki ete esika oyo banɔngi balobaki ete ekozala libateli ekómaki na likama. Ndenge nini Laaba ná libota na ye bakokaki kobika?
Ntango ngonga ekokaki mpo na kozwa Yeliko, Bayisalaele bagangaki mpe babɛtaki maseke. Yosua 6:20 (NW) elobi boye: “Mpe esalemaki boye: ntango kaka bato bayokaki lokito ya liseke mpe bato babandaki kobɛta ntangwa makasi ya etumba, efelo yango ebandaki kokwea mobimba na nse.” Moto moko te akokaki kopekisa lopango ya engumba ekwea. Kasi, na ndenge ya likamwisi, ndako ya Laaba ekweaki te atako etongamaki likoló ya lopango ya engumba. Yosua ayebisaki banɔngi boye: “Bókende na ndako ya mwasi wana ya ndumba, mpe bóbimisa mwasi yango ná bato na ye nyonso, ndenge bolapelaki ye ndai.” (Yos. 6:22, NW) Bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya Laaba babikaki.
Likambo oyo elekaki ntina
Liteya nini tokoki kozwa na kobika ya Noa, Lota, Bayisalaele na ntango ya Moize, mpe Laaba? Ndenge nini masolo yango ezali kosalisa biso tóyeba esika oyo tosengeli kozala ntango mokili mabe oyo ekobomama?
Ya solo, Noa abikaki mpo azalaki na kati ya masuwa. Kasi, mpo na nini akɔtaki na masuwa? Ezalaki mpo amonisaki kondima mpe botosi, boye te? Biblia elobi ete: “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki ye Nzambe.” (Gen. 6:22; Ebe. 11:7) Ezali boni mpo na biso? Tosalaka nyonso oyo Nzambe asɛngi biso? Noa azalaki mpe “mosakoli moko ya boyengebene.” (2 Pet. 2:5) Biso mpe tosakolaka nsango malamu na molende ata soki bato ya teritware na biso baboyi koyoka?
Lota abikaki mpo abimaki na Sodoma. Abikaki mpo azalaki sembo na miso ya Nzambe mpe azalaki koyoka mpasi na motema mpo na etamboli mabe ya bato ya Sodoma ná Gomola. Biso mpe toyokaka mpasi na motema mpo na makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili? To, motema na biso ekómá makasi mpe makambo yango esalaka biso mpasi te? Tosalaka nyonso mpo Nzambe akuta biso “kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya”?—2 Pet. 3:14.
Mpo na kobika, Bayisalaele oyo bazalaki na Ezipito mpe Laaba na Yeliko basengelaki kotikala na bandako na bango. Yango esɛngaki bázala na kondima mpe na botosi. (Ebe. 11:28, 30, 31) Kanisá ndenge libota mokomoko ya Bayisalaele basengelaki kotala mwana na bango ya liboso wana bazalaki koyoka “kolela monene” na bandako ya Baezipito. (Ex. 12:30) Kanisá ndenge Laaba ná libota na ye bazalaki kobanga ntango bazalaki koyoka lopango ya Yeliko ezali kokwea mpe ezali kopusana tii na ndako na bango. Esɛngaki azala na kondima makasi mpo akoba kotosa mpe atikala kaka na kati ya ndako.
Mosika te, mokili ya Satana ekobomama. Toyebi naino te ndenge Yehova akobatela basaleli na ye na ‘mokolo ya nkanda na ye.’ (Sef. 2:3) Nzokande, ata soki tokozala wapi na ntango yango, tokoki kozala na elikya ete kondima mpe botosi epai ya Yehova nde ekobikisa biso. Liboso likambo yango esalema, tosengeli kozala na makanisi ebongi mpo na oyo esakweli ya Yisaya ebengaki “bashambrɛ ya kati.”
“Kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati”
Yisaya 26:20 (NW) elobi boye: “Kende, yo ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango kino makaneli ekoleka.” Ekoki kozala ete esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mobu 539 L.T.B., ntango bato ya Mede ná ya Perse bazwaki Babilone. Ekoki kozala ete ntango Sirise akɔtaki na Babilone, asɛngaki bato nyonso bátikala na bandako na bango, mpamba te atindaki basoda na ye báboma moto nyonso oyo bakokuta libándá.
Lelo oyo, tokoki kokokanisa masangá koleka 100 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na “bashambrɛ ya kati” oyo esakweli ya Yisaya elobeli. Masangá yango ezali na ntina mingi na bomoi na biso. Ekozala kaka na ntina mingi ata na ntango ya “bolɔzi monene.” (Emon. 7:14) Nzambe asɛngi basaleli na ye bákɔta na ‘bashambrɛ na bango ya kati’ mpe bámibomba “kino makaneli ekoleka.” Ezali na ntina mingi tózala na makanisi ya malamu mpo na lisangá mpe tózala na ekateli makasi ya kotika yango te. Tokoki kolanda toli ya Paulo oyo: “Tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.”—Ebe. 10:24, 25.
[Bililingi na lokasa 7]
Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Nzambe abikisaki basembwi na ntango ya kala?
[Elilingi na lokasa 8]
“Bashambrɛ ya kati” ekoki kokokana na nini lelo oyo?