Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/7 lok. 9
  • “Ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • ‘Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu’
    Pusaná penepene na Yehova
  • “Bosengeli kozala basantu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Kozala mosantu elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Bózala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/7 lok. 9

Pusaná penepene na Nzambe

“Ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu”

Levitike mokapo 19

“MOSANTU, mosantu, mosantu ezali Yehova Nzambe.” (Emoniseli 4:8) Na maloba wana, Biblia emonisi ete Yehova azali mosantu, elingi koloba ete azali pɛto na ndenge oyo eleki mpenza to na ndenge ya kokoka. Nzambe azali mosika mpenza na lisumu; akoki kosala lisumu te. Yango elingi nde koloba ete bato ya kozanga kokoka bazali na elikya te ya kozala na boyokani na Nzambe oyo aleki bosantu? Te, elikya ezali! Tótalela maloba oyo ekoki kopesa biso elikya, oyo ezali na Levitike mokapo 19.

Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na liyangani mobimba ya bana ya Yisalaele.” Maloba oyo elandaki, etalelaki moto nyonso ya ekólo Yisalaele. Moize asengelaki koyebisa bango nini? Nzambe abakisaki boye: “Osengeli koyebisa bango ete: ‘Bokozala basantu, mpamba te ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.’” (Vɛrsɛ 2, NW) Moyisalaele mokomoko asengelaki kozala na bizaleli ya bosantu. Liloba “bokozala” emonisi ete Yehova apesaki kaka likanisi te kasi apesaki nde mobeko. Nzambe asɛngaki nde likambo oyo bato bakokoka te?

Tósimba ete Yehova alobaki te ete Bayisalaele bázala basantu lokola ye; kasi alobaki ete bázala basantu mpo ye azali mosantu. Na maloba mosusu, Yehova ayebisaki te basambeli na ye na Yisalaele, oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, ete bákokana na ye na bosantu. Yango ekokaki kosalema te. Yehova, “Oyo Aleki Bosantu,” azali mosantu koleka bikelamu nyonso. (Masese 30:3, NW) Kasi, lokola Yehova azali mosantu, alingaka ete basambeli na ye bázala basantu, elingi koloba bámonisa ezaleli yango na ndenge oyo ekoki mpo na bato ya kozanga kokoka. Na makambo nini bakokaki komimonisa basantu?

Nsima ya kopesa mobeko ya kozala basantu, na nzela ya Moize, Yehova alobelaki masɛngami oyo etali likambo mokomoko ya bomoi. Moyisalaele mokomoko asengelaki kotosa mitinda oyo esengelaki kotambwisa bango, na ndakisa: komemya baboti mpe mibange na ndenge oyo ebongi (vɛrsɛ 3, 32); komonisa boboto epai ya bato bakufá matoi, bato bakufá miso mpe bato mosusu ya mpasi (vɛrsɛ 9, 10, 14); kozala na kolongobana mpe kopona bilongi te (vɛrsɛ 11-13, 15, 35, 36); mpe kolinga Bayisalaele mosusu lokola ye moko. (vɛrsɛ 18) Soki Moyisalaele atosi mitinda wana mpe mitinda mosusu, ‘akozala mpenza mosantu liboso ya Nzambe [na ye].’​—Mituya 15:40, NW.

Mobeko oyo esɛngaki kozala basantu ezali kosalisa biso tósosola makanisi mpe banzela ya Yehova Nzambe. Na ndakisa, tomoni ete mpo tózala na boyokani malamu na ye, tosengeli kosala nyonso mpo tózala na bomoi oyo eyokani na mitinda na ye ya etamboli ya bosantu. (1 Petelo 1:15, 16) Soki tokangami na mitinda yango, tokoki kozala na bomoi ya malamu mpenza.​—Yisaya 48:17.

Mobeko ya kozala basantu ezali mpe komonisa ete Yehova atyelaka basambeli na ye motema. Yehova asɛngaka biso ata likambo moko te oyo tokoki kokokisa te. (Nzembo 103:13, 14) Ayebi ete biso bato tokelamá na elilingi na ye mpe tozali na likoki ya kokolisa ezaleli ya bosantu, atako tokosala yango na ndenge ya kokoka te. (Genese 1:26) Oyoki mposa ya koyeba ndenge okoki kopusana lisusu penepene na Yehova, Nzambe mosantu?

[Elilingi na lokasa 9]

Mokomoko na biso azali na likoki ya kokolisa ezaleli ya bosantu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto